Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2016

Omonaka ete osengeli kokoba kokola na elimo?

Omonaka ete osengeli kokoba kokola na elimo?

“Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya.”1 TIMOTE 4:13.

NZEMBO: 45, 70

1, 2. (a) Ndenge nini Yisaya 60:22 ezali kokokisama na ntango oyo ya nsuka? (b) Bosɛnga nini ezali sikoyo na eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali awa na mabele?

“OYO ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya.” (Yisaya 60:22) Maloba wana ezali kokokisama sikoyo na ntango oyo ya nsuka. Kutu, na boumeli ya mobu 2015, Batatoli ya Yehova 8 220 105 basakolaki nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba! Mpo na bokoli ya basaleli na ye, Yehova alobaki ete: “Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.” Na yango, lokola ntango ezali koleka, biso nyonso tokozala na makambo mingi ya kosala. Tozali kosala nyonso oyo tokoki sikoyo mpo na kosakola mpe koteya nsango malamu? Lelo oyo, bandeko mingi bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza to babongisi-nzela basungi. Basusu bakendá kofanda na bisika mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, mpe basusu bazali kosala mosala makasi ya kotonga Bandako ya Bokonzi.

2 Mbula na mbula, masangá soki 2 000 ya sika ezali kofungwama. Masangá yango ezali na mposa ya bankulutu mpe  basaleli na misala. Mbula na mbula, bankóto ya basaleli na misala basengeli kokóma bankulutu mpe bankóto ya bandeko mibali mosusu basengeli kokóma basaleli na misala. Emonani polele ete, ezali na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo,” kaka mpo na bandeko mibali te kasi mpe mpo na bandeko basi.1 Bakorinti 15:58.

ESENGELI KOSALA NINI MPO NA KOKOLA NA ELIMO?

3, 4. Mpo na yo, kokola na elimo elimboli nini?

3 Tángá 1 Timote 3:1. Ntoma Paulo apesaki longonya na bandeko oyo bazalaki “koluka kosala mosala ya mokɛngɛli.” Soki moto azali koluka kozwa eloko moko oyo ezali mosika, ekoki kosɛnga ete asala milende mpo na kokende kozwa yango. Sikoyo, kanisá ete ndeko mobali moko azali na mposa ya kokokisa masɛngami mpo akóma mosaleli na misala. Amoni ete asengeli kosala milende mpo na kokolisa lisusu bizaleli ya mokristo. Na nsima, ntango akómi mosaleli na misala, akobi kosala makasi mpo akokisa masɛngami mpo akóma nkulutu.

4 Bandeko mibali mpe basi mosusu bazali kobongola makambo mosusu na bomoi na bango mpo balingi kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Na ndakisa, bakoki kozala na mposa ya kokóma babongisi-nzela, kosala na Betele, to kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Tótala ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso nyonso tókoba kokola na elimo.

KOBÁ KOKOLA NA ELIMO

5. Ndenge nini bilenge bakoki kosalela makasi na bango na mosala ya Bokonzi?

5 Bilenge bakoki kosala mingi na mosala ya Yehova mpo bazali naino makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ. (Tángá Masese 20:29.) Na Betele, bandeko mibali mosusu ya bilenge basalaka mosala ya konyata mpe kokangisa babuku mpe Babiblia. Bandeko mibali mpe basi mingi ya bilenge batongaka Bandako ya Bokonzi to basalisaka na kobongisa yango. Basusu bandimaka kokende kopesa mabɔkɔ na bisika oyo makama ebimi. Mpe bilenge mingi oyo bazali babongisi-nzela bayekolaka minɔkɔ mosusu to bakendaka kosakola nsango malamu na bisika mosusu.

6-8. (a) Ndenge nini elenge moko abongolaki lolenge na ye ya kotalela mosala ya Nzambe, mpe yango ebimisaki matomba nini? (b) Ndenge nini tokoki ‘komeka mpe komona ete Yehova azali malamu’?

