Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2016

‘Likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ ememisi yo mokumba

‘Likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ ememisi yo mokumba

“Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.”2 BAKORINTI 9:15.

NZEMBO: 121, 63

1, 2. (a) ‘Likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ etaleli mpe nini? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

YEHOVA apesaki biso likabo eleki monene ya bolingo ntango atindaki Yesu, Mwana na ye ya bolingo, awa na mabele! (Yoane 3:16; 1 Yoane 4:9, 10) Ntoma Paulo abengaki likabo yango ‘likabo ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.’ (2 Bakorinti 9:15) Mpo na nini ntoma Paulo asalelaki maloba wana?

2 Ntoma Paulo ayebaki ete mbeka ya Yesu ezali ndanga ete bilaka nyonso oyo Nzambe apesá ekokokisama. (Tángá 2 Bakorinti 1:20.) Yango elimboli ete ‘likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ etali mpe mbeka ya Yesu mpe bolamu nyonso mpe bolingo ya sembo oyo Yehova amoniselaka biso. Likabo ya motuya ndenge wana ekoki kolimbolama te na ndenge oyo tokoki kokanga ntina na yango nyonso. Tomiyokaka ndenge nini mpo na likabo wana oyo eleki monene? Mpe ndenge nini likabo yango esengeli kolendisa biso lokola tozali komibongisa mpo na Ekaniseli ya liwa ya Kristo, oyo ekosalema mokolo ya misato 23/03/2016?

 LIKABO YA NZAMBE OYO ELEKI MONENE

3, 4. (a) Oyokaka ndenge nini soki moto moko akabeli yo eloko? (b) Ndenge nini likabo moko monene ekoki kobongola bomoi na yo?

3 Tosepelaka mingi soki moto moko akabeli biso eloko. Kasi, makabo mosusu ezalaka ya ntina mingi, mpe ekoki kobongola bomoi na biso. Na ndakisa, kanisá ete osali mbeba moko monene. Mpo na mbeba yango, bakateli yo etumbu ya liwa. Kasi na mbalakaka, moto moko oyo oyebi te abimi mpe asɛngi ete bápesa ye etumbu na esika na yo. Andimi kokufa mpo na yo! Okoyoka ndenge nini mpo na likabo monene ndenge wana?

4 Likabo monene mpe ya bolingo ndenge wana ekotinda yo obongola bomoi na yo. Na ntembe te, ekotinda yo mpe okóma kokaba mingi, olinga basusu, mpe olimbisa moto nyonso oyo asalelaki yo makambo na boboto te. Na bomoi na yo mobimba, okolinga komonisa ete ozali na botɔndi mpo na likabo oyo epesamaki.

5. Na ndenge nini likabo ya lisiko oyo Nzambe apesaki eleki mosika makabo mosusu nyonso?

5 Likabo ya lisiko oyo Nzambe apesá eleki mosika likabo ya ndakisa oyo touti kopesa. (1 Petro 3:18) Kanisá naino: Biso nyonso tosangolá lisumu epai ya Adama, mpe etumbu ya lisumu ezali liwa. (Baroma 5:12) Bolingo etindaki Yehova atinda Yesu awa na mabele mpo akufa mpo na bato nyonso; “akufela moto nyonso.” (Baebre 2:9) Kasi mbeka ya Yesu ekosala makambo mosusu mingi! Ekolongola liwa mpo na libela. (Yisaya 25:7, 8; 1 Bakorinti 15:22, 26) Bato nyonso oyo bazali kondimela Yesu bakozala na bomoi ya kimya mpe ya esengo libela na libela, basusu bakozala bakonzi elongo na Kristo na likoló, mpe basusu bakofanda awa na mabele na nse ya Bokonzi ya Nzambe. (Baroma 6:23; Emoniseli 5:9, 10) Mapamboli nini mosusu likabo ya Yehova ekomemela bato?

6. (a) Mapamboli nini likabo ya Yehova ekomemela bato ozali kozela na mposa makasi? (b) Makambo nini misato likabo ya Nzambe esengeli kotinda biso tósala?

