Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2016

“Tokokende na bino”

“Tokokende na bino”

“Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”ZEKARIA 8:23.

NZEMBO: 65, 122

1, 2. (a) Likambo nini Yehova alobaki ete ekosalema na mikolo na biso? (b) Mituna nini ekozwa biyano na lisolo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

YEHOVA alobaki ete na mikolo na biso, “bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba, ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’” (Zekaria 8:23) Awa, “Moyuda” azali elilingi ya bakristo oyo Nzambe atye mafuta na elimo. Bakristo yango babengami mpe “Yisraele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) “Bato zomi” bazali elilingi ya bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Bayebi ete Yehova apamboli bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bamonaka ete kosambela ye elongo na bango ezali lokumu monene.

2 Ndenge moko na mosakoli Zekaria, Yesu alobaki ete basaleli ya Nzambe bakozala na bomoko. Abengaki baoyo bazali na elikya ya kokende kofanda na likoló “etonga moke” mpe baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele “bampate mosusu.” Kasi Yesu alobaki ete bango nyonso bakozala “etonga kaka moko” mpe bakolanda ye, ‘mobateli na bango kaka moko.’ (Luka 12:32; Yoane 10:16) Lokola bituluku ezali mibale, moto akoki komituna boye: (1) Ezali mpenza na ntina ete bampate  mosusu báyeba bankombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo lelo oyo? (2) Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli komitalela? (3) Soki moto moko na lisangá na biso abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, ndenge nini nasengeli kotalela ye? (4) Nasengeli komitungisa soki namoni ete motángo ya bato oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli ezali kobakisama? Lisolo oyo ekoyanola na mituna wana.

EZALI NA NTINA TÓYEBA BANKOMBO YA BAKRISTO NYONSO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO LELO OYO?

3. Mpo na nini tokoki te koyeba na bosikisiki banani bakozala na molɔngɔ ya bakristo 144 000?

3 Ezali na ntina ete bampate mosusu báyeba bankombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele? Te. Mpo na nini? Mpo tokoki te koyeba na bosikisiki soki bato yango bakozwa mbano na bango. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Atako Nzambe aponi bango mpo bákende likoló, bakozwa mbano na bango kaka soki batikali sembo. Satana ayebi likambo yango, yango wana asalelaka “basakoli ya lokuta” mpo na koluka “kokosa” bango. (Matai 24:24) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoki kondimisama te ete bakozwa mbano na bango tii ntango Yehova akomonisa bango polele ete andimi bango mpo batikali sembo. Yehova atyaka bango elembo ya nsuka, mpo na komonisa ete andimi bango, mwa moke liboso bákufa to akosala yango mwa moke liboso ete “bolɔzi monene” ebanda.Emoniseli 2:10; 7:3, 14.

Yesu nde azali Mokambi na biso, mpe tosengeli kolanda kaka ye

4. Soki likoki ya koyeba bankombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali awa na mabele lelo oyo ezali te, ndenge nini tokoki ‘kokende na’ bango?

4 Soki likoki ya koyeba bankombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali awa na mabele lelo oyo ezali te, ndenge nini bampate mosusu bakoki ‘kokende na bango’? Biblia elobi ete “bato zomi” “bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’” Biblia elobeli Moyuda moko. Kasi, ntango elobi “bino,” ezali kolobela bato ebele. Yango elingi koloba ete Moyuda ezali kaka moto moko te, kasi elilingi ya etuluku mobimba ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bampate mosusu bayebi likambo yango, yango wana basalelaka Yehova elongo na etuluku yango. Bazali na mposa te ya koyeba nkombo ya mokristo mokomoko ya etuluku yango mpe kolanda mokomoko na bango. Yesu nde azali Mokambi na biso, mpe Biblia eyebisi biso ete tosengeli kolanda kaka ye.Matai 23:10.

NDENGE NINI BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BASENGELI KOMITALELA?

