Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2016

Luká Bokonzi, kasi biloko te

Luká Bokonzi, kasi biloko te

“Bólukaka ntango nyonso bokonzi [ya Nzambe], mpe bakobakisela bino biloko wana.”LUKA 12:31.

NZEMBO: 40, 98

1. Bokeseni nini ezali kati na biloko oyo tosengeli na yango ná biloko oyo tozali kaka na mposa ya kozala na yango?

MPO na kokoba kozala na bomoi, tosengeli na biloko mingi te. Na ndakisa, tosengeli na bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda. Kasi biloko oyo tozalaka na mposa ya kozala na yango ezali na nsuka te. Mpe bato mingi bayebaka te ete basengeli mpenza te na biloko nyonso oyo bazalaka na mposa ya kozala na yango.

2. Wapi biloko mosusu oyo bato bazalaka na mposa ya kozala na yango?

2 Moto oyo afandi na ekólo ya bobola akoki kozala na mposa ya eloko oyo ekeseni mosika na eloko oyo moto oyo afandi na ekólo ya bozwi akoki kozala na mposa ya kozala na yango. Na bisika mosusu na mokili, bato bazalaka na mposa ya kozala na telefone, tukutuku, to mwa eteni ya mabele. Na bisika mosusu, bato bazalaka na mposa ya kozala na bilamba mingi ya ntalo, ndako ya monene, to motuka ya ntalo mingi. Kasi, ezala tofandaka wapi to tozali na mbongo boni, tokoki kokóma na mposa ya biloko mingi oyo tosengeli na  yango te to tozali na makoki ya kosomba yango te.

KOLINGA BILOKO YA MOKILI MINGI EKOKI KOSALA BISO MABE

3. Kolinga biloko ya mokili mingi ezali nini?

3 Kolinga biloko ya mokili mingi ezali nini? Ezali ezaleli ya moto oyo apesaka motuya mingi na biloko ya mokili, koleka boyokani na ye na Nzambe. Atondaka te ata soki azali na biloko oyo asengeli na yango; azalaka kaka na mposa ya biloko mingi koleka. Ata bato oyo bazali na mbongo mingi te to baoyo basombaka biloko ya ntalo mingi te bakoki kokóma kolinga biloko ya mokili mingi. Bakoki kotika kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango.Baebre 13:5.

4. Ndenge nini Satana asalelaka “mposa ya miso”?

4 Satana alingi kotinda biso tókanisa ete tokoki kosepela na bomoi kaka soki tozali na biloko mingi. Yango wana, asalelaka mokili na ye mpe “mposa ya miso” mpo na koluka kotinda biso tólinga ntango nyonso kozala na biloko mingi. (1 Yoane 2:15-17; Ebandeli 3:6; Masese 27:20) Mbala na mbala, tomonaka mpe toyokaka bapiblisite oyo elukaka kotinda biso tósomba biloko ya sika. Osilá kosomba eloko moko kaka mpo emonanaki kitoko na kati ya magazini to mpo omonaki yango na piblisite? Soki ezali bongo, mbala mosusu na nsima omonaki ete osengelaki mpenza na yango te. Soki tozali kaka kosomba biloko oyo tosengeli na yango te, tozali nde komilukela mindɔndɔ na bomoi na biso. Biloko yango ekoki kolongola likebi na biso na mosala ya Yehova. Na ndakisa, ekoki kozangisa biso ntango ya koyekola Biblia, kobongisa mpe kokende na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola mbala na mbala. Kobosana te likebisi oyo ntoma Yoane apesaki: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango.”

5. Nini ekoki kokómela baoyo basalelaka makasi na bango nyonso mpo na kozwa biloko mingi?

5 Satana alingaka ete tósalela makasi na biso mpo na kozwa mbongo mingi mpe biloko mingi, na esika ya kosalela yango mpo na Yehova. (Matai 6:24) Kasi soki tomipesi kaka na koluka biloko mingi mpo na biso moko, bomoi na biso ekozala na ntina te. Tokoki komitungisa mingi to kokóma na mikakatano ya mbongo. To oyo eleki mabe, tokoki kobungisa kondima na biso epai ya Yehova mpe Bokonzi na ye. (1 Timote 6:9, 10; Emoniseli 3:17) Yesu alobaki ete “bamposa ya biloko mosusu” ezali lokola banzube oyo ekoki kopekisa molona ekola mpe ebota mbuma.Marko 4:14, 18, 19.

6. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Baruke?

