Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2016

Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?

Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?

“Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; . . . mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”BAEFESE 5:33.

NZEMBO: 87, 3

1. Atako mbala mingi libala ebandaka na esengo, bato oyo babalani basengeli koyeba ete bakokutana na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MOKOLO ya libala, ntango mobali amoni elongi kitoko ya mwasi na ye, bango mibale bazalaka na esengo makasi. Ntango bazalaki bafianse, bolingo na bango ekolaki mingi, bakómaki na mposa makasi ya kobalana, yango wana moto na moto alaki moninga ete akozala sembo. Kasi nsima ya mokolo ya libala, ntango babandi kofanda esika moko, esɛngaka bábongola makambo mosusu mpo bákoba kozala na bomoko. Yehova, Mobandisi ya libala, alingi ete mabala nyonso ezala na esengo mpe ezala malamu; yango wana apesi toli ya bwanya na Liloba na ye, Biblia. (Masese 18:22) Atako bongo, Biblia eyebisi biso ete bato ya kozanga kokoka oyo babalani bakokutana na “bolɔzi [to mikakatano] na kati ya mosuni na bango.” (1 Bakorinti 7:28) Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo mikakatano ezala mingi te? Mpe bakristo bakoki kosala nini mpo libala na bango ezala malamu?

2. Mitindo nini ya bolingo babalani basengeli komoniselana?

 2 Biblia emonisi ete bolingo ezali ezaleli ya ntina mingi na kati ya libala. Kasi, ezali na mitindo ndenge na ndenge ya bolingo oyo babalani basengeli komoniselana. Na ndakisa, basengeli komoniselana bolingo ya motema mpe bolingo ya mwasi ná mobali. Mpe soki bazali na bana, basengeli komoniselana lisusu mingi bolingo ya libota. Kasi, bolingo oyo esimbami na mitinda nde esalaka mpenza ete libala ezala malamu. Ntoma Paulo alobelaki bolingo yango na maloba oyo: “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”Baefese 5:33.

TÓTALELA MALAMUMALAMU MOKUMBA YA MOBALANI MOKOMOKO

3. Na libala, mwasi ná mobali basengeli kolingana ndenge nini?

3 Ntoma Paulo akomaki boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:25) Lelo oyo, bakristo balandaka ndakisa ya Yesu na ndenge balinganaka ndenge Yesu alingaki bayekoli na ye. (Tángá Yoane 13:34, 35; 15:12, 13.) Mobali ná mwasi oyo bazali bakristo basengeli kolingana makasi mpe kokóma tii na kondima kokufa mpo na moninga. Kasi, ntango mikakatano makasi ebimi na kati ya libala, basusu bakoki komona lokola ete bolingo na bango ezali mpenza makasi te. Nini ekoki kosalisa bango? Ezali bolingo oyo esimbami na mitinda, oyo “ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.” Bolingo ya ndenge wana “esilaka soki moke te.” (1 Bakorinti 13:7, 8) Mwasi ná mobali basengeli kobosana te ete basalaki elako. Balakanaki ete bakolingana mpe bakozala sembo na libala na bango. Kokanisa elako wana esalisaka bakristo oyo babalá bálukaka lisalisi ya Yehova mpe básalaka na bomoko mpo na kosilisa ata mokakatano ya ndenge nini.

4, 5. (a) Lokola mobali azali mokonzi ya libota, mokumba na ye ezali nini? (b) Ndenge nini mwasi asengeli kotalela bokonzi ya mobali na ye? (c) Makambo nini mwasi moko ná mobali na ye basengelaki kobongola?

4 Ntoma Paulo amonisaki mokumba ya basi ná mibali ntango alobaki: “Basi bámikitisa liboso ya mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Kristo mpe azali mokonzi ya lisangá.” (Baefese 5:22, 23) Yango elimboli te ete mobali aleki mwasi na ye. Yehova amonisaki mokumba ya lokumu oyo mwasi azali na yango ntango alobaki: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” (Ebandeli 2:18) Mwasi asengeli kosalisa mobali na ye mpo azala mokonzi malamu ya libota. Mpe mobali asengeli komekola ndakisa ya bolingo oyo Yesu, “mokonzi ya lisangá,” amonisaki. Soki mobali asali bongo, mwasi na ye akomona ete abatelami, mpe ekozala mpasi te mpo amemya ye mpe apesa ye mabɔkɔ.

