Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2016

Libala—Ndenge oyo ebandaki mpe mokano na yango

Libala—Ndenge oyo ebandaki mpe mokano na yango

“Yehova Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.’”EBANDELI 2:18.

NZEMBO: 36, 11

1, 2. (a) Libala ebandaki ndenge nini? (b) Mwasi ná mobali ya liboso bayebaki nini mpo na libala? (Talá elilingi ya ebandeli.)

KOBALA ezali mabe te. Kasi ndenge nini libala ebandaki, mpe mokano na yango ezali nini? Koyeba yango ekosalisa biso tótalela libala mpe mapamboli na yango na ndenge ya malamu. Nzambe akelaki Adama, mobali ya liboso, mpe apesaki ye mokumba ya kopesa banyama nkombo. Adama amonaki ete banyama nyonso ezalaki mwasi ná mobali, “kasi mosungi oyo abongi na moto amonanaki te.” Yango wana, Yehova alalisaki Adama mpɔngi makasi, azwaki mokuwa moko ya mopanzi na ye mpe na mokuwa yango asalaki mwasi. Amemaki mwasi yango epai ya Adama, mpe akómaki mwasi na ye. (Tángá Ebandeli 2:20-24.) Ndenge tomoni yango, libala ezali likabo oyo eutá epai ya Yehova.

2 Bambula mingi na nsima, Yesu azongelaki maloba oyo Yehova alobaki na elanga ya Edene: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.” (Matai 19:4, 5) Lokola Nzambe azwaki mokuwa ya mopanzi ya Adama mpo na kokela mwasi ya liboso, na ntembe te mwasi ná mobali yango  bamonaki ete bazali lokola patalo ná mokaba. Yehova alingaki ata moke te ete mobali ná mwasi báboma libala, ete mobali abala basi ebele, to mwasi azala na mibali ebele.

LIBALA EZALI NA KATI YA MOKANO YA YEHOVA

3. Mokano ya ntina mingi ya libala ezalaki nini?

3 Adama asepelaki mingi na mwasi na ye, oyo na nsima apesaki nkombo Eva. Eva azalaki mosungi na ye. Bakokaki kozala na libala ya esengo. (Ebandeli 2:18) Mokano ya ntina mingi ya libala ezalaki ya kotondisa mabele. (Ebandeli 1:28) Mwana nyonso oyo alingaki kobotama, azala mobali to mwasi, asengelaki kolinga baboti na ye; kasi nsukansuka, asengelaki kotika baboti, kobala, mpe kosala oyo ya ye libota. Bato basengelaki kotondisa mabele mpe kokómisa yango paradiso.

4. Nini ekómelaki libala ya liboso?

4 Libala ya liboso ebebaki ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova. Satana Zabolo, “nyoka ya ebandeli,” akosaki Eva mpe ayebisaki ye ete soki alei mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe,” akokóma na boyebi ya ndenge mosusu. Satana alobaki ete soki Eva alei mbuma ya nzete yango, ekosala ete ayeba kokesenisa mabe ná malamu. Eva amonisaki limemya te epai ya Adama, oyo azalaki mokonzi ya libota, na ndenge alyaki mbuma ya nzete wana kozanga ete atuna Adama liboso. Mpe Adama atosaki Nzambe te na ndenge andimaki kolya mbuma oyo mwasi na ye apesaki ye.Emoniseli 12:9; Ebandeli 2:9, 16, 17; 3:1-6.

Mpo na kozala na libala ya malamu, mwasi ná mobali basengeli kotosa Yehova mpe kondima mabunga oyo basali

5. Liteya nini tokoki kozwa na biyano oyo Adama ná Eva bapesaki Yehova?

5 Ntango Yehova atunaki bango, Adama apesaki mwasi na ye foti. Alobaki: “Mwasi oyo opesaki ete azala elongo na ngai, apesaki ngai mbuma ya nzete yango, na bongo nalyaki.” Eva, na ngala na ye, apesaki nyoka foti ete akosaki ye. (Ebandeli 3:12, 13) Adama ná Eva balukaki komilongisa mpo na kozanga botosi na bango, kasi Yehova akatelaki batomboki yango etumbu. Kutu, ndakisa na bango ezali likebisi mpo na biso! Mpo na kozala na libala ya malamu, mwasi ná mobali basengeli kotosa Yehova mpe kondima mabunga oyo basali.

