Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 5 2016

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | EPAI WAPI OKOKI KOZWA LIBƆNDISI?

Libɔndisi na ntango ya mpasi

Libɔndisi na ntango ya mpasi

Bampasi eyaka na ndenge mingi. Ntango ya kolobela yango nyonso ezali te, kasi tótalela naino bandakisa minei oyo touti kolobela. Tótala ndenge bato oyo bakutanaki na makambo ekeseni bazwaki libɔndisi ya solosolo oyo Nzambe apesaki bango.

NTANGO OZANGI MOSALA

“Nakómaki kondima mosala ya ndenge nyonso mpe totikaki bisombasomba.”—Jonathan

Seth, * alobi boye: “Balongolaki ngai ná mwasi na ngai mosala nzela moko. Mbula mibale mobimba tozalaki kobika kaka na lisungi ya bandeko mpe misala ya mikemike. Yango esalaki ete mwasi na ngai Priscilla akóma kotungisama na makanisi mpe namiyokaki lokola nasili valɛrɛ.”

“Nini esalisaki biso? Priscilla azalaki ntango nyonso kokanisa maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:34. Yesu alobaki ete tosengeli te komitungisa mpo na lobi, mpo mokolo na mokolo ezalaka na mitungisi na yango. Mabondeli oyo Priscilla azalaki kosala na motema mobimba epesaki ye makasi ya koyika mpiko. Kasi ngai, Nzembo 55:22 nde ebɔndisaki ngai. Ndenge moko na mokomi ya nzembo, nabwakelaki Yehova mokumba na ngai ya kilo mpe namonaki ete asungaki ngai. Atako nazwá mosala mosusu, bomoi na biso ezalaka mindɔndɔ te mpo tolandaka toli ya Yesu oyo ezali na Matai 6:20-22. Oyo eleki nyonso, boyokani na biso na Nzambe mpe ya biso na biso ekómá makasi.”

Jonathan, alobi boye: “Nakómaki kobanga mpo na avenire na biso ntango mwa mombongo na biso ya libota ekweaki. Lokola nkita ekweaki, mbula 20 oyo tosalaki mosala makasi ekendaki na mai. Ngai ná mwasi na ngai tokómaki koswana mpo na mbongo. Tokómaki kobanga kokɔta nyongo mpo tozalaki koyeba te soki tokokoka kofuta yango.

“Kasi Biblia mpe elimo santu ya Nzambe esalisaki biso tózwa bikateli ya malamu. Nakómaki kondima mosala ya ndenge nyonso mpe totikaki bisombasomba. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, bandeko na biso ya lingomba basalisaki biso. Basalisaki biso tómona ete tozali na ntina mpe basungaki biso ntango tozalaki mpenza na bosɛnga.”

 NTANGO LIBALA EKUFI

Raquel, alobi boye: “Ntango mobali na ngai asundolaki ngai na mbalakaka, nayokaki mpasi na motema mpe nkanda. Mpe mawa moko makasi ezwaki ngai. Kasi Nzambe akómaki moninga na ngai mpenza. Kimya ya Nzambe ebatelaki motema na ngai ntango nazalaki kobondela ye mikolo nyonso. Namonaki lokola ete azipaki mpota ya motema na ngai.

“Liloba na ye Biblia esalisaki ngai nalongola nkanda mpe koyina. Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Baroma 12:21 esimbaki motema na ngai; elobi boye: ‘Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.’

“Ezali na ntango ya ‘kotika koluka eloko mpo ebungi.’ . . . Sikoyo, nazali na mikano mosusu.”—Raquel

“Moninga moko asalisaki ngai namona ntina ya kokende liboso. Atángelaki ngai Mosakoli 3:6 mpe ayebisaki ngai na boboto nyonso ete ezali na ntango ya ‘kotika koluka eloko mpo ebungi.’ Ezalaki toli moko makasi kasi yango nde nazalaki na yango mposa. Sikoyo, nazali na mikano mosusu.”

Elizabeth, alobi boye: “Soki libala ekufi, moto azalaka na mposa ya lisalisi. Nazalaki na moninga moko ya motema oyo apesaki ngai lisungi yango mokolo na mokolo. Azalaki kolela ná ngai, kobɔndisa ngai mpe asalaki namiyoka ete balingaka ngai na esika namiyoka ete basundoli ngai. Nandimi mpenza ete Yehova asalelaki ye mpo azipa mpota oyo nazokaki na motema.”

