Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2016

Mpo na nini tosengeli ‘kosɛnzɛlaka’?

Mpo na nini tosengeli ‘kosɛnzɛlaka’?

“Boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.”MATAI 24:42.

NZEMBO: 136, 129

1. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya koyeba ntango nini tozali kobika mpe makambo nini ezali kosalema zingazinga na biso. (Talá elilingi ya ebandeli.)

LIYANGANI elingi kobanda. Prezida amati na estrade mpe atombeli bato nyonso boyei malamu. Miziki elingi kobanda. Bayangani bayebi ete ezali ntango ya kozwa bisika ya kofanda. Balingi koyoka miziki kitoko, mpe bazali kozela na mposa makasi masolo oyo ekosalema. Kasi, mbala mosusu ezali na bato mosusu oyo batye likebi te na maloba ya prezida to bayoki te ete miziki ebandi. Na yango, bayebi te ete liyangani ebandi, mpe bakobi kotambolatambola na esika ya liyangani to kosolola na baninga na bango. Ndakisa oyo emonisi likambo oyo ekoki kosalema soki tozali koyeba te ntango nini tozali kobika to makambo oyo ezali kosalema zingazinga na biso. Yango ezali liteya monene mpo na biso, mpamba te etikali moke likambo moko ya monene ebanda, mpe tosengeli komibongisa mpo na yango. Likambo yango nini?

2. Mpo na nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘básɛnzɛlaka’?

2 Yesu Kristo akebisaki bayekoli na ye ete bálala mpɔngi te  mpe bámibongisa mpo na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Ayebisaki bango: “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.” Na nsima alobaki na bango mbala ebele ete: “Bósɛnzɛlaka.” (Matai 24:3; Tángá Marko 13:32-37.) Evanzile ya Matai emonisi mpe ete Yesu akebisaki bayekoli na ye mpo na likambo yango. Ayebisaki bango: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.” Akebisaki bango lisusu ete: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” Na nsima, azongelaki: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”Matai 24:42-44; 25:13.

3. Mpo na nini totyaka likebi na likebisi ya Yesu?

3 Batatoli ya Yehova batyaka likebi na likebisi oyo Yesu apesaki. Toyebi ete tozali kobika na “ntango ya nsuka” mpe mosika te “bolɔzi moko monene” ekobanda! (Danyele 12:4; Matai 24:21) Kaka ndenge Yesu alakaki yango, basaleli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. Kaka na ntango yango, tozali komona bitumba, maladi, koningana ya mabele, mpe nzala na bisika mingi. Mangomba etondi na mobulungano mpe mobulu ná mabe ekómi mingi koleka ndenge ezalaki liboso. (Matai 24:7, 11, 12, 14; Luka 21:11) Tozali sikoyo kozela na mposa makasi ntango oyo Yesu akoya mpe akokokisa mokano ya Tata na ye.Marko 13:26, 27.

MOKOLO YANGO EZALI SE KOKÓMA PENE!

4. (a) Mpo na nini tokoki kondima ete sikoyo Yesu ayebi ntango oyo Armagedone ekosalema? (b) Atako toyebi te mokolo mpe ngonga oyo bolɔzi monene ekobanda, tokoki kondimisama na likambo nini?

4 Ntango tokendaka na liyangani, toyebaka ntango oyo eteni mokomoko ekobanda. Kasi, tokoki mpenza koyeba te ngonga oyo bolɔzi monene ekobanda. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alobaki: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:36) Ya solo, lokola Yesu nde akokamba etumba ya Armagedone, na ntembe te ayebi ntango oyo etumba yango ekosalema. (Emoniseli 19:11-16) Kasi, toyebi mpenza te mokolo to ngonga oyo nsuka ekoya. Yango wana, ezali na ntina mingi ete tósɛnzɛlaka. Yehova atyá mokolo mpe ngonga oyo bolɔzi monene ekobanda, mpe ndenge mikolo ezali kokende, mokolo yango ezali se kokóma pene. “Ekokóma nsima ya ngonga te.” (Tángá Habakuku 2:1-3.) Mpo na nini tokoki kondima maloba yango?

