Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 3 2016

 BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nayekolaki komemya basi mpe komipesa kilo

Nayekolaki komemya basi mpe komipesa kilo
  • ABOTAMAKI NA: 1960

  • EKÓLO: FRANCE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA MOBULU, MOOMBO YA DRƆGƐ MPE AZALAKI KOMEMYA BASI TE

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Mulhouse na nɔrdi-ɛsti ya France, na kartye moko ya babola oyo eyebanaki mpo na mobulu. Nakanisaka lisusu na bomwana ndenge bato bazalaki koswana mingi na kartye yango. Na libota na biso, bazalaki kozwa basi na valɛrɛ te mpe ezalaki mwa mpasi mibali bátuna bango makanisi. Bateyaki ngai ete esika ya mwasi ezali na kuku (cuisine) mpe kokipe mobali ná bana.

Bomwana na ngai ezalaki mpasi. Ntango nazalaki na mbula 10, tata na ngai akufaki na milangwa ya masanga. Mbula mitano na nsima, yaya na ngai ya mobali amibomaki. Kaka na mbula wana, namonaki ndenge moto moko abomaki ndeko na ye mpo baswanaki mpe esalaki ngai mpasi makasi. Bato ya libota na ngai balakisaki ngai kobunda na mbeli, kobɛta mondoki mpe kosalela biloko yango soki esengeli. Lokola nazalaki lisusu na kimya te, natondisaki nzoto na ngai na nzoloko mpe nakómaki komɛla masanga.

Ntango nakokisaki mbula 16, nakómaki komɛla milangi ya masanga 10 to 15 mokolo na mokolo, mpe eumelaki te nakómaki kosalela drɔgɛ. Mpo nakokisa bamposa na ngai, nakómaki kotɛka mabende mpe koyiba. Na mbula 17, nakɔtaki bolɔkɔ mbala ebele. Na nyonso, bakatelaki ngai bitumbu 18 mpo na moyibi mpe mobulu na ngai.

Ntango nakokisaki mbula soki 20, nabebaki lisusu makasi. Nabandaki komɛla bangi tije soki 20 na mokolo mpe komɛla héroïne mpe biloko mosusu ya mabe. Mbala mingi nazalaki kokóma pene na liwa mpo nazalaki kolekisa ndelo. Nakómaki kotɛka drɔgɛ, yango wana ntango nyonso nazalaki kotambola na bambeli mpe mindoki. Mokolo moko, nabɛtaki mobali moko masasi, kasi likambo ya esengo, lisasi ezwaki nde ebende ya mokaba na ye! Ntango nakómaki na mbula 24, mama akufaki mpe yango ematisaki nkanda na ngai. Bato na nzela bazalaki kokima soki kaka bamoni ngai. Mbala mingi, nazalaki kolekisa mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na babiro ya bapolisi to na lopitalo mpo bátonga ngai bampota.

Nabalaki ntango nakómaki na mbula 28. Kaka ndenge bokoki kokanisa, nazalaki komemya mwasi na ngai te. Nazalaki kofinga ye mpe kobɛta ye. Moto na moto azalaki kosala makambo na ndenge na ye. Nazalaki kokanisa ete soki napesi ye ebele ya babiju oyo nazalaki koyiba, ekoki bongo. Na nsima, likambo moko oyo tokanisaki te esalemaki. Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na mwasi na ngai. Nsima ya koyekola mbala ya liboso, atikaki komɛla makaya, aboyaki kozwa mbongo nyonso oyo nayibi mpe azongiselaki  ngai babiju. Nasilikaki. Napekisaki ye koyekola Biblia mpe nazalaki kopupolela ye milinga ya likaya na elongi. Nazalaki koyokisa ye nsɔni na kartye na biso mobimba.

