Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 1 2016

 BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Pesá ngai ata mbula moko ya kimya mpe ya esengo

Pesá ngai ata mbula moko ya kimya mpe ya esengo
  • ABOTAMAKI NA: 1971

  • EKÓLO: FRANCE

  • BOMOI NA YE YA KALA: NAMIPESAKI NA MOBULU, BOMOI YA MBINDO MPE DRƆGƐ

NDENGE NAZALAKI:

Libota na ngai ezalaki kofanda na Tellancourt, mwa mboka moko na nɔrdi-ɛsti ya France. Tata na ngai azalaki moto ya France mpe mama moto ya Italie. Ntango nazalaki na mbula mwambe, tokendaki kofanda na kartye moko ya babola na Rome, na Italie. Kuna, tokómaki na bomoi moko ya mpasi. Baboti na ngai bazalaki koswana makasi mpo na mikakatano ya mbongo.

Ntango nazalaki na mbula 15, mama ayebisaki ngai nabimaka mpo nazwa baninga. Na yango, nabandaki kotika ndako na biso na boumeli ya ntango molai. Eumelaki te nakómaki na baninga ya mabe. Mokolo moko mobali moko oyo amonanaki lokola moninga, ayaki pene na ngai. Apesaki ngai drɔgɛ mpe nazwaki yango mpo nalingaki ete amona ngai mwana moke te. Namipesaki nokinoki na drɔgɛ mpe bomoi ya mbindo. Na mabaku mingi, basangisaki na ngai nzoto na makasi. Nakómaki komona bomoi na ngai ntina te; nazalaki kobanga lisusu liwa te. Nazalaki komiyoka lokola nde nazali ngai moko mpe nazangi elikya. Na mbula 16, namɛlaki molangi mobimba ya wiski mpe namibwakaki na lake mpo namiboma. Nasalaki mikolo misato kozanga komiyeba.

Nakómaki kosepela na bomoi, kasi nakómaki mobulu mpe kobuba bato. Nazalaki koluka bato oyo bakolinga kosangisa na ngai nzoto, na nsima nazalaki kotyela bango drɔgɛ mpe koyiba eloko nyonso ya valɛrɛ oyo bazalaki na yango. Etuluku ya babandi ezalaki kosalela ngai mpo na kotɛkela bango drɔgɛ na Italie. Mbala mingi bapolisi bazalaki kokanga ngai. Bomoi na ngai ezalaki lisusu na ntina te mpo nayebaki eloko ya kosala te. Kasi nazalaki kondima ete soki nazali na bomoi ezali mpamba te. Nabondelaki Nzambe, nasɛngaki ye apesa ngai ata mbula moko ya kimya mpe ya esengo.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango nazalaki na mbula 24, nazwaki ekateli ya kokende na Angleterre. Bomoi na ngai ezalaki na likama mpo nazalaki na boyokani na batɛki drɔgɛ. Liboso nakende, nakendaki kotala mama mpe nakamwaki ntango namonaki mobali moko na nkombo Annunziato Lugarà azali kosolola na mama makambo ya Biblia. * Lokola nayebaki ete azalaki moto ya mobulu, nabangaki mpe natunaki ye mpo na nini ayaki wana.  Ayebisaki ngai mbongwana monene oyo asalaki na bomoi na ye mpo akóma Motatoli ya Yehova, mpe ayebisaki ngai nalaka ye ete nakosolola na Batatoli ntango nakokóma na Angleterre. Nandimaki ete nakosala yango. Kasi ntango nakómaki kuna, nazongelaki nokinoki bomoi na ngai ya mabe.

Mokolo moko nakutanaki na Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki kokabola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na balabala moko ya monene na Londres. Ntango nakanisaki elaka oyo napesaki Annunziato, natunaki Motatoli yango soki akoki koyekola na ngai Biblia.

Makambo oyo nayekolaki na Biblia ekamwisaki ngai mpenza. Na ndakisa, maloba oyo ezali na 1 Yoane 1:9, oyo elobi mpo na Nzambe ete “soki toyamboli masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso,” esimbaki motema na ngai. Vɛrsɛ yango esalisaki ngai mpenza mpo nazalaki komimona mbindo mpo na bomoi ya mabe wana. Nakómaki mbala moko kokende losambo ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Bayambaki ngai malamu. Ntango namonaki bomoko oyo bazalaki na yango, likambo oyo nazalaki koluka, nasepelaki kozala na kati ya lisangá yango ya bandeko.

Atako kotika drɔgɛ mpe bomoi na ngai wana ya mbindo ezalaki mpasi te, kasi kobongisa bomoto na ngai ezalaki mpenza mpasi. Namonaki ete esengeli nasalelaka bato makambo na limemya. Kutu, tii sikoyo nasalaka makasi mpo na kotika bizaleli na ngai mosusu ya mabe. Kasi, na lisalisi ya Yehova, nasalaki mbongwana. Nsima ya sanza motoba ya koyekola Biblia, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Ezalaki na 1997.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nsima ya batisimo, nabalaki elenge mwasi moko na nkombo Barbara oyo autaki mpe kokóma Motatoli ya Yehova. Ntango moninga na ngai moko ya kala amonaki mbongwana oyo nasalaki, abandaki koyekola Biblia. Na nsima, ye ná leki na ye ya mwasi bakómaki Batatoli ya Yehova. Nkɔkɔ na ngai ya mwasi, oyo azalaki na mbula 80, abandaki mpe koyekola Biblia mpe azwaki batisimo liboso akufa.

Lelo oyo nazali nkulutu na lisangá mpe ngai ná mwasi na ngai tolekisaka bangonga mingi na koteya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Italien Biblia, na Londres. Na bantango mosusu, namitungisaka mpo na bomoi na ngai ya kala, kasi Barbara asalisaka ngai mpenza. Sikoyo, makambo ezali malamu na libota ndenge nazalaki kolinga mpe nazali na Tata ya bolingo oyo nazalaki koluka. Nasɛngaki Nzambe apesa ngai mbula moko ya kimya mpe ya esengo, kasi apesi ngai mingi koleka!

Sikoyo, makambo ezali malamu na libota ndenge nazalaki kolinga mpe nazali na Tata ya bolingo oyo nazalaki koluka

^ par. 10 Talá lisolo “Biblia ebongolaka bato—Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso” lisolo ya Annunziato Lugarà na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2014, nkasa 8-9.

Makambo mosusu

LAMUKÁ!

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?

Nini ekoki kotinda moto amona liwa lokola moninga?