6 Kanisá naino Baruke, oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya mosakoli Yirimia. Ntango Baruke abandaki “koluka makambo minene” mpo na ye moko, Yehova akundwelaki ye ete mosika te Yerusaleme ekobebisama. Kasi alakaki Baruke ete akobatela bomoi na ye. (Yirimia 45:1-5) Baruke asengelaki kozela eloko mosusu te. Yehova alobaki te ete akobatela biloko oyo bato bazalaki na yango. (Yirimia 20:5) Lelo oyo, tozali kobika pene na nsuka ya mokili ya Satana. Yango wana, sikoyo ezali te ntango ya koluka kozala na biloko mingi mpo na biso  moko. Lisusu, tosengeli te kokanisa ete nsima ya bolɔzi monene, tokozala kaka na biloko oyo tozali na yango sikoyo, ata soki biloko yango ezali na motuya mingi na miso na biso.Masese 11:4; Matai 24:21, 22; Luka 12:15.

Sikoyo ezali te ntango ya koluka kozala na biloko mingi mpo na biso moko

7. Tokotalela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini?

7 Na yango, ndenge nini tokoki kokokisa bamposa na biso moko mpe oyo ya libota na biso ntango tozali kokoba kotya makanisi na makambo oyo eleki ntina na bomoi? Nini ekoki kosalisa biso tóboya kolinga biloko ya mokili mingi? Mpe nini ekoki kosalisa biso tótika komitungisa mingi mpo na kozwa biloko oyo tosengeli na yango? Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu apesaki biso toli eleki malamu oyo tokoki kosalela. (Matai 6:19-21) Tótánga mpe tótalela Matai 6:25-34. Yango ekoteya biso ete tosengeli kokoba koluka Bokonzi, kasi biloko te.Luka 12:31.

YEHOVA APESAKA BISO OYO TOSENGELI NA YANGO

8, 9. (a) Mpo na nini tosengeli te komitungisa mingi mpo na biloko oyo tosengeli na yango? (b) Yesu ayebaki nini mpo na bato mpe bamposa na bango?

8 Tángá Matai 6:25. Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki komitungisa mpo na biloko oyo basengelaki kolya, komɛla, mpe kolata, yango wana na lisolo na ye likoló ya ngomba, ayebisaki bango: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino.” Yesu alingaki kosalisa bango báyeba ntina oyo basengeli te komitungisa mpo na biloko wana nyonso. Ayebaki ete soki bamitungisi mingi, ata mpo na biloko oyo basengelaki na yango mpenza, bakokaki kobosana makambo oyo eleki ntina na bomoi. Yesu azalaki mpenza kotyela bayekoli na ye likebi, yango wana na lisolo na ye, akebisaki bango koleka mbala minei mpo na likama yango.Matai 6:27, 28, 31, 34.

9 Kasi mpo na nini Yesu ayebisaki biso tómitungisa te mpo na biloko oyo tokolya, tokomɛla, to tokolata? Tosengeli na bilei mpe bilamba. Boye te? Na yango, ezali mabe te komitungisa soki tozali na mbongo mingi te mpo na kozwa biloko yango. Yesu ayebaki yango. Ayebaki biloko oyo bato basengeli na yango. Ayebaki ete na “mikolo ya nsuka,” bayekoli na ye bakobika na ntango moko ya mpasi mpenza. (2 Timote 3:1) Kutu, lelo oyo, bato mingi bakoki te kozwa mosala, mpe biloko ezali kokoba komata ntalo. Na bisika mingi, bato bazali mpenza babola mpe bazali kaka na biloko moke to bazangi biloko ya kolya. Kasi Yesu ayebaki mpe ete bomoi ya moto ezali na ntina mingi koleka bilei mpe nzoto eleki bilamba na motuya.

Yesu alobaki ete bomoi ya moto ezali na ntina mingi koleka bilei mpe nzoto eleki bilamba na motuya

10. Ntango Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, alobaki ete nini esengeli kozala na ntina mingi koleka na bomoi na bango?

10 Mwa moke liboso, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete ntango bazali kobondela, basengeli kosɛnga Tata na bango ya likoló apesa bango biloko oyo basengelaki na yango. Bakokaki kobondela: “Pesá biso lelo bilei na biso mpo na mokolo oyo.” (Matai 6:11) Mokolo mosusu, ayebisaki bango bábondelaka: “Pesá biso bilei na biso ya mokolo na kolanda bamposa ya mokolo.” (Luka 11:3) Kasi, yango elimboli te ete  tosengeli ntango nyonso kokanisa mpo na kozwa biloko oyo tosengeli na yango. Kutu, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya ezali na ntina mingi koleka kobondela mpo na bamposa na bango moko. (Matai 6:10; Luka 11:2) Na nsima, mpo na kosalisa bayekoli na ye bátika komitungisa, Yesu abɔndisaki bango ntango akundwelaki bango ndenge oyo Yehova abatelaka bikelamu na ye nyonso.