6. Ndenge nini okoki kolimbola Ebandeli 3:15?

6 Atako Satana abebisaki makambo na Edene, Yehova azwaki bibongiseli mpo bato bázala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Elikya yango ezali na esakweli ya liboso ya Biblia. (Tángá Ebandeli 3:15.) Esakweli yango emonisaki ete “momboto” ya “mwasi” ekopanza Satana. Ebele ya bikelamu ya sembo ya elimo oyo basalelaka Nzambe kuna na likoló bazali na boyokani ya malamu na ye. Bazali lokola mwasi ya Yehova. Akosalela moko ya bikelamu yango ya elimo mpo na ‘kopanza’ Zabolo. Momboto yango ekosala ete bato ya botosi bázwa mapamboli oyo babalani ya liboso babungisaki. Bato ya botosi  bakozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele, kaka ndenge Yehova akanaki yango.Yoane 3:16.

7. (a) Nini ekómelaki libala nsima ya botomboki ya Adama ná Eva? (b) Biblia esɛngi nini epai ya mibali mpe epai ya basi?

7 Botomboki ya Adama ná Eva ebebisaki libala na bango mpe mabala mosusu nyonso na nsima. Na ndakisa, Eva mpe basi mosusu nyonso oyo bazali bakitani na ye basengelaki koyoka mpasi makasi na kobota. Basi basengelaki kozala na mposa makasi ya mibali na bango, mpe mibali basengelaki kozala na bokonzi likoló ya basi na bango, ntango mosusu ata konyokola bango, ndenge tozali komona yango lelo. (Ebandeli 3:16) Yehova alingi ete mibali bázala bakonzi ya mabota oyo balingaka mabota na bango, mpe basi bátosa mibali na bango. (Baefese 5:33) Soki mwasi ná mobali oyo bazali bakristo bazali kosala na bomoko, bakoki kosilisa mikakatano mingi.

LIBALA: BANDA NA NTANGO YA ADAMA TII NA MPELA

8. Tokoloba nini mpo na libala banda na ntango ya Adama tii na Mpela?

8 Liboso ete Adama ná Eva bákufa, babotaki bana mibali mpe basi. (Ebandeli 5:4) Na nsima, Kaina, mwana na bango ya liboso, abalaki ndeko na ye moko ya libota. Lameke, oyo azalaki mokitani ya Kaina, azalaki moto ya liboso oyo Biblia elobi ete azalaki na basi mibale. (Ebandeli 4:17, 19) Kobanda na ntango ya Adama tii na ntango ya Noa, kaka bato moke nde basambelaki Yehova. Na bato yango ya sembo, tokoki kotánga Abele, Enoka, mpe Noa ná libota na ye. Biblia elobi ete na ntango ya Noa, “bana ya Nzambe ya solo babandaki kotala bana basi ya bato, bamonaki ete bazali kitoko; mpe babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki.” Kasi yango ezalaki likambo oyo ebongisamá te, mpe baanzelu ná basi yango babotaki bana mibali oyo bazalaki bilombe mpe bazalaki kobengama Banefilime. Na ntango wana, “mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso.”Ebandeli 6:1-5.

9. Yehova asalaki nini mpo na bato mabe ya ntango ya Noa, mpe liteya nini tosengeli kozwa na makambo oyo esalemaki na ntango wana?

9 Yehova alobaki ete akoyeisa mpela moko monene na mabele mpo na kobebisa bato nyonso ya mabe. “Noa, mosakoli ya boyengebene,” ayebisaki bato ete Mpela ezali koya. (2 Petro 2:5) Kasi bayokaki Noa te mpo bamipesaki na makambo ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo, kati na yango kobala. Yesu akokanisaki ntango na biso na ntango ya Noa. (Tángá Matai 24:37-39.) Lelo, bato mingi balingaka te koyoka nsango malamu ya Bokonzi oyo tosakolaka. Tozali kosakola nsango yango liboso ete mokili oyo mabe ebomama. Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo elekaki na ntango ya Mpela? Tosengeli te kotika ete makambo lokola kobala mpe kobota ekóma na ntina mingi na miso na biso tii etinda biso tóbosana ete mokolo ya Yehova ekómi pene.

LIBALA: BANDA NA MPELA TII NA MIKOLO YA YESU

10. (a) Na bamboka mingi, mimeseno nini etali kosangisa nzoto ekómaki lolenge ya bomoi ya bato? (b) Ndenge nini Abrahama ná Sara bapesaki ndakisa malamu na libala na bango?

10 Noa azalaki na mwasi moko; bana na ye ya mibali misato bazalaki mpe na  mwasi mokomoko. Kasi, nsima ya Mpela, mibali mingi bakómaki kobala basi ebele. Pite mpe ekobo ekómaki momeseno na bamboka mingi; kutu ekɔtaki na milulu ya losambo ya mangomba. Ntango Abrahama ná Sara bakendaki kofanda na Kanana, bato oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki bato ya pite, oyo bazalaki na limemya te mpo na libala. Yehova abebisaki bingumba Sodoma mpe Gomora mpo bafandi na yango bazalaki bato ya pite. Kasi, Abrahama akesanaki na bato yango. Ye azalaki mokonzi malamu ya libota, mpe Sara atiká ndakisa malamu ndenge azalaki na botosi. (Tángá 1 Petro 3:3-6.) Abrahama asalaki nyonso mpo mwana na ye Yisaka abala mwasi oyo asambelaka Yehova. Yisaka mpe asalaki bongo mpo na mwana na ye Yakobo, oyo bana na ye ya mibali bakómaki bankɔkɔ ya mabota 12 ya Yisraele.