5. Likebisi nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kozwa na lisɛki te, mpe mpo na nini?

5 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kozwa na lisɛki te likebisi oyo ezali na 1 Bakorinti 11:27-29. (Tángá.) Ndenge nini mokristo oyo atyami mafuta na elimo akoki kolya limpa mpe komɛla vinyo “na ndenge oyo ebongi te” na Ekaniseli? Soki abateli te boyokani malamu na Yehova mpe azali sembo te epai na ye; na ntango wana,  soki moto yango alei limpa mpe amɛli vinyo, azali komonisa limemya te. (Baebre 6:4-6; 10:26-29) Likebisi wana ya makasi ekundweli bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete basengeli kotikala sembo soki balingi kozwa “libonza ya kokende na likoló ndenge Nzambe abengi [bango] na nzela ya Kristo Yesu.”Bafilipi 3:13-16.

6. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli komitalela?

6 Ntoma Paulo ayebisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo boye: “Ngai moto ya bolɔkɔ mpo na Nkolo, nazali kobondela bino ete bótambolaka na ndenge oyo ebongi na kobengama oyo bobengamaki.” Ndenge nini basengelaki kosala yango? Alimbolaki boye: “Na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto, na motema molai, bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Baefese 4:1-3) Elimo santu ya Yehova esalisaka basaleli na ye bázala na komikitisa, kasi na lolendo te. (Bakolose 3:12) Yango wana, bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli te kokanisa ete bazali bato malamu koleka basusu. Bayebi ete Yehova apesaka te bakristo oyo batyami mafuta na elimo elimo santu mingi koleka basaleli na ye mosusu. Mpe bakanisaka te ete bakoki kokanga ntina ya mateya ya solo ya Biblia malamu koleka moto mosusu nyonso. Bakoki mpe soki moke te koyebisa moto mosusu ete ye mpe azali mokristo oyo atyami mafuta na elimo mpe asengeli kobanda kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli. Bazalaka na komikitisa mpe bayebi ete kaka Yehova nde akoki kobenga bato mpo bákende likoló.

7, 8. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazelaka nini te, mpe mpo na nini?

7 Atako bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonaka ete ezali lokumu koponama mpo na kokende likoló, balingaka ete basusu bátalela bango lokola bato nyonso. (Baefese 1:18, 19; tángá Bafilipi 2:2, 3.) Bayebi mpe ete ntango Yehova atyaki bango mafuta na elimo, ayebisaki ata moto moko te likambo yango. Na yango, mokristo oyo atyami mafuta na elimo akamwaka te soki bato mosusu bandimi mbala moko te ete atyami mafuta na elimo. Ayebi ete Biblia eyebisi biso tóndima mbala moko te moto oyo alobi ete Nzambe apesi ye mokumba moko monene. (Emoniseli 2:2) Lokola mokristo oyo atyami mafuta na elimo azelaka te ete basusu bátyela ye likebi mingi, ayebisaka te bato oyo akutani na bango mpo na mbala ya liboso ete atyami mafuta na elimo. Kutu, mbala mosusu akoki ata koyebisa yango moto moko te. Akomikumisa mpe te mpo na makambo ya kokamwa oyo akosala na likoló.1 Bakorinti 1:28, 29; tángá 1 Bakorinti 4:6-8.

8 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonaka te ete basengeli kolekisa ntango kaka na bandeko mosusu oyo batyami mafuta na elimo, lokola nde bazali bato ya ekipi to etuluku moko boye. Balukaka te bandeko mosusu oyo batyami mafuta na elimo mpo bálobela kotyama mafuta na elimo to mpo básala bituluku mpo na koyekola Biblia. (Bagalatia 1:15-17) Lisangá elingaki kozala na bomoko te soki bakristo oyo batyami mafuta na elimo básalaka bongo. Soki básalaka bongo, balingaki kotɛmɛla elimo santu, oyo esalisaka basaleli ya Nzambe bázala na kimya mpe na bomoko.Tángá Baroma 16:17, 18.

NDENGE NINI OSENGELI KOTALELA BANGO?

9. Mpo na nini tosengeli kokeba na ndenge oyo totalelaka baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli? (Talá etanda “Bolingo ‘esalaka makambo ya nsɔni te.’”)

