Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 5 2016

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | DAVIDI

“Etumba ezali ya Yehova”

“Etumba ezali ya Yehova”

DAVIDI azali kotutanatutana na basoda oyo bazali koleka ye mbangumbangu. Bafungoli mbuma miso nyonso na kobanga ntango bazali kokima molɔngɔ ya etumba. Nini ebangisaki bango bongo? Mbala na mbala, Davidi azali koyoka bango ndenge bazali kozongela kaka liloba moko na kobanga nyonso. Ezalaki nkombo ya mobali moko. Mpe kuna na lobwaku, mobali yango atɛlɛmi na lofundo nyonso, mbala mosusu Davidi amoná naino engambe ya ndenge wana te.

Goliate! Sikoyo Davidi amoni mpo na nini basoda bazali kobanga Goliate; azalaki engambe mpenza, molai makasi. Ata soki alongoli bibundeli na ye oyo ezali kokamwisa, kilo na ye moko ekoki kokokana na kilo ya bingambe mibali mibale. Kasi azalaki na bibundeli oyo esengeli mpe azalaki makasi mpenza, mobundi monene. Goliate azali koganga makasi mpe koluka moto oyo akotyela ye ntembe. Meká komona ndenge mongongo na ye ya monene ezali kopanzana na bangomba ntango azali kotumola basoda ya Yisraele mpe mokonzi na bango, Saulo. Asɛngi bápesa ye kaka moto moko abunda na ye mpo bitumba esila!1 Samwele 17:4-10.

Bayisraele bazalaki kobanga. Mokonzi Saulo mpe azalaki kobanga. Likambo yango oyo Davidi ayokaki, esalaki sanza moko na ndambo! Basoda nyonso, ezala ya Bafilistia to ya Bayisraele bazalaki kosala eloko te ntango Goliate azalaki kozongela matumoli na ye mokolo na mokolo. Etungisaki Davidi. Ezalaki mpenza nsɔni komona ndenge mokonzi ya Yisraele, basoda na ye, oyo na kati na bango bayaya misato ya Davidi bazali kolɛnga na kobanga! Atako Goliate azalaki kotungisa basoda ya Yisraele, likambo ya mabe koleka, Davidi amonaki ete mopakano yango azalaki nde kofinga Yehova, Nzambe ya Yisraele! Kasi, elenge mobali mpamba lokola Davidi akokaki kosala nini na likambo yango? Kondima ya Davidi ekoki koteya biso nini lelo?1 Samwele 17:11-14.

“TYÁ YE MAFUTA, MPO YE OYO!”

Tózonga naino mwa basanza na nsima. Mpokwa ekɔtaki ntango Davidi azalaki kobatela bampate ya tata na ye na bangomba pene na Beteleme. Azalaki mobali kitoko, ekoki kozala akokisaki naino mbula 18 te, azalaki nzoto motane mpe miso kitoko. Soki kimya ekɔti, azalaki kolekisa ntango na ye na kobɛta nzɛnzɛ. Biloko kitoko oyo Nzambe akelá ezalaki kosepelisa ye mpe akómaki kobɛta miziki malamu mpo azalaki kolekisa ntango mingi na koyekola yango. Kasi na mpokwa ya mokolo wana, babengisaki Davidi. Tata na ye azalaki na mposa ya komona ye nokinoki.1 Samwele 16:12.

Akutaki tata na ye Yese azali kosolola na tata moko ya mokóló. Ezalaki Samwele mosakoli ya sembo. Yehova atindaki ye atya mwana moko ya Yese mafuta mpo akóma mokonzi ya mibale ya Yisraele! Samwele así akutanaki na bayaya nsambo ya Davidi, kasi Yehova ayebisaki Samwele polele ete aponaki ata moko na bango te. Kasi ntango Davidi ayaki, Yehova ayebisaki Samwele boye: “Tyá ye mafuta, mpo ye oyo!” Samwele afungolaki liseke oyo etondaki na mafuta ya sipesiale na miso ya bayaya ya Davidi mpe asopelaki Davidi na motó. Banda ntango wana, bomoi ya Davidi ezalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso. Biblia elobi: “Elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.”1 Samwele 16:1, 5-11, 13.