Yehova atyá mokolo mpe ngonga oyo bolɔzi monene ekobanda

5. Pesá ndakisa oyo emonisi ete bisakweli ya Yehova ekokisamaka ntango nyonso na ntango oyo ebongi.

5 Bisakweli ya Yehova ekokisamaka ntango nyonso na ntango oyo ebongi! Na ndakisa, kanisá mokolo oyo asikolaki basaleli na ye na boombo na Ezipito. Ezalaki mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana, na mobu 1513 liboso ya Kristo. Na nsima, Moize akomaki boye mpo na mokolo yango: “Na nsuka ya mbula yango nkama minei na ntuku misato (430), ɛɛ, esalemaki boye na mokolo yango mpenza: mampinga nyonso ya Yehova  ebimaki na mokili ya Ezipito.” (Kobima 12:40-42) Na mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana, na mobu 1943 liboso ya Kristo, mbula 430 liboso ete Bayisraele basikolama, elaka ya Yehova ya kopambola bakitani ya Abrahama ebandaki kokokisama. (Bagalatia 3:17, 18) Mwa moke na nsima, Yehova ayebisaki Abrahama ete: “Yebá mpenza ete momboto na yo ekokóma mopaya, ekofanda na mokili oyo ezali ya bango te, mpe bakosalela bango, mpe bango bakomonisa bango mpasi mbula nkama minei (400).” (Ebandeli 15:13; Misala 7:6) Mbula 400 yango ebandaki na mobu 1913 liboso ya Kristo ntango Yishimaele abandaki konyokola Yisaka. Mbula yango esukaki na mokolo oyo Yehova asikolaki Bayisraele na boombo na Ezipito. (Ebandeli 21:8-10; Bagalatia 4:22-29) Ya solo, bankama ya bambula liboso, Yehova atyaki mokolo oyo alingaki kosikola basaleli na ye!

6. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akobikisa basaleli na ye?

6 Yosua azalaki na kati ya Bayisraele oyo basikolamaki na boombo na Ezipito. Bambula mingi na nsima, akundwelaki bato boye: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” (Yosua 23:2, 14) Yehova alaki kosikola basaleli na ye na ntango ya bolɔzi monene mpe kopesa bango bomoi ya seko na mokili ya sika. Mpe tokoki kondima ete elaka na ye ekokokisama. Yango wana, soki tolingi kozala na mokili wana ya sika, tosengeli kokoba kosɛnzɛla.

KOBÁ KOSƐNZƐLA MPO OBIKA

7, 8. (a) Na ntango ya kala basinzili bazalaki na mokumba nini, mpe yango eteyi biso nini? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi nini ekokaki kosalema soki basinzili balali mpɔngi.

7 Tokoki kozwa liteya na basinzili oyo bazalaki kobatela bingumba na ntango ya kala. Bingumba yango mingi, ezala mpe Yerusaleme, ezingamaki na bifelo ya milai mpo banguna bákɔta te. Basinzili bazalaki kotɛlɛma likoló ya bifelo yango, mpe kuna na likoló, bakokaki komona bamboka nyonso zingazinga ya engumba. Basinzili mosusu bazalaki kotɛlɛma na porte monene ya engumba. Mibali yango basengelaki kosɛnzɛla butu moi, mpe soki bamoni banguna bazali koya, basengelaki kokebisa bato oyo bazali na engumba. (Yisaya 62:6) Bayebaki ntina ya kolala mpɔngi te mpe kosɛnzɛla mpo na koyeba nini ezalaki koleka. Soki bazalaki kosala bongo te, bato mingi balingaki kokufa.Ezekiele 33:6.

8 Josèphe, oyo akomaki istware ya Bayuda, alimbolaki ndenge oyo Baroma balongaki kokɔta na Yerusaleme na mobu 70 nsima ya Kristo. Basinzili oyo bazalaki kobatela eteni mosusu ya engumba yango balalaki mpɔngi. Yango wana, basoda Baroma balongaki kokɔta na engumba yango. Bakɔtaki na tempelo, batumbaki yango, mpe babebisaki Yerusaleme mobimba. Yango ezalaki eteni ya nsuka ya bolɔzi eleki monene oyo ekómelaki ekólo ya Bayuda.