6 Likabo ya Nzambe ekosala ete mabele mobimba ekóma paradiso, bato ya maladi bábikisama, mpe bakufi básekwa. (Yisaya 33:24; 35:5, 6; Yoane 5:28, 29) Tolingaka Yehova mpe Mwana na ye ya bolingo ndenge bapesá biso ‘likabo wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.’ Likabo yango esengeli kotinda biso tósala nini? Esengeli kotinda biso (1) tómekola Kristo Yesu malamumalamu, (2) tólinga bandeko na biso, mpe (3) tólimbisaka basusu na motema moko.

“BOLINGO OYO KRISTO AZALI NA YANGO EMEMISI BISO MOKUMBA”

7, 8. Tosengeli koyoka ndenge nini mpo na bolingo ya Kristo, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?

7 Ya liboso, tosengeli kosalela bomoi na biso mpo na kokumisa Yesu. Ntoma Paulo alobaki: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.” (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Ntoma Paulo ayebaki ete soki tondimi bolingo monene oyo Yesu amonisaki, ekomemisa biso mokumba to ekotinda biso tólinga Yesu mpe tókumisa ye. Ya solo, soki tokangi mpenza ntina ya likambo oyo Yehova asalá mpo na biso, bolingo na ye ekotinda biso tózala na bomoi oyo emonisi ete tokumisaka Yesu. Ndenge nini tokoki kosala yango?

8 Bolingo oyo tolingaka Yehova ekotinda biso tólanda ndakisa ya Yesu, tólanda matambe na ye malamumalamu. (1 Petro 2:21; 1 Yoane 2:6) Tokomonisa ete tolingaka Nzambe mpe Yesu soki tozali kotosa bango. Yesu alobaki: “Moto oyo azali na mitindo  na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomilakisa epai na ye polelepolele.”Yoane 14:21; 1 Yoane 5:3.

9. Tokoki kokóma na mposa ya komekola banani?

9 Na eleko oyo ya Ekaniseli, ezali malamu kokanisa na ndenge oyo tozali kosalela bomoi na biso. Na yango, omituna boye: ‘Na makambo nini namekolaka Yesu? Makambo nini nasengeli kobongisa?’ Ezali na ntina mingi komituna mituna wana, mpamba te mokili elingaka tózala na bomoi lokola bato nyonso. (Baroma 12:2) Soki tokebi te, tokoki koyoka mposa ya komekola bateyi ya mokili, bato minene oyo bakendá nsango, mpe bato ya masano oyo bayebani. (Bakolose 2:8; 1 Yoane 2:15-17) Tosengeli kosala nini mpo tómekola bato ya ndenge wana te?

10. Mituna nini tokoki komituna na eleko ya Ekaniseli, mpe biyano na yango ekoki kotinda biso tósala nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Na eleko ya Ekaniseli, ezali malamu kozwa ntango ya kotalela bilamba na biso, bafilme, miziki, mpe makambo oyo ezali na kati ya ordinatɛrɛ na biso, na telefone to tablɛti na biso. Omituna boye: ‘Soki Yesu azalaki awa mpe amoni elamba oyo nalati, nakoyoka nsɔni?’ (Tángá 1 Timote 2:9, 10.) ‘Bilamba na ngai emonisaka ete nazali moyekoli ya Kristo? Yesu akosepela kotala bafilme oyo natalaka? Akoki koyoka miziki oyo nayokaka? Soki Yesu azwi telefone na ngai to tablɛti na ngai, nakoyoka nsɔni mpo na makambo oyo akomona na kati? Nakozala na mokakatano ya kolimbolela Yesu mpo na nini nasepelaka na masano ya video oyo nabɛtaka?’ Bolingo oyo tolingaka Yehova esengeli kotinda biso tóbwaka eloko nyonso oyo ebongi te mpo na bakristo, ata soki ezali na ntalo nini. (Misala 19:19, 20) Ntango tomipesaki epai ya Yehova, tolakaki ye ete tokosalela bomoi na biso mpo na kokumisa Kristo. Na yango, tosengeli te kobatela eloko nyonso oyo ekoki kopekisa biso tómekola Yesu.Matai 5:29, 30; Bafilipi 4:8.