6 Tolingaka Yehova mpe tolingi kopesa ye oyo eleki malamu. Atako bongo, mbala mosusu tokoki koyoka lokola ndeko Aaron. Azalaki na mposa ya kosalela Nzambe, kasi azalaki na esengo te. Atako azalaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola banda ntango azalaki elenge, alobi ete: “Nazalaki kobaye makita mpe mosala ya kosakola.” Na yango, asalaki nini?

7 Ndeko Aaron asalaki milende mpo na kotánga Biblia mbala na mbala, kobongisa makita, mpe kopesa biyano na makita yango. Akómaki mpe kobondela mingi. Nyonso wana esalisaki ye akola na elimo. Ayebaki Yehova lisusu malamu mpe akómaki kolinga ye lisusu mingi. Yango esalisaki ye akóma na esengo. Akómaki mobongisi-nzela, akendaki kosalisa na bisika oyo makama ebimaki, mpe akendaki kosakola na ekólo mosusu. Lelo oyo, azali nkulutu mpe asalaka na Betele. Ayokaka ndenge nini mpo na bomoi na ye? Alobi boye: “‘Namekaki mpe namonaki ete Yehova azali malamu.’ Lokola  apambolaka ngai, namonaka ete nazali na nyongo na ye mpe yango etindaka ngai nasala mingi na mosala na ye, mpe yango ememelaka ngai mapamboli mosusu.”

8 Mokomi ya Nzembo alobaki: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.” Abakisaki: “Baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.” (Tángá Nzembo 34:8-10.) Ya solo, ntango topesaka Yehova oyo eleki malamu, toyokaka mpenza esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa ye. Mpe ye akokokisa elaka na ye ya kokokisa bamposa na biso.

KOLƐMBA TE

9, 10. Mpo na nini ezali na ntina ‘oyeba kozela’?

9 Tokoki kozala na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Kasi tokosala nini soki tozelaka banda kala mpo na kozwa mokumba moko na lisangá to mpo makambo ya bomoi na biso ebongwana? Ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai. (Mika 7:7) Ata soki Yehova atiki nzela ete makambo ezala ndenge ezali sikoyo, tokoki kondima ete akosunga biso ntango nyonso. Ndakisa ya Abrahama ekoki koteya biso. Yehova alakaki ye ete akobota mwana mobali, kasi esengelaki azela bambula mingi liboso ete Yisaka abotama. Na boumeli ya ntango yango, Abrahama azalaki na motema molai mpe abungisaki kondima soki moke te epai ya Yehova.Ebandeli 15:3, 4; 21:5; Baebre 6:12-15.

10 Ezali solo ete kozela ezalaka pɛtɛɛ te. (Masese 13:12) Kasi soki tokobi kokanisa lolenge bomoi na biso ezali mpe koyoka motema mpasi mpo makambo etamboli te ndenge tokanisaki, tokolɛmba nzoto. Tokoki nde kosalela ntango yango mpo na kokolisa bizaleli oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mikumba mosusu na lisangá.

Soki tozali komanyola na makambo oyo tozali kotánga na Biblia, tokokóma na bwanya mpe tokozwa bikateli ya malamu

11. Bizaleli nini ya elimo tokoki kosala makasi tókolisa, mpe mpo na nini ezali na ntina?

11 Kolisá bizaleli mpe makoki oyo osengeli na yango. Soki ozali kotánga Biblia mpe komanyola na makambo oyo ozali kotánga, okoki kokóma na bwanya, kokanisa malamu, mpe kozwa bikateli ya malamu. Bandeko mibali basengeli na bizaleli wana mpo na kotambwisa lisangá. (Masese 1:1-4; Tito 1:7-9) Ntango tozali koyekola Biblia, tokoyeba ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mingi. Mpe mokolo na mokolo, tokoki kosalela makambo oyo toyekoli mpo na kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova. Na ndakisa, tokoyeba ndenge ya kosalela basusu makambo, ndenge ya kosalela mbongo, mpe ndenge ya kopona kominanola mpe bilamba.

12. Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki komonisa ete babongi kotyelama motema?