“Kosala makambo ndenge Yehova alingi esalisaki biso tókóma na boyokani makasi na libala na biso”

5 Ndeko moko na nkombo Cathy, mwasi ya Fred, alobi boye: “Ntango nazalaki monzemba, makambo na ngai nyonso ezalaki kaka na motó na ngai moko mpe nazalaki komileisa ngai moko. Kasi ntango nabalaki, esɛngaki nabongola makambo mingi; nakóma kotalela mobali na ngai. Ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi kosala makambo ndenge Yehova alingi esalisaki biso tókóma na boyokani  makasi na libala na biso.” [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Fred alobi boye: “Kozwa bikateli ezalaka pɛtɛɛ te mpo na ngai. Lokola na libala, esɛngaka kotalela likanisi ya bato mibale, ekómaki lisusu mpasi. Kasi lokola nalukaka litambwisi ya Yehova na nzela ya libondeli mpe nayokaka makanisi ya mwasi na ngai, ezalaka lisusu mpasi mingi te. Namonaka ete tosalaka na bomoko!”

6. Na ndenge nini bolingo ezalaka “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko” ntango matata ebimi na libala?

6 Mwasi ná mobali bakoki kozala na boyokani malamu mpenza soki moto na moto ‘akobi kokanga motema na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.’ Lokola bazali bato ya kozanga kokoka, bakozanga te kosala mabunga. Soki esalemi bongo, bakoki kozwa mateya na mabunga na bango, kolimbisana, mpe komoniselana bolingo oyo esimbami na mitinda ya Biblia. Bolingo wana ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:13, 14) Babalani bakoki komonisa bolingo ya ndenge wana soki bazali na motema molai, boboto, mpe bazali ‘kobomba mabe na motema te.’ (1 Bakorinti 13:4, 5) Soki matata ebimi, babalani basengeli koluka kosilisa yango nokinoki, liboso ete mokolo esila. (Baefese 4:26, 27) Esɛngaka komikitisa mpe mpiko mpo na koloba: “Limbisá ngai ndenge nazokisi yo.” Kasi kosala bongo esalisaka babalani básilisa mikakatano mpe bákóma lisusu na boyokani makasi.

ESENGELI KOMONISA LOLANGO

7, 8. (a) Toli nini Biblia epesi na likambo etali kosangisa nzoto na kati ya libala? (b) Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli komoniselana lolango?

7 Biblia epesi toli ya malamu oyo ekoki kosalisa babalani bátalela likambo ya kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi. (Tángá 1 Bakorinti 7:3-5.) Ezali na ntina mingi ete mwasi ná mobali bátyaka likebi na mayoki mpe bamposa ya moninga. Soki mobali amonisaka lolango te epai ya mwasi na ye, ekoki kozala mpasi mwasi asepela na kosangisa nzoto. Mibali basengeli kofanda ná basi na bango “na boyebi.” (1 Petro 3:7) Esengeli te kosangisa nzoto na makasi to na nko na molongani na yo, esengeli kozela mposa eya. Mbala mingi, mposa ya mobali elamukaka noki koleka ya mwasi. Kasi, makanisi ya mwasi ná mobali esengeli kozala esika moko na ntango yango.

8 Biblia eyebisi te makambo ya sikisiki oyo mwasi ná mobali bakoki kosala to kosala te mpo na komoniselana lolango. Kasi, elobeli lolango kati ya mwasi ná mobali. (Loyembo ya Salomo 1:2; 2:6) Babalani bakristo basengeli komoniselana lolango.

