Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2016

Palanganisá nsango malamu ya boboto monene

Palanganisá nsango malamu ya boboto monene

‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.’MISALA 20:24.

NZEMBO: 101, 84

1, 2. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete azalaki na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe?

NA BOSEMBO nyonso, ntoma Paulo alobaki: “Boboto monene [ya Nzambe] oyo emonisamaki epai na ngai ekendaki mpamba te.” (Tángá 1 Bakorinti 15:9, 10.) Ntoma Paulo ayebaki polele ete azalaki na lotomo te to abongaki te na motema mawa ya Nzambe. Azalaki konyokola bakristo.

2 Pene na nsuka ya bomoi na ye, ntoma Paulo akomelaki Timote: “Nazali kotɔnda Kristo Yesu Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, mpo amonaki ngai sembo na ndenge apesaki ngai mosala.” (1 Timote 1:12-14) Mosala nini alobelaki? Ntoma Paulo ayebisaki bankulutu ya lisangá ya Efese: “Nazali kotalela molimo na ngai te ete ezali na ntina mingi mpo na ngai, eloko ya ntina nde nasilisa mbangu oyo nazali kopota mpe mosala oyo nazwaki epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.”Misala 20:24.

3. Mosala nini ekeseni na mosusu bapesaki ntoma Paulo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

 3 “Nsango malamu” nini ntoma Paulo asakolaki, mpe ndenge nini emonisaki boboto monene ya Yehova? Ntoma Paulo alobaki na bakristo ya Efese: “Boyoki nsango etali mosala oyo bapesi ngai ya kapita ya boboto monene ya Nzambe mpo na bino.” (Baefese 3:1, 2) Yesu ayebisaki ntoma Paulo akende kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. Sikoyo, bato ya bikólo mosusu bazalaki na likoki ya kozala na kati ya guvɛrnema oyo Masiya akoyangela. (Tángá Baefese 3:5-8.) Ntoma Paulo azalaki kosakola na molende mpe atiká ndakisa malamu mpo na bakristo lelo oyo. Amonisaki ete boboto monene ya Nzambe ezalaki ‘mpamba te’ na miso na ye.

BOBOTO MONENE YA NZAMBE ETINDAKA YO OSAKOLA MINGI?

4, 5. Mpo na nini tokoki koloba ete “nsango malamu ya Bokonzi” ekeseni te na nsango malamu ya “boboto monene ya Nzambe”?

4 Na ntango oyo ya nsuka, basaleli ya Yehova bazali na mokumba ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi . . . na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Nsango malamu ya Bokonzi ezali mpe “nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” Na ndenge nini? Mapamboli nyonso oyo tokozwa na Bokonzi ya Nzambe ekouta na boboto monene ya Yehova. (Baefese 1:3) Ntoma Paulo amonisaki botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova na ndenge azalaki kosakola na molende. Tozali komekola ndakisa na ye?Tángá Baroma 1:14-16.

5 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ndenge oyo biso bato ya masumu tozwaka matomba na boboto monene ya Yehova na ndenge mingi. Lokola tozwi matomba mingi, tozali na mokumba ya koteya basusu ndenge oyo Yehova azali komonisa bolingo mpe ndenge oyo bango bakoki kozwela yango matomba. Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bámonisa botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe?

PALANGANISÁ NSANGO MALAMU YA MBEKA YA LISIKO

6, 7. Ntango tolimbwelaka bato lisiko, ndenge nini topalanganisaka nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe?

6 Lelo oyo, bato mingi bamonaka te ete bamemi ngambo ntango basali lisumu, yango wana bayebi te ntina oyo bato basengeli na lisiko. Longola yango, lelo oyo, ebele ya bato bazali komona ete lolenge ya bomoi na bango ezali kopesa bango esengo te. Kaka soki basololi na Batatoli ya Yehova nde bato mingi bayebaka soki lisumu ezali nini, ndenge oyo ekangaka biso, mpe oyo tosengeli kosala mpo tólongwa na boombo ya lisumu. Ntango bayebaka soki lisumu ezali nini, bato ya mitema sembo bamonisaka botɔndi ndenge Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele mpo na kosikola biso na boombo ya lisumu mpe liwa. Yehova asalaki bongo mpo na bolingo na ye monene mpe boboto na ye monene.1 Yoane 4:9, 10.