Mokolo moko na butu, na milangwa natumbaki ndako na biso. Mwasi na ngai abikisaki ngai ná mwana na biso ya mbula 5 na mɔtɔ. Ntango molangwa esilaki, nayokaki nsɔni makasi. Nakanisaki na kati ya motema ete Nzambe akoki kolimbisa ngai te. Nakanisaki mokolo moko oyo sango alobaki ete bato mabe bakendaka na lifelo. Ata monganga oyo azalaki kosalisa ngai alobaki na ngai boye: “Esili mpo na yo! Okobonga lisusu te.”

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Nsima ya mɔtɔ wana, tokendaki kofanda epai ya baboti ya mwasi na ngai. Ntango Batatoli ya Yehova bayaki kotala mwasi na ngai, natunaki bango boye: “Nzambe akoki kolimbisa masumu na ngai nyonso?” Balakisaki ngai 1 Bakorinti 6:9-11 na Biblia. Vɛrsɛ yango etángi bizaleli oyo Nzambe ayinaka, kasi ebakisi boye: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.” Maloba wana endimisaki ngai ete nakoki kobongwana. Na nsima, Batatoli balakisaki ngai 1 Yoane 4:8 mpo na komonisa ete Nzambe alingaka ngai. Lokola nalendisamaki, nasɛngaki bango báyekola na ngai Biblia mbala mibale na pɔsɔ mpe nakómaki kokende makita ya losambo na bango. Nakobaki kobondela Yehova.

Nsima ya sanza moko, nazwaki ekateli ya kotika drɔgɛ mpe masanga. Eumelaki te nakómaki koyoka mabe mpenza! Kolɔta bandɔtɔ ya mabe, koyoka motó mpasi, nzoto mingai mpe koyoka lokola nazangi eloko. Ata bongo namonaki ndenge Yehova asimbaki ngai na lobɔkɔ mpe apesaki ngai makasi. Namiyokaki lokola ntoma Paulo. Mpo na lisalisi oyo Nzambe apesaki ye, Paulo akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Nsima ya mikolo, natikaki mpe komɛla likaya.2 Bakorinti 7:1.

Longola kosalisa ngai nayeba kotambwisa bomoi na ngai malamu, Biblia ebongisaki mpe libota na biso. Nabongolaki ndenge na ngai ya kosalela mwasi na ngai makambo. Nakómaki komemya ye mingi mpe koloba maloba lokola “nabondeli yo” to “pardɔ” mpe “mersi.” Nakómaki mpe tata malamu epai ya mwana na biso ya mwasi. Nsima ya koyekola Biblia mbula mobimba, nalandaki ndakisa ya mwasi na ngai, napesaki bomoi na ngai epai ya Yehova mpe nazwaki batisimo.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nandimi mpenza ete toli ya Biblia ebikisá bomoi na ngai. Ata bandeko na ngai oyo bazali Batatoli te bandimaka ete nakokaki kokufa na biloko ya mabe oyo nazalaki komɛla to balingaki koboma ngai na bitumba.

Mateya ya Biblia oyo elobeli mokumba ya mobali mpe ya tata, ebongolá mpenza bomoi ya libota na ngai. (Baefese 5:25; 6:4) Biso nyonso tokómaki kosala makambo elongo. Na esika natika mwasi na ngai asalaka makambo nyonso ya kolamba ye moko, napesaka ye mabɔkɔ mpo alekisaka bangonga mingi na koteya bato nsango malamu. Mpe asepelaka kopesa ngai mabɔkɔ na mokumba oyo nazali na yango na lisangá.

Bolingo mpe motema mawa ya Yehova etindaki ngai nabongola bomoi na ngai. Nazalaka na mposa makasi ya kolobela bizaleli na ye epai ya bato oyo bamonanaka lokola bakobonga lisusu te, ndenge bato mingi bazalaki kokanisela ngai. Nayebi ete Biblia ezali na nguya ya kosalisa moto nyonso abongisa bomoi na ye mpo ekóma na ntina. Biblia esuki kaka te na koteya ngai kolinga mpe komemya basusu, basi to mibali, kasi esalisi mpe ngai namipesa kilo.