NTANGO YA MALADI TO BOBANGE

“Nsima ya kobondela Nzambe, nayokaka ete elimo na ye epesaka ngai makasi.”—Luis

Luis, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo abɛlaka maladi ya motema mpe mbala mibale mobimba, amonaki liwa na miso. Lelo oyo mpo apema, esɛngaka azala na oxygène ngonga 16 na mokolo. Alobi boye: “Nabondelaka Yehova ntango nyonso. Nsima ya kobondela, nayokaka ete elimo na ye epesaka ngai makasi. Libondeli epesaka ngai makasi ya kokoba koyika mpiko mpo nandimelaka ye mpe nayebi ete akipaka ngai.”

Petra, oyo azali na mbula koleka 80, alobi boye: “Nalingaka kosala makambo mingi, kasi likoki ya kosala ezali te. Komona ndenge makasi ezali kosila ngai, esalaka ngai mpasi mpenza. Elɛmbisaka ngai mpe nabikaka kaka na bankisi. Mbala mingi nakanisaka ndenge Yesu ayebisaki Tata na ye alekisa mokakatano moko mosika na ye, soki likoki ezali.” Kasi Yehova apesaki Yesu makasi mpe apesaka ngai makasi.  Libondeli ezali nkisi na ngai ya mokolo na mokolo. Namiyokaka malamu koleka soki nasololi na Nzambe.”Matai 26:39.

Julian, oyo abɛlá maladi ya sclérose soki mbula 30, amiyokaka mpe bongo. Alobi boye: “Natiká kiti ya bokonzi na kompanyi mpe nakómá na kiti ya bibɔsɔnɔ. Ata bongo, bomoi na ngai ezali na ntina mpo namipesaka na kosalisa basusu. Kokaba ekoki kokitisa mpasi mpe Yehova akokisaka elaka na ye ya kopesa biso makasi na ntango oyo tosengeli na yango. Ndenge moko na ntoma Paulo, nakoki mpenza koloba boye: ‘Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.’”Bafilipi 4:13.

NTANGO NDEKO TO MONINGA AKUFI

Antonio, alobi boye: “Ntango tata akufaki na aksida, liboso nandimaki yango te. Emonanaki sembo te; azalaki na ye kotambola na makolo. Nazangaki likambo ya kosala. Azalaki komiyeba te mikolo mitano mobimba liboso akufa. Soki nazali ná mama, nazalaki koboya kolela, kasi soki natikali ngai moko, nazalaki kolela makasi. Nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini? Mpo na nini?’

“Na ntango wana ya mpasi, nakobaki kosɛnga Yehova asalisa ngai nabatela makanisi na ngai mpe apesa ngai kimya. Mpe mokemoke nayokaki kimya na motema. Nakanisaki lisusu ndenge Biblia elobaka ‘makambo oyo ekanami te’ ekoki kokwela moto nyonso. Lokola Nzambe akosaka te, nandimi mpenza ete nakomona tata na ngai lisusu na lisekwa.”Mosakoli 9:11; Yoane 11:25; Tito 1:2.

“Atako mwana na biso akufaki na likama ya mpɛpɔ, tobosanaka te makambo ya malamu oyo tosalá na ye.”—Robert

Robert, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, azali mpe na makanisi ya ndenge wana. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozwaki kimya ya makanisi oyo elobelami na Bafilipi 4:6, 7. Tozwaki kimya yango na nzela ya mabondeli na biso epai ya Yehova. Kimya wana ya motema esalisaki biso tóyebisa bapanzi-nsango elikya na biso ya lisekwa. Atako mwana na biso akufaki na likama ya mpɛpɔ, tobosanaka te makambo ya malamu oyo tosalá na ye. Totyaka makanisi nde na makambo yango.

“Ntango bandeko oyo tosambelaka na bango bayebisaki biso ete bamonaki biso na televizyo tozali kolobela kondima na biso na kimya nyonso, toyebisaki bango ete ezalaki nde mpo na mabondeli mingi oyo babondelaki mpo na biso. Nandimaka mpenza ete Yehova asungaki biso na nzela ya ebele ya bamesaje na bango ya kobɔndisa.”

Ndenge bandakisa oyo emonisi, Nzambe akoki kobɔndisa bato oyo bakutani na mikakatano ya ndenge na ndenge. Bongo yo? Ata soki okutani na likambo ya ndenge nini, libɔndisi mpo na kosalisa yo na ntango ya mpasi ezali. * Boye, mpo na nini te kosɛnga Yehova asalisa yo? Azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”2 Bakorinti 1:3.

^ par. 5 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 23 Soki olingi básalisa yo okóma moninga ya Nzambe mpe ozwa libɔndisi na ye, tosɛngi yo oluka Batatoli ya Yehova na esika ofandaka to komelá biro na bango oyo ezali pene na esika ofandi.