7 Tóyoka oyo ntoma Paulo alobaki mpo na Mwana ya Yehova oyo alingaka mingi: “Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene [ya Yehova].” (Baefese 1:7) Mbeka ya lisiko ya Kristo ezali elembo eleki monene ya  bolingo oyo Nzambe alingaka biso mpe emonisaka bonene ya boboto monene na ye. Mitema na biso ekitaka ntango toyebaka ete soki tondimi mbeka ya lisiko ya Yesu, masumu na biso ekolimbisama mpe tokozala na lisosoli ya pɛto! (Baebre 9:14) Yango ezali mpenza nsango malamu ya koyebisa basusu!

SALISÁ BATO BÁKÓMA BANINGA YA NZAMBE

8. Mpo na nini bato ya masumu basengeli kozongisa boyokani na Nzambe?

8 Soki bato bandimi te mbeka ya lisiko ya Yesu, Nzambe atalelaka bango lokola banguna na ye. Yango wana, tozali na mokumba ya koyebisa bango ete bakoki kokóma baninga ya Nzambe. Ntoma Yoane akomaki: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoane 3:36) Tokoki kozala na esengo ndenge mbeka ya Kristo epesi biso likoki ya kokóma baninga ya Nzambe. Ntoma Paulo alobeli yango na maloba oyo: “Bino baoyo bozalaki liboso mosika na Nzambe mpe banguna mpo makanisi na bino ezalaki na misala ya mabe, sikoyo azongisi bino lisusu na boyokani na lisalisi ya nzoto ya mosuni ya moto wana na nzela ya liwa na ye.”Bakolose 1:21, 22.

Tozali na mokumba ya koyebisa bato ete bakoki kokóma baninga ya Nzambe

9, 10. (a) Mokumba nini Kristo apesaki bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo? (b) Ndenge nini “bampate mosusu” basalisaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

9 Kristo apesaki bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele “mosala ya kozongisa na boyokani.” Ntoma Paulo ayebisaki bango: “Biloko nyonso euti na Nzambe, oyo azongisaki biso na boyokani elongo na ye moko na nzela ya Kristo mpe apesaki biso mosala ya kozongisa na boyokani, elingi koloba, ete Nzambe na nzela ya Kristo azalaki kozongisa mokili na boyokani ná ye moko, atángelaki bango mabunga na bango te, mpe apesaki biso liloba ya kozongisa na boyokani. Na yango, biso tozali bantoma na esika ya Kristo, lokola nde Nzambe azali kobondelabondela na nzela na biso. Na esika ya Kristo, tozali kobondela ete: ‘Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.’”2 Bakorinti 5:18-20.

10 “Bampate mosusu” bazali na libaku malamu ya kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo na mosala yango. (Yoane 10:16) “Bampate mosusu,” oyo bazali “batindami” to bamemi-nsango bazali kosala mingi na mosala ya kosakola, koteya bato solo, mpe kosalisa bango bázala na boyokani ya malamu ná Yehova. Yango ezali eteni monene ya mosala ya kosakola nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.

TEYÁ BATO ETE NZAMBE AYOKAKA MABONDELI

11, 12. Mpo na nini ezali nsango malamu bato báyeba ete bakoki kobondela Yehova?

11 Bato mingi babondelaka mpo libondeli esalisaka bango báyoka malamu, kasi bandimaka mpenza te ete Nzambe ayokaka mabondeli na bango. Basengeli  koyeba ete Yehova azali “Moyoki ya libondeli.” Davidi mokomi ya nzembo akomaki boye: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo. Makambo ya libunga eleki ngai na makasi. Misala na biso ya kobuka mibeko, yo moko okozipa yango.”Nzembo 65:2, 3.

Ntango toteyaka bato lolenge malamu ya kobondela, tosalisaka bango bákóma baninga ya Yehova

12 Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.” (Yoane 14:14) Yango elimboli ete tokoki kobondela mpo na “eloko” nyonso oyo eyokani na mokano ya Yehova. Ntoma Yoane akomaki: “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Ezali likambo ya malamu kosalisa bato báyeba ete libondeli ezali kaka te eloko moko oyo ekosalisa bango báyoka malamu, kasi ezali nde nzela ya kopusana penepene ya “kiti ya bokonzi ya boboto monene” ya Yehova! (Baebre 4:16) Ntango toteyaka bato lolenge malamu ya kobondela, Nzambe oyo basengeli kobondela, makambo oyo ebongi kobondela mpo na yango, tosalisaka bango bákóma baninga ya Yehova mpe bábɔndisama ntango bazali konyokwama.Nzembo 4:1; 145:18.

BOBOTO MONENE NA EBONGISELI YA MAKAMBO YA SIKA

13, 14. (a) Libaku malamu nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala na yango na mikolo ezali koya? (b) Mosala nini ya malamu bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakosalela bato?

