Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

 LISOLO YA BOMOI

Ndenge oyo nayokaki esengo ya kopesa

Ndenge oyo nayokaki esengo ya kopesa

NAZALAKI na mbula 12 ntango nayebaki ete nazalaki na eloko moko ya motuya mingi ya kopesa basusu. Na liyangani moko, ndeko mobali moko atunaki ngai soki nakosepela kosakola. Atako nasakolaki naino liboso te, nandimaki. Tokendaki na teritware, mpe apesaki ngai mwa babuku oyo elobelaki Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, alobaki: “Yo okosakola na ngámbo mosusu wana ya balabala, mpe ngai nakosakola na ngámbo oyo.” Nazalaki kobanga, atako bongo nabandaki kosakola ndako na ndako. Nakamwaki ntango namonaki ete eumelaki te nakabolaki mwa babuku nyonso oyo nazalaki na yango. Emonanaki polele ete bato mingi basepelaki na oyo nazalaki kopesa bango.

Nabotamaki na 1923, na engumba Chatham, na etúká ya Kent, na Angleterre. Na bambula wana, nsima ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba, bato bazalaki kokanisa ete mokili ekokóma malamu koleka. Kasi ntango esalemaki bongo te, bato mingi, ata mpe baboti na ngai, balɛmbaki nzoto. Balɛmbaki lisusu nzoto mpo na bakonzi ya lingomba ya Batiste, oyo bazalaki koluka kaka kozwa bisika ya minene na lingomba. Ntango nazalaki na mbula soki libwa, mama na ngai abandaki kokende na ndako ya Association Internationale des Étudiants de la Bible, epai Batatoli ya Yehova bazalaki kosala “kelasi,” to makita na bango. Ndeko mwasi moko kuna azalaki kopesa biso mateya ya Biblia mpo na bana mike, oyo ezalaki kouta na Biblia mpe na buku La harpe de Dieu. Nasepelaki na makambo oyo nazalaki koyekola.

NAYEKOLAKI EPAI YA MIKÓLÓ

Ntango nazalaki elenge, nazalaki kosepela koyebisa bato elikya oyo euti na Liloba ya Nzambe. Mbala mingi, nazalaki kosakola ndako na ndako ngai moko, kasi ntango nazalaki kosakola ná bandeko mosusu, nayekolaki makambo mingi. Na ndakisa, mokolo moko ntango ngai ná ndeko mobali moko ya mokóló tozalaki kokende na teritware, na nzela, tomonaki sango moko, mpe nalobaki: “Oyo azali ntaba.” Ndeko oyo nazalaki na ye atɛlɛmisaki velo na ye mpe asɛngaki ngai tófanda mwa moke na nzete moko. Alobaki: “Nani apesi yo bokonzi ya kokata ete moto boye azali ntaba? Tiká tósepela kaka na libaku ya koyebisa bato nsango malamu, kasi tótika Yehova ye moko asambisa.” Na ntango wana, nayekolaki makambo mingi oyo etali esengo oyo eutaka na kopesa.Matai 25:31-33; Misala 20:35.

Ndeko mobali mosusu ya mokóló ateyaki ngai ete mpo na koyoka esengo ya kopesa, esɛngaka ntango mosusu koyika mpiko na motema molai. Mwasi na ye azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te. Mokolo moko, abengisaki ngai na ndako na ye mpo na kolya mwa eloko. Mwasi na ye azalaki na nkanda makasi ndenge abimaki na mosala ya kosakola, yango wana abandaki kobamba biso maboke ya tii. Na esika atombokela  ye, na esengo, ndeko mobali yango azongisaki tii yango na esika oyo ezalaki. Bambula mingi na nsima, motema molai na ye ebotaki mbuma ntango mwasi na ye azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

Na sanza ya libwa ya mobu 1939, ntango nazalaki na mbula 16, Grande-Bretagne esɛngaki ete ebunda na Allemagne. Na sanza ya misato ya mobu 1940, ngai ná mama tozwaki batisimo na engumba Douvres. Kaka na mbula yango, na sanza ya motoba, namonaki ndenge bankóto ya basoda bazalaki koleka na mituka ya minene. Babikaki na Etumba ya Dunkerque. Namonaki ete babulunganaki mpe bazalaki na elikya te. Nazalaki mpenza na mposa ya koyebisa bango nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpe kopesa bango elikya mpo na mikolo ezali koya. Nsima ya basanza, Allemagne ebandaki kobwaka babombe na Grande-Bretagne. Butu nyonso, babombe ya Allemagne ezalaki kokwea na esika tozalaki. Tozalaki kobanga ntango tozalaki koyoka lokito ya babombe oyo ezalaki kokwea. Soki ntɔngɔ etani, tozalaki kokuta bisika nyonso bandako ebukani. Makambo wana esalisaki ngai namona ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko oyo nazalaki na yango mpo na mikolo ezali koya.