Na komikitisa nyonso Davidi amonisaki ete Yehova nde asalisaki ye alonga banyama mabe

Davidi akómaki koluka kozwa bokonzi? Te, azelaki elimo ya Yehova etambwisa ye mpo ayeba ntango  nini akokóma na mikumba minene. Tii ntango yango ekoka, akobaki na mosala ya kobatela bampate. Ezali mosala oyo amipesaki mpenza na kosala yango na mpiko. Bampate ya tata na ye elingaki elyama na mabaku mibale, na libaku moko epai ya nkosi mpe na libaku mosusu epai ya urse. Davidi asukaki kaka te na kobengana banyama mabe yango. Abundaki mbala moko na banyama yango mpo na kobatela bampate ya tata na ye. Na mabaku wana nyonso mibale, abomaki banyama mabe yango na mabɔkɔ!1 Samwele 17:34-36; Yisaya 31:4.

Nsima ya mikolo, babengisaki lisusu Davidi. Nsango na ye ekómaki na matoi ya Mokonzi Saulo. Atako Saulo azali kaka mobundi monene, Yehova asundolaki ye mpo aboyaki kotosa malako na ye. Yehova alongolaki elimo na ye epai ya Saulo mpe mbala na mbala elimo ya mabe ekómaki kotungisa ye; akómaki nkandankanda, kokanisela basusu mabe mpe mobulu. Soki elimo yango ya mabe ezwi Saulo, miziki kaka nde ezalaki kokitisa ye motema. Bato mosusu ya Saulo bayokaki nsango ete Davidi azali alangá-nzembo mpe mobundi. Yango wana babengisaki Davidi mpo abɛtɛlaka Saulo miziki mpe amemelaka ye bibundeli.1 Samwele 15:26-29; 16:14-23.

Bilenge bakoki koyekola makambo mingi etali kondima ya Davidi na makambo yango. Simbá ete alekisaki ntango na ye ya kozwa mwa mopɛpɛ na makambo oyo ekómisaki boyokani na ye ná Yehova makasi mpenza. Lisusu, na motema molai nyonso, akolisaki makoki oyo esalisaki ye azwa mosala na pɛtɛɛ nyonso. Kasi na nyonso, atikaki elimo ya Yehova etambwisa ye. Oyo nde mateya kitoko biso nyonso tokoki kozwa!Mosakoli 12:1.

‘MOTEMA YA MOTO ATA MOKO TE ELƐMBA MPO NA YE’

Ntango azalaki kosala epai ya Saulo, mbala mingi Davidi azalaki kozonga epai na bango mpo na kobatela bampate, ntango mosusu azalaki kokende bongo na boumeli ya ntango molai. Ezalaki na ntango moko ya ndenge wana nde Yese atindaki Davidi akende kotala bayaya na ye misato oyo bazalaki basoda ya Saulo. Na botosi nyonso, Davidi akangisaki biloko ya komemela bayaya na ye mpe akendaki na lobwaku ya Ela. Ntango akómaki kuna, alɛmbaki nzoto ndenge amonaki basoda nyonso ya ngámbo mibale bazali kosala eloko te ndenge tomonisaki yango na ebandeli ya lisolo oyo. Batɛlɛmaki ngámbo na ngámbo ya lobwaku wana oyo esalá libulu.1 Samwele 17:1-3, 15-19.

Likambo yango esepelisaki Davidi te. Ndenge nini limpinga ya basoda ya Yehova, Nzambe ya bomoi ekokaki kolɛnga na nsɔmɔ liboso ya moto moko mpamba oyo azali mpe mopakano? Davidi amonaki ete Goliate afingaki nde Yehova na matumoli na ye. Yango wana akómaki koloba na basoda ete akolonga mpenza Goliate. Liboso, Eliabe yaya ya Davidi ayokaki ndenge Davidi azalaki koloba. Agangelaki ye mabe, mpe alobaki ete Davidi ayaki wana kaka mpo amona ndenge bakobunda. Kasi Davidi ayanolaki ye boye: “Nasali nini sikoyo? Natuni kaka kotuna!” Mpe akendaki, azali koloba nzelanzela ete akolonga Goliate, tii moto moko ayebisaki Saulo makambo Davidi alobaki. Mokonzi alobaki bábengela ye Davidi.1 Samwele 17:23-31.

