Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2016

Elimo etatolaka elongo na elimo na biso

Elimo etatolaka elongo na elimo na biso

“Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.”BAROMA 8:16.

NZEMBO: 109, 108

1-3. Nini esalaki ete Pantekote ezala mokolo monene, mpe ndenge nini makambo yango ekokisaki esakweli moko ya Makomami? (Talá elilingi ya ebandeli.)

TOZALI mokolo ya lomingo na ntɔngɔ na Yerusaleme. Ezali mokolo moko monene mpe ya esengo. Bato bazali kosala fɛti ya Pantekote, fɛti moko mosantu oyo esalemaka na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma ya blé. Na ntɔngɔ, na tempelo, nganga-nzambe monene apesi mbeka oyo apesaka mbala na mbala. Na nsima, pene na ngonga ya libwa, apesi mampa mibale oyo batyá levire, oyo esalemi na farini ya blé ya malamu, to mbuma ya liboso ya eleko ya kobuka mbuma. Aningisi mampa yango epai na epai mpo na kolakisa yango epai ya Yehova. Ezali mokolo ya Pantekote ya mobu 33.Balevi 23:15-20.

2 Mbula na mbula, banda bankama ya bambula, nganga-nzambe monene apesaka likabo ya koningisa. Likabo yango ezalaki na boyokani na likambo moko ya ntina mingi oyo esalemaki na Pantekote ya mobu 33. Mpe esalemaki na bayekoli ya Yesu 120 oyo bazalaki kosambela na shambre moko ya likoló na Yerusaleme. (Misala 1:13-15) Mbula nkama mwambe  liboso, mosakoli Yoele asakolaki mpo na likambo yango. (Yoele 2:28-32; Misala 2:16-21) Likambo nini ya ntina mingi esalemaki?

3 Tángá Misala 2:2-4. Na Pantekote ya mobu 33, Nzambe apesaki bakristo wana elimo santu na ye, mpe atyaki bango mafuta na elimo. (Misala 1:8) Na nsima, ebele ya bato babandaki koyangana zingazinga na bango, mpe bayekoli yango babandaki koloba makambo kitoko oyo bamonaki mpe bayokaki. Ntoma Petro alimbolaki likambo oyo eutaki kosalema mpe mpo na nini ezalaki na ntina mingi. Na nsima, ayebisaki bango boye: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Kristo mpo masumu na bino elimbisama, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” Mokolo yango, bato soki 3 000 bazwaki batisimo; bango mpe bazwaki elimo santu.Misala 2:37, 38, 41.

4. (a) Mpo na nini tosengeli koluka koyeba makambo oyo esalemaki na Pantekote? (b) Likambo nini mosusu ya ntina esalemaki na mokolo yango bambula mingi liboso? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

4 Nganga-nzambe monene mpe likabo oyo azalaki kopesa na Pantekote nyonso ezalaki elilingi ya nini? Nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya Yesu. Mampa ezalaki elilingi ya bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo. Bayekoli wana baponamaki na kati ya bato ya masumu mpe babengami “mbuma ya liboso.” (Yakobo 1:18) Nzambe andimaki bango lokola bana na ye mpe aponaki bango mpo báyangela elongo na Yesu na likoló, na Bokonzi ya Nzambe. (1 Petro 2:9) Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kopambola bato nyonso ya botosi. Na yango, ezala tozali na elikya ya bomoi ya seko na likoló elongo na Yesu to na paradiso awa na mabele, Pantekote ya mobu 33 ezali na ntina mingi mpo na biso. [1] —Talá maloba na nse ya lokasa.

NINI ESALEMAKA NTANGO MOTO ATYAMI MAFUTA NA ELIMO?

5. Ndenge nini toyebi ete bato nyonso batyamaka mafuta na elimo ndenge moko te?

5 Bayekoli oyo bazalaki na shambre ya likoló bakokaki kobosana mokolo wana ata moke te. Mokomoko na bango azalaki na eloko moko lokola mɔtɔ na motó na ye. Yehova apesaki bango likoki ya koloba na minɔkɔ ya bapaya. Bazalaki na ntembe ata moke te ete batyami mafuta na elimo santu. (Misala 2:6-12) Kasi makambo wana ya kokamwa esalemaka te epai ya bakristo nyonso oyo batyamaka mafuta na elimo. Na ndakisa, Biblia elobi te ete eloko moko lokola mɔtɔ emonanaki na mitó ya bankóto ya bato oyo batyamaki mafuta na elimo na Yerusaleme nsima ya mokolo ya Pantekote. Batyamaki mafuta na elimo ntango bazwaki batisimo. (Misala 2:38) Lisusu, bango nyonso te nde batyamaka mafuta na elimo ntango bazwi batisimo. Basamaria batyamaki mafuta na elimo mwa moke nsima ya batisimo na bango. (Misala 8:14-17) Mpe atako esalemaka mpenza bongo te, Korneyi ná bato ya ndako na ye batyamaki mafuta na elimo liboso ete bázwa batisimo.Misala 10:44-48.

6. Bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo bazwaka nini, mpe yango etindaka bango bámiyoka ndenge nini?

6 Tomoni polele ete bakristo bayebaka ete batyami mafuta na elimo na ndenge ekeseni. Basusu bakoki koyeba mbala moko ete Yehova atye bango mafuta na elimo. Nzokande basusu bayebaka yango nsima ya mwa ntango. Kasi ntoma Paulo  alimboli oyo esalemaka epai ya mokomoko na bango. Alobi boye: “Nsima ya kondima, botyamaki elembo na elimo santu oyo elakamaki, oyo ezali ndanga ya libula na biso.” (Baefese 1:13, 14) Na yango, Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na komonisa bakristo yango polele ete baponami mpo na kokende likoló. Na ndenge yango, elimo santu “ezali ndanga,” to elembo oyo endimisi bango ete bakozala na bomoi ya seko na likoló kasi te awa na mabele.Tángá 2 Bakorinti 1:21, 22; 5:5.

Mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo asengeli kotika nzela te ete eloko moko epekisa ye kosalela Yehova

7. Mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo asengeli kosala nini mpo na kozwa mbano na ye na likoló?

7 Soki mokristo atyami mafuta na elimo, yango elimboli nde ete akozwa mbano na ye ata soki asali nini? Te. Andimisami ete abengami mpo na kokende likoló. Kasi akozwa mbano yango kaka soki atikali sembo epai ya Yehova. Ntoma Petro alimboli yango boye: “Yango wana, bandeko, bósala nyonso oyo ekoki na bino mingi lisusu mpo bóbatela kobengama na bino mpe koponama na bino; mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te. Ɛɛ, ndenge wana nde bakopesa bino mpenza nzela ya kokɔta na bokonzi ya seko ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.” (2 Petro 1:10, 11) Na yango, mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo asengeli kotika nzela te ete eloko moko epekisa ye kosalela Yehova. Atako abengami mpo na kokende likoló, soki atikali sembo te, akozwa mbano na ye te.Baebre 3:1; Emoniseli 2:10.

NDENGE NINI MOTO AYEBAKA?

8, 9. (a) Mpo na nini ezalaka mpasi ete bato mingi báyeba oyo esalemaka ntango moto atyami mafuta na elimo? (b) Ndenge nini moto ayebaka ete abengami mpo na kokende likoló?

8 Mpo na basaleli ya Nzambe mingi lelo oyo, ekoki kozala mpasi koyeba malamu nini esalemaka ntango Nzambe atye moto mafuta na elimo. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpo bango batyamá mafuta na elimo te. Nzambe akelaki bato mpo báfanda libela na mabele, kasi na likoló te. (Ebandeli 1:28; Nzembo 37:29) Kasi Yehova aponi bato mosusu mpo bázala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. Na yango, ntango atyaka bango mafuta na elimo, elikya na bango mpe ndenge na bango ya kokanisa ebongwanaka, mpo bákóma na mposa makasi ya bomoi na likoló.Tángá Baefese 1:18.

9 Kasi ndenge nini moto, azala mobali to mwasi, ayebaka ete abengami mpo na kokende likoló? Yoká oyo ntoma Paulo alobaki na bandeko ya Roma oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo ‘babengamaki mpo bázala basantu.’ Ayebisaki bango boye: “Bozwaki elimo ya boombo te oyo ezali kopesa lisusu kobanga, kasi bozwaki nde elimo oyo esali ete Nzambe akamata bino mpe akómisa bino bana na ye, oyo na nzela na yango tobelelaka ete: ‘Aba, Tata!’ Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.” (Baroma 1:7; 8:15, 16) Na nzela  ya elimo santu na ye, Nzambe amonisaka moto polele ete abengami mpo na koyangela lokola mokonzi na likoló elongo na Yesu.1 Batesaloniki 2:12.

10. 1 Yoane 2:27 elobi ete mokristo oyo atyami mafuta na elimo azali na mposa te ete moto moko ateyaka ye, yango elimboli nini?