NABANDI KOPESA BASUSU

Na 1941, nakɔtaki na mosala ya ntango nyonso, nabandaki bomoi oyo epesaki ngai esengo ya solosolo. Liboso nazalaki kosala na kompanyi Royal Dockyard, na Chatham, esika nayekolaki kotonga masuwa. Ezalaki mosala oyo bato mingi bazalaki kolula, mpe ezalaki na matomba mingi. Kasi, basaleli ya Yehova bayebaki liboso ete bakristo basengeli te kobunda mpo na ekólo moko boye. Mpe na 1941, toyebaki ete tosengeli te kopesa mabɔkɔ na kosala bibundeli. (Yoane 18:36) Kompanyi oyo nazalaki kosala ezalaki kosala masuwa ya bitumba oyo etambolaka na nse ya mai, yango wana, namonaki ete ntango ekoki mpo natika mosala yango mpe nakɔta na mosala ya ntango nyonso. Teritware na ngai ya liboso ezalaki Cirencester, engumba moko kitoko na Cotswolds.

Ntango nazalaki na mbula 18, nasalaki sanza libwa na bolɔkɔ mpo naboyaki kokɔta na mosala ya soda. Nabangaki makasi ntango bakangaki porte ya bolɔkɔ mpe natikalaki ngai moko. Eumelaki te, bakɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato mosusu ya bolɔkɔ babandaki kotuna ngai mpo na nini nazalaki kuna, mpe nasepelaki koyebisa bango makambo oyo nandimaka.

Nsima ya kobima na bolɔkɔ, nakendaki kokutana na ndeko Leonard Smith, * mpe tozalaki kosakola na bingumba mingi na etúká ya Kent, epai toutaki. Mpo na kobwaka babombe na Londres, bampɛpɔ ya Nazi ezalaki koleka likoló ya Kent. Na 1944, babombe koleka nkóto moko ekweaki na Kent. Babombe yango ezalaki nde bampɛpɔ ya mike oyo ezalaki na pilote te mpe etondaki na bamine. Soki toyoki makɛlɛlɛ ya motɛrɛ ekati, tozalaki koyeba ete nsima ya mwa basɛgɔndɛ  mpɛpɔ ekokwea mpe ekopanza bombe. Moto nyonso azalaki kobanga. Na ntango wana, tozalaki koyekola Biblia na libota moko ya bato mitano. Ntango mosusu, tozalaki kofanda na nse ya mesa ya ebende mpo na komibatela soki ndako ebukani. Nsukansuka, bato nyonso ya libota yango bazwaki batisimo.

KOSAKOLA NSANGO MALAMU NA MIKILI YA BAPAYA

Tozali kosala kampanye ya liyangani ntango nazalaki mobongisi-nzela na Irlande

Nsima ya etumba, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na sudi ya Irlande. Tokendaki ndako na ndako mpo na koyebisa bato ete tozali bamisionɛrɛ mpe tozali koluka esika ya kofanda. Tozalaki kokabola bazulunalo na balabala. Kasi Irlande ekesanaki mpenza na Angleterre. Mingi bazalaki kokanisa ete ezali bozoba kokanisa ete bato bakosepela na mateya ya solo na ekólo oyo ezali na bandimi mingi ya Katolike. Ntango mobali moko alukaki kosala biso mabe, nabengaki polisi moko, kasi alobaki: “Olingi nasala nini?” Toyebaki te ete basango bazalaki na nguya mingi bongo na mboka wana. Bato bazalaki kobungisa misala na bango soki bandimi kozwa mikanda na biso. Kutu, babimisaki biso na makasi na esika tozalaki kofanda.