Davidi alobaki na mokonzi boye mpo na Goliate: ‘Motema ya moto ata moko te elɛmba mpo na ye.’ Motema ya Saulo ná basoda na ye elɛmbaki mpo na Goliate. Mbala mosusu basalaki libunga oyo bato nyonso basalaka ya komikokanisa na engambe mobali wana, ntango bazali kotala ndenge bakosukela ye kaka na loketo. Bamonaki na makanisi ndenge engambe wana oyo azali na bibundeli akolonga bango na  pɛtɛɛ nyonso mpe nokinoki. Kasi Davidi akanisaki bongo te. Ndenge tokomona yango, atalelaki makambo na ndenge mosusu. Yango wana asɛngaki abunda ná Goliate ye moko.1 Samwele 17:32.

Saulo alobaki na ye boye: “Okokoka te kobunda na Mofilistia oyo, mpo ozali naino mwana, kasi ye azali mobali ya etumba banda bomwana na ye.” Davidi azalaki mpenza mwana? Te, kasi azalaki elenge mpenza mpo na kokɔta mosala ya soda mpe mbala mosusu elongi na ye ezalaki ya bana mike. Kasi Davidi ayebanaki lokola mobundi monene mpe na ntango wana ekoki kozala azalaki na mbula soki 18.1 Samwele 16:18; 17:33.

Davidi abɛtɛlaki Saulo lisolo ya nkosi mpe urse oyo abomaki mpo na kokitisa ye motema. Azalaki komikumisa? Te. Davidi ayebaki ndenge alongaki bitumba yango. Alobaki boye: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.” Lokola andimisaki ye, Saulo alobaki boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”1 Samwele 17:37.

Okolinga kozala na kondima lokola ya Davidi? Simbá ete kondima ya Davidi ezalaki kaka makanisi moko boye te. Azalaki na kondima epai ya Nzambe mpo na boyebi mpe makambo akutanaki na yango. Ayebaki ete Yehova azali Mobateli malamu mpe akokisaka bilaka na ye. Soki tolingi kokóma na kondima ya ndenge wana, tosengeli kokoba koyekola makambo ya Nzambe na Biblia. Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, tokomona ete kondima na biso ekokóma makasi.Baebre 11:1.

“YEHOVA AKOKABA YO NA LOBƆKƆ NA NGAI”

Na ebandeli, Saulo amekaki kolatisa Davidi bibundeli na ye. Ekokanaki mwa moke na oyo ya Goliate mpo basalá yango na kwivre mpe ezalaki na kazaka ya bibende oyo ekanganakanganá lokola mposo ya mbisi. Kasi Davidi amekaki kotambola ntango alataki bibundeli yango ya kilo kasi amonaki ete ekosimba te. Azwaki formasyo ya mosala ya soda te, yango amesanaki te kolata bibundeli yango, ata mpe bibundeli ya Saulo, mpo Saulo alekaki bato nyonso ya Yisraele na molai! (1 Samwele 9:2). Alongolaki yango nyonso mpe alataki elamba na ye oyo amesaná kolata; oyo mobateli ya mpate azalaki kolata mpo na kobatela bampate na ye.1 Samwele 17:38-40.

Davidi azwaki biloko na ye ya mobateli ya mpate, sakosi na lipeka na ye mpe lansi. Lelo oyo lansi ekoki komonana ntina te, kasi na ntango wana ezalaki ebundeli moko makasi. Bazalaki kotya yango poshɛ moko ya moke na nsuka ya bansinga mibale ya milai ya mposo ya nyama mpe ezalaki ebundeli oyo ebongaki mpo na mobateli ya mpate. Azalaki kotya libanga na poshɛ yango, kobalusa yango na vitɛsi makasi likoló ya motó na ye mpe na nsima azalaki kotika nsinga moko, mpe kobwaka libanga na ndenge oyo ekotuta mpenza eloko oyo abwakeli yango. Lokola ebundeli yango ezalaki malamu mpenza, basoda mpe bazalaki kosala bituluku ya basoda oyo babundaka na lansi.

Lokola Davidi azwaki bibundeli yango, akimaki mbangu mpo na kokutana na monguna na ye. Tókanisa naino mabondeli oyo Davidi asalaki ntango azali kokita na lobwaku yango oyo ekauká mpe kolɔkɔta mabanga mitano ya mike ya sɛlisɛli. Na nsima, akendaki na esika ya bitumba; azalaki kotambola te, kasi kokima nde mbangu!

