Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 1 2016

Ndenge ya kotika komiyoka lokola ozangi libateli

Ndenge ya kotika komiyoka lokola ozangi libateli

BEBE azalaka na mposa ya libateli koleka moto mosusu nyonso. Ntango abotami, libateli na ye ezalaka kaka na mabɔkɔ ya baboti. Soki abandi kotambola, amonaka bato nyonso milaimilai lokola bilombe. Soki baboti na ye bazali pene na ye te, abangaka. Kasi amiyokaka ete abatelami soki asimbi lobɔkɔ ya tata to mama na ye.

Mpo mwana akola malamu esɛngi baboti bámoniselaka ye bolingo mpe bálendisaka ye. Soki bana bamoni ete baboti balingaka bango, bamiyokaka lisusu ete babatelami. Soki bazali komonisa bana ete makambo oyo bazali kosala ezali malamu, esalaka ete bana bálongola kobanga mpe bákende liboso.

Ntango bana bazali kokola, baninga ya solosolo basalaka mpe ete bámiyoka lisusu ete babatelami. Bamiyokaka malamu soki baninga na bango bazali wana mpe babangaka mpenza te na kelasi.

Na ntembe te, makanisi oyo nyonso etaleli mwana oyo abɔkwami malamu. Bilenge mosusu bazalaka na baninga mpenza te mpe bana mingi bazwaka mpenza lisalisi ya baboti na bango te. Melissa * alobi boye: “Soki namoni bafɔtɔ ya bato ya mabota oyo bazali kosala makambo elongo, nakanisaka boye: ‘Ebongaki nazala na bomoi ya boye ntango nazalaki elenge.’” Mbala mosusu yo mpe omiyokaka bongo.

KOBƆKWAMA KOZANGA LIBATELI

Ekoki kozala ete ntango ozalaki kokola, ozalaki komona lokola ozangi ntina. Mbala mosusu bazalaki mpenza kolinga yo te to mpe kolendisa yo. To mpe obosanaka te ndenge baboti na yo bazalaki kobunda ntango nyonso mpe yango ebomaki libala na bango; mpe mpo na yango okómá komipesa foti kaka mpamba. Likambo ya mabe koleka ekoki kozala ete baboti na yo bazalaki kobɛta to kofinga yo.

Bana oyo bazwaka libateli te basalaka nini? Bamosusu bamipesaka na drɔgɛ to komɛla masanga mingi ntango bakómi bilenge. Bamosusu bakɔtaka na bituluku ya bato ya mobulu mpo bámiyoka ete bazangi bato te. Bilenge oyo bazangi libateli bakoki koluka kozala na mwa moto mpo bámiyoka ete balingaka bango. Kasi bolingo yango ekendaka mosika te mpe mbala mingi kokabwana esalaka lisusu ete bázanga libateli.

Ata soki bilenge oyo bazangi libateli bakwei te na mitambo wana, ntango bazali kokola bamiyokaka lokola bazali mpenza na valɛrɛ te. Ana alobi boye: “Namindimisaki ete nazalaki na ntina te mpo mama na  ngai azalaki koloba na ngai bongo mbala na mbala. Nazali koyeba kutu te soki apesaká ngai ata longonya to amoniselaká ngai bolingo.”

Kozanga libateli etaleli kaka te ndenge tobɔkwamá. Tokoki komiyoka lokola tozangi libateli soki libala ekufi, mikakatano ya bobange to komitungisa mpo na ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato. Ata soki ezali mpo na likambo nini, ekoki kosilisa biso esengo mpe kobebisa boyokani na biso na basusu. Tokoki kosala nini mpo tótika komiyoka bongo?

NZAMBE AKIPAKA BISO

Esengeli tóyeba ete lisalisi ezali. Biso nyonso tozali na moto moko oyo akoki mpe alingi kosalisa biso—Nzambe.

Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Nzambe alobaki boye: “Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Yisaya 41:10, 13) Ezali mpenza kobɔndisa koyeba ete na ndenge ya elilingi Nzambe alingi kosimba biso na lobɔkɔ! Tozali na ntina te ya komitungisa!

Biblia elobeli basambeli ya Nzambe oyo bamitungisaki, ata bongo basimbaki lobɔkɔ ya Nzambe. Hana, mama ya Samwele amiyokaki ete azangi ntina mpo azalaki kobota te. Mbala mingi bazalaki kotyola ye mpo na yango. Yango wana, Hana azalaki lisusu na mposa ya kolya te mpe azalaki kolela mbala mingi. (1 Samwele 1:6, 8) Kasi ntango ayebisaki Nzambe ndenge azalaki komiyoka, azalaki lisusu mawamawa te.1 Samwele 1:18.

Na bantango mosusu, Davidi mokomi ya Nzembo amiyokaki mpe lokola azangi libateli. Banda bambula mingi, Mokonzi Saulo azalaki koluka kokanga ye. Davidi abikaki na mabɔkɔ ya Saulo mbala mingi mpe na bantango mosusu amiyokaki lokola makambo elekeli ye motó. (Nzembo 55:3-5; 69:1) Ata bongo, akomaki boye: “Nakolala mpɔngi na kimya, mpo kaka yo moko, Ee Yehova, nde ozali kofandisa ngai na kimya.”Nzembo 4:8.

Ezala Hana to Davidi bayebisaki Yehova mitungisi na bango mpe bamonaki ete asalisaki bango. (Nzembo 55:22) Ndenge nini tokoki kosala bongo lelo oyo?