9. Lelo oyo, likambo nini bato mingi bayebaka te?

9 Lelo oyo, mpo na kobatela ndelo ya mboka na bango, baguvɛrnema mingi esalelaka basoda mpe bibongiseli ya komibatela na kolanda mayele ya tekiniki ya mikolo oyo. Baguvɛrnema yango esɛnzɛlaka  ete eloko moko te to moto moko te alongola kimya na ekólo na bango. Kasi, eyebaka te ete ezali na guvɛrnema moko ya likoló oyo eleki na nguya, oyo Kristo Yesu azali mokonzi na yango. Etikali moke, guvɛrnema yango ebundisa baguvɛrnema nyonso awa mabele. (Yisaya 9:6, 7; 56:10; Danyele 2:44) Tozali kozela na mposa makasi ete mokolo yango eya, mpe tolingi komilɛngɛla mpo na yango. Yango wana, totyaka likebi na bisakweli ya Biblia mpe tokobaka kosalela Yehova na bosembo.Nzembo 130:6.

KOTIKA TE ELOKO MOKO ELONGOLA LIKEBI NA YO

10, 11. (a) Tosengeli kokeba na likambo nini, mpe mpo na nini? (b) Nini endimisi yo ete Zabolo azali kosala ete bato báyeba te bisakweli ya Biblia?

10 Kanisá ete sinzili moko asɛnzɛli butu mobimba. Ntango ntɔngɔ elingi kotana, ekómi mpasi asɛnzɛla, mpo alɛmbi mingi. Ndenge moko mpe, tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Lokola tozali se kokóma pene na nsuka, ezali se kokóma mpasi tósɛnzɛla. Kasi ekozala mawa mingi soki tokobi kosɛnzɛla te! Tótalela makambo misato oyo ekoki kopekisa biso tósɛnzɛla.

11 Zabolo azali kokosa bato. Azali “mokonzi ya mokili oyo.” Mwa moke liboso ete Yesu akufa, akundwelaki bayekoli na ye likambo yango mbala misato. (Yoane 12:31; 14:30; 16:11) Zabolo asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kokosa bato. Yango wana, bato mingi lelo bayebi te bisakweli ya Biblia oyo emonisi polele ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene mpenza. (Sefania 1:14) Emonani polele ete Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Bakorinti 4:3-6) Yango wana, ntango tosalaka makasi tóyebisa bato ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene mpe ete Kristo azali sikoyo koyangela, mingi na bango balingaka koyoka nsango yango te. Mbala mingi, balobaka: “Nasepeli na yango te.”

12. Mpo na nini tosengeli te kotika Zabolo akosa biso?

12 Atako bato mingi basepelaka te na bisakweli ya Biblia, tosengeli te kotika ezaleli wana elɛmbisa biso. Toyebi ntina oyo tosengeli kokoba kosɛnzɛla. Ntoma Paulo alobaki na bandeko boye:  “Bino moko boyebi malamu ete mokolo ya Yehova ekoya.” Abakisaki: “Mpenza lokola moyibi na butu.” (Tángá 1 Batesaloniki 5:1-6.) Yesu akebisaki biso boye: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Luka 12:39, 40) Mosika te, Satana akokosa bato na ndenge akotinda bango bákanisa ete “Kimya, likambo ya kobanga” ezali te na mokili. Na nsima, mokolo ya Yehova ekoya na mbalakaka, mpe bato bakosutuka. Bongo biso? Soki tolingi komilɛngɛla mpo na mokolo yango mpe tolingi te kokosama lokola bato mosusu nyonso, tosengeli ‘kozala nde ekɛngɛ mpe kobatela makanisi na biso.’ Yango wana, tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola makambo oyo Yehova azali koyebisa biso.

13. Ndenge nini elimo ya mokili ekɔtelaka bato, mpe ndenge nini tokoki koboya ete elimo yango ebebisa biso?

13 Elimo ya mokili ebongolaka ndenge oyo bato bakanisaka. Bato mingi lelo oyo bamonaka ete bazali na mposa ya koyeba Nzambe te. (Matai 5:3) Basalelaka ntango mpe makasi na bango mingi nde mpo na kozwa ebele ya biloko oyo mokili ezali kobimisa. (1 Yoane 2:16) Lisusu, koleka liboso, lelo oyo ezali na mitindo ya kominanola ndenge na ndenge oyo ezali kobenda bato mpe kolendisa bango bálinga bisengo mpe bákokisa mposa nyonso oyo eyeli bango. (2 Timote 3:4) Makambo wana elongolaka likebi ya bato na makambo oyo eleki ntina, mpe bakanisaka te boyokani na bango na Nzambe. Yango wana, ntoma Paulo akundwelaki bakristo ete basengeli “kolamuka na mpɔngi” mpo básalela bomoi na bango te mpo na kokokisa bamposa na bango moko.Baroma 13:11-14.

