Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2016

Omonaka ete kopesa basusu formasyo ezali na ntina?

Omonaka ete kopesa basusu formasyo ezali na ntina?

“Liteya ya malamu nde nakopesa bino.”MASESE 4:2.

NZEMBO: 93, 96

1, 2. Mpo na nini tosengeli kopesa basusu formasyo mpo bázwa mikumba na lisangá?

YESU asalaki mosala makasi mpo na koteya nsango ya Bokonzi. Alekisaki mpe ntango mingi mpo na kopesa bayekoli na ye formasyo. Alakisaki bango ndenge ya koteya mpe kobatela etonga ya Nzambe. Bayekoli bayekolaki ndenge ya kozala babateli ya mpate ya malamu. (Matai 10:5-7) Filipe azalaki komipesa mingi na mosala ya kosakola, kasi apesaki mpe bana na ye ya basi formasyo mpo básala mpe mosala yango. (Misala 21:8, 9) Lelo oyo, biso mpe tosengeli kopesa basusu formasyo. Mpo na nini?

2 Na masangá ya mokili mobimba, ezali na ebele ya bato ya sika oyo bazwi naino batisimo te. Bato wana ya sika basengeli kozwa formasyo. Tosengeli kosalisa bango báyeba mpo na nini ezali na ntina bátángaka mpe báyekolaka Biblia bango moko. Tosengeli mpe kolakisa bango ndenge ya kosakola nsango malamu mpe koteya. Bandeko mibali oyo bauti kozwa batisimo basengeli na formasyo mpo bákóma basaleli na misala mpe bankulutu na mikolo ezali koya. Biso nyonso na kati  ya lisangá tokoki kosala mingi mpo na kosalisa bato ya sika.Masese 4:2.

LAKISÁ BATO YA SIKA NDENGE YA KOYEKOLA BIBLIA

3, 4. (a) Ndenge nini ntoma Paulo amonisi boyokani oyo ezali kati na koyekola Makomami mpe mosala ya kosakola oyo ezali kobota mbuma? (b) Liboso ya kolendisa bayekoli ya Biblia báyekolaka Biblia bango moko, mpo na nini biso moko tosengeli kosala yango?

3 Mosaleli ya Yehova nyonso asengeli kotángaka mpe koyekolaka Biblia mpo na koyeba mokano ya Nzambe. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango epai ya bandeko ya Kolose ntango alobaki: “Tozali kotika te kobondela mpo na bino mpe kosɛnga ete bótonda na boyebi ya solosolo ya mokano na ye.” Mpo na nini ezalaki na ntina mingi ete bátángaka mpe báyekolaka Makomami? Mpo yango ekokaki kopesa bango bwanya mpe kosalisa bango báyeba ‘kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova mpo básepelisa ye mpenza.’ Ekokaki mpe kosalisa bango básala “mosala nyonso ya malamu” oyo Yehova alingaki ete básala, mingimingi kosakola nsango malamu. (Bakolose 1:9, 10) Yango wana, soki tozali koyekola na moto, tosengeli kosalisa ye ayeba ete kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala ekoki kosalisa ye asalela Yehova.

4 Tokoki te kosalisa bayekoli ya Biblia bámona ntina ya koyekolaka Biblia bango moko soki biso moko toyekolaka yango te. Kutu, soki totángaka Biblia mbala na mbala mpe tomanyolaka yango, yango ekosalisa biso na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ntango tozali na mosala ya kosakola mpe moto atuni biso motuna moko ya makasi, tokozala na likoki ya kosalela Biblia mpo na kopesa ye eyano. To, ntango tozali kotánga ndenge oyo Yesu, ntoma Paulo mpe bato mosusu balɛmbaki te na mosala ya kosakola, tokolendisama mpe tokokoba kosakola ata soki ezali mpasi. Mpe ntango tozali koyebisa basusu makambo oyo toyekolaki na boyekoli na biso moko mpe ndenge oyo yango esalisaki biso, tokoki mpe kolendisa bango báyekolaka lisusu Biblia na mozindo mpo bázwa matomba lokola biso.