Eumelaki te, tomonaki ete soki tokómi na esika moko ya sika, elekaki malamu tósakola na bisika oyo basango bayebaki biso te. Yango wana, tozalaki kokende mosika na esika oyo tozalaki kofanda, mpe kosakwela bato na bisika yango liboso. Na nsima, tozalaki kopesa litatoli na bato oyo bazalaki pene. Na engumba Kilkenny, tozalaki koyekola na elenge mobali moko mbala misato na pɔsɔ, atako bato ya mobulu balingaki kosala biso mabe. Lokola nazalaki kosepela mingi koteya bato Biblia, nakómaki na mposa ya kozwa formasyo mpo na kokóma misionɛrɛ. Yango wana, nazwaki ekateli ya kotondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta na Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia.

Masuwa babengi Sibia ezalaki ndako na biso bamisionɛrɛ banda 1948 tii 1953

Nsima ya kolanda mateya ya eteyelo ya Gileadi na boumeli ya sanza mitano na New York, tozwaki badiplome, na nsima batindaki biso bana-kelasi minei na bisanga mikemike ya mbu ya Caraïbes. Na sanza ya zomi na moko ya mobu 1948, tolongwaki na engumba New York, na masuwa babengi Sibia oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 18. Ezalaki mbala ya liboso nasala mobembo na masuwa, yango wana nasepelaki mingi. Ndeko Gust Maki, moko ya bandeko minei oyo tokɔtaki na bango na eteyelo ya Gileadi, azalaki kapitɛni ya masuwa. Alakisaki biso mwa makambo ya ntina oyo etali kotambwisa masuwa, na ndakisa ndenge ya komatisa mpe kokitisa vitɛsi, ndenge ya kosalela boussole ntango ozali kotambwisa masuwa, mpe ndenge ya kotambwisa masuwa na ntango ya mopɛpɛ. Ndeko Gust atambwisaki masuwa na biso malamu mikolo 30 atako tokutanaki na mbonge makasi, tii tokómaki na Bahamas.

“BÓLOBELA YANGO KATI NA BISANGA MOSIKA”

Nsima ya kosakola mwa basanza na bisanga ya mike ya Bahamas, tokobaki mobembo na Île Sous-le-vent mpe Îles du vent. Bisanga wana ya mike etandani na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 800 kobanda na esanga Vierges tii na esanga Trinité. Na boumeli ya mbula mitano, tozalaki kosakola mingimingi na bisanga ya mosika, esika Batatoli bazalaki te. Ntango mosusu tozalaki te na likoki ya kozwa to kotinda mikanda na boumeli ya bapɔsɔ mingi. Kasi tozalaki kosepela mingi kosakola nsango ya Yehova “kati na bisanga mosika.”Yirimia 31:10.

Bamisionɛrɛ oyo bakendaki na masuwa Sibia (banda na lobɔkɔ ya mwasi tii ya mobali): Ron Parkin, Dick Ryde, Gust Maki, mpe Stanley Carter

Soki masuwa na biso esɛmi na libongo moko, bato ya mboka yango bazalaki kosepela mingi mpe kotondana na libongo mpo na kotala soki tozali banani. Basusu bamoná naino te masuwa lokola oyo ya biso to bamoná naino mondɛlɛ te. Bato ya bisanga yango bazalaki bato ya boboto oyo bayebaki Biblia malamu. Mbala mingi, bazalaki kokabela biso mbisi, savoka mpe nguba. Atako masuwa na biso ezalaki monene mingi te, tozalaki na likoki ya kolamba, kolala, mpe kosukola bilamba kaka wana.

Tozalaki kosɛmisa masuwa na libongo mpe kokende kosakola mokolo mobimba. Tozalaki kobengisa  bato báya kolanda diskur oyo euti na Biblia. Na nsima, na mpokwa, tozalaki kobɛta ngonga ya masuwa. Ezalaki esengo komona ndenge bato bazalaki koya. Miinda na bango ya mafuta ezalaki komonana lokola kongɛnga ya minzoto oyo ezali kokita na ngomba. Ntango mosusu bato soki nkama bazalaki koya, na nsima, bazalaki kotuna mituna tii na butu makasi. Bazalaki kosepela koyemba, yango wana tobɛtaki na masini banzembo mosusu ya Bokonzi mpo na bango. Biso nyonso minei tozalaki kosala nyonso mpo na koyemba banzembo yango. Na nsima, bato yango babandaki koyemba elongo na biso, mpe mingongo na bango ezalaki koyokana kitoko. Ezalaki mpenza ntango ya esengo!

