Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2016

“Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo”

“Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo”

KANISÁ ete ozali kotambola na balabala na butu makasi. Mbala moko, omoni ete moto moko azali kolanda yo. Ntango otɛlɛmi, moto yango mpe atɛlɛmi. Ntango otamboli nokinoki, ye mpe atamboli nokinoki. Ntango omoni boye, okimi mbangu epai ya moninga na yo, oyo ndako na ye ezali pene. Ntango moninga na yo afungoli ndako mpe andimi okɔta, motema na yo ekiti, mpo oyebi ete sikoyo ozali lisusu na likama te.

Mbala mosusu, okutaná naino te na likambo oyo tolobeli awa liboso. Kasi, mbala mosusu ezali na makambo mosusu ya bomoi, oyo ezali kotinda yo omitungisa. Na ndakisa, ozali kobunda na bolɛmbu moko oyo olingaka kolonga yango, kasi ozali kaka kokoba kosala libunga yango? Eumeli ntango molai ozali kozwa mosala te, atako ozali kosala milende mingi mpo na kozwa mosala? Ozali komitungisa mpo ozali kokóma mokóló mpe ozali kobanga ete okutana na mikakatano ya nzoto na mikolo ezali koya? To ezali nde na likambo mosusu oyo ezali kotungisa yo?

Ezala mokakatano nini ozali na yango, ezali malamu ozala na moninga oyo okoki koyebisa ye mitungisi na yo mpe akosalisa yo. Ozali na moninga ya motema ya ndenge wana? Ɛɛ, ozali na ye! Yehova azali moninga ya ndenge wana mpo na yo, kaka ndenge azalaki mpo na Abrahama, moto ya sembo, ndenge Yisaya 41:8-13 emonisi yango. Na vɛrsɛ 10 mpe 13, Yehova alaki mokomoko na biso: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene. Mpo ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”

“NAKOSIMBA YO MPENZA”

Maloba wana ya Yehova ezali mpenza kobɔndisa. Meká komona na makanisi makambo oyo Yehova alaki biso. Vɛrsɛ yango elobi te ete ozali kotambola penepene ya Yehova mpe osimbi lobɔkɔ na ye. Soki ozali kotambola penepene ya Yehova, lobɔkɔ na ye ya mobali ekosimba lobɔkɔ na yo ya mwasi. Yehova atye nde ‘lobɔkɔ na ye ya mobali ya boyengebene’ mpo na kosimba “lobɔkɔ na yo ya mobali,” lokola nde azali kobimisa yo na esika moko ya likama. Ntango Yehova asimbi lobɔkɔ na yo ya mobali, azali kopesa yo makasi, ntango alobi: “Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.”

Otalelaka Yehova lokola Tata na yo ya bolingo mpe moninga na yo? Ondimaka ete akosalisa yo ntango okutani na mikakatano? Yehova atyelaka yo mpenza likebi mpe alingi kosalisa yo. Ntango ozali na makambo to okutani na mikakatano, Yehova alingi omona ete obatelami. Mpo na nini? Mpo alingaka yo mingi. Azali mpenza “lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.”Nzembo 46:1.

NTANGO TOZALI KOMITUNGISA MPO NA MASUMU OYO TOSALÁ KALA

Bato mosusu bakobaka kokanisa mabunga na bango ya kala mpe bamitunaka soki Nzambe alimbisá  bango. Soki ozali komiyoka ndenge wana, kanisá Yobo, moto ya sembo. Andimaki ete asalaki masumu ntango azalaki elenge. (Yobo 13:26) Davidi, mokomi ya nzembo, amiyokaki mpe ndenge wana mpe abondelaki Yehova ete: “Masumu ya bolenge na ngai mpe botomboki na ngai nyonso, ee kokanisa yango te!” (Nzembo 25:7) Lokola tozali bato ya masumu, biso nyonso ‘tosalaka lisumu mpe tokómaka na nkembo ya Nzambe te.’Baroma 3:23.

Maloba ya kobɔndisa oyo ezali na Yisaya mokapo 41 ekomamaki mpo na Bayisraele. Masumu na bango ezalaki mpenza minene, yango wana Yehova alobaki ete akopesa bango etumbu na ndenge bakomemama na boombo na Babilone. (Yisaya 39:6, 7) Kaka na ntango wana, Nzambe alakaki ete akosikola baoyo bakobongola motema mpe bakozongela ye! (Yisaya 41:8, 9; 49:8) Lelo oyo mpe, Yehova amonisaka bolingo mpe motema mawa ndenge wana epai ya baoyo babongolaka mpenza motema mpe balingaka kosepelisa ye.Nzembo 51:1.

Tótalela ndakisa ya ndeko Takuya, * oyo azalaki koluka kolonga momeseno mabe ya kotala pornografi mpe kosakana na binama ya kobotela mpo na kosilisa mposa ya nzoto. Mbala na mbala, azalaki kokwea na mimeseno wana ya mabe. Azalaki komiyoka ndenge nini? Alobi: “Nazalaki komiyoka ete nabongi te, kasi ntango napusanaki penepene na Yehova na libondeli mpo na kosɛnga ye alimbisa ngai, azwaki ngai esika oyo nakweaki mpe atɛlɛmisaki ngai.” Ndenge nini Yehova asalaki yango? Bankulutu ya lisangá ya Takuya bayebisaki ye abengaka bango na telefone mbala nyonso oyo akwei na mimeseno wana. Alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kobenga bango, kasi mbala nyonso oyo nazalaki kosala yango, nazalaki kolendisama.” Na nsima, bankulutu bazwaki bibongiseli mpo mokɛngɛli ya zongazonga akende kotala ndeko Takuya. Mokɛngɛli ya zongazonga ayebisaki ye: “Soki nayei awa, ezali mpo na mbalakaka te. Nayei awa mpo bankulutu balingaki ete naya awa. Bango nde baponi yo mpo naya kotala yo, mpo na kolendisa yo.” Takuya alobi boye: “Ngai moto nasali lisumu, kasi Yehova, na nzela ya bankulutu, ayei kosalisa ngai.” Nsukansuka, Takuya atikaki mimeseno wana ya mabe, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe sikoyo azali kosala na biro ya filiale moko. Kaka ndenge Yehova asalisaki ndeko wana, akosalisa mpe yo soki osali mabunga.