5. Okoki kosala nini mpo na kosalisa bato ya sika bákóma na momeseno ya koyekola Biblia bango moko?

5 Okoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kopesa moyekoli formasyo ya koyekola Biblia mbala na mbala?’ Ntango mosusu okoki kolakisa ye ndenge ya kobongisa boyekoli ya mokanda oyo ozali koyekola na ye. Okoki kolendisa ye atángaka makambo oyo eyokani na liteya yango na apɛndisi ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe atala bavɛrsɛ ya Biblia  oyo bapesi. Na nsima, okoki kolakisa ye ndenge ya kobongisa makita mpo akoka kopesa eyano. Lendisá ye atángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! nyonso oyo ebimi. Okoki mpe kolakisa ye ndenge ya kozwa biyano na mituna ya Biblia, na ndakisa kosalela Watchtower Library to Watchtower—MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET. Soki ameki kosalela mayele wana nyonso na boyekoli na ye moko, na ntembe te, akosepela na yango mpe akolinga koyeba makambo mingi.

6. (a) Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli akóma kolinga Biblia na motema mobimba? (b) Moyekoli ya Biblia akosala nini soki akómi kolinga Makomami na motema na ye?

6 Ntango tozali koyekola na moto, tosengeli kosalisa ye ayeba ete Biblia ezali na ntina mingi mpo ekosalisa ye ayeba Yehova malamu. Na esika ya kotya ye mpanzi likoló mpo ayekola, tokoki nde komonisa ye ndenge ya kosala mpo asepela koyekola. Ntango azali koyekola makambo mingi oyo ezali na Biblia, akomiyoka lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.” (Nzembo 73:28) Na ntembe te, elimo ya Yehova ekosalisa moto oyo alingi kopusana penepene na ye.

LAKISÁ BATO YA SIKA NDENGE YA KOSAKOLA MPE KOTEYA

7. Ndenge nini Yesu apesaki basakoli ya nsango malamu formasyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Tokoki kozwa mateya mingi na ndenge oyo Yesu apesaki bantoma na ye formasyo. Yesu akendaki elongo na bango na mosala ya kosakola, mpe bamonaki ndenge azalaki koteya bato. Apesaki mpe bango malako ya sikisiki mpo na ndenge oyo basengelaki kosakola. (Matai, mokapo 10) [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na ntango moke, bantoma bayekolaki epai ya Yesu ndenge ya koteya bato mateya ya solo. (Matai 11:1) Tótalela makambo mibale oyo tokoki kolakisa bato ya sika ntango tozali na mosala ya kosakola.

8, 9. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kosolola na bato na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa basakoli ya sika básololaka na bato ndenge Yesu azalaki kosala?

8 Sololáká na bato. Yesu azalaki ntango nyonso te koteya ebele ya bato. Mbala mingi, azalaki kosolola na moto mokomoko, mpe azalaki kosala yango na boboto. Na ndakisa, asololaki lisolo moko ya malamu ná mwasi moko oyo ayaki kotoka mai na libulu moko pene na engumba Sikare. (Yoane 4:5-30) Yesu asololaki mpe na Matai Levi, oyo azalaki mokɔngɔli-mpako, mpe abengaki ye akóma moyekoli na ye. Matai andimaki kolanda ye mpe na nsima abengisaki Yesu ná bato mosusu na ndako na ye mpo na kolya. Kuna, Yesu ateyaki bato ebele.Matai 9:9; Luka 5:27-39.

Soki tozali kososola na bato na boboto, bakosepela mpenza koyoka biso

9 Yesu asololaki mpe na Natanaele na boboto, atako Natanaele alobaki mabe mpo na bato ya Nazarete. Lokola Yesu asololaki na ye na boboto, Natanaele abongolaki ndenge na ye ya kotalela Yesu, oyo azalaki moto ya Nazarete. Mpe Natanaele alingaki Yesu ayebisa ye makambo mosusu. (Yoane 1:46-51) Ndakisa ya  Yesu eteyi biso ete soki tozali kososola na bato na boboto, bakosepela mpenza koyoka biso. [2] [Talá maloba na nse ya lokasa.] Soki topesi bato ya sika formasyo mpo bálobaka ndenge wana, bakosepela lisusu mingi na mosala ya kosakola.

10-12. (a) Yesu asalaki nini mpo bato oyo basepelaki na nsango malamu bákoba kosepela na yango? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa basakoli ya sika bákolisa makoki na bango ya kosakola solo ya Biblia?

10 Teyáká bato oyo bandimi koyoka. Yesu azalaki na makambo mingi ya kosala. Kasi ntango bato bazalaki kosepela koyoka ye, azalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango mpe koteya bango makambo mingi. Na ndakisa, mokolo moko ebele ya bato bayanganaki na libongo mpo na koyoka Yesu. Na yango, Yesu amataki na masuwa elongo na Petro mpe ateyaki bango. Nsima na yango, alingaki mpe kopesa Petro liteya moko. Yesu asalaki likamwisi na ndenge asalisaki Petro akanga mbisi ebele. Na nsima, alobaki na Petro: “Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.” Mbala moko, Petro ná baoyo bazalaki elongo na ye “bazongisaki masuwa na mokili, mpe basundolaki biloko nyonso” mpe balandaki Yesu.Luka 5:1-11.