Tolingi ete elimo ya Nzambe, kasi te elimo ya mokili, etambwisa makanisi na biso

14. Likebisi nini ezali na Luka 21:34, 35?

14 Tolingi ete elimo ya Nzambe, kasi te elimo ya mokili, etambwisa makanisi na biso. Na lisalisi ya elimo na ye, Yehova asalisaki biso tóyeba malamu makambo oyo elingi kosalema. (1 Bakorinti 2:12) [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, tosengeli kokeba. Ata makambo ya mikemike na bomoi ekoki kolongola likebi na biso na mosala ya Yehova. (Tángá Luka 21:34, 35.) Basusu bakoki koloba ete tobɛli motó mpo tondimaka ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. (2 Petro 3:3-7) Kasi, tosengeli te kotika bango bálɛmbisa biso. Tondimi mpenza ete nsuka ekoya mosika te. Soki tolingi ete elimo ya Nzambe etambwisa biso, tosengeli mbala na mbala koyangana na makita elongo na bandeko.

Ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na “kosɛnzɛla”? (Talá paragrafe 11-16)

15. Nini ekómelaki Petro, Yakobo, mpe Yoane, mpe ndenge nini likambo yango ekoki mpe kokómela biso?

15 Bolɛmbu na biso esalaka ete ezala mpasi tósɛnzɛla. Yesu ayebaki ete bato bazali bato ya kozanga kokoka mpe bazali na bolɛmbu. Kanisá likambo oyo esalemaki na butu ya nsuka liboso akufa. Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, ayebaki ete mpo atikala sembo, asengelaki kobondela Tata na ye mpo asalisa ye. Yesu asɛngaki ntoma Petro, Yakobo, mpe  Yoane básɛnzɛla ntango ye azalaki kobondela. Kasi, bantoma yango basosolaki te ntina oyo basengelaki kolala mpɔngi te. Balɛmbaki, yango wana balalaki mpɔngi. Yesu mpe alɛmbaki, kasi alalaki mpɔngi te mpe azalaki kobondela Tata na ye. Bantoma wana basengelaki mpe kokoba kobondela na ntango wana.Marko 14:32-41.

16. Na kotalela Luka 21:36, ndenge nini Yesu ateyaki biso ‘tólala mpɔngi te’?

16 Nini ekosalisa biso ‘tólala mpɔngi te’ mpe tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova? Tosengeli kozala na mposa makasi ya kokoba kosala makambo ya malamu. Kasi mposa mpamba ekoki te. Mwa mikolo liboso ete Yesu akufa, ayebisaki bayekoli na ye ete basengelaki kokoba kobondela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi. (Tángá Luka 21:36.) Mpo tólala mpɔngi te na ntango oyo ya nsuka, biso mpe tosengeli kobondela Yehova ntango nyonso.1 Petro 4:7.

KOBÁ KOSƐNZƐLA

17. Ndenge nini tokoki koyeba soki tomilɛngɛli mpo na makambo oyo ekosalema mosika te?

17 Yesu alobaki ete nsuka ekoya “na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Matai 24:44) Yango wana, tosengeli komilɛngɛla ntango nyonso. Sikoyo ezali te ntango ya koluka kozala na bomoi oyo mokili ya Satana emonisaka ete yango nde epesaka esengo. Yango ezali kaka ndɔtɔ mpamba. Kasi, na nzela ya Biblia, Yehova mpe Yesu bayebisi biso ndenge oyo tokoki kokoba kosɛnzɛla. Yango wana, tótya likebi na bisakweli ya Biblia mpe ndenge oyo ezali kokokisama. Mpe tókoba kopusana penepene na Yehova mpe kotya Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. Na nsima, tokomilɛngɛla ntango nsuka ekoya. (Emoniseli 22:20) Yango nde esimbi bomoi na biso!

^ [1] (paragrafe 14) Talá mokapo 21 ya buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!