9. Mpo na nini kolulana na moto oyo azali molongani na biso te ebongi te?

9 Soki tolingaka mpenza Nzambe mpe mozalani na biso, tokotika eloko to moto moko te atya libala na biso na likama. Bandeko mosusu batyaki libala na bango na likama to kutu babebisaki yango mpo bakangamaki na motambo ya pornografi. Tosengeli kotɛmɛla mposa  nyonso ya kotala pornografi to ya kolula moto oyo azali molongani na biso te. Tosengeli ata koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki komonisa lokola ete tozali kolulana na moto oyo azali molongani na biso te, mpo kosala bongo ezali kozanga bolingo. Tosengeli kobosana te ete Nzambe ayebi makambo nyonso oyo tokanisaka mpe tosalaka. Koyeba yango ekosalisa biso tólɛmbisa te mposa na biso ya kosepelisa ye mpe ya kotikala sembo epai ya molongani na biso.Tángá Matai 5:27, 28; Baebre 4:13.

SOKI MIKAKATANO EBIMI NA KATI YA LIBALA

10, 11. (a) Mabala boni ezali kokufa? (b) Biblia elobi nini na likambo etali kokabwana? (c) Nini ekoki kosalisa babalani bákabwana nokinoki te?

10 Ntango babalani bakutani na mikakatano makasi mpe basilisi yango te, basusu bazwaka ekateli ya kokabwana to koboma libala. Na bikólo mosusu, soki mabala ezali zomi, mabala koleka mitano esukaka na kokufa. Ya solo, likambo yango emonanaka mingi te na lisangá ya bokristo. Kasi, mabala mingi ya bakristo ezali kokóma na mikakatano ya makasi mpenza.

11 Biblia epesi malako oyo: “Mwasi akabwana na mobali na ye te; kasi soki akabwani na ye, afanda bongo abala te to mpe ayokana lisusu na mobali na ye; mpe mobali atika mwasi na ye te.” (1 Bakorinti 7:10, 11) Babalani mosusu bakoki komona ete mikakatano na bango ezali makasi mingi mpe basengeli kokabwana. Kasi, Yesu amonisaki ete kokabwana ezali likambo ya kozwa na lisɛki te ntango azongelaki makambo oyo Nzambe alobaki na ebandeli mpo na libala, na nsima abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:3-6; Ebandeli 2:24) Na yango, Yehova alingi ete mibali ná basi na bango bákabwana te. (1 Bakorinti 7:39) Biso nyonso tosengeli kobosana te ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na makambo oyo tosalaka. Koyeba yango ekoki kosalisa biso tósilisaka makambo nokinoki liboso ete ekóma minene.

Bakristo balongaka kosilisa mikakatano na mabala na bango mpo batikaka Nzambe atambwisa bango

12. Nini ekoki kotinda moto akóma na makanisi ya kokabwana na molongani na ye?

12 Mpo na nini babalani mosusu bakutanaka na mikakatano makasi? Basusu bamonaka ete libala na bango ekokisi te makambo oyo bazalaki kokanisa liboso ya kobala, yango wana balɛmbaka nzoto to basilikaka. Mbala mingi, mikakatano ebimaka mpo na bokeseni oyo eutaka na ndenge oyo moto na moto abɔkwamá to ndenge ya kosala ntango likambo ebimi. Mitungisi oyo euti na libota ya molongani, kozanga boyokani na likambo ya mbongo, to ndenge ya kobɔkɔla bana ekoki mpe kobimisa matata. Kasi, ezali esengo komona ete bakristo mingi balongaka kosilisa mikakatano na mabala na bango mpo batikaka Nzambe atambwisa bango.

13. Makambo nini ekoki kosala ete mwasi ná mobali bákabwana?

13 Ezali na makambo oyo ekoki kotinda  mwasi ná mobali bákabwana. Na ndakisa, koboya na nko kokokisa bamposa ya libota, konyokola to kobɛta molongani, mpe kopekisa molongani losambo ya solo, ezali makambo oyo etindaki babalani mosusu bákabwana. Soki mwasi ná mobali bakutani na mikakatano ya minene, basengeli kosɛnga bankulutu básalisa bango. Bankulutu bayebi makambo mingi mpe bakoki kosalisa bango básalela toli ya Nzambe na bomoi na bango. Mpe soki mwasi ná mobali basɛngi Yehova elimo santu na ye, ekoki kosalisa bango básalela mitinda ya Biblia mpe bámonisa bizaleli ya bakristo. (Bagalatia 5:22, 23) [2]—Talá maloba na nse ya lokasa.

