Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 3 2016

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Nani azalaki tata ya Yozefe?

Yozefe, mosali-mabaya na Nazarete, azalaki tata-mobɔkɔli ya Yesu. Kasi, nani azalaki tata ya Yozefe? Evanzile ya Matai oyo elobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu etángi moto moko na nkombo Yakobo, kasi ya Luka elobi ete Yozefe azalaki “mwana ya Heli.” Mpo na nini ekeseni bongo?Luka 3:23; Matai 1:16.

Lisolo ya Matai elobi boye: “Yakobo abotaki Yozefe,” liloba ya Grɛki oyo asaleli emonisi polele ete Yakobo azalaki mpenza tata ya Yozefe. Na yango, Matai alobelaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yozefe, libota ya bakonzi oyo bautaki na Davidi, oyo na nzela na yango lotomo ya bokonzi ekendaki epai ya Yesu, mwana oyo Yozefe abɔkɔlaki.

Kasi lisolo ya Luka elobi: “Yozefe mwana ya Heli.” Maloba “mwana ya,” ekoki komonisa “bokilo ya.” Ekokani na lisolo oyo ezali na Luka 3:27, epai Shealatiele, oyo azalaki nde mwana ya Yekonia, kasi atángami lokola “mwana ya Neri.” (1 Ntango 3:17; Matai 1:12) Emonani ete Shealatiele abalaki mwana ya Neri, oyo nkombo na ye eyebani te, na ndenge yango akómaki bokilo ya Neri. Ndenge moko mpe Yozefe azalaki “mwana” ya Heli mpo abalaki Maria, mwana ya Heli. Na yango evanzile ya Luka elobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu na ndenge “abotamaki moto,” na nzela ya mama na ye Maria. (Baroma 1:3) Biblia emonisi biso milɔngɔ mibale ya bankɔkɔ ya Yesu.

Na ntango ya kala bazalaki kosala bilamba mpe balangi na nini?

Lɛnɛ batyá langi, oyo ezalaki liboso ya mobu 135 T.B. bamonaki yango na libulu moko pene na mbu ekufá

Na Moyen-Orient, bato bazalaki kosalela mingi nsuki ya bampate, ya bantaba mpe ya bakamela mpo na kosala bilamba. Bilamba mingi ezalaki ya lɛnɛ mpe Biblia elobeli mingi bampate, kokata nsuki ya mpate mpe bilamba ya lɛnɛ. (1 Samwele 25:2; 2 Bakonzi 3:4; Yobo 31:20) Bazalaki kobimisa lini na banzete ya lini oyo bazalaki kolona na Ezipito mpe na Yisraele. (Ebandeli 41:42; Yosua 2:6) Ekoki kozala ete, na ntango ya kala, Bayisraele bazalaki kolona ntokia (cotton) te, kasi Biblia emonisi ete bato ya Perse bazalaki kosalela yango. (Estere 1:6) Bilamba ya swá elekaki ntalo mingi mpo kaka bakomelesa oyo bazalaki kosala mibembo nde bazalaki kouta na yango na Extrême-Orient.Emoniseli 18:11, 12.

Buku moko (Jesus and His World) elobi ete: “Lɛnɛ ezalaki na balangi ndenge na ndenge; kobanda na langi ya mpɛmbɛ makasi tii na oyo ya sokola.” Lisusu, mbala mingi bazalaki kobakisa yango langi mosusu. Bazalaki kozwa langi ya motane-bulé ya ntalo mingi na mbɛmbɛ mosusu. Bazalaki mpe kosalela banzete ndenge na ndenge, misisa, nkasa mpe banyama ya mikemike mpo na kobimisa balangi lokola ya motane, ya mosaka, ya bulé mpe ya moindo.