Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 3 2016

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NTANGO MOTO OLINGAKA AKUFI

Kosalisa baoyo bazali kolela

Kosalisa baoyo bazali kolela

Ekómelá yo naino te omona ete osili mayele ntango moto oyo azali pene na yo azali kolela moninga to ndeko na ye oyo akufi? Ntango mosusu tozangaka maloba to eloko ya kosala. Kasi, makambo ya kosala oyo ekoki kosalisa ezali.

Mbala mingi, kozala wana mpe koloba maloba lokola “esali ngai mpasi,” nde ezali na ntina. Na mikili mingi, koyamba moto to kosimba ye mwa moke na lobɔkɔ ntango opesi ye mbote ezali lolenge ya malamu ya komonisa ete omitye na esika na ye. Soki moto oyo azali na mawa alingi koloba, yoká ye malamumalamu. Likambo eleki ntina, salisá ye na misala oyo akokoka kosala te, ntango mosusu na kolamba, kobatela bana to kosalisa na kokunda ebembe, soki esengeli. Makambo yango esalisaka mingi koleka maloba ebeleebele.

Nsima ya mikolo, okoki kolobela makambo etali moto oyo akufaki, na ndakisa mwa bizaleli na ye ya malamu to makambo ya esengo oyo bokutaná na yango. Masolo ya bongo ekoki kosepelisa moto oyo azali na mawa. Na ndakisa, Pam oyo mobali na ye Ian akufá eleki sikoyo mbula motoba, alobi boye: “Ntango mosusu bato bayebisaka ngai makambo ya malamu oyo Ian asalá oyo nayebá kutu te mpe yango esalaka ete nayoka malamu.”

 Bato ya mayele balobi ete bato oyo bandeko na bango bakufi bazwaka lisalisi mingi kaka na ebandeli, kasi na nsima baninga basundolaka bango mpo moto na moto azongeli misala na ye. Yango wana, nsima ya liwa ya ndeko ya moninga na yo, saláká makasi osololaka na moninga na yo mbala na mbala. * Bato mingi oyo bazali na mawa basepelaka kosolola mpo esalisaka bango bábimisa mawa oyo eumeli mingi na motema.

Tózwa ndakisa ya Kaori, elenge mwasi moko ya ekólo Japon oyo alɛmbaki nzoto mpo mama na ye akufaki mpe yaya na ye ya mwasi akufaki mbula moko na sanza misato na nsima. Likambo ya esengo, baninga na ye bakobaki kosalisa ye. Moko na bango nkombo na ye Ritsuko, ye azali mokóló ya Kaori mpe asɛngaki ete akóma moninga na ye ya motema. Kaori alobi boye: “Mpo na koloba solo, nasepelaki te. Nalingaki te moto moko azwa esika ya mama na ngai mpo namonaki ete ekosimba te. Kasi, ndenge oyo mama Ritsuko asalelaki ngai makambo, nakómaki kolinga ye mingi. Pɔsɔ na pɔsɔ, tozalaki kokende makita ya losambo elongo, mpe koteya nsango malamu elongo na ye. Azalaki kobengisa ngai tómɛla ti, azali koyela ngai biloko ya kolya mpe kotindela ngai mikanda mpe bakarte mbala mingi. Bizaleli malamu ya mama Ritsuko esalisaki ngai mpenza.”

Eleki sikoyo mbula 12 banda mama ya Kaori akufá mpe lelo ye ná mobali na ye balekisaka ntango mingi na koteya bato nsango malamu. Kaori alobi boye: “Mama Ritsuko alingaka ngai tii lelo. Nakendaka ntango nyonso kotala ye soki nazongi mboka mpe nasepelaka ndenge alendisaka ngai.”

Ndakisa mosusu ezali ya Poli, Motatoli ya Yehova moko na ekólo Chypre, ye azwaki matomba na ndenge baninga bakobaki kosalisa ye. Sozos mobali ya Poli azalaki na boboto, azalaki moko ya bakambi ya lisangá oyo atiká ndakisa malamu mpo mbala mingi azalaki kobengisa na ndako na bango basi oyo mibali na bango bakufá mpe bana oyo baboti bakufá mpo na kosolola mpe kolya. (Yakobo 1:27) Likambo ya mawa, Sozos akufaki na maladi ya kanser ya bɔɔngɔ ntango azalaki na mbula 53. Poli alobi boye: “Nabungisá mobali na ngai ya sembo oyo nafandaki na ye mbula 33 na libala.”

Luká ndenge ya kosala mpo na kosalisa baoyo bazali na mawa

Na nsima ya lilaka, Poli akendaki na Canada elongo na Daniel, mwana na ye ya nsuka ya mbula 15. Kuna, bakómaki kokende makita ya losambo na lisangá ya Batatoli ya Yehova. Poli alobi boye: “Baninga ya sika oyo nazwaki na lisangá yango bayebaki te makambo oyo ekómelaki biso mpe mikakatano oyo tozali na yango. Kasi, yango epekisaki bango te bápusana pene na biso, bákitisa biso motema na maloba ya malamu mpe básalisa biso. Yango ezalaki mpenza na ntina, mingimingi na ntango oyo mwana na ngai azalaki na mposa makasi ya tata na ye! Bandeko oyo bakambaka lisangá bazalaki mpenza kokipe Daniel. Moko na bango azalaki kosala nyonso ete Daniel azala elongo na bango soki balingi kokende kozwa mopɛpɛ elongo na baninga to kobɛta bale.” Lelo oyo ezala mama to mwana yango bazali malamu.

Mpo na koloba solo, ezali na ndenge mingi ya kosalisa mpe kobɔndisa baoyo bazali na mawa. Elikya oyo ezali na Biblia mpo na mikolo ezali koya ekitisaka biso motema.

^ par. 6 Bato mosusu kutu bakomaka na bakalandriye na bango dati oyo moto moko boye akufaki mpo esalisa bango bápesa lisalisi na ntango oyo ebongi mpenza soki dati yango ekoki to ekómi pene.