 MAKAMBO MISATO YA KOSALA MPO OMIYOKA ETE OBATELAMI

1. Yekolá kotyela Yehova motema ndenge mwana atyelaka tata.

Yesu asɛngaki biso tóyekola koyeba Tata na ye, “Nzambe ya solo kaka moko.” (Yoane 17:3) Ntoma Paulo alobaki ete “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Yakobo akomaki boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”Yakobo 4:8.

Koyeba ete tozali na Tata na biso ya likoló oyo alingaka mpe akipaka biso ezali na ntina mpo tótika komitungisa. Toboyi te, ekoki kosɛnga ntango mpo na kotyela Yehova motema ndenge wana, kasi bato mingi bamoni ete kosala bongo esalisaka mpenza. Caroline alobi boye: “Ntango Yehova akómaki Tata na ngai, akómaki moto oyo nakoki koyebisa ye ndenge nazali komiyoka na motema. Yango ebɔndisaki ngai mingi mpenza!”

Rachel, alobi boye: “Yehova nde asalisaki ngai namiyoka ete nabatelami ntango natikalaki kaka ngai moko, kozanga baboti na ngai. Nakokaki koloba na ye mpe kosɛnga ye asalisa ngai na mikakatano mpe asalisaki ngai.” *

2. Zaláká elongo na bandeko ya lisangá.

Yesu ateyaki bayekoli na ye bátalelanaka lokola bandeko. Ayebisaki bango boye: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Alingaki ete bayekoli na ye bálinganaka mpe bákóma libota moko monene ya basaleli ya Nzambe.Matai 12:48-50; Yoane 13:35.

Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo masangá na bango ezala esika ya kozwa esengo mpe libɔndisi ya bandeko oyo basali libota moko. (Baebre 10:24, 25) Mingi bamoni ete makita ya lisangá ekoki kosala lokola nkisi oyo esilisaka mpota oyo moto azoki na motema.

Eva, alobi boye: “Nazalaki na moninga na ngai moko ya motema na lisangá na biso oyo ayebaki mpasi na ngai. Azalaki koyoka ngai, kotángela ngai mpe kobondela elongo na ngai. Azalaki kosala nyonso nazala ngai moko te. Asalisaki ngai nabimisa oyo ezalaki na motema na ngai mpe nalongola kilo yango. Mpo na lisalisi na ye nakómaki lisusu komiyoka malamu.” Rachel abakisi boye: “Nazwaki ‘tata ná mama’ na lisangá mpe basalaki ete namiyoka mpenza ete balingi ngai mpe nabatelami.”

3. Moniseláká basusu bolingo mpe boboto.

Kolinga mpe komonisela basusu boboto esalaka ete boninga eumela. Yesu alobaki boye: “Esengo ya  kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Na ntembe te, tokomona ete soki tozali kolinga bato mingi, bakolinga mpe biso. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bópesaka, mpe bato bakopesa bino.”Luka 6:38.

Soki tozali kolinga bato mpe bato bazali kolinga biso tokomiyoka ete tobatelami. Ndenge Biblia emonisi yango, “bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakorinti 13:8) María alobi boye: “Nayebi ete makanisi mosusu ya mabe oyo nazalaki na yango mpo na ngai ezalaki lokuta. Kosalisa basusu mpe komibosana esalisaka ngai nalongola makanisi wana ya mabe. Nayokaka ntango nyonso esengo ntango nasalisaka basusu.”

LIBATELI MPO NA MOTO NYONSO

Makambo oyo tolobeli awa na likoló ezali te ‘nkisi moko’ oyo esalisaka moto mbala moko mpo na libela. Kasi ekoki kosalisa mpenza. Caroline alobi boye: “Namiyokaka kaka lokola nazangi libateli, kasi sikoyo namiyokaka ete nazali na valɛrɛ. Nayebi ete Nzambe akipaka ngai mpe nazali na baninga mingi ya motema oyo basalaka namiyoka ete nabatelami.” Rachel amiyokaka mpe bongo, alobi boye: “Na bantango mosusu, nayokaka mawa makasi. Kasi nazali na bandeko oyo tosambelaka na bango oyo nakoki koluka toli, baoyo basalisaka ngai natalela makambo na ndenge ebongi. Na nyonso, nazali na Tata na likoló oyo nasololaka na ye mikolo nyonso. Yango esalisaka ngai mpenza.”

Biblia elobeli mokili ya sika oyo ezali koya esika moto nyonso akomiyoka ete abatelami

Solisyo ya libela mpe ezali. Biblia elobeli mokili ya sika oyo ezali koya esika moto nyonso akomiyoka ete abatelami. Liloba ya Nzambe elaki boye: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Mika 4:4) Na ntango yango, moto moko te akosala ete tómiyoka ete tozangi libateli to akosala biso mabe. Ata mpasi oyo etikalá na motema na biso “ekokanisama lisusu te.” (Yisaya 65:17, 25) Nzambe ná Mwana na ye Yesu Kristo bakotya “boyengebene ya solo” oyo ekosala ete tózala na “kimya mpe libateli mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”Yisaya 32:17.

^ par. 5 Bankombo nyonso ezali ya bango te.

^ par. 21 Batatoli ya Yehova bayekolaka Biblia ofele elongo na bato oyo balingaka kokóma baninga ya Nzambe.