Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 5 2016

Lobwaku ya Ela

Lisolo ya Davidi ná Goliate—Ezali lisapo mpamba?

Lisolo ya Davidi ná Goliate—Ezali lisapo mpamba?

Bato mosusu bamitunaka soki lisolo ya Davidi ná Goliate ezali ya solo to ezali kaka lisapo mpamba. Yo mpe okanisi bongo ntango otángi lisolo yango? Soki bongo, tosɛngi yo otalela mituna misato oyo elandi.

1 | Moto akoki kozala na molai ya mɛtrɛ soki misato (2.90 m)?

Biblia elobi ete molai ya Goliate ezalaki “mapeko motoba bakisa zerete moko.” (1 Samwele 17:4) Lipeko moko ezalaki santimɛtrɛ soki 45 (44.50 cm) mpe zerete moko ezalaki santimɛtrɛ soki 23 (22.20 cm). Yango ekoki kosala mɛtrɛ pene na misato. Bato mosusu baboyaka kondima ete Goliate azalaki molai ndenge wana, kasi tókanisa naino: Lelo oyo moto ya molai koleka oyo ayebani, molai na ye ezali mɛtrɛ pene na misato (2.70 m). Ekoki kosalema te ete Goliate aleka ye na molai ya santimɛtrɛ 15 to koleka? Goliate azalaki moto ya libota ya Barefaime, bato oyo bayebanaki ete bazalaki milai koleka. Mokanda moko ya Ezipito ya siɛklɛ ya 13 liboso ya ntango na biso emonisi ete babundi mosusu na Kanana bazalaki milai pene na mɛtrɛ mibale na ndambo (2.40 m). Na yango, atako Goliate akokani na bato mosusu na molai te yango elingi koloba te ete moto akoki kozala molai bongo te.

2 | Davidi azalaki moto ya solo mpenza?

Na eleko moko boye bato ya mayele balukaki kotya Mokonzi Davidi na molɔngɔ ya masapo mpamba, kasi yango ekómi mpasi ezala bongo. Bato ya arkeoloji bamonaki likomi moko ya kala oyo elobeli “ndako ya Davidi.” Lisusu, Yesu Kristo amonisaki ete Davidi azalaki moto ya solo. (Matai 12:3; 22:43-45) Nkombo ya Mokonzi Davidi mpe etángami na milɔngɔ mibale ya bankɔkɔ ya Yesu oyo emonisaka ete Yesu azali Masiya. (Matai 1:6-16; Luka 3:23-31) Ezali polele ete Davidi azalaki moto ya solo mpenza.

3 | Makambo oyo lisolo yango elobeli esalemaki na esika moko oyo ezalaka mpenza?

Biblia elobi ete babundaki na lobwaku ya Ela. Kasi elobeli mpe makambo ya mikemike, emonisi ete Bafilistia bazalaki na ngomba oyo ekaboli bingumba mibale, Soko mpe Azeka. Bayisraele bazalaki na ngomba mosusu oyo ezalaki na ngámbo ya lobwaku yango. Bisika yango ezalaka mpenza?

Talá oyo moto moko oyo autaki kotala esika yango kala mingi te alobi: “Moto oyo atambwisaki biso atako asambelaka te amemaki biso na lobwaku ya Ela. Tokitaki na nzela moko oyo ememaki biso tii na nsɔngɛ ya ngomba moko. Ntango tozalaki kotala lobwaku yango, ayebisaki biso tótánga 1 Samwele 17:1-3. Mpe na nsima alakisaki biso na mosapi mpe alobaki boye: ‘Kuna na lobɔkɔ na bino ya mwasi nde esika Soko ezalaká.’ Abalukaki mpe alobaki, ‘Kuna na lobɔkɔ na bino ya mobali nde esika Azeka ezalaká. Bafilistia batyaki kaa na katikati ya bingumba yango mibale, na ngomba oyo ezali kotalana na bino. Ekoki kozala ete biso totɛlɛmaki na esika oyo kaa ya Bayisraele ezalaki.’ Namonaki na makanisi ndenge Davidi ná Saulo batɛlɛmi esika oyo nazalaki mpenza. Na nsima, tokitaki na lobwaku mpe tokatisaki mwa nzela oyo mai elekaka, kasi ezalaki mpenza na mai te, etondaki nde na mabanga. Namekaki komona na makanisi ndenge Davidi atɛlɛmi wana azali kolɔkɔta mabanga mitano ya sɛlisɛli oyo moko na yango ebomaki Goliate.” Ndenge moko na bato mingi, moto wana oyo akendaki kotala esika yango akamwaki ndenge amonaki na miso makambo mikemike oyo Biblia elobeli.

Ezali na ntina te tótya ntembe ete lisolo ya Davidi ná Goliate ezali ya solo mpenza. Elobeli bato mpe bisika ya solo mpenza. Oyo eleki ntina, lisolo yango ezali na kati ya Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, na yango euti epai ya Nzambe ya solo “oyo akoki kobuka lokuta te.”Tito 1:2; 2 Timote 3:16.