Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 2 2016

Bakristo basengeli kosambela na bisika mosantu?

Bakristo basengeli kosambela na bisika mosantu?

MBULA nyonso, bato koleka milio 6 basalaka mibembo mosika na zamba ya banzete ya sɛdrɛ na Shima, esanga moko ya Japon. Bakendaka na Ise, esika moko mosantu ya monene, epai basambelaka Amaterasu Omikami, nzambe-mwasi moi Shinto, banda bambula soki 2 000. Bandimi ya lingomba yango babandaka liboso na kosukola mabɔkɔ mpe monɔkɔ mpo na komipɛtola. Na nsima, batɛlɛmaka liboso ya haiden (ndako ya losambo) ya esika mosantu, basalaka milulu lokola kofukama, kobɛta mabɔkɔ mpe kobondela nzambe-mwasi. * Shinto atikaka bandimi na ye básambela banzambe mosusu mpe bandimi mosusu ya Buda, ya bokristo mpe ya mangomba mosusu bamonaka mabe te kosala milulu ya Shinto na esika wana mosantu.

Mangomba mingi ya minene ezalaka na bisika mosantu * mpe bamilio ya bato bakendaka kotala bisika yango. Baeglize mpe bisika mosantu oyo basalelá Yesu, Maria mpe basantu ezalaka mingi na mikili oyo emibengaka ya bokristo. Batongá bisika mosusu ya ndenge wana na bisika makambo oyo Biblia elobeli esalemá to na bisika oyo balobaki ete “makamwisi” eutaki kosalema to na bisika oyo babombaka biloko mosantu. Bato mingi bakendaka na bisika yango mpo bakanisaka ete soki babondeli na bisika mosantu Nzambe akoyoka mabondeli na bango. Mpo na bamosusu, kokóma na esika mosantu ezali mobembo molai oyo basalaka mpo na komonisa ete bakangami na Nzambe.

Bato oyo bayei kotala Ise esika mosantu monene ya Japon mpe Grotte ya Massabielle na Lourdes, France

Nzambe ayokaka mpe ayanolaka mingi mabondeli soki moto akei kosala yango na esika mosantu? Nzambe asepelaka na losambo ya baoyo basalaka mibembo na bisika mosantu? Bakristo basengeli nde kosambela na bisika mosantu? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tosengeli kotalela losambo na bisika mosantu mpe tóyeba losambo oyo esepelisaka Nzambe.

KOSAMBELA NA “ELIMO MPE NA SOLO”

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete tosengeli kosambela “na elimo mpe na solo”?

Lisolo oyo Yesu asololaki na mwasi Mosamaria emonisi ndenge Nzambe atalelaka losambo na bisika mosantu. Yesu asalaki mobembo na Samaria mpe atɛlɛmaki mpo na kopema na libulu oyo ezalaki pene ya engumba Sikare. Asololaki na mwasi moko oyo ayaki kotoka mai na libulu. Ntango bazalaki kosolola, mwasi yango amonisaki likambo mpenza oyo ekesenisaki Bayuda ná Basamaria. Alobaki boye: “Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo; kasi bino bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”Yoane 4:5-9, 20.

Ngomba oyo mwasi yango alobelaki ezali Ngomba Gerizime, oyo ezalaki na bakilomɛtrɛ soki 50  na nɔrdi ya Yerusaleme. Basamaria bazalaki na tempelo moko kuna epai bazalaki kosala bafɛti, na ndakisa fɛti ya Pasika. Kasi, na esika alandela makambo oyo ekaboli bango, Yesu alobaki nde na mwasi yango boye: “Mwasi, ndimelá ngai: Ngonga ezali koya wana bato bakosambela Tata na ngomba oyo te na Yerusaleme mpe te.” (Yoane 4:21) Oyo nde maloba ya kokamwa, mingimingi mpo ebimaki na monɔkɔ ya Moyuda! Mpo na nini basengelaki kotika kosambela Nzambe na tempelo ya Yerusaleme?

Yesu abakisaki boye: “Ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Banda basiɛklɛ mingi, Bayuda bazalaki komona ete tempelo kitoko ya Yerusaleme ezalaki esika mpenza ya losambo na bango. Bazalaki kosala mibembo mbala misato na mbula mpo na kopesa Nzambe na bango Yehova bambeka. (Kobima 23:14-17) Kasi Yesu alobaki ete nyonso wana ekobongwana mpe ete “basambeli ya solosolo” bakosambela “na elimo mpe na solo.”

Tempelo ya Bayuda ezalaki ndako oyo etongamaki na esika oyo eyebani. Kasi elimo mpe solo emonanaka na miso te mpe ezalaka na esika moko boye te. Na yango, Yesu alingaki koloba ete losambo ya bakristo ya solo esengelaki te kotalela esika moko boye oyo ezali komonana na miso, na ndakisa Ngomba Gerizime, tempelo ya Yerusaleme to esika mosantu moko boye.

Na lisolo na ye ná mwasi Mosamaria, Yesu amonisaki mpe ete “ngonga” mpo mbongwana yango esalema na losambo ya Nzambe ezalaki “koya.” Ngonga yango eyaki ntango nini? Eyaki ntango Yesu, na nzela ya liwa na ye lokola mbeka, asukisaki losambo ya Bayuda oyo esimbamaki na Mibeko ya Moize. (Baroma 10:4) Kasi, Yesu alobaki mpe boye: “Ngonga . . . ezali sikoyo.” Mpo na nini? Mpo lokola Masiya, azalaki koyanganisa bayekoli na ye oyo bakotosa etinda oyo apesaki: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Kasi, kosambela na elimo mpe na solo elimboli nini?

Ntango Yesu alobelaki kosambela na elimo, alingaki kolobela kotambwisama na elimo santu ya Nzambe oyo esalisaka biso mpe tókanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia. (1 Bakorinti 2:9-12) Solo oyo Yesu alobelaki ezali boyebi ya solosolo ya mateya ya Biblia. Na yango, na esika ya kobondela  kaka na esika moko boye ya sipesiale, Nzambe akondima losambo na biso soki eyokani na oyo Biblia eteyaka mpe etambwisami na elimo santu.

NDENGE MOKRISTO ASENGELI KOTALELA BISIKA MOSANTU

Kasi, ndenge nini bakristo basengeli kotalela mibembo na bisika mosantu mpo na kosambela? Na kotalela etinda ya Yesu oyo ete basambeli ya solo basengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo, ezali polele ete kosambela na bisika mosantu ezali na ntina moko te na miso ya Tata na biso ya likoló. Lisusu, Biblia emonisi ndenge Nzambe atalelaka losambo ya bikeko. Elobi boye: “Bókima losambo ya bikeko” mpe “bókeba na bikeko.” (1 Bakorinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Na yango, mokristo ya solo akosambela te na esika nyonso oyo etalelami lokola mosantu to oyo ezali kolendisa losambo ya bikeko. Boye, nakotalela ndenge bato batalelaka bisika mosantu, bakristo ya solo baboyaka kosambela na bisika yango.

Kasi, yango elingi koloba te ete Biblia epekisi moto azala na esika moko oyo asepeli na yango mpo na kobondela, koyekola to kokanisa na mozindo. Esika ya makita oyo babongisi malamu mpe ezali kimya esalisaka mpo na koyekola mpe kolobela makambo ya Nzambe. Ezali mpe mabe te kotonga esika moko mpo bato bákanisaka, na ndakisa kotya tombó na lilita ya mowei. Yango ekoki kozala kaka mpo na kokanisa to komonisa ete olingaki mowei. Kasi, kotalela esika ya ndenge wana ete ezali mosantu to kosambela bililingi to biloko mosantu na esika yango ekoyokana ata moke te na maloba ya Yesu.

Na yango, ezali na ntina te okende na esika mosantu na elikya ete Nzambe akoyoka libondeli na yo malamu kuna. Nzambe akosepela na yo te to akopesa yo te lipamboli moko boye mpo okei kuna. Biblia elobi ete Yehova Nzambe, “Nkolo ya likoló mpe ya mabele, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.” Kasi yango te ekómisi biso mosika na Nzambe. Tokoki kobondela ye mpe akoyoka biso esika nyonso oyo tozali mpo “azali mosika te na mokomoko na biso.”Misala 17:24-27.

^ par. 2 Bisika mosantu ndenge na ndenge ya Shinto ezalaka na milulu na yango.

^ par. 3 Talá etanda “ Esika mosantu ezali nini?