10 Bato oyo bazwi libyangi yango epai ya Nzambe bazali na mposa te ete moto moko ayebisa bango ete batyami mafuta na elimo. Yehova asalaka ete bámiyoka ete abengi bango. Ntoma Yoane ayebisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Botyami mafuta na mosantu; bino nyonso bozali na boyebi.” Alobi mpe ete: “Nde bino, mafuta oyo ye atyaki bino efandi na kati na bino, mpe bozali na mposa te ete moto moko ateyaka bino; kasi, lokola mafuta oyo ye atyaki ezali koteya bino na makambo nyonso, mpe ezali solo mpe ezali lokuta te, mpe ndenge kaka eteyi bino, bótikala na bomoko elongo na ye.” (1 Yoane 2:20, 27) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na mposa ya koteyama na Yehova kaka lokola bato mosusu nyonso. Kasi bazali na mposa te ete moto moko aloba lisusu ete batyami mafuta na elimo. Yehova asalelaki elimo santu, nguya oyo eleki makasi, mpo na komonisa bango polele mpenza ete batyami mafuta na elimo!

‘BABOTAMAKA LISUSU’

11, 12. Mokristo oyo atyami mafuta na elimo akoki komituna nini, kasi na likambo nini atyaka ntembe te?

11 Ntango bakristo batyamaka mafuta na elimo santu, babongwanaka mpenza. Kutu, Yesu alobaki ete ‘babotamaka lisusu.’ (Yoane 3:3, 5) Na nsima, alimbolaki boye: “Kokamwa te mpo nayebisi yo ete: Bosengeli kobotama lisusu. Mopɛpɛ epɛpaka epai yango elingi, mpe oyokaka makɛlɛlɛ na yango, kasi oyebaka te epai yango euti mpe epai yango ezali kokende. Moto nyonso oyo abotami na elimo azali mpe bongo.” (Yoane 3:7, 8) Ya solo, ezali mpasi kolimbola polele ndenge moto oyo atyami mafuta na elimo amiyokaka epai ya moto oyo atyami mafuta na elimo te. [2]—Talá maloba na nse ya lokasa.

Moto oyo atyami mafuta na elimo atyaka ntembe te ete Yehova aponi ye

12 Moto oyo atyami mafuta na elimo akoki komituna boye: ‘Mpo na nini Yehova aponi ngai na esika ya kopona moto mosusu?’ Akoki ata komituna soki abongi mpenza na mokumba yango. Kasi atyaka ntembe te ete Yehova aponi ye. Ayokaka nde esengo makasi mpe azalaka na botɔndi mingi mpo na likabo wana. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayokaka lokola ntoma Petro ntango alobaki ete: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama, mpo na motema mawa na ye monene abotaki biso lisusu mpo na elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo uta na bakufi, mpo na libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te. Ebombami mpo na bino na likoló.” (1 Petro 1:3, 4) Ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo batángaka maloba wana, bayebaka kozanga ntembe ete Tata na bango azali koloba na mokomoko na bango.

13. Ndenge nini lolenge ya kokanisa ya moto ebongwanaka ntango atyami mafuta na elimo, mpe nini esalaka bongo?

 13 Liboso ete Yehova abenga bakristo yango mpo bákende likoló, bazalaki na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele. Bazalaki kozela na mposa makasi ntango oyo Yehova akokómisa mabele paradiso mpe akolongola mabe nyonso. Mbala mosusu bazalaki kokanisa ndenge bakoyamba bato ya libota na bango to baninga na bango oyo bakufá ntango bakosekwa. Mpe bazalaki kozela ntango oyo bakotonga bandako mpe bakofanda kuna to bakolona banzete mpe bakolya mbuma na yango. (Yisaya 65:21-23) Kasi mpo na nini babongolaki makanisi? Babongolaki nde makanisi mpo batungisamaki na makanisi to banyokwamaki mingi? Bazwaki nde ekateli ya mbalakaka ete kozala na bomoi ya seko awa na mabele ekolɛmbisa mpe bakozala na esengo te awa na mabele? To bazalaki nde na mposa ya koyeba soki bomoi ezalaka ndenge nini kuna na likoló? Te. Nzambe nde aponaki bango. Ntango aponaki bango, asalelaki elimo santu na ye mpo na kobongola ndenge na bango ya kokanisa mpe mbano oyo bazali kozela.

14. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayokaka ndenge nini mpo na bomoi na bango awa na mabele?

14 Boye, yango elingi nde koloba ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo balingaka kokufa? Ntoma Paulo amonisi ndenge bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayokaka. Akokanisi nzoto na bango ya mosuni na “hema” mpe alobaki: “Ɛɛ, biso baoyo tozali na kati ya hema oyo tozali kokimela, mpo tomoni mpasi; mpo eloko oyo biso tolingi, ezali te kolongola yango, kasi nde kolata mosusu wana, mpo bomoi emɛla eloko oyo ekufaka.” (2 Bakorinti 5:4) Bakristo wana balingaka kokufa te. Basepelaka na bomoi mpe balingaka kosalela mokolo na mokolo mpo na kosalela Yehova elongo na libota mpe baninga na bango. Kasi ezala bazali kosala nini, babosanaka te mbano oyo Nzambe alaki bango na mikolo ezali koya.1 Bakorinti 15:53; 2 Petro 1:4; 1 Yoane 3:2, 3; Emoniseli 20:6.