11 Nikodeme mpe alingaki koyekola makambo mingi epai ya Yesu. Kasi lokola Nikodeme azalaki moko ya basambisi ya Sanedrina, azalaki kobanga makambo oyo basusu bakoloba soki bamoni ye azali kosolola na Yesu. Yango wana, akendaki kotala Yesu na butu. Yesu azongisaki ye te, kasi alekisaki ntango mingi elongo na ye mpe alimbolelaki ye mateya ya solo oyo ezalaki na ntina mingi. (Yoane 3:1, 2) Yesu azalaki ntango nyonso kondima kosalela ntango na ye mpo na koteya bato mateya ya solo mpe kolendisa kondima na bango. Ndenge moko mpe, tosengeli kondima kokende kotala bato na ngonga oyo ebongi mpo na bango mpe kolekisa ntango elongo na bango mpo na kosalisa bango báyeba Biblia.

12 Ntango tobimi na bato ya sika na mosala ya kosakola, tokoki koteya bango bázongela moto nyonso oyo amonisi ete alingi tósolola na ye. Tokoki mpe kosɛnga ete tóbima elongo na bato ya sika ntango tozali kozongela bato to tokei koyekola na bango Biblia. Na ndenge yango, bakoyekola ndenge ya koteya basusu mpe bakomona ete kosalisa bato báyekola solo oyo etali Yehova epesaka esengo. Mpe basakoli wana ya sika bakosepela mingi kozongela bato yango mpe koyekola na bango Biblia. Bakoyekola kozala motema molai mpe bakolɛmba nzoto noki te, ata soki bazali kokuta bato na ndako te.Bagalatia 5:22; talá etanda “ Atikaki te.”

PESÁ BATO YA SIKA FORMASYO MPO BÁSALELA BANDEKO

13, 14. (a) Okanisi nini na bandakisa ya Biblia oyo elobeli bato oyo bamipimelaki makambo mingi mpo na bolamu ya basusu? (b) Na makambo nini okoki kopesa basakoli ya sika mpe bilenge formasyo mpo bámonisa ete balingaka bandeko?

13 Yehova alingaka ete basaleli na ye bálinganaka lokola bandeko mpe básalisanaka. (Tángá Luka 22:24-27; 1 Petro 1:22.) Biblia emonisi ete Yesu apesaki nyonso oyo azalaki na yango, ezala bomoi na ye, mpo na kosalisa basusu. (Matai 20:28) Dorkasi “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.” (Misala 9:36, 39) Maria ‘asalelaki bandeko ya Roma misala ya makasi mingi.’ (Baroma 16:6) Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika báyeba ete ezali na ntina mingi kosalela bandeko makambo ya malamu?

Pesá bato ya sika formasyo mpo bálinga bandeko mpe básalela bango (Talá paragrafe 13 mpe 14)

 14 Tokoki kosɛnga bato ya sika báya elongo na biso ntango tokei kotala mibange to bandeko oyo bazali kobɛla. Mpe ntango baboti bakei kotala bandeko ya ndenge wana, bakoki kokende elongo na bana na bango soki esengeli. Bankulutu bakoki kosɛnga bilenge to bato ya sika básala elongo na bango ntango balingi kokende kopesa mibange biloko ya kolya to kobongisela bango ndako. Soki bilenge mpe bato ya sika bamoni ndenge bandeko mibali mpe basi bazali kosalisana, bango mpe bakoyekola kosala bongo. Na ndakisa, ntango nkulutu moko azalaki kosakola na mboka moko, azalaki na momeseno ya kotala mpe bandeko oyo bafandaka na mboka yango, mpo na koyeba soki bazali ndenge nini. Ndeko mobali moko ya elenge oyo azalaki kosakola elongo na nkulutu yango mbala na mbala amekolaki ndakisa malamu ya nkulutu yango mpo na koyeba oyo akoki kosala mpo na kosalisa bandeko.Baroma 12:10.