11, 12. Liteya nini tozwi na ndenge oyo Yehova aleisaka bandɛkɛ ya likoló mpe apesaka yango esika ya kolala? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Tángá Matai 6:26. Tosengeli ‘kotala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló.’ Atako bandɛkɛ ezali bikelamu ya mikemike, elyaka mingi. Kutu, soki ndɛkɛ ezalaki monene lokola moto, ekokaki kolya bilei mingi koleka moto. Bandɛkɛ elyaka mbuma, milona, nyamankɛkɛ, mpe nkusu. Kasi, elonaka te mpe ekolisaka bilei te mpo na yango moko. Yehova apesaka bandɛkɛ eloko nyonso oyo esengeli na yango. (Nzembo 147:9) Atako bongo, atyaka bandɛkɛ bilei na minɔkɔ te! Bandɛkɛ esengeli kokende koluka bilei, atako bilei yango ezali.

12 Yesu azalaki na ntembe ata moke te ete lokola Tata na ye aleisaka bandɛkɛ, akoleisa mpe bato. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) (1 Petro 5:6, 7) Na ntembe te, lokola bandɛkɛ, biso mpe tosengeli kozala bagoigoi te. Tosengeli kosala mosala mpo na kolona bilei to koluka mbongo mpo na kosomba yango. Yehova akoki kopambola milende na biso. Mpe ata soki tozali na mbongo mingi te to tozangi bilei, akoki kaka kopesa biso oyo tosengeli na yango. Na ndakisa, basusu bakoki kokabela biso oyo bazali na yango. Yehova apesaka mpe bandɛkɛ esika ya kolala. Apesaka yango likoki ya kotonga bazumbu, mpe ye nde asalá biloko oyo bandɛkɛ esalelaka mpo na kotonga bazumbu na yango. Ndenge moko mpe, Yehova akoki kosalisa biso tózwa esika malamu ya kofanda mpo na libota na biso.

13. Nini emonisi ete toleki bandɛkɛ ya likoló na motuya?

13 Nsima ya kokundwela bayekoli na ye ete Yehova aleisaka bandɛkɛ, Yesu atunaki bango boye: “Bino boleki bango na motuya te?” (Talá mpe Luka 12:6, 7.) Ntango Yesu alobaki bongo, mbala mosusu azalaki kokanisa ndenge oyo mosika te, alingaki kopesa bomoi na ye mpo na bato nyonso. Ya solo, Yesu akufelaki bandɛkɛ te to banyama mosusu nyonso te. Akufelaki nde biso bato, mpo tózala na bomoi libela na libela.Matai 20:28.

14. Eloko nini moto oyo amitungisaka mingi akoki kosala ata moke te?

14 Tángá Matai 6:27. Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete tokoki te kobakisa bolai ya bomoi na biso soki tozali komitungisa? Alingaki koloba ete tokoki te kokómisa bomoi na biso molai soki tozali komitungisa mpo na biloko oyo tosengeli na yango. Kutu, soki tozali komitungisa mingi, tokoki kozwa maladi, ata mpe kokufa.

15, 16. (a) Liteya nini tozwi na ndenge oyo Yehova alatisaka bafololo lísi ya esobe? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?

15 Tángá Matai 6:28-30. Tosepelaka soki tozali na bilamba kitoko ya kolata, mingimingi ntango tobimi na mosala ya kosakola to tokei na makita to na mayangani na biso. Kasi, tosengeli nde “komitungisa mpo na bilamba”? Awa lisusu, Yesu akundwelaki bayekoli na ye ndenge oyo Yehova atyelaka bikelamu na ye likebi. Yesu asalelaki ndakisa ya “fololo lísi ya esobe.” “Fololo lísi” oyo Yesu alobelaki ekoki kozala bafololo lokola glaïeul, jacinthes, iris mpe  tulipes. Moko te kati na yango etongaka bilamba mpo na komilatisa. Kasi, bafololo yango ezalaka mpenza kitoko, yango wana Yesu alobaki ete “ata Salomo na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te”!

16 Kanisá likambo oyo Yesu alobaki na nsima: “Soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe . . . , akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke?” Na ntembe te, akolatisa! Kasi bayekoli ya Yesu basengelaki kozala na kondima makasi. (Matai 8:26; 14:31; 16:8; 17:20) Basengelaki kondima ete Yehova akokokisa bamposa na bango mpe ete alingi kosala yango. Bongo biso? Tondimaka ete Yehova akokokisa bamposa na biso?