12 Kokisá malamumalamu mokumba nyonso oyo bapesi yo. Ntango basaleli ya Nzambe bazalaki kotonga lisusu tempelo, Nehemia azalaki na mposa ya mibali mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge. Aponaki baoyo bazalaki na lokumu malamu. Ayebaki ete mibali yango bazalaki kolinga Nzambe  mpe bakokaki kosala mosala nyonso ya makasi oyo bakopesa bango. (Nehemia 7:2; 13:12, 13) Ndenge moko mpe lelo oyo, bandeko oyo bazali sembo mpe basalaka mosala makasi bazalaka na lokumu malamu mpe bakoki kopesa bango mikumba mosusu. (1 Bakorinti 4:2) Na yango, tózala mibali to basi, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokokisa mosala nyonso bapesi biso.Tángá 1 Timote 5:25.

13. Ndenge nini okoki kolanda ndakisa ya Yozefe soki basusu basaleli yo makambo na bosembo te?

13 Tyelá Yehova motema. Okoki kosala nini soki basusu basaleli yo makambo na bosembo te? Okoki komona malamu olimbola bango ndenge oyo ozali koyoka. Kasi soki ozali kaka koluka komilongisa mpe komonisa ete ozali na libunga te, okoki kobebisa lisusu makambo. Tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yozefe. Bandeko na ye basalaki ye mabe. Bato bakoselaki ye makambo, mpe batyaki ye na bolɔkɔ mpo na likambo oyo asalaki te. Kasi Yozefe atyelaki Yehova motema. Azalaki kokanisa bilaka ya Yehova, mpe atikalaki sembo. (Nzembo 105:19) Na bantango wana ya mpasi, akolisaki bizaleli mingi ya malamu oyo esalisaki ye na nsima ntango azwaki mosala ya ntina ya kokokisa. (Ebandeli 41:37-44; 45:4-8) Soki basusu basaleli yo makambo ya kozanga bosembo, sɛngá Yehova bwanya na nzela ya libondeli. Akosalisa yo mpo okitisa motema mpe osalela basusu makambo na boboto ntango ozali koloba na bango.Tángá 1 Petro 5:10.

 KOLISÁ MAKOKI NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

14, 15. (a) Mpo na nini tosengeli ntango nyonso ‘kokeba’ na ndenge na biso ya kosakola? (b) Ndenge nini okoki kobongola lolenge na yo ya kosakola na bisika mosusu? (Talá elilingi ya ebandeli mpe etanda “ Okosepela komeka mayele mosusu?”)

14 Ntoma Paulo ayebisaki Timote akoba kobongisa lolenge na ye ya kolimbola Makomami. Alobaki: “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.” (1 Timote 4:13, 16) Timote azalaki kosakola banda bambula mingi. Kasi mpo na nini asengelaki kobongisa lolenge na ye ya kosakola? Timote ayebaki ete bato babongwanaka mpe makambo ebongwanaka. Alingaki ete bato bákoba koyoka ye, yango wana asengelaki kokoba kobongisa mpe kobongola lolenge na ye ya koteya bango. Biso mpe tosengeli kosala bongo ntango tozali kosakola lelo oyo.

15 Na bisika mosusu, tomonaka ete bato mingi bazalaka na bandako te ntango tosakolaka ndako na ndako. Na bisika mosusu, bato bakoki kozala na ndako, kasi tozali te na likoki ya kokɔta na baporte na bango, mbala mosusu mpo tozali te na ndingisa ya kokɔta na bandako oyo bafandaka. Soki ezali bongo na teritware na bino, mpo na nini te komeka mayele mosusu mpo na kokutana na bato?

16. Ndenge nini litatoli na bisika ya bato nyonso ekoki kobota mbuma?

16 Bandeko mingi basepelaka kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso. Na ndakisa, bakendaka na bisika oyo bato bazelaka bingbunduka, babisi, na bazando, mpe na baparke mpo na koluka bato ya kosolola na bango. Mpo na kobanda na moto lisolo, mosakoli akoki kolobela likambo moko oyo euti kosalema. To akoki koloba likambo moko ya malamu mpo na bana ya moto yango, to mpe kotuna ye motuna oyo etali mosala na ye. Soki moto yango asepeli na lisolo, mosakoli akoki kolobela likanisi moko ya Biblia mpe kotuna moto yango soki akanisi nini na likambo yango. Mbala mingi, bato basepelaka koyeba makambo mingi ya Biblia.