Ntango Goliate amonaki moto oyo akobunda na ye, akanisaki nini? Biblia elobi boye: “Abandaki kotyola ye, mpamba te azalaki mwana moke mpe nzoto motane, mpe na bonzenga.” Goliate agangaki boye: “Ngai nazali nde mbwa mpo oyela ngai na mangenda?” Goliate amonaki bibundeli ya Davidi kasi akipaki lansi te. Alakelaki Davidi mabe na nkombo ya banzambe ya Bafilistia mpe alapaki ndai ete akopesa nzoto ya Davidi epai ya bandɛkɛ mpe banyama ya zamba.1 Samwele 17:41-44.

Tii lelo, eyano oyo Davidi apesaki emonisaka ete azalaki na kondima monene. Meká naino komona ndenge elenge mobali yango azali kobelela Goliate: “Ozali koyela ngai na mopanga, na likɔnga mpe na likɔnga moke, kasi ngai, nazali koya epai na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga, Nzambe ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele, oyo yo otumoli.” Davidi ayebaki ete nguya ya moto yango mpe bibundeli na ye ezalaki na ntina te. Goliate azangaki limemya epai ya Yehova Nzambe mpe Yehova alingaki kopesa ye eyano. Ndenge Davidi amonisaki yango, “etumba ezali ya Yehova.”1 Samwele 17:45-47.

Davidi akufaki miso te mpo azanga komona molai ya Goliate mpe bibundeli na ye. Kasi Davidi aboyaki makambo yango ebangisa ye. Aboyaki kosala libunga oyo Saulo ná basoda na ye basalaki. Davidi amikokanisaki na Goliate te. Kutu, akokanisaki nde Goliate  na Yehova. Goliate azalaki molai pene na mɛtrɛ misato mpe alekaki bato mosusu na molai, kasi Goliate azalaki mpenza engambe soki tokokanisi ye na Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba? Ndenge moko na bato nyonso, na miso ya Yehova Goliate azalaki kaka lokola mwa nyama moko ya moke oyo Yehova akoki koboma mbala moko!

Davidi ayaki mbangu esika monguna na ye azalaki mpe abimisaki libanga na sakosi na ye. Atyaki yango na lansi na ye mpe abalusaki yango likoló ya motó na ye tii ntango esalaki mwa makelele. Ekoki kozala ete Goliate azalaki mwa moke nsima ya moto oyo azalaki komemela ye ebende oyo ebatelaka, ntango azalaki kopusana pene ya Davidi. Lokola Goliate azalaki molai mingi, ezalaki likama mpo na ye mpo momemi ebende yango azalaki molai lokola ye te mpo atombola ebende yango mpo ebatela motó ya Goliate. Ezali na motó nde Davidi akanaki kobwakela Goliate libanga.1 Samwele 17:41.

Davidi amonaki ete ata engambe ya ndenge nini azali moke mpenza soki bakokanisi ye na Yehova

Davidi atikaki libanga ekende. Kanisá naino kimya oyo ekɔtaki ntango libanga yango ezali kokende na vitɛsi makasi. Na ntembe te, Yehova abongisaki makambo mpo Davidi abwaka libanga mosusu te. Libanga yango ebɛtaki Goliate na elongi. Engambe yango akweaki na mabele, elongi na nse! Na ntembe te, moto oyo asimbelaki ye ebende akimaki na nsɔmɔ. Davidi apusanaki, azwaki likɔnga ya Goliate mpe akataki ye motó.1 Samwele 17:48-51.

Nsukansuka, Saulo ná basoda na ye bazwaki lisusu makasi. Bagangaki makasi mpo na etumba mpe balandaki Bafilistia. Etumba yango esukaki kaka ndenge Davidi ayebisaki Goliate ete: “Yehova . . . akopesa bino na lobɔkɔ na biso.”1 Samwele 17:47, 52, 53.

Lelo oyo basaleli ya Nzambe bakendaka bitumba te. Ntango wana esí eleka. (Matai 26:52) Ata bongo, tosengeli komekola kondima ya Davidi. Ndenge moko na Davidi, tosengeli komona ete Yehova azalaka mpenza; tosengeli kosalela kaka ye mpe kobanga ye. Mbala mosusu tokoki komiyoka ete mikakatano na biso eleki biso monene, kasi soki tokokanisi yango na nguya ya Yehova oyo ezangi ndelo, tokomona ete ezali moke mpenza. Soki toponi Yehova azala Nzambe na biso mpe tomonisi kondima lokola Davidi, boye likambo moko te to mokakatano moko te ekobangisa biso. Eloko moko te ekokoka kotɛlɛma liboso ya nguya ya Yehova!