Tondimaka ete Yehova akokokisa bamposa na biso?

17. Nini ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova?

17 Tángá Matai 6:31, 32. Bato mingi oyo bayebi Yehova te babomaka nzoto mpo na kozwa mbongo mingi mpe biloko mingi. Kasi soki biso mpe tosali bongo, tokoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Toyebi ete Yehova azali Tata na biso mpe alingaka biso. Mpe tozali na kondima ete soki tosali nyonso oyo asɛngaka biso mpe totye Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso, akopesa biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango, ata mingi koleka. Toyebi mpe ete kozala na boyokani malamu na Yehova nde epesaka biso esengo ya solosolo, mpe yango esalisaka biso tósepela na “bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto” oyo tosengeli na yango.1 Timote 6:6-8.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NA ESIKA YA LIBOSO NA BOMOI NA YO?

18. Yehova ayebi nini mpo na mokomoko na biso, mpe akosalela biso nini?

18 Tángá Matai 6:33. Soki totye Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso, na nsima Yehova akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango. Yesu alimbolaki ntina oyo tokoki kotyela elaka yango motema. Alobaki boye: “Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” Yehova ayebi oyo osengeli na yango, liboso kutu yo moko oyeba ete ozali na mposa na yango. (Bafilipi 4:19) Ayebi bilamba nini okozala na mposa yango lobi to lobi kuna. Ayebi bilei nini osengeli na yango. Ayebi mpe ete yo ná libota na yo bosengeli na esika ya kofanda. Yehova akosala ete ozwa biloko nyonso oyo osengeli mpenza na yango.

19. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te mpo na oyo ekoki kokómela biso na mikolo ezali koya?

19 Tángá Matai 6:34. Yesu ayebisaki lisusu bayekoli na ye ete: “Bómitungisa ata moke te.” Yehova akopesa biso biloko oyo tosengeli na yango mokolo na mokolo. Yango wana, tosengeli komitungisa mingi te mpo na oyo ekoki kokómela biso na mikolo ezali koya. Soki tosali bongo, tokoki kobanda komityela motema, mpe yango ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Tosengeli nde kotyela ye motema mobimba.Masese 3:5, 6; Bafilipi 4:6, 7.

LUKÁ LIBOSO BOKONZI, MPE YEHOVA AKOSALISA YO

Okoki kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo omipesa mingi na misala ya Bokonzi? (Talá paragrafe 20)

20. (a) Mikano nini okoki komityela na mosala ya Yehova? (b) Okoki kosala nini mpo okómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ?

20 Ekozala mawa mingi soki tosilisi makasi na biso nyonso na koluka kozwa  biloko mingi, na esika ya kosalela Yehova! Tosengeli nde kopesa Yehova oyo eleki malamu. Na ndakisa, okoki kokende kosalisa lisangá moko oyo ezali na mposa ya basakoli? Okoki kokóma mobongisi-nzela? To soki ozali mobongisi-nzela, osilá kokanisa kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Okoki kopona mwa mikolo na kati ya pɔsɔ mpo na kokende kopesa mabɔkɔ na Betele to na biro moko ya kobongola mikanda? To okoki kosala na Biro ya kosala baplan ya bandako/Bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na botongi, mpe kosalela ntango na yo mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi? Kanisá makambo oyo okoki kosala mpo okómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo okoka kozala na ntango mingi mpe makasi mingi mpo na misala ya Bokonzi. Etanda “ Ndenge ya kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ” epesi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo. Bondelá Yehova asalisa yo ozwa ekateli na likambo oyo osengeli kosala. Na  nsima, bandá kobongola makambo oyo esengeli.

21. Nini ekosalisa yo opusana penepene na Yehova?

21 Yesu ateyaki biso tóluka liboso Bokonzi. Soki tosali bongo, tokomitungisa mingi te mpo na biloko oyo tosengeli na yango. Topusanaka penepene na Yehova mpo tondimi ete akokokisa bamposa na biso. Toyekolaka komipekisa mpe tosombaka te eloko nyonso oyo tozali na yango mposa to eloko nyonso oyo mokili ezali kobimisa, ata soki tozali na makoki ya kosomba yango. Soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ sikoyo, yango ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova mpe ‘tósimba makasi bomoi ya solosolo’ oyo alaki biso.1 Timote 6:19.

^ [1] (paragrafe 12) Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya Yehova bazalaka te na bilei mingi. Mpo na koyeba ntina oyo Yehova akoki ntango mosusu kotika nzela ete likambo ya ndenge wana esalema, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2014, lokasa 22.