14. Biblia elobi nini mpo na bakristo oyo balongani na bango bazali basambeli ya Yehova te?

14 Biblia emonisi ete mwasi ná mobali bakoki kokoba na libala ata soki molongani moko asambelaka Yehova te. (Tángá 1 Bakorinti 7:12-14.) Moto oyo azali mondimi te “asantisami” mpo molongani na ye azali mosaleli ya Nzambe. Bana na bango ya mike batalelami lokola “basantu,” yango wana bazali na nse ya libateli ya Nzambe. Ntoma Paulo alendisaki bakristo ete: “Mwasi, ndenge nini oyebi soki okobikisa mobali na yo te? To, mobali, ndenge nini oyebi soki okobikisa mwasi na yo te?” (1 Bakorinti 7:16) Bakristo mingi ya basi mpe ya mibali oyo bazali ndakisa malamu basalisaki balongani na bango bákóma basaleli ya Yehova.

15, 16. (a) Toli nini Biblia epesi basi bakristo oyo mibali na bango bazali basaleli ya Nzambe te? (b) Mokristo akoki kosala nini ‘soki molongani oyo azali mondimi te aluki kokabwana’?

15 Ntoma Petro apesi basi bakristo toli ete bámikitisaka liboso ya mibali na bango ‘mpo soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bango ya pɛto ná limemya na bango makasi.’ Na esika ya kolobela ntango nyonso  mateya oyo andimaka, mwasi akoki kosalisa mobali na ye ayamba solo soki azali komonisa “elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”1 Petro 3:1-4.

16 Bongo soki molongani oyo azali mondimi te azwi ekateli ya kokabwana? Biblia elobi: “Soki oyo azali mondimi te azali koluka kokabwana, akabwana; ndeko mobali to ndeko mwasi azali na boombo te na likambo yango, kasi Nzambe abengi bino na kimya.” (1 Bakorinti 7:15) Ata soki kokabwana ekoki kopesa mwa kimya, na kotalela Biblia, mobalani oyo azali mokristo azali na bonsomi te ya kobala lisusu. Kasi asengeli te koluka kondimisa molongani na ye na makasi ete báfanda kaka. Nsima ya mikolo, molongani oyo azali mondimi te akoki kozwa ekateli ya kozonga na libala mpe kondima kobongisa makambo. Nsukansuka, akoki ata kokóma mosaleli ya Yehova.

NINI ESENGELI KOZALA NA ESIKA YA LIBOSO NA LIBALA?

Soki totye likebi mingi na losambo ya Yehova, yango ekoki kosala ete libala na biso ekóma na esengo mingi (Talá paragrafe 17)

17. Babalani bakristo basengeli kotya nini na esika ya liboso?

17 Lokola tokómi na nsuka ya “mikolo ya nsuka,” tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1-5) Yango wana, tozali na mposa ya libateli oyo tokozwa soki tozali na boyokani makasi na Yehova. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango oyo etikali ekómi mokuse. Yango wana baoyo bazali na basi bázala lokola nde bazali na basi te, . . . mpe baoyo bazali kosalela mokili lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te.” (1 Bakorinti 7:29-31) Ntoma Paulo alingaki koloba te ete bato oyo babalá basengeli kosundola balongani na bango. Kasi, lokola tozali na mikolo ya nsuka, tosengeli nde kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso.Matai 6:33.

18. Nini ekoki kosala ete bakristo bázala na libala ya esengo mpe ya malamu?

18 Na ntango oyo ya mpasi, tozali komona ndenge mabala mingi ezali kobeba. Tokoki kozala na libala ya esengo mpe ya malamu? Ɛɛ, soki tokobi kokangama na Yehova mpe basaleli na ye, kosalela toli ya Biblia, mpe kondima elimo santu ya Yehova etambwisa biso. Soki tosali bongo, tokomemya “oyo Nzambe akangisi esika moko.”Marko 10:9.

^ [1] (paragrafe 5) Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

^ [2] (paragrafe 13) Talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” apɛndisi “Likanisi ya Biblia na likambo etali koboma libala mpe kokabwana.”