NTANGO TOZALI KOMITUNGISA MPO NA MOSALA

Bato mosusu bamitungisaka mpo babungisi mosala mpe bakoki kozwa mosusu te. Kanisá ndenge ezalaka mpasi soki bapatrɔ bazali kolongola yo na mosala. Ntango bato mosusu bakutanaka na mokakatano ya ndenge wana, bamonaka ete bazali na ntina te. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo? Mbala mosusu akoki te kopesa yo mosala moko ya malamu mbala moko, kasi akoki kosalisa yo omikundola maloba oyo ya Davidi: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.” (Nzembo 37:25) Yehova azwaka yo na motuya, mpe azali kopesa yo “lobɔkɔ na ye ya mobali ya boyengebene” mpo ozwa oyo osengeli na yango mpo okoba kosalela ye.

Ndenge nini Yehova akoki kosalisa ntango obungisi mosala na yo?

Ndeko Sara, oyo afandaka na Colombie, amonaki ndenge oyo Yehova asalisaki ye. Azalaki kozwa mbongo mingi mpo azalaki kosala mosala mikolo nyonso tii mpokwa, na kompanyi moko ya monene mpe oyo eyebani mingi. Kasi azalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova, yango wana atikaki mosala wana mpe abandaki mosala ya  mobongisi-nzela. Kasi, ezalaki mpasi mpo azwa mosala mosusu oyo elingaki kozwa ye mokolo mobimba te. Afungolaki mwa esika ya kotɛka krɛmɛ kasi mokemoke mbongo esilaki mpe mombongo yango ekweaki. Alobi boye: “Mbula misato elekaki, kasi na lisalisi ya Yehova, nayikaki mpiko.” Alukaki koyeba biloko nini asengelaki mpenza na yango mpe ndenge ya koboya komitungisa mpo na mokolo oyo elandi. (Matai 6:33, 34) Nsukansuka, patrɔ na ye ya kala abengaki ye mpe ayebisaki ye azongela mosala na ye ya kala. Ayebisaki ye ete akondima kaka mosala oyo ekozwa ye mikolo nyonso te mpe ekotikela ye ntango mpo na makita mpe mayangani. Lelo oyo, ndeko Sara azwaka lisusu mbongo mingi te lokola liboso, kasi azali kokoba na mosala ya mobongisi-nzela. Alobi ete na ntango wana ya mpasi, amonaki mpenza lobɔkɔ ya Yehova.

NTANGO TOZALI KOMITUNGISA MPO TOZALI KOKÓMA MIKÓLÓ

Bato mingi bamitungisaka mpo bazali kokóma mikóló mpe mosika te bakozwa pasyo na mosala. Bamitunaka soki bakozala na mbongo mingi mpo na kozala na bomoi ya malamu. Bamitungisaka mpe mpo na mikakatano ya nzoto oyo ekoki kobima na mikolo ezali koya. Ekoki kozala ete mokonzi Davidi nde asɛngaki Yehova ete: “Kobwaka ngai te na ntango ya bobange. Ntango nguya na ngai ezali kolɛmba, kotika ngai te.”Nzembo 71:9, 18.

Ndenge nini mibange bakoki kosala mpo bátika kobanga mikolo oyo ezali koya? Basengeli kokoba kokómisa makasi kondima na bango epai ya Nzambe mpe kozala na elikya ete akopesa bango nyonso oyo basengeli na yango. Kasi, basusu bazalaki na bomoi ya malamu ntango bazalaki na mbongo mingi, yango wana basengeli koyekola kozala na bomoi ya mindɔndɔ te mpe kosepela na moke oyo bazali na yango. Bakoki ata komona ete kolya “elubu ya ndunda” na esika ya “ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta” ekoki kozala malamu koleka mpo na nzoto na bango! (Masese 15:17) Soki otye makanisi na yo nyonso na kosalela Yehova, akosala ete ozala na eloko nyonso oyo osengeli na yango ntango okokóma mobange.

Ndeko José ná Rose mpe ndeko Tony ná Wendy

Tózwa ndakisa ya ndeko José ná mwasi na ye Rose, oyo basalelaki Yehova na mosala ya ntango nyonso mbula koleka 65. Na bambula wana nyonso, bakutanaki na mikakatano ebele. Bazalaki kosalisa tata ya ndeko Rose, oyo azalaki na mposa ya lisalisi butu moi. Lisusu, ndeko José asengelaki koyika mpiko na lipaso mpo na kanser mpe bazalaki kosalisa ye na mayele oyo babengi chimiothérapie. Ndenge nini Yehova apesaki basaleli na ye wana ya sembo lobɔkɔ na ye ya mobali? Asalelaki bakristo mosusu, ndeko Tony ná mwasi na ye Wendy. Bazalaki na ndako moko oyo bazalaki kolinga ete babongisi-nzela báfanda wana kozanga kofuta mbongo. Ndeko Tony amikundolaki ete ntango azalaki naino na eteyelo ya ntei, azalaki komona na lininisa