11. (a) Ndenge nini bolingo oyo tolingaka Yehova mpe Yesu elendisaka biso na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini bolingo etindaka biso tósalisa basusu na kati ya lisangá?

11 Bolingo oyo tolingaka Yesu etindaka biso tósakola mpe tóteya na molende. (Matai 28:19, 20; Luka 4:43) Na eleko ya Ekaniseli, okoki kobongisa programɛ na yo mpo ozala mobongisi-nzela mosungi mpe osala ngonga 30 to 50 na mosala ya kosakola? Ndeko mobali moko ya mbula 84 oyo mwasi na ye akufá azalaki kokoka te kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mpo akómaki mobange mpe nzoto ezalaki kotungisa ye mingi. Kasi babongisi-nzela na teritware wana basalisaki ye. Balukaki motuka mpo na komemaka ye mpe baponelaki ye teritware oyo ebongi na ye. Yango esalaki ete ndeko yango akokisa mokano na ye ya ngonga 30. Okoki kosalisa ndeko moko na lisangá na bino mpo azala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya misato to ya minei? Ezali solo ete bandeko nyonso bakoki kozala babongisi-nzela te, kasi tokoki kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Soki tosali bongo, lokola ntoma Paulo, tokomonisa ete bolingo oyo Yesu alingaki biso ezali kotinda biso tósala eloko moko. Likambo nini mosusu bolingo ya Nzambe etindaka biso tósala?

TOSENGELI KOLINGANA

12. Bolingo oyo tolingaka Nzambe etindaka biso tósala nini?

12 Ya mibale, bolingo oyo tolingaka Nzambe esengeli kotinda biso tólinga bandeko na biso. Ntoma Yoane akomaki: “Bandeko ya bolingo, soki ezali ndenge wana  nde Nzambe alingaki biso, biso moko mpe tosengeli kolingana.” (1 Yoane 4:7-11) Na yango, soki tondimi bolingo ya Nzambe, tosengeli kolinga bandeko na biso. (1 Yoane 3:16) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bango?

13. Ndakisa nini Yesu atikaki na oyo etali kolinga basusu?

13 Ndakisa ya Yesu emonisi biso ndenge oyo tokoki kolinga basusu. Ntango azalaki awa na mabele, asalisaki bato, mingimingi bato ya komikitisa. Abikisaki bato ya maladi, batɛngumi, bato bakufá miso, bakufá matoi, mpe bato oyo balobaka te. (Matai 11:4, 5) Na kokesana na bakonzi ya mangomba, Yesu azalaki kosepela koteya bato oyo bazalaki na mposa ya koyekola makambo ya Nzambe. (Yoane 7:49) Azalaki kolinga bato wana ya komikitisa mpe asalaki nyonso mpo na kosalisa bango.Matai 20:28.

Okoki kosalisa ndeko moko ya mobange na mosala ya kosakola? (Talá paragrafe 14)

14. Nini okoki kosala mpo na komonisa ete olingaka bandeko?

14 Eleko ya Ekaniseli ezali mpe ntango malamu ya kokanisa ndenge oyo okoki kosalisa bandeko mibali mpe basi na lisangá na bino, mingimingi mibange. Okoki kokende kotala bango na ndako? Okoki komemela bango biloko ya kolya, kosalisa bango na misala ya ndako, komema bango na makita, mpe kobima elongo na bango na mosala ya kosakola? (Tángá Luka 14:12-14.) Tiká ete bolingo oyo olingaka Nzambe elendisa yo omonisa ete olingaka bandeko!

TÓMONISELA BANDEKO MOTEMA MAWA

15. Nini tosengeli kobosana te?

15 Ya misato, bolingo ya Yehova etindaka biso tólimbisa bandeko na biso. Biso nyonso tosangolá lisumu mpe liwa epai ya Adama, yango wana, moto moko te akoki koloba: “Nazali na mposa ya lisiko te.” Ata mosaleli ya Nzambe oyo aleki sembo azali na mposa ya lisiko, oyo ezali likabo. Mokomoko na biso alimbisamaki na nyongo moko monene! Mpo na nini ezali na ntina tóbosana yango te? Tokozwa eyano na ndakisa moko oyo Yesu apesaki.