11. Ndenge nini Mibeko ya Moize ezalaki kobatela Bayisraele?

11 Na nsima, Yehova asalaki kondimana, to boyokani, na ekólo Yisraele. Apesaki bango Mibeko ya Moize, oyo ezalaki kobatela mibali mpe basi na losambo na bango epai ya Yehova. Na ndakisa, ezalaki na mibeko oyo etalaki mimeseno oyo etali libala, na ndakisa kobala basi ebele, mpe apekisaki Bayisraele bábalana na basambeli ya lokuta. (Tángá Kolimbola Mibeko 7:3, 4.) Soki mikakatano ya minene ebimi na kati ya libala, mikóló bazalaki kosalisa. Ezalaki mpe na mibeko oyo ezalaki kopekisa kozanga bosembo, zuwa, mpe kokanisela basusu mabe. Koboma libala epesamaki nzela, kasi mibeko etyamaki mpo na kobatela mobalani mokomoko. Na ndakisa, mobali akokaki koboma libala na mwasi na ye mpo na “likambo moko ya nsɔni.” (Kolimbola Mibeko 24:1) Biblia elobi te soki likambo yango ya “nsɔni” ezalaki nini, kasi mobali asengelaki te koboma libala na mwasi na ye mpo na mabunga ya mikemike.Balevi 19:18.

ZALÁ SEMBO EPAI YA MOLONGANI NA YO

12, 13. (a) Ndenge nini mibali mosusu bazalaki kosalela basi na bango makambo na mikolo ya Malaki? (b) Lelo, soki moto oyo azwá batisimo azwi molongani ya moto mosusu, makambo ekosuka ndenge nini?

12 Na mikolo ya mosakoli Malaki, Bayuda mingi bazalaki koluka mabunga ya mikemike mpo na koboma mabala na basi bango. Mibali yango bazalaki koboma libala mpo na kozwa basi oyo bazalaki naino bilenge to basi oyo bazalaki kosalela Yehova te. Na ntango ya Yesu, Bayuda bazalaki mpe koboma libala “mpo na likambo nyonso.” (Matai 19:3) Yehova Nzambe azalaki koyina lolenge wana ya koboma libala, oyo eyokanaki te na mibeko na ye.Tángá Malaki 2:13-16.

13 Lelo oyo, kozanga bosembo na libala epesami nzela te epai ya basaleli ya Yehova, mpe esalemaka mingi te. Kasi kanisá ete mobali to mwasi oyo azwá batisimo asali ekobo mpe abomi libala mpo na kobalana na moto mosusu. Soki abongoli motema te, akolongolama na lisangá, mpo na kobatela lisangá pɛto. (1 Bakorinti 5:11-13) Liboso azongisama na lisangá, moto yango asengeli ‘kosala misala oyo emonisi ete abongoli motema.’ (Luka 3:8; 2 Bakorinti 2:5-10) Ntango oyo moto yango asengeli kolekisa libándá liboso azongisama na lisangá eyebani te. Kasi, ekoki kosɛnga mbula moko to bambula mingi mpo moto oyo asalaki  lisumu amonisa ete abongoli mpenza motema mpe bándima kozongisa ye na lisangá. Atako bongo, moto yango asengeli koyeba ete ‘atɛlɛmi [naino] liboso ya kiti ya kosambisa ya Nzambe.’Baroma 14:10-12; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1980, nkasa 31-32, na Lifalanse.

LIBALA EPAI YA BAKRISTO

14. Mokano ya Mibeko ezalaki nini?

14 Yisraele ezalaki kotosa Mibeko ya Moize na boumeli ya mbula koleka 1 500. Mibeko yango ezalaki kosalisa basaleli ya Nzambe na ndenge mingi. Na ndakisa, ezalaki kopesa bato malako oyo ezalaki kosalisa bango básilisa mikakatano na libota, mpe ekambaki bango tii na Masiya. (Bagalatia 3:23, 24) Ntango Yesu akufaki, Mibeko yango esukaki mpe Nzambe asalaki ebongiseli moko ya sika. (Baebre 8:6) Kasi, makambo mosusu oyo Mibeko ya Moize ezalaki kopesa nzela epesamaki lisusu nzela te mpo na bakristo.

15. (a) Na lisangá ya bokristo, etinda nini etali libala tolandaka? (b) Makambo nini mokristo asengeli kotalela ntango azali kokanisa koboma libala?