15. Mpo na nini ezali na ntina ete bankulutu bátya likebi na bokoli ya mibali na kati ya lisangá?

15 Yehova apesá mibali mokumba ya koteya Liloba ya Nzambe na lisangá. Yango wana, ezali na ntina mingi ete bandeko mibali báyeba ndenge ya koteya malamu ntango bazali kosala badiskur. Soki ozali nkulutu, mbala mosusu okoki koyoka mosaleli na misala moko ntango azali komekameka diskur na ye mpe kosalisa ye abongisa bisika oyo esengeli. (Nehemia 8:8) [3]—Talá maloba na nse ya lokasa.

16, 17. (a) Ndenge nini ntoma Paulo azalaki kolandela bokoli ya Timote? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa bandeko oyo bakokóma babateli ya mpate formasyo ya malamu?

16 Lelo oyo, esengeli kopesa bandeko mibali mingi formasyo mpo bákóma babateli ya mpate na lisangá. Ntoma Paulo apesaki Timote formasyo mpe alendisaki ye apesa basusu formasyo. Alobaki: “Kobá kozwa nguya na kati ya boboto monene oyo eyokani na Kristo Yesu, mpe makambo oyo oyokaki epai na ngai oyo batatoli mingi mpe balobeli, pesá bato ya sembo makambo yango, bongo bango mpe bakoyeba mpenza koteya bato mosusu.” (2 Timote 2:1, 2) Timote ayekolaki makambo mingi epai ya Paulo, oyo azalaki nkulutu mpe ntoma, na ndakisa ndenge ya kobongisa lolenge na ye ya kosakola mpe ndenge ya kosalisa basusu na lisangá.2 Timote 3:10-12.

17 Ntoma Paulo alekisaki ntango mingi elongo na Timote mpo alingaki kondimisama ete Timote azwaki formasyo ya malamu. (Misala 16:1-5) Bankulutu bakoki komekola ntoma Paulo soki bazali kozwa basaleli na misala ya makoki mpo bákende elongo na bango ntango bazali kokende kotala bandeko mpo na kolendisa bango.  Na ndenge wana, basaleli na misala bakoyekola epai ya bankulutu ndenge ya koteya basusu, komonisa motema molai, mpe kotyela Yehova motema ntango bazali kobatela etonga na ye.1 Petro 5:2.

FORMASYO EZALI NA NTINA MINGI

18. Mpo na nini kopesa basusu formasyo na mosala ya Yehova ezali na ntina?

18 Na ntango oyo ya nsuka, bato mingi ya sika basengeli kozwa formasyo mpo bákolisa makoki na bango na mosala ya kosakola. Tozali mpe na mposa ya bandeko mibali mpo na kobatela lisangá. Yehova alingi ete basaleli na ye nyonso bázwa formasyo ya malamu, mpe apesi biso libaku malamu ya kosalisa bato ya sika. Yango wana, ezali na ntina tósala makasi mpo na kopesa basusu formasyo, ndenge Yesu mpe ntoma Paulo basalaki. Tosengeli kopesa bandeko mingi formasyo, mpo makambo ya kosala ezali naino mingi na mosala ya kosakola liboso ete nsuka eya.

19. Mpo na nini osengeli kondima ete milende makasi oyo ozali kosala mpo na kopesa basusu formasyo na mosala ya Yehova ekolonga?

19 Kopesa bato ya sika formasyo esɛngaka ntango mpe milende. Kasi, tokoki kozala na kondima ete Yehova ná Yesu bakosalisa biso tóyeba ndenge ya kopesa basusu formasyo na lolenge oyo eleki malamu. Tokosepela mingi ntango tokomona bandeko oyo topesaki formasyo ‘bazali kosala mosala makasi mpe koboma nzoto’ na lisangá to na mosala ya kosakola. (1 Timote 4:10) Na ntango wana, tosengeli kokoba kosala oyo tokoki mpo na kokende liboso na elimo, kobongisa bizaleli na biso ya bokristo, mpe kopusana penepene na Yehova.

^ [1] (paragrafe 7) Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye (1) básakola nsango malamu ya Bokonzi; (2) bátyela Nzambe motema ete akopesa bango bilei mpe bilamba oyo basengeli na yango; (3) bábendana na bato na maloba te; (4) bátyela Nzambe motema ntango bato bazali konyokola bango; mpe (5) bábanga te oyo bato bakoki kosala bango.

^ [2] (paragrafe 9) Buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 62-64 ezali na makanisi ya malamu mpenza mpo na ndenge ya kosolola na bato na mosala ya kosakola.

^ [3] (paragrafe 15) Buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 52-61 emonisi ndenge oyo bandeko mibali bakoki kobongisa lolenge ya kosala badiskur na lisangá.