Soki tosilisi koyekola na moto, bayekoli mosusu bazalaki kolanda biso na libota oyo elandi mpo bálanda lisusu boyekoli kuna. Nsima ya kolekisa mwa bapɔsɔ na esika moko, tosengelaki kolongwa wana. Kasi, mbala mingi tozalaki kosɛnga bato mosusu oyo bazalaki kosepela na solo bákoba koyekola na basusu tii ntango tokozonga. Ezalaki esengo komona ndenge oyo basusu bazalaki kozwa mokumba na bango na lisɛki te.

Lelo oyo, baturiste mingi bakendaka na bisanga yango, kasi na ntango wana ezalaki bisika ya kimya mpe ya langi ya bule, oyo ezalaki na mabongo ya zɛlo mpe banzete ya mbila. Mbala mingi, tozalaki kolongwa na masuwa na esanga moko na butu mpo na kokende na mosusu. Mbisi minene babengi dauphin ezalaki kosakana pembeni na biso, mpe tozalaki koyoka makɛlɛlɛ ya masuwa ndenge ezali kotambola na mai. Kongɛnga ya sanza likoló ya mbu ezalaki komonana lokola nzela monene ya palata oyo ezali komema esika moi elalaka.

Nsima ya kosakola mbula mitano na bisanga yango, tokendaki na Porto Rico mpo na koluka masuwa ya sika, oyo ezalaki na motɛrɛ. Ntango tokómaki kuna, nakutanaki na Maxine Boyd, ndeko mwasi moko kitoko, oyo azalaki mpe misionɛrɛ, mpe nasepelaki na ye. Azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu kobanda ntango azalaki naino mwana moke. Na nsima, asalaki mosala ya misionɛrɛ na République Dominicaine tii na 1950, ntango bakonzi ya lingomba ya Katolike batindaki guvɛrnema ebengana ye. Lokola nazalaki kosala na masuwa, nazalaki na ndingisa ya kofanda na Porto Rico kaka sanza moko. Nsima na yango, nasengelaki kozonga na bisanga mpe elingaki kosɛnga mwa bambula mpo nazonga lisusu. Yango wana, na nse ya motema, nalobaki: ‘Ronald, soki olingi kobala mwana mwasi oyo, osengeli kosala nokinoki.’ Nsima ya pɔsɔ misato natunaki ye libala, mpe nsima ya pɔsɔ motoba tobalanaki. Na nsima, batindaki biso bamisionɛrɛ na Porto Rico, yango wana nasalelaki lisusu masuwa yango ya sika te.

Na 1956, tobandaki mosala ya zongazonga, mpe tozalaki kosepela mingi kokende kotala bandeko. Mingi na bango bazalaki babola. Na ndakisa, na mboka Potala Pastillo, ezalaki na mabota mibale ya Batatoli oyo bazalaki na bana ebele; mbala mingi nazalaki kobɛta na bango piololo. Mokolo moko, natunaki Hilda, mwana na bango ya mwasi ya moke soki akosepela kosakola elongo na biso. Alobaki: “Nasepeli, kasi nakokoka te. Nazali na sapato te.” Tosombelaki ye sapato, mpe ayaki kosakola elongo na biso. Bambula mingi na nsima, na 1972, ntango ngai ná Maxine tokendaki na Brooklyn, ndeko mwasi moko oyo autaki kozwa diplome na eteyelo ya Gileadi, ayaki kosolola na biso. Azalaki komibongisa mpo na kokende na teritware oyo batindaki ye na ekólo Équateur, mpe alobaki: “Bozali koyeba ngai lisusu? Ngai nde elenge mwasi ya Pastillo oyo azalaki na sapato te.” Ezalaki Hilda! Tosepelaki makasi; kutu tolelaki!

Na 1960, tobandaki kosala na Betele ya Porto Rico, oyo ezalaki na mwa ndako moko ya moke na kartye ya Santurce, na engumba San Juan. Na ebandeli, ngai ná Lennart Johnson nde tozalaki kosala misala mingi. Ye ná mwasi na ye bazalaki Batatoli ya liboso na République Dominicaine, mpe na 1957, bayaki na Porto Rico. Na nsima, Maxine azalaki kotindela bato oyo basɛngaki mikanda bazulunalo. Pɔsɔ na pɔsɔ, azalaki kotinda bazulunalo koleka nkóto moko. Azalaki kosepela kosala mosala yango mpo azalaki kokanisa bato wana nyonso oyo bazalaki na mposa ya koyeba Yehova.