17, 18. (a) Okoki kosala nini mpo otika kobanga kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso? (b) Mpo na nini omoni ete maloba oyo Davidi alobaki mpo na kokumisa Yehova ezali na ntina mingi ntango ozali kosakola?

17 Ntango mosusu omonaka ete ezali mpasi kobanda lisolo na balabala na moto oyo oyebi te. Ndeko Eddie, oyo azali mobongisi-nzela na engumba New York azalaki koyoka bongo. Kasi azwaki eloko moko oyo esalisaki ye atika kobanga. Alobi boye: “Na losambo na kati ya libota, ngai ná mwasi na ngai tolukaka na mikanda mpo na koyeba ndenge ya koyanola ntango bato babimisi ntembe to makanisi na bango. Totunaka mpe makanisi epai ya Batatoli mosusu.” Lelo oyo, ndeko Eddie asepelaka mingi kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso.

18 Soki tozali kosakola mingi mpe kobongisa lolenge na biso ya koyebisa bato nsango malamu, basusu bakomona ete tozali kokola na elimo. (Tángá 1 Timote 4:15.) Ntango mosusu tokoki ata kosalisa moto moko akóma mosaleli ya Yehova. Mokonzi Davidi alobaki: “Nakopambola Yehova ntango nyonso; ntango nyonso lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai. Molimo na ngai ekomikumisa na Yehova; bato ya komikitisa bakoyoka mpe bakosepela.”Nzembo 34:1, 2.

KOBÁ KOKOLA NA ELIMO MPO OSANZOLA YEHOVA

19. Mpo na nini mosaleli ya sembo ya Yehova asengeli kozala na esengo, ata soki makambo mosusu epekisi ye asakola mingi?

19 Mokonzi Davidi alobaki mpe ete: “Ee Yehova, misala na yo nyonso  ekokumisa yo, mpe bato na yo ya sembo bakopambola yo. Bakolobela nkembo ya bokonzi na yo, mpe bakolobela nguya na yo, mpo na koyebisa bana ya bato misala na yo ya nguya mpe bonene ya nkembo ya bokonzi na yo.” (Nzembo 145:10-12) Bato nyonso oyo balingaka Yehova mpe bazali sembo epai na ye bazalaka na mposa makasi ya koyebisa basusu makambo na ye. Kasi okosala nini soki mpo na maladi to bobange ozali kokoka lisusu te kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako? Kobosana te ete mbala nyonso oyo olobaka mpo na Yehova epai ya bato oyo bazali zingazinga na yo, na ndakisa balifulumɛ mpe minganga, osanzolaka Yehova. Soki ozali na bolɔkɔ mpo na kondima na yo, okoki kaka kozala na likoki koyebisa basusu makambo ya Yehova, mpe yango ekosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Asepelaka mpe mingi soki ozali kosalela ye atako bato mosusu ya libota na yo bazali kosala yango te. (1 Petro 3:1-4) Ata na mikakatano ya makasi, okoki kokumisa Yehova, kokoba kopusana penepene na ye, mpe kokola na elimo.

20, 21. Soki bapesi yo misala mingi na ebongiseli ya Yehova, ndenge nini okoki kokóma lipamboli mpo na basusu?

20 Kozanga ntembe, Yehova akopambola yo soki okobi kopusana penepene na ye mpe ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela ye. Mbala mosusu soki obongoli programɛ na yo to lolenge na yo ya bomoi, okoki kozwa mabaku mingi ya kosalisa bato báyeba bilaka kitoko ya Nzambe. Okoki mpe kozala na likoki ya kosalisa bandeko lisusu mingi. Mpe kanisá ndenge oyo bandeko bakolinga yo mingi ntango bakomona yo ozali kosala mosala makasi na lisangá!

21 Ezala tolekisi bambula boni na mosala ya Yehova, biso nyonso tokoki kokoba kopusana penepene na ye mpe kokola na elimo. Na boyekoli oyo ekolanda, tokolobela ndenge oyo tokoki kosalisa basusu bákola ndenge wana.