15 Mokolo moko Bafarisai batunaki Yesu motuna mpo na libala. Yesu ayanolaki ete na Mibeko ya Moize Nzambe apesaki Bayisraele nzela ya koboma libala, atako alingaki esalema bongo te na ebandeli. (Matai 19:6-8) Eyano ya Yesu emonisaki ete bakristo basengelaki kolanda nde etinda oyo Nzambe apesaki na ebandeli mpo na libala. (1 Timote 3:2, 12) Lokola bazali “mosuni kaka moko,” babalani basengeli kokoba kozala esika moko. Bolingo oyo balingaka Nzambe mpe ndenge oyo balinganaka ekosalisa bango bákoba kozala na bomoko. Mwasi ná mobali oyo babomi libala kozanga ete moko na bango asala ekobo, bazali te na bonsomi ya kobala moto mosusu. (Matai 19:9) Moto akoki kozwa ekateli ya kolimbisa molongani na ye oyo asali ekobo kasi abongoli motema. Mosakoli Hosea alimbisaki mwasi na ye Gomere oyo asalaki ekobo; Yehova mpe alimbisaki ekólo Yisraele oyo ebongolaki motema. (Hosea 3:1-5) Longola yango, soki moto ayebi ete mobali na ye to mwasi na ye asalaki ekobo, kasi andimi kosangisa na ye lisusu nzoto, yango elakisi ete alimbisi ye. Na kotalela Makomami, azali lisusu te na bonsomi ya koboma libala.

16. Yesu alobaki nini mpo na bonzemba?

16 Yesu alobaki ete mpo na bakristo ya solo, libala ekoki kokufa kaka soki mobalani moko asali ekobo. Na nsima, alobelaki “baoyo bazali na likabo” ya kotikala minzemba. Alobaki: “Oyo akoki kosala yango asala yango.” (Matai 19:10-12) Bandeko mingi baponaka kotikala minzemba mpo balingaka kosalela Yehova kozanga kotya makanisi na makambo mosusu, mpe basengeli kozwa longonya mpo na ekateli na bango!

17. Nini ekoki kosalisa mokristo azwa ekateli ya kobala to te?

17 Nini ekoki kosalisa moto azwa ekateli ya kotikala monzemba to ya kobala? Moto ye moko akopona soki alingi kotikala monzemba to te. Ntoma Paulo alendisaki likambo ya kotikala monzemba. Kasi alobaki mpe ete: “Lokola pite epalangani mingi, mobali mokomoko azala na mwasi na ye moko mpe mwasi mokomoko azala na mobali na ye moko.” Abakisaki ete: “Soki bazali na komipekisa te, bábala, mpo eleki malamu kobala na esika ya kozika na mposa.” Na yango, moto akoki kozwa ekateli ya kobala mpo  mposa na ye makasi ya kosangisa nzoto emema ye te na momeseno ya kosakana na binama ya kobotela to na pite. Kasi, baoyo bazali minzemba basengeli komitalela mpo na koyeba soki bakómi mpenza mikóló mpo na kobala. Ntoma Paulo alobaki: “Soki moto akanisi ete azali kosalela bongɔndɔ na ye mabe, soki ye aleki eleko ya ebandeli ya bolenge, mpe soki esengeli kosalema bongo, asala oyo alingi; azali kosala lisumu te. Bábala na bango.” (1 Bakorinti 7:2, 9, 36; 1 Timote 4:1-3) Esengeli te kolendisa moto abala kaka mpo azali koyoka mposa makasi ya kosangisa nzoto, ndenge ezalaka epai ya bilenge mingi. Ntango mosusu moto yango akɔmɛli naino mpenza te mpo na komema mikumba ya libala.

18, 19. (a) Mokristo asengeli kozwa nani mpo na kobala? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

18 Mpo na kobala, mokristo asengeli kozwa ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azwá batisimo mpe alingaka Yehova na motema na ye mobimba. Bango mibale mpe basengeli kolingana makasi mpo bándima kolekisa bomoi na bango elongo. Yehova akopambola bango mpo batosi toli na ye ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakorinti 7:39) Mpe libala na bango ekolonga soki bakobi kotosa toli ya Biblia.

19 Lelo oyo, tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” mpe bato mingi bazali te na bizaleli oyo esengeli mpo na kozala na libala ya malamu. (2 Timote 3:1-5) Na lisolo oyo elandi, tokotalela makanisi ya ntina mingi oyo ezali na Biblia, oyo ekoki kosalisa bakristo bázala na mabala ya malamu mpe ya esengo, atako bazali kokutana na mikakatano ebele. Yango ekosalisa bango bákoba kotambola na nzela ya bomoi ya seko.Matai 7:13, 14.