Nazalaki kosepela kosala na Betele, mpo ezalaki kopesa ngai libaku ya kosalela makasi na ngai na mosala ya Yehova. Kasi, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na ndakisa, na 1967, na liyangani ya liboso ya Porto Rico oyo esangisaki bato ya mikili mingi, nazalaki na makambo ebele ya kosala mpo na kobongisa liyangani yango. Ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki kotambwisa mosala ya Batatoli ya Yehova, ayaki na Porto Rico. Akanisaki ete nabongisaki mituka te mpo na bamisionɛrɛ oyo bayaki na ekólo yango, nzokande nabongisaki yango. Na nsima, apesaki ngai toli ya makasi na likambo etali kobongisa makambo, mpe alobaki na ngai ete likambo oyo nasali elɛmbisi ye nzoto. Nalingaki te komilongisa epai na ye, kasi namonaki ete  asalelaki ngai makambo na ndenge ebongi te, mpe nakómaki mawamawa mpo na mwa ntango. Kasi, ntango ngai ná Maxine tokutanaki lisusu na ndeko Knorr, ayambaki biso na shambre na ye mpe alambelaki biso biloko ya kolya.

Tokendaki kotala libota na ngai na Angleterre mbala na mbala. Ntango ngai ná mama toyambaki solo, tata ayambaki solo te. Kasi ntango bandeko ya Betele bazalaki kokende kuna, mbala mingi mama azalaki kosɛnga bango báfanda na ndako na biso. Tata amonaki ete bakɛngɛli wana ya Betele bazalaki na komikitisa. Bakesenaki mosika na bakonzi ya mangomba oyo ayinaki bambula mingi liboso. Nsukansuka, na 1962, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

Ngai na Maxine na Porto Rico mwa moke nsima ya libala na biso mpe na 2003 na mokolo ya anivɛrsɛrɛ ya mbula 50 ya libala na biso

Mwasi na ngai Maxine akufaki na 2011. Nazali mpenza kozela komona ye lisusu na lisekwa. Kokanisa bongo epesaka ngai esengo! Na boumeli ya mbula 58 oyo tolekisaki elongo, tomonaki ndenge motángo ya Batatoli ya Yehova na Porto Rico emataki, kolongwa na 650 tii na 26 000! Na nsima, na 2013, basangisaki Betele ya Porto Rico na oyo ya États-Unis, mpe basɛngaki ngai nakende kosala na Wallkill, New York. Nsima ya kosala mbula 60 na esanga yango, nakómaki lokola moto ya Porto Rico, lokola coquí, mwa ligorodo moko ya Porto Rico oyo eyabani mingi, oyo elelaka ko-kii, ko-kii. Nazalaki kosepela na Porto Rico mingi, kasi nasengelaki kolongwa kuna.

“NZAMBE ALINGAKA MOTO OYO APESAKA NA ESENGO”

Tii lelo, nasepelaka kosalela Nzambe na Betele. Nakómi sikoyo na mbula koleka 90, mpe mosala na ngai na Betele ezali ya kolendisa bandeko ya libota ya Betele. Banda nayei na Wallkill, nasili kosolola na bandeko mibali mpe basi 600 mpo na kolendisa bango. Basusu bayaka kotala ngai mpo na kolobela mikakatano na bango moko to ya libota na bango. Basusu bayaka koluka toli mpo bákokisa malamu mosala na bango na Betele. Basusu mpe balukaka toli mpo bauti kobalana to basɛngi bango bákende kosala lokola babongisi-nzela. Nayokaka moto nyonso oyo eyei kosolola na ngai, mpe soki ebongi, mbala mingi nayebisaka bango: “‘Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.’ Yango wana sepelá na mosala na yo. Ozali kosala yango mpo na Yehova.”2 Bakorinti 9:7.

Soki olingi kozala na esengo na mosala ya Betele to esika mosusu nyonso, osengeli ntango nyonso komikundola mpo na nini mosala oyo ozali kosala ezali na ntina. Mosala nyonso tosalaka na Betele ezali mosala mosantu. Esalisaka “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesa bilei ya elimo na bandeko ya mokili mobimba. (Matai 24:45) Ata soki tozali kosalela Yehova esika nini, tozali na mabaku ya kosanzola ye. Tiká tósepela kosala nyonso oyo azali kosɛnga biso tósala, mpo “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”

^ par. 13 Lisolo ya bomoi ya Leonard Smith ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2012.