13 Yehova akomonisa boboto monene na ye lisusu mingi koleka “na makambo ya ntango oyo ekoya.” Na ndenge nini? Akopesa bato 144000 oyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló libaku moko monene. Ntoma Paulo alimbolaki ndenge libaku yango ekozala ntango akomaki: “Nzambe, oyo atondi mpenza na motema mawa, mpo na bolingo na ye monene oyo alingaki biso, azongisaki biso na bomoi elongo na Kristo, na ntango mpenza tozalaki naino bakufi na kati ya mabunga—na boboto monene bobikisami—mpe alamwisaki biso elongo mpe afandisaki biso elongo na bisika ya likoló na bomoko elongo na Kristo Yesu, mpo ete na makambo ya ntango oyo ekoya bomɛngo ya boboto monene na ye oyo eleki nyonso ekoka komonisama na kati ya motema malamu na ye epai na biso na bomoko elongo na Kristo Yesu.”Baefese 2:4-7.

14 Ezali mpasi kokanisa makambo kitoko oyo Yehova abongisá mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ntango bakoyangela elongo na Kristo na likoló. (Luka 22:28-30; Bafilipi 3:20, 21; 1 Yoane 3:2) Yehova akomonisa “bomɛngo ya boboto monene na ye” epai na bango na ndenge mosusu. Bakozala “Yerusaleme ya sika,” mwasi ya libala ya Kristo. (Emoniseli 3:12; 17:14; 21:2, 9, 10) Bakosala elongo na Yesu mpo na “kobikisa bikólo.” Bakosalisa bato bálongwa na boombo ya lisumu mpe liwa mpe bakosalisa  bango bákóma bato ya kokoka.Tángá Emoniseli 22:1, 2, 17.

15, 16. Ndenge nini Yehova akomonisela “bampate mosusu” boboto monene na ye na mikolo ezali koya?

15 Baefese 2:7 elobi ete Nzambe akomonisa boboto monene “na makambo ya ntango oyo ekoya.” Na ntango wana, moto nyonso na mabele akomona “bomɛngo ya boboto monene na ye.” (Luka 18:29, 30) Lolenge moko ya monene oyo Yehova akomonisa boboto monene na ye awa na mabele ekozala lisekwa ya bato oyo bazali na kati ya “malita.” (Yobo 14:13-15; Yoane 5:28, 29) Banani bakosekwa? Mibali mpe basi ya sembo oyo bakufaki liboso ya liwa ya Kristo mpe baoyo bazali na kati ya “bampate mosusu” oyo bazali kokufa sembo epai ya Yehova na mikolo ya nsuka. Bato wana nyonso ya sembo bakozongisama na bomoi mpo bákoba kosalela Yehova.

16 Bamilio ya bato, oyo bakufaki kozanga ete báyeba Nzambe, bango mpe bakosekwisama. Ntoma Yoane akomaki: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango. Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.” (Emoniseli 20:12, 13) Bato oyo  bakosekwa bakozwa libaku ya koyekola makambo etali Yehova mpe kondima boyangeli na ye. Ekosɛnga ete báyekola mpe básalela mitinda ya Biblia mpe malako ya sika oyo ekozala na kati ya “barulo.” Malako wana ya sika ekozala lolenge mosusu oyo Yehova akomonisa boboto monene na ye.

KOBÁ KOSAKOLA NSANGO MALAMU

17. Nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopesa bato litatoli?

17 Ezali na ntina mingi ete tósakola nsango malamu ya Bokonzi mingi koleka liboso, mpo nsuka ekómi pene! (Marko 13:10) Tosengeli te kobosana ete ntango tozali kosakola, mokano na biso esengeli kozala ya kokumisa Yehova. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli koyebisa bato ete mapamboli nyonso oyo tokozwa na mokili ya sika ekozwama kaka mpo na boboto monene ya Yehova.

Tósala na molende lokola “bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe.”1 Petro 4:10 (Talá paragrafe 17-19)

18, 19. Ndenge nini tokumisaka boboto monene ya Yehova?

18 Ntango tozali kosakwela bato, tokoki kolimbwela bango ete ntango Bokonzi ya Kristo ekoyangela, bato bakozwa matomba nyonso ya lisiko mpe mokemoke bakokóma bato ya kokoka. Biblia elobi: “Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Baroma 8:21) Yango ekosalema kaka mpo na boboto monene ya Yehova.

19 Tozali na libaku malamu ya koyebisa bato nyonso elaka kitoko oyo ezali na Emoniseli 21:4, 5: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” Yehova, ye oyo afandi na kiti ya bokonzi, alobi: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Alobi lisusu ete: “Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.” Ntango tosakwelaka bato nsango malamu na molende, tokumisaka nde boboto monene ya Yehova!