YEHOVA APONI YO?

15. Makambo nini emonisaka te ete moto atyami mafuta na elimo santu?

15 Ntango mosusu ozali komituna soki Yehova aponi yo okende likoló. Soki okanisi ete aponi yo, kanisá na mituna oyo ya ntina mingi: Omonaka ete ozali na molende ya ndenge mosusu na mosala ya kosakola? Osepelaka mingi koyekola Biblia mpe koyekola “makambo mozindo ya Nzambe”? (1 Bakorinti 2:10) Omonaka ete Yehova azali kopambola mosala na yo ya kosakola mpe ezali kobota mbuma? Olingaka kosala makambo oyo Yehova alingaka koleka eloko mosusu nyonso? Olingaka bandeko mingi mpe omonaka ete ozali na mokumba ya kosalisa bango básalela Yehova? Ozali na makambo ya sikisiki oyo emonisi mpenza ete Yehova asalisá yo na bomoi na yo? Soki eyano na yo na mituna wana nyonso ezali “ɛɛ,” yango elingi nde koloba ete oponami mpo na kokende likoló? Te, ezali bongo te. Mpo na nini? Mpo basaleli nyonso ya Nzambe bakoki komiyoka ndenge wana, ezala batyami mafuta na elimo to te. Mpe na nzela ya elimo santu na ye, Yehova akoki kopesa nguya na mosaleli na ye nyonso, ezala azali na elikya nini. Kutu, soki ozali komituna soki okokende na likoló, elingi koloba oponami te. Baoyo Yehova aponi bamitunaka te mpo na likambo yango! Bayebi ete baponami!

16. Ndenge nini toyebi ete bato nyonso oyo bazwaki elimo ya Nzambe baponamaki te mpo na kokende likoló?

 16 Biblia ezali na bandakisa mingi ya basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazwaki elimo santu na ye kasi bakendaki likoló te. Tózwa ndakisa ya Yoane Mobatisi. Yesu alobaki ete moto moko te alekaki Yoane, kasi na nsima alobaki ete Yoane akoyangela te lokola mokonzi na likoló. (Matai 11:10, 11) Davidi mpe atambwisamaki na elimo santu. (1 Samwele 16:13) Elimo santu esalisaki ye akanga ntina ya makambo mozindo ya Yehova mpe akoma biteni mosusu ya Biblia. (Marko 12:36) Atako bongo, ntoma Petro alobaki ete Davidi “amataki na likoló te.” (Misala 2:34) Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kopesa bato wana nguya ya kosala makambo ya kokamwa, kasi asalelaki yango te mpo na kopona bango bákende kofanda likoló. Yango elingi nde koloba ete bazalaki mpenza sembo te to babongaki te mpo na koyangela na likoló? Te. Elimboli kaka ete Yehova akozongisa bango na bomoi na paradiso awa na mabele.Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

17, 18. (a) Basaleli ya Nzambe mingi lelo oyo bazali kozela mbano nini? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

17 Basaleli ya Nzambe mingi lelo bakokende likoló te. Lokola Abrahama, Davidi, Yoane Mobatisi, mpe mibali ná basi mingi ya ntango ya kala, bazali na elikya ya kofanda awa na mabele ntango guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela bango. (Baebre 11:10) Bato oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló bakozala 144 000. Kasi Biblia elobeli ‘batikali’ ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele na ntango oyo ya nsuka. (Emoniseli 12:17) Na yango, mingi ya bato yango 144 000 basilá kokufa mpe bazali sikoyo na likoló.

18 Kasi soki moto moko alobi ete atyami mafuta na elimo, baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele basengeli kotalela ye ndenge nini? Soki moto moko na lisangá na bino abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, osengeli kotalela ye ndenge nini? Mpe tokoloba nini soki motángo ya baoyo balobi ete batyami mafuta na elimo ezali kokoba kobakisama? Osengeli nde komitungisa mpo na yango? Tokozwa biyano na mituna wana na lisolo oyo elandi.

^ [1] (paragrafe 4) Ekoki kozala ete fɛti ya Pantekote ezalaki kosalema dati moko na mokolo oyo Nzambe apesaki Moize Mibeko na ngomba Sinai. (Kobima 19:1) Na yango, ekoki kozala ete Yesu akɔtisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo na Kondimana ya Sika kaka na dati oyo Moize akɔtisaki libota ya Yisraele na Kondimana ya Mibeko.

^ [2] (paragrafe 11) Mpo na kozwa ndimbola mosusu na oyo etali kobotama lisusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2009, nkasa 3-11.