9 Ndenge nini osengeli kotalela bandeko mibali mpe basi oyo batyami mafuta na elimo?  Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” Abakisaki boye: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.” (Matai 23:8-12) Na yango, ezali malamu te kopesa moto lokumu mingi koleka, ata soki azali ndeko ya Kristo oyo atyami mafuta na elimo. Ntango Biblia elobelaka bankulutu, elendisaka biso tómekola kondima na bango, kasi eyebisi biso te ete tokoki kokómisa moto moko mokambi na biso. (Baebre 13:7) Ya solo, Biblia elobi ete bato mosusu “babongi na lokumu mbala mibale.” Kasi, yango ezali mpo “bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza” mpe “bazali kosala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.” (1 Timote 5:17) Soki tozali kokumisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mingi mpe tozali kotyela bango likebi mingi koleka, tokoki koyokisa bango nsɔni. To oyo eleki mabe tokoki kotinda bango bákóma na lolendo. (Baroma 12:3) Moko te kati na biso akolinga kosala likambo moko oyo ekotinda ndeko ya Kristo moko oyo atyami mafuta na elimo asala libunga monene ndenge wana!Luka 17:2.

Ndenge nini osengeli kotalela moto oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo na Ekaniseli? (Talá paragrafe 9-11)

10. Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

10 Ndenge nini tokoki komonisa ete tomemyaka bakristo oyo Yehova atye mafuta na elimo? Tosengeli te kotuna bango ndenge nini batyamaki mafuta na elimo. Wana ezali likambo oyo etali kaka bango moko, oyo tozali na lotomo ya koyeba yango te. (1 Batesaloniki 4:11; 2 Batesaloniki 3:11) Tosengeli mpe te kokanisa ete mibali na bango to basi na bango, baboti na bango, to bandeko na bango mosusu ya libota bazali mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Elikya ya kokende likoló eutaka na libota te. (1 Batesaloniki 2:12) Tosengeli mpe koboya kotuna mituna oyo ekoki koyokisa basusu mpasi na motema. Na ndakisa, tosengeli te kotuna ndeko mwasi oyo mobali na ye atyami mafuta na elimo soki ayokaka ndenge nini na likambo etali kozala na bomoi ya seko awa na mabele kozanga mobali na ye. Kutu, tokoki mpenza kondimisama ete na mokili ya sika, Yehova akokokisa “mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.”Nzembo 145:16.

11. Na ndenge nini koboya “kokumisa bato” ebatelaka biso?

11 Koboya kotalela bakristo oyo batyami mafuta na elimo lokola nde baleki basusu, ezali mpe libateli mpo na biso moko. Na ndenge nini? Biblia eyebisi biso ete ekozala na “bandeko ya lokuta” na lisangá baoyo bakoki kutu koloba ete bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Bagalatia 2:4, 5; 1 Yoane 2:19) Lisusu, bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakoki kotikala sembo te. (Matai 25:10-12; 2 Petro 2:20, 21) Kasi soki ‘tokumisaka bato’ te, tokolanda bato ata moke te, ezala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to bandeko oyo bayebani mingi to bandeko oyo basaleli Yehova bambula mingi. Na nsima, soki batikali sembo te to batiki lisangá, tokobungisa te kondima na biso epai ya Yehova to tokotika kosalela ye te.Yuda 16.

TOSENGELI KOMITUNGISA MPO NA MOTÁNGO NA BANGO?

12, 13. Mpo na nini tosengeli komitungisa te mpo na motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli?

12 Na boumela ya bambula mingi, motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli ezalaki se kokita. Kasi banda bambula euti koleka, motángo yango ekómi nde komata mbula na mbula. Tosengeli komitungisa mpo na likambo yango? Te. Mpo na nini?

13 “Yehova ayebi bato na ye.” (2 Timote 2:19) Na kokesana na Yehova, bandeko  mibali oyo batángaka motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo bayebaka te nani azali mokristo ya solosolo oyo atyami mafuta na elimo. Na yango, na motángo wana, ezalaka mpe na baoyo bakanisaka ete bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo, nzokande bazali te. Na ndakisa, bandeko mosusu oyo bamesanaki kolya limpa mpe komɛla vinyo batikaki kolya mpe komɛla yango. Basusu bakoki kozala na maladi ya motó to ya makanisi to mpe ya mayoki mpe kokanisa ete bakoyangela elongo na Kristo na likoló. Mpo na koloba solo, toyebi te soki bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele bazali boni.

14. Biblia elobi nini mpo na motángo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala na mabele ntango bolɔzi monene ekobanda?

14 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala na bisika mingi na mabele ntango Yesu akoya kozwa bango mpo na komema bango na likoló. Biblia elobi ete Yesu “akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo, mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá esika moko uta na mipɛpɛ minei, uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.” (Matai 24:31) Biblia emonisi mpe ete na boumeli ya mikolo ya nsuka, motángo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala naino awa na mabele ekozala moke. (Emoniseli 12:17) Kasi elobi te soki motángo na bango ekozala boni ntango bolɔzi monene ekobanda.

15, 16. Makambo nini tosengeli koyeba mpo tókanga ntina na oyo etali bato 144 000 oyo Yehova aponi?

15 Yehova ayebi ntango oyo aponaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Baroma 8:28-30) Yehova abandaki kopona bakristo oyo batyami mafuta na elimo  nsima ya lisekwa ya Yesu. Emonani ete na siɛklɛ ya liboso, bakristo nyonso ya solo batyamaki mafuta na elimo. Na boumeli ya bankama ya bambula na nsima, mingi ya baoyo bazalaki koloba ete bazali bakristo bazalaki mpenza kolanda Kristo te. Atako bongo, na boumeli ya bambula yango, Yehova atyaki mwa ndambo ya bato oyo bazalaki bakristo ya solo mafuta na elimo. Bazalaki lokola ble oyo Yesu alobaki ete ekokola elongo na matiti mabe. (Matai 13:24-30) Na boumeli ya mikolo ya nsuka, Yehova azali kokoba kopona bato oyo bakozala na kati ya bato 144 000. [2] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na yango, soki Nzambe amoni malamu apona ndambo na bango mwa moke liboso nsuka eya, tokoki kotya ntembe te ete azali kosala likambo oyo ebongi. (Yisaya 45:9; Danyele 4:35; tángá Baroma 9:11, 16.) [3] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Tosengeli kokeba ete tósala te lokola basali oyo baimaimaki mpo na ndenge oyo nkolo na bango asalelaki baoyo babandaki mosala na ngonga ya nsuka.Tángá Matai 20:8-15.

16 Baoyo nyonso bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló bazali te na kati ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Lokola na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe Yehova ná Yesu bazali kosalela mwa bato moke mpo na koleisa na elimo to koteya bato ebele. Kaka bakristo moke oyo batyamaki mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso nde bakomaki Makomami ya Grɛki ya bokristo. Lelo oyo mpe, kaka mwa ndambo ya bandeko oyo batyami mafuta na elimo nde bazali na mokumba ya kopesa basaleli ya Nzambe ‘bilei na ntango oyo ebongi.’

17. Oyekoli nini na lisolo oyo?

17 Toyekoli nini na lisolo oyo? Yehova azwá ekateli ya kopesa ebele ya bato bomoi ya seko awa na mabele mpe kopesa bato oyo bakoyangela elongo na Yesu bomoi na likoló. Yehova apesaka mbano na basaleli na ye nyonso, “Moyuda” mpe “bato zomi,” mpe asɛngi bango bátosa mibeko kaka moko mpe bátikala sembo. Biso nyonso tosengeli kozala na komikitisa. Biso nyonso tosengeli kosalela ye elongo mpe kozala na bomoko. Mpe biso nyonso tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela kimya na lisangá. Lokola nsuka ezali se kokóma pene, biso nyonso tókoba kosalela Yehova mpe kolanda Kristo lokola etongá moko.

^ [1] (paragrafe 3) Na kotalela Nzembo 87:5, 6, na mikolo ezali koya, mbala mosusu Yehova akoyebisa bankombo ya bato nyonso oyo bazali koyangela elongo na Yesu na likoló.Baroma 8:19.

^ [2] (paragrafe 15) Atako Misala 2:33 emonisi ete Yesu asopaka elimo santu likoló ya moto oyo atyami mafuta na elimo, Yehova nde aponaka moto yango.

^ [3] (paragrafe 15) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2007, nkasa 30-31.