Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

Bopɔlɔ esilá ngala?

Bopɔlɔ esilá ngala?

“Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”MASESE 11:2.

NZEMBO: 38, 69

1, 2. Mpo na nini Nzambe aboyaki Saulo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NTANGO Yehova aponaki Saulo mpo azala mokonzi, Saulo azalaki na bopɔlɔ. (1 Samwele 9:1, 2, 21; 10:20-24) Kasi na nsima, ntango akómaki mokonzi, abandaki kokóma na lofundo. Mokolo moko, ebele ya Bafilistia bayaki kobundisa Bayisraele. Mosakoli Samwele ayebisaki Saulo ete akoya mpo na kopesa Yehova mbeka. Kasi liboso ete Samwele akóma, Bayisraele bakómaki kobanga mpe mingi na bango basundolaki Saulo. Na esika ete Saulo amonisa motema molai mpe azela Samwele aya kopesa mbeka, ye moko apesaki mbeka yango. Nzokande, Saulo azalaki na lotomo ya kosala bongo te; yango wana, Yehova asepelaki te na likambo oyo asalaki.1 Samwele 13:5-9.

2 Ntango Samwele akómaki, apamelaki Saulo ndenge azangaki botosi epai ya Yehova. Kasi Saulo amonaki te ete asali likambo moko ya mabe. Alukaki komilongisa, mpe ata kopesa basusu foti mpo na libunga na ye. (1 Samwele 13:10-14) Banda wana, Saulo akómaki kosala makambo  mingi na lofundo. Yango wana, Yehova aboyaki ete akoba kozala mokonzi. (1 Samwele 15:22, 23) Bomoi ya Saulo ebandaki malamu, kasi esukaki mpenza mabe.1 Samwele 31:1-6.

3. (a) Bato mingi bakanisaka nini mpo na bopɔlɔ? (b) Tokoyanola na mituna nini?

3 Lelo oyo, bato mingi bakanisaka ete soki bazali na bopɔlɔ, bakozala na bomoi ya malamu te mpe na mosala ya malamu te. Bamikumisaka mpo bámonana ete baleki basusu. Na ndakisa, moto moko ya lokumu mpe ya politiki alobaki: “Liloba bopɔlɔ etali ngai te; nakanisi ekotalela mpe ngai ata mokolo moko te.” Kasi mpo na nini ezali na ntina mingi ete mokristo azala na bopɔlɔ? Bopɔlɔ ezali nini, mpe ezali nini te? Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna wana. Mpe na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo tokoki kokoba kozala na bopɔlɔ, ata soki ekoki kozala mpasi komonisa ezaleli yango.

MPO NA NINI BOPƆLƆ EZALI NA NTINA MINGI?

4. Misala ya lofundo ezali nini?

4 Biblia emonisi bokeseni oyo ezali kati na lofundo mpe bopɔlɔ. (Tángá Masese 11:2.) Davidi abondelaki Yehova: “Pekisá mosaleli na yo misala ya lofundo.” (Nzembo 19:13) Misala ya lofundo ezali nini? Ezali kosala likambo moko oyo tozali na lotomo to ndingisa ya kosala yango te, ntango mosusu mpo tozangi motema molai to tozali na lolendo. Mbala mosusu, biso nyonso tosilá kosala likambo moko na lofundo mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi ndenge tomoni yango na ndakisa ya mokonzi Saulo, soki yango ekómi momeseno, Yehova akosepela te. Nzembo 119:21 elobi ete Yehova ‘akopamela bato ya lofundo.’ Mpo na nini asalaka bongo?

5. Mpo na nini kosala likambo na lofundo ezali libunga monene?

5 Ya liboso, soki tosali likambo moko na lofundo, tozali komonisa ete tozangi limemya epai ya Yehova, Nzambe na biso mpe Moyangeli na biso. Ya mibale, soki tosali makambo oyo tozali na lotomo ya kosala te, mbala mosusu tokoki koswana na basusu to kozanga koyokana na bango. (Masese 13:10) Mpe ya misato, tokoki komonana bazoba soki basusu bayebi ete tosalaki likambo moko na lofundo. (Luka 14:8, 9) Tomoni polele ntina oyo Yehova alingi ete tózala na bopɔlɔ.

BOPƆLƆ ESƐNGAKA NINI?

6, 7. Boyokani nini ezali kati na bopɔlɔ mpe komikitisa?

6 Bopɔlɔ ezali ndeko ya komikitisa. Mokristo oyo azali na komikitisa azalaka na lolendo te; amonaka nde ete basusu baleki ye. (Bafilipi 2:3) Mbala mingi, moto ya komikitisa azalaka mpe na bopɔlɔ. Ayebaka esika makoki na ye esuki, mpe andimaka mabunga na ye na komikitisa nyonso. Andimaka koyoka makanisi ya basusu mpe koyekola epai na bango. Yehova asepelaka mingi na moto ya komikitisa.

7 Biblia emonisi ete moto ya bopɔlɔ amiyebaka mpe ayebaka ete ezali na makambo mosusu oyo azali na makoki ya kosala te to azali na ndingisa ya kosala te. Yango esalisaka ye amemya basusu mpe asalela bango makambo na boboto.

8. Mpo tókoba kozala na bopɔlɔ, makanisi ya ndenge nini tosengeli koboya?

8 Kasi, tokoki kokóma na makanisi ya lofundo kozanga ete biso moko tóyeba yango. Ndenge nini yango ekoki kosalema? Na ndakisa, tokoki kobanda komimona ete tozali na ntina mingi koleka basusu, mpo biso moko to bandeko oyo toyebi malamu bazali na mikumba mosusu na lisangá. (Baroma 12:16) To  mpe tokoki kobanda kobenda likebi mingi ya basusu epai na biso. (1 Timote 2:9, 10) Tokoki ata kobanda koyebisa basusu oyo basengeli kosala to kosala te.1 Bakorinti 4:6.

9. (a) Mpo na nini bato mosusu bakómaki na lofundo? (b) Pesá ndakisa moko ya Biblia.

9 Tokoki kobanda kokóma na etamboli ya lofundo soki topekisi te bamposa na biso ya mabe. Bato mingi bakómaki na lofundo mpo bazalaki koluka lokumu na bango moko, kolula basusu, to bapekisaki nkanda na bango te. Yango ekómelaki bato mosusu oyo Biblia elobeli, na ndakisa Abisalome, Uzia, mpe Nebukadenezare. Yehova amonisaki bango polele ete basengelaki kozala na komikitisa.2 Samwele 15:1-6; 18:9-17; 2 Ntango 26:16-21; Danyele 5:18-21.

10. (a) Mpo na nini tosengeli koboya kokaniselaka basusu mabe? (b) Pesá ndakisa moko ya Biblia.

10 Ekoki kozala na bantina mosusu oyo esalaka ete bato bázala na bopɔlɔ te na bantango mosusu. Tózwa ndakisa ya Abimeleke mpe ya ntoma Petro. (Ebandeli 20:2-7; Matai 26:31-35) Mibali yango bazalaki nde bato ya lofundo? To ekoki nde kozala ete bayebaki makambo nyonso te mpe bazalaki kosala makambo mosusu kozanga kokanisa? Lokola tokoki te koyeba makambo oyo ezali na kati ya motema, tosengeli te kokaniselaka basusu mabe.Tángá Yakobo 4:12.

MOKUMBA OYO OZALI NA YANGO NA EBONGISELI YA NZAMBE

11. Tosengeli koyeba nini?

11 Moto ya bopɔlɔ ayebaka mokumba oyo azali na yango na ebongiseli ya Nzambe. Yehova azali Nzambe ya mobulu te. Apesá ndeko mokomoko ya lisangá mokumba. Biso nyonso tozali na ntina. Yehova apesá mokomoko na biso makabo, makoki, to mayele oyo ekeseni na oyo ya basusu, mpe atikaka biso tópona ndenge oyo tokosalela yango. Soki tozali na bopɔlɔ, tokosalela makabo yango na ndenge oyo Yehova alingi tósalela yango. (Baroma 12:4-8) Tokoyeba ete Yehova alingaka komona biso tozali kosalela yango mpo na kokumisa ye mpe kosalisa basusu.Tángá 1 Petro 4:10.

Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu ntango bapesi biso mokumba ya sika? (Talá paragrafe 12-14)

12, 13. Nini tosengeli kobosana te soki makambo ya bomoi na biso ebongwani na mosala ya Yehova?

12 Wana ntango ezali koleka, makambo oyo tosalaka na mosala ya Yehova ekoki kobongwana. Na ndakisa, kanisá mbongwana ndenge na ndenge oyo esalemaki na bomoi ya Yesu. Liboso, ye ná Tata na ye bazalaki kaka bango mibale. (Masese 8:22) Na nsima, asalisaki Yehova na kokela baanzelu, molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe bato. (Bakolose 1:16) Na nsima, atindamaki awa na mabele. Abotamaki lokola mwana moke, na nsima babɔkɔlaki ye tii akolaki mpe akómaki mokóló. (Bafilipi 2:7) Nsima ya liwa na ye, Yesu azongaki na likoló mpe na 1914 akómaki mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Baebre 2:9) Na mikolo ezali koya, nsima ya koyangela mbula nkóto moko, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Yehova, mpo “Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”1 Bakorinti 15:28.

13 Lokola Yesu, bomoi na biso mpe ekoki kobongwana mbala na mbala. Ntango mosusu, mikumba na biso ekoki kobongwana mpo na bikateli oyo biso moko tozwi. Na ndakisa, ekoki kozala ete tozalaki minzemba, na nsima tozwi  ekateli ya kobala. To, tokoki kozwa ekateli ya kobota bana. Nsima ya mikolo, tokoki kozwa ekateli ya kobongola makambo mosusu na bomoi na biso mpo tósalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Ntango mosusu, mikumba na biso ekoki kobongwana mpo na makambo oyo tokutani na yango na bomoi. Ntango mosusu tokoki kozala na likoki ya kosala mingi to kosala moke. Kasi tózala bilenge to mikóló, na nzoto kolɔngɔnɔ to te, Yehova ayebi lolenge eleki malamu oyo mokomoko na biso akoki kosalela ye. Asɛngaka biso te tósalela ye koleka makoki na biso. Mpe asepelaka mingi na makambo nyonso oyo tosalaka mpo na ye.Baebre 6:10.

14. Ndenge nini bopɔlɔ ekoki kosalisa biso tósepela mpe tózala na esengo na mosala nyonso oyo bapesi biso?

14 Yesu azalaki kosepela na mokumba nyonso oyo Yehova azalaki kopesa ye; biso mpe tokoki kosepela na mokumba nyonso oyo Yehova apesi biso. (Masese 8:30, 31) Moto ya bopɔlɔ asepelaka na misala oyo bapesi ye na lisangá mpe na mikumba oyo azali na yango. Atyaka likebi na ye te na misala oyo basusu bazali kosala. Asepelaka nde na mokumba oyo azali na yango na ebongiseli ya Nzambe. Amonaka yango lokola likabo oyo euti epai ya Yehova. Moto ya bopɔlɔ amemyaka basusu mpe asepelaka kopesa bango mabɔkɔ. Ayebaka ete Yehova apesi mpe bango mokumba.Baroma 12:10.

LOLENGE MALAMU YA KOTALELA BOPƆLƆ

15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Gideone?

15 Gideone azali ndakisa malamu mpenza ya komonisa bopɔlɔ. Ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kobikisa Bayisraele na mabɔkɔ  ya Bamidiane, alobaki: “Libota na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.” (Basambisi 6:15) Kasi Gideone atyelaki Yehova motema mpe andimaki mokumba yango. Na nsima, Gideone asalaki makasi akanga ntina ya makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye mpe abondelaki mpo na kosɛnga litambwisi na ye. (Basambisi 6:36-40) Gideone azalaki mobali makasi mpe ya mpiko, kasi azalaki mpe na bwanya mpe na bokɛngi. (Basambisi 6:11, 27) Na nsima, ntango bato ya ekólo balingaki ete akóma mokonzi na bango, aboyaki. Nsima ya kosala nyonso oyo Yehova asɛngaki ye, azongaki epai na ye.Basambisi 8:22, 23, 29.

16, 17. Makambo nini moto ya bopɔlɔ atalelaka soki azali na mposa ya kokola na elimo?

16 Soki moto andimi mokumba ya sika oyo bapesi ye to alingi kosala lisusu mingi na lisangá, yango elimboli nde ete azangi bopɔlɔ? Te. Biblia elobi ete ezali malamu soki mosaleli ya Yehova azali na mposa ya kosalela bandeko lisusu mingi koleka mpe alingi kokola to kokende liboso. (1 Timote 4:13-15) Kasi, esengeli kaka tózwa mokumba ya sika mpo na kokende liboso? Te. Biso nyonso tokoki kokoba kobongisa bomoto na biso ya bokristo mpe makoki oyo Yehova apesá biso mpo tósalela ye mpe tósalisa basusu malamu koleka.

17 Liboso ya kondima mokumba moko, moto ya bopɔlɔ alukaka naino koyeba makambo oyo mokumba yango ekosɛnga ye. Abondelaka mpo na yango mpe amitalelaka malamumalamu mpo na koyeba soki akokoka kosala mosala yango. Mokumba yango ekotikela ye ntango mpe makasi mpo na makambo mosusu ya ntina? Soki te, misala mosusu oyo azali kosala sikoyo, bato mosusu bakoki kosala yango? Nsima ya kokanisa na makambo wana, moto ya bopɔlɔ akoki mbala mosusu komona ete akolonga te kokokisa malamu mokumba wana ya sika. Soki tozali na bopɔlɔ, mbala mosusu tokoki koloba “te.”

18. (a) Moto ya bopɔlɔ asalaka nini soki bapesi ye mokumba moko ya sika? (b) Ndenge nini Baroma 12:3 ezali kosalisa biso tózala na bopɔlɔ?

18 Yehova alingi ete ‘tótambola na bopɔlɔ’ elongo na ye. (Mika 6:8) Yango wana, ntango bapesi biso mokumba moko ya sika, tolukaka litambwisi na ye mpe tosɛngaka ye asalisa biso, ndenge Gideone asalaki. Tosengeli kokanisa na mozindo na makambo oyo Yehova ayebisaka biso na nzela ya Biblia mpe ebongiseli na ye. Tósimba likambo oyo: Nyonso oyo tozali na likoki ya kosala na mosala na ye, ezali te mpo na makoki oyo tozali na yango, kasi ezali mpo Yehova azali na komikitisa mpe asepeli kosalisa biso. (Nzembo 18:35) Moto ya bopɔlɔ ‘akanisaka te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.’—Tángá Baroma 12:3.

19. Mpo na nini tosengeli kozala na bopɔlɔ?

19 Moto ya bopɔlɔ ayebi ete kaka Yehova nde abongi na lokumu nyonso, mpamba te azali Mozalisi mpe Oyo-Aleki-Likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Emoniseli 4:11) Soki tozali na bopɔlɔ, tokosepela na makambo nyonso oyo tokoki kosala na mosala ya Yehova. Tokomemya mayoki mpe makanisi ya bandeko mibali mpe basi, mpe yango ekosala ete biso nyonso tózala na bomoko. Moto ya bopɔlɔ akanisaka malamumalamu liboso ya kosala likambo; yango epekisaka ye asalaka mabunga ya minene. Yehova asepelaka mingi na bato ya bopɔlɔ. Yango wana, bopɔlɔ ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Nzambe. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo tokoki kokoba kozala na bopɔlɔ, atako soki ezali mpasi komonisa ezaleli yango.