16, 17. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mokonzi mpe baombo? (b) Nsima ya kokanisa na ndakisa wana ya Yesu, ekateli nini ozwi?

16 Yesu apesaki ndakisa ya mokonzi moko oyo alimbisaki moombo na ye nyongo monene ya denari 60 000 000. Kasi na nsima, moombo yango aboyaki kolimbisa moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya denari 100 mpamba. Motema mawa oyo mokonzi yango amoniselaki moombo wana esengelaki kotinda moombo yango alimbisa moninga na ye moombo. Mokonzi asilikaki ntango ayokaki ete moombo na ye alimbisaki te moto oyo azalaki na nyongo na ye ya moke. Alobaki boye: “Moombo mabe, nalimbisaki nyongo na yo nyonso, ntango obondelaki ngai. Yo mpe osengelaki te koyokela moninga na yo moombo mawa, ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa?” (Matai 18:23-35) Lokola mokonzi wana, Yehova alimbisá biso nyongo moko monene. Bolingo ya Yehova mpe motema mawa na ye esengeli kotinda biso tósala nini?

 17 Lokola tozali komibongisa mpo na Ekaniseli, tokoki komituna boye: ‘Ndeko moko azokisaki ngai? Nazali na mokakatano ya kolimbisa ye?’ Soki ezali bongo, sikoyo nde ntango ya komekola Yehova, oyo ‘asepelaka kolimbisa.’ (Nehemia 9:17; Nzembo 86:5) Soki tozali na botɔndi mpo na mawa monene ya Yehova, tokoyokela basusu mawa mpe tokolimbisa bango na motema moko. Soki tolingaka bandeko te mpe tolimbisaka bango te, tokoki kotya motema te ete Yehova akolinga biso mpe akolimbisa biso. (Matai 6:14, 15) Ntango tolimbisi basusu, yango elimboli te ete tokoyoka lisusu mpasi te na likambo oyo basalaki biso, kasi yango ekosalisa biso tózala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya.

18. Ndenge nini bolingo ya Nzambe esalisaki ndeko mwasi moko akanga motema na kozanga kokoka ya ndeko mwasi mosusu?

18 Ekoki kozala mpasi kokanga motema na kozanga kokoka ya bandeko na biso. (Tángá Baefese 4:32; Bakolose 3:13, 14.) Kasi ndeko mwasi moko na nkombo Lily [1] asalaki yango. (Talá maloba na nse ya lokasa.) Asalisaki Carol, ndeko mwasi moko oyo mobali na ye akufá. Na ndakisa, azalaki komema Carol na motuka esika nyonso oyo alingi kokende, kosalisa ye na kosomba biloko, mpe kosalela ye makambo mosusu mingi. Atako Lily azalaki kosala nyonso wana, Carol azalaki kaka koloba mabe mpo na ye, mpe ntango mosusu ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosalisa ye. Kasi Lily atyaki likebi nde na bizaleli malamu ya Carol mpe asalisaki ye bambula mingi tii ntango Carol abɛlaki makasi mpe akufaki. Atako kosalisa Carol ezalaki mpasi mpo na Lily, alobi boye: “Nazali kozela na mposa makasi komona Carol ntango akosekwa. Nalingi koyeba ye malamu ntango akokóma moto ya kokoka.” Tomoni polele ete bolingo ya Nzambe ekoki kotinda biso tókanga motema na kozanga kokoka ya bandeko na biso mpe tózela ntango oyo kozanga kokoka ekozala lisusu te.

19. ‘Likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ ekotinda biso tósala nini?

19 Ya solo, Yehova apesá biso ‘likabo ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.’ Tosengeli ntango nyonso komonisa botɔndi mpo na yango! Eleko ya Ekaniseli ezali ntango malamu ya kokanisa nyonso oyo Yehova ná Yesu basalelá biso. Tiká ete bolingo na bango etinda biso tómekola Yesu malamumalamu, tómonisa ete tozali kolinga bandeko na biso, mpe tólimbisa bandeko na biso na motema moko.

^ [1] (paragrafe 18) Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.