Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 2 2016

Nani akabolaki Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ?

Nani akabolaki Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ?

KANISÁ ete ozali mokristo na siɛklɛ ya liboso. Lisangá na bino ezwi mokanda oyo euti epai ya ntoma Paulo. Ntango ozali koyoka ndenge bazali kotánga yango, omoni ete Paulo azongeli mbala mingi maloba ya “makomi mosantu,” elingi koloba Makomami ya Ebre. (2 Timote 3:15) Omilobeli, ‘nakosepela mpenza komona esika maloba yango euti.’ Kasi yango elingaki kozala pɛtɛɛ te. Mpo na nini?

MIKAPO TO BAVƐRSƐ EZALAKI TE

Tótala ndenge bamaniskri ya “makomi mosantu” na ntango ya Paulo ezalaki. Moko na yango balakisi awa—eteni ya mokanda ya Yisaya oyo euti na barulo ya Mbu ekufá. Omoni nini? Ebele ya makomi! Bilembo ya bopemi ezali te. Mikapo ná bavɛrsɛ ezali te ndenge ezalaka lelo.

Bato oyo bakomaki Biblia bakabolaki yango na mikapo mpe bavɛrsɛ te. Bakomaki na mobimba nsango oyo Nzambe apesaki bango mpo batángi mpe báyeba nsango mobimba, kasi te na mwa biteni. Osalaka bongo te ntango moto moko olingaka atindeli yo mokanda ya ntina? Otángaka yango mobimba, kasi kaka ndambo te, boye te?

Kasi, ezalaki mpasi ndenge mikapo mpe bavɛrsɛ ezalaki te. Mpo Paulo amonisa ete maloba oyo asaleli ezali ya ye te, akokaki kaka koloba “ndenge ekomamá” to “kaka ndenge Yisaya alobaki.” (Baroma 3:10; 9:29) Mpe soki omesaná na “makomi mosantu” te ekoki kozala mpasi mpo na komona esika maloba yango ezali.

Lisusu, “makomi mosantu” yango ezalaki kaka te mwa nsango moko oyo euti epai ya Nzambe. Na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, makomi mosantu esangisaki mikanda mikemike 66! Yango wana bato mingi oyo batángaka Biblia lelo basepelaka ndenge ezalaka na mikapo mpe bavɛrsɛ mpo esalisaka bango bámona makambo oyo bazali koluka, na ndakisa maloba ya bato mosusu oyo Paulo azongeli na mikanda na ye.

‘Kasi,’ okoki komituna, ‘nani akabolaki Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ?’

NANI AKABOLAKI NA MIKAPO?

Balobaka ete Stephen Langton, sango moko, moto ya Angleterre oyo na nsima akómaki episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry nde akabolaki Biblia na mikapo. Asalaki yango na ebandeli ya siɛklɛ ya 13 ya ntango na biso, ntango azalaki kotángisa na iniversite ya Paris na France.

Liboso ya Langton, bato mosusu ya mayele bamekaki mayele ndenge na ndenge ya kokabola Biblia na mikapo, mingimingi mpo na kosalisa na bolukiluki. Okoki komona ndenge ekómaki mpenza pɛtɛɛ mpo na bango bámona vɛrsɛ oyo bazali koluka kaka na mokapo moko na esika ya koluka yango na mokanda mobimba, na ndakisa mokanda ya Yisaya oyo ezali na mikapo 66.

Kasi nyonso wana ebimisaki mokakatano. Bato ya mayele babimisaki mayele ndenge na ndenge oyo ezalaki kosimba te. Na ndakisa Evanzile ya Marko ekabolamaki na mikapo soki 50, kasi te na mikapo 16 ndenge ezali lelo. Na Paris, na mikolo ya Langton, bana-kelasi bazalaki bato ya mikili ndenge  na ndenge mpe bamemaki Babiblia ya minɔkɔ ya bamboka na bango. Kasi, ezalaki mpasi balakisi mpe bana-kelasi bápesa esika makambo oyo bazali kolobela ezali. Mpo na nini? Mpo ndenge oyo mikapo ekabolamaki na bamaniskri na bango ekokanaki te.

Yango wana, Langton abimisaki mayele ya sika ya kokabola Biblia na mikapo. Buku moko (The Book—A History of the Bible) emonisi ete mayele yango “esepelisaki batángi mpe bakomeli mpe epalanganaki nokinoki na Mpoto.” Ye nde asalá ete mikapo ya Biblia ezala ndenge ezali lelo na Babiblia mingi.

NANI AKABOLAKI NA BAVƐRSƐ?

Bambula soki 300 na nsima, na katikati ya siɛklɛ ya 16, Robert Estienne moto ya mayele oyo ayebanaki mingi mpo na kobimisa mikanda na ekólo France akómisaki lisusu makambo pɛtɛɛ. Azalaki na mposa ete bato mingi báyekola Biblia. Amonaki ete ekozala malamu kosalela kaka mayele moko mpo na kokabola mikapo mpe bavɛrsɛ.

Estienne te nde abimisaki likanisi ya kokabola Biblia na bavɛrsɛ. Liboso na ye bato mosusu basalaki yango. Na ndakisa, basiɛklɛ mingi liboso, Bayuda oyo bazalaki kosala bakopi bakabolaki Makomami nyonso ya Ebre to Testama ya kala, na bavɛrsɛ kasi na mikapo te. Awa mpe, basalelaki mayele moko te kaka ndenge ezalaki mpo na kokabolama ya mikapo.

Estienne asalelaki mayele ya sika mpo na kokabola na bavɛrsɛ Makomami ya Grɛki ya bokristo to Testama ya sika mpe asangisaki yango na oyo ezalaki na Makomami ya Ebre. Na mobu 1553, abimisaki Biblia ya liboso ya mobimba (ebimaki na Français) ná mikapo mpe bavɛrsɛ ndenge ezali na Babiblia mingi lelo. Bato mosusu bazalaki kotyola mpe koloba ete bavɛrsɛ ekatikati Biblia na biteni, ebimisi yango lokola maloba ekatanákataná. Kasi, bato mosusu oyo bazalaki kobimisa Babiblia bakómaki nokinoki kosalela mayele yango.

LITOMBA MPO NA BAYEKOLI YA BIBLIA

Emonani ete kokabola Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ ezali likanisi malamu. Epesi vɛrsɛ mokomoko esika oyo moto akoki kokuta yango—lokola adrɛsi. Toboyi te, Nzambe te nde atindaki bato bákabola Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ mpe na bantango mosusu esalá ete maloba mosusu ezala na esika oyo esengelaki te. Kasi, esalaka ete ezala mpasi te tóyeba maloba oyo bazongeli mpe tótya elembo to tómona bavɛrsɛ oyo ekoki kozala na ntina mingi mpo na biso—kaka ndenge totyaka elembo na maloba to bafraze oyo tolingi kobosana te na buku to mokanda moko.

Atako ndenge Biblia ekabolamá na mikapo mpe bavɛrsɛ ezali na litomba, kasi tóbosana te ete ezali na ntina koyeba nsango ya Nzambe na mobimba na yango. Zalá na momeseno ya kotángaka lisolo mobimba, kasi te kaka mwa bavɛrsɛ. Kosala bongo ekosalisa yo omesana mpenza na “makomi mosantu, oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko.”2 Timote 3:15.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

Soki Biblia eutá na Nzambe, esengeli kokesana na buku mosusu nyonso oyo ekomamá.

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nini ekoki kosalisa yo oyeba Biblia?

Ata soki ozali moto ya ekólo nini, okoki koyeba nsango ya Nzambe oyo ezali na Makomami Mosantu.