Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

Bamipesaki na bolingo na bango moko

Bamipesaki na bolingo na bango moko

NA EBELE ya Batatoli ya molende oyo bakendá kosakola na mboka epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi, bandeko basi minzemba nde baleki. Basusu kati na bango bakendá kosakola na bikólo mosusu na boumeli ya bambula ebele. Nini esalisaki bango bákende kosakola na bamboka mosusu na boumeli ya bambula ebele ndenge wana? Mateya nini bazwaki ndenge bakendá kosakola na mboka mopaya? Bomoi na bango ezalaki ndenge nini kuna? Tosololaki na bandeko basi yango oyo baumeli mpe bameseni na mosala ya kosakola. Soki ozali ndeko mwasi monzemba oyo azali na mposa makasi ya kosakola mingi, ezali mpenza likambo ya kosepelisa, tondimisami ete okozwa matomba na masolo na bango. Ya solo, basaleli ya Nzambe nyonso bakoki kozwa matomba soki bataleli ndakisa na bango.

NTANGO OKANISI ETE OKOKOKA TE

Anita

Omitunaka soki ozali mpenza na nyonso oyo esengeli mpo na kolonga kozala mobongisi-nzela monzemba na mboka mopaya? Ndeko mwasi Anita oyo azali sikoyo na mbula 70 na ndambo, azalaki mpenza kondima te ete akolonga kosala yango. Akolaki na Angleterre epai abandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango azalaki na mbula 18. Alobi: “Nazalaki kosepela koteya bato makambo ya Yehova, kasi nazalaki kokanisa ata moke te ete nakoki kokende kosakola na mboka mopaya. Nayekolaki ata monɔkɔ moko ya bapaya te liboso mpe nazalaki kondima te ete nakoki koyeba monɔkɔ mosusu. Na yango, ntango nazwaki libyangi mpo na kokɔta na Eteyelo ya Gileade, nakamwaki mpenza. Nakamwaki ete moto mpamba lokola ngai, nazwa libyangi ya ndenge wana. Kasi, nakanisaki boye: ‘Soki Yehova amoni ete nakoki kosala yango, nakomeka.’ Likambo yango esalemaki eleki sikoyo mbula 50. Banda ntango wana, nakómaki misionɛrɛ na Japon.” Ndeko Anita abakisi: “Ntango mosusu, nafungolaka miso na mwa kosɛka mpe nayebisaka bandeko basi oyo bazali naino bilenge: ‘Bókanga bisaka mpe bólanda ngai na mosala wana monene!’ Nazali na esengo ya koloba ete mingi balandaki ngai.”

ESƐNGAKA KOZALA NA MPIKO

Bandeko basi mingi oyo bakendá kosakola na mboka mosusu bazalaki liboso kokakatana mpo na kokende kofanda na mboka mopaya. Ndenge nini bazwaki mpiko oyo esengeli?

Maureen

Ndeko mwasi Maureen oyo azali sikoyo na mbula koleka 60 alobi: “Ntango nazalaki kokola, nazalaki na mposa makasi ya kozala na bomoi oyo ezali na ntina, oyo ekopesa ngai nzela ya kosalisa basusu.” Ntango akómaki na mbula 20, akendaki na Québec, na Canada, epai bazalaki na mposa ya babongisi-nzela mingi. Alobi boye: “Na nsima, nazwaki libyangi mpo na kokɔta na Eteyelo ya Gileade, kasi nazalaki kobanga kokende na mboka oyo nayebi te, mosika na baninga.” Abakisi: “Nazalaki mpe kobanga kotika mama na ngai oyo azalaki kobatela tata na ngai oyo azalaki kobɛla. Nazalaki kolekisa butu  mingi na kolela mpe kobondela Yehova mpo na makambo yango. Ntango nayebisaki baboti na ngai mitungisi na ngai, balendisaki ngai nandima libyangi yango. Lisusu, namonaki bolingo mpe lisungi oyo bandeko ya lisangá na biso bazalaki komonisela baboti na ngai. Komona lobɔkɔ ya Yehova esalisaki ngai natya motema ete akotyela ngai mpe likebi. Na ntango wana, nandimaki kokende!” Kobanda na 1979, ndeko mwasi Maureen azalaki misionɛrɛ na Afrika ya Wɛsti na boumeli ya mbula koleka 30. Lelo oyo, atako azali kobatela mama na ye na Canada, ndeko Maureen azali kaka mobongisi-nzela monene. Nsima ya kokanisa bambula oyo akendaki kosakola na mboka mopaya, alobi boye: “Yehova azalaki ntango nyonso kopesa ngai oyo nasengelaki na yango mpe na ntango oyo nazalaki na mposa na yango.”

Wendy

Ndeko mwasi Wendy, oyo azali na mbula koleka 60, akómaki mobongisi-nzela na ekólo Australie ntango azalaki naino elenge. Alobi: “Nazalaki mpenza moto ya nsɔninsɔni mpe nazalaki kokoka te kosolola na bato oyo nayebi te. Kasi mosala ya mobongisi-nzela esalisaki ngai nabanda kosolola na bato ya ndenge nyonso, yango wana kondima na ngai ekómaki makasi. Na nsima, nayebaki ete kondima ezalaki lisusu mokakatano te mpo na ngai. Mosala ya mobongisi-nzela ezalaki koteya ngai natyela Yehova motema, mpe nakómaki kosepela na likanisi ya kokende kosakola na mboka mopaya. Lisusu, ndeko mwasi moko monzemba oyo azalaki misionɛrɛ na boumeli ya bambula koleka 30 na Japon, asɛngaki ngai tókende kosakola na Japon na boumeli ya sanza misato. Kosala elongo na ye epesaki ngai mposa ya kokende kofanda na mboka mopaya.” Na katikati ya bambula ya 1980, ndeko mwasi Wendy akendaki na Vanuatu, esanga moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1 770 na ɛsti ya Australie.

Tii lelo, ndeko mwasi Wendy azali na Vanuatu, sikoyo azali kosala na ndako moko mpo na kobongola mikanda mosika na Betele. Alobi boye: “Komona ndenge oyo bituluku mpe masangá ezali kofungwama na bamboka mosika ezali kosepelisa ngai mingi. Kozwa likoki ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova na bisanga yango ezali libaku moko monene.”

Kumiko (na katikati)

Ndeko mwasi Kumiko, oyo azali sikoyo na mbula koleka 60, azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na Japon ntango moninga na ye na mosala ya mobongisi-nzela apesaki likanisi ete bákende kofanda na ekólo Népal. Alobi boye: “Azalaki kotuna ngai mbala na mbala, kasi nazalaki kaka koboya. Nazalaki kobanga koyekola monɔkɔ ya sika mpe komesana na mboka ya sika mpe mimeseno ya sika. Mokakatano mosusu ezalaki mpe ya kozwa mbongo oyo esengeli mpo na kokende kofanda na mboka mopaya. Ntango nazalaki koluka kozwa ekateli, nasalaki aksida na tukutuku mpe nakɔtaki na lopitalo. Kuna na lopitalo, nakanisaki boye: ‘Nani ayebi likambo oyo ekokómela ngai lobi? Nakoki kobɛla maladi moko ya makasi mpe kozanga libaku ya kozala mobongisi-nzela na mboka mopaya. Nakoki te kosakola na mboka mopaya ata mbula moko?’ Nabondelaki Yehova na etingya asalisa ngai nakokisa mokano wana.” Nsima ya kobima na lopitalo, ndeko mwasi Kumiko akendaki kotala ekólo Népal, na nsima ye ná moninga na ye na mosala ya mobongisi-nzela bakendaki kofanda kuna.

 Nsima ya kosala mbula pene na zomi na ekólo Népal, ndeko mwasi Kumiko alobi boye: “Mikakatano oyo nazalaki kobanga ekómaki liboso na ngai lokola Mbu Motane. Nazali na esengo mingi ndenge nandimaki kokende na esika oyo mposa ezali mingi. Mbala mingi, ntango nazali kosakola nsango ya Biblia epai ya bato ya libota moko, bato mosusu mitano to motoba oyo bafandaka pene bayaka koyoka nsango yango. Ata bana mike basɛngaka ngai na limemya nyonso napesa bango trakte moko ya mateya ya Biblia. Nazali na esengo ya kosakola na teritware oyo bato basepelaka na solo.”

NDENGE YA KOLONGA MIKAKATANO

Tokoki kokamwa te ete bandeko basi minzemba oyo tosololi na bango bakutanaki na mikakatano mingi. Kasi ndenge nini balongaki yango?

Diane

Ndeko mwasi Diane, ya Canada, alobi: “Na ebandeli, nazalaki kokoka te kozala mosika na libota na ngai.” Lelo oyo, azali na mbula mwa moke koleka 60, mpe azali misionɛrɛ na ekólo Côte d’Ivoire ekoki sikoyo mbula 20. Abakisi boye: “Nasɛngaki Yehova asalisa ngai nalinga bato ya teritware na ngai. Molakisi na biso moko na Gileade, ndeko Jack Redford, ayebisaki biso ete na ebandeli tokoki komitungisa, ata mpe koyoka mpasi na motema, mpo na makambo oyo tokokuta na teritware oyo batindi biso, mingimingi ntango tokomona bobola makasi. Kasi alobaki: ‘Bótala bobola te. Bótala nde bato, bilongi na bango mpe miso na bango. Bótala ndenge oyo bazali kosepela ntango bazali koyoka mateya ya solo ya Biblia.’ Yango nde nasalaki, mpe nazwaki ebele ya mapamboli! Ntango nazali kosakwela bato nsango ya Bokonzi oyo ebɔndisaka, namonaka ndenge bilongi na bango ekómaka na esengo!” Nini mosusu esalisaki ndeko Diane amesana kosakola na mboka mopaya? Abakisi boye: “Nasalaki makasi nakóma moninga ya bato oyo nazalaki koyekola na bango Biblia mpe nayokaki esengo mingi komona bango bazali kokóma basaleli ya sembo ya Yehova. Teritware oyo batindaki ngai ekómaki lokola mboka na ngai. Nazwaki bamama, batata, bandeko basi mpe bandeko mibali ya elimo, kaka ndenge Yesu alakaki.”Marko 10:29, 30.

Ndeko mwasi Anne, oyo azali sikoyo na mbula soki 45, azali kosakola na Asie na ekólo moko epai mosala na biso epekisami. Alobi boye: “Na boumeli ya bambula ebele oyo nasalaki na mikili ya bapaya ndenge na ndenge, nafandaki elongo na bandeko basi oyo bazalaki na mimeseno mpe bomoto oyo ekesanaki mpenza na oyo ya ngai. Ntango mosusu, yango ezalaki kosala ete tóyokana malamu te mpe ezalaki kopesa ngai mpasi na motema. Soki esalemi bongo, nazalaki kokangama lisusu mingi na baninga oyo nafandi na bango, mpo na koyeba malamu mimeseno na bango. Nazalaki mpe kosala makasi nalinga bango lisusu mingi mpe namonana moto ya makambo makasimakasi te epai na bango. Nasepelaka mingi ndenge milende oyo nasalaki ebotaki mbuma mpe esalisaki ngai nazwa baninga ya solosolo oyo basalisaka ngai nayika mpiko na teritware na ngai.”

Ute

 Na 1993, ndeko mwasi Ute, ya Allemagne, oyo azali sikoyo na mbula mwa moke koleka 50, atindamaki na mosala ya misionɛrɛ na Madagascar. Alobi boye: “Na ebandeli, nasalaki milende mpo na koyekola monɔkɔ ya mboka yango, komesana na eleko ya molunge, mpe kobunda na malaria, amibe, mpe banyama ya libumu. Kasi nazwaki lisalisi mingi. Bandeko basi ya mboka yango, bana na bango, mpe bato oyo nazalaki koyekola na bango Biblia basalisaki ngai na motema molai mpo nayeba malamu monɔkɔ yango. Moninga na ngai na mosala ya misionɛrɛ azalaki kobatela ngai na bolingo nyonso ntango nazalaki kobɛla. Kasi oyo eleki nyonso, Yehova asalisaki ngai. Mbala na mbala, nazalaki koyebisa ye mitungisi na ngai na nzela ya libondeli. Na nsima, nazalaki kozela na motema molai, mbala mosusu mikolo ebele to basanza mingi, liboso ete Yehova ayanola na mabondeli na ngai. Yehova asilisaki mikakatano na ngai nyonso.” Ndeko mwasi Ute azali kosala na Madagascar esali sikoyo mbula 23.

BOMOI OYO ETONDI NA MAPAMBOLI

Lokola bandeko nyonso oyo bakendá kosakola esika mposa ezali mingi, bandeko basi minzemba oyo bakendá kofanda na mikili ya bapaya bamonisaka ntango nyonso ete kokende kosakola na mboka mopaya ezali bomoi oyo etondi na mapamboli. Wapi mwa ndambo ya mapamboli oyo bazwaki?

Heidi

Ndeko mwasi Heidi, ya Allemagne, oyo azali sikoyo na mbula mwa moke koleka 70, mpe azali misionɛrɛ na Côte d’Ivoire banda 1968, alobi boye: “Esengo monene oyo nazwi ezali komona ndenge oyo bana na ngai ya elimo ‘bazali kokoba kotambola na kati ya solo.’ Bato mosusu oyo nayekolaki na bango Biblia bazali sikoyo babongisi-nzela mpe bankulutu na lisangá. Mingi na bango babengaka ngai Mama to Nkɔkɔ. Moko ya bankulutu yango ná mwasi na ye mpe bana na bango bazwaka ngai mpenza lokola moto ya libota na bango. Nakoki koloba ete Yehova apesá ngai mwana mobali, bokilo, mpe bankɔkɔ misato.”3 Yoane 4.

Karen (na katikati)

Ndeko mwasi Karen, ya Canada, oyo azali sikoyo na mbula mwa moke koleka 70, asalaki mbula koleka 20 na Afrika ya Wɛsti. Alobi boye: “Mosala ya misionɛrɛ eteyaki ngai namipimela lisusu mingi, nalinga bato lisusu mingi, mpe namonisa motema molai mingi. Lisusu, kosala elongo na bandeko ya bikólo ndenge na ndenge esalisaki ngai nafungwama na ndenge na ngai ya kotalela makambo. Nayekolaki ete ezali na ndenge mingi ya kosala makambo. Mpe ezali mpenza lipamboli kozala na baninga ya motema na mokili mobimba! Atako bomoi mpe mosala na biso ebongwani, boninga na biso ezali kokoba.”

Ndeko mwasi Margaret, ya Angleterre, oyo azali sikoyo na mbula pene na 80, azalaki misionɛrɛ na ekólo Laos. Alobi boye: “Kosakola na mboka mopaya esalisaki ngai namona na miso ndenge oyo Yehova abendaka bato ya mposo nyonso mpe mimeseno nyonso na ebongiseli na ye. Yango ekómisaki mpenza kondima na ngai makasi. Yango endimisi ngai ete Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye mpe ete mikano na ye ekokokisama.”

Ya solo, bandeko basi minzemba oyo bakendaka kosakola na mboka mopaya basali makambo minene na mosala ya Nzambe. Babongi mpenza kozwa longonya. (Basambisi 11:40) Likambo mosusu ya malamu, motángo na bango ezali se kobakisama. (Nzembo 68:11) Yo mpe ozali na likoki ya kobongola makambo mosusu na bomoi na yo mpo olanda lokolo ya bandeko basi ya molende oyo balobeli bomoi na bango na lisolo oyo? Soki osali yango, kozanga ntembe “okomeka mpe okomona ete Yehova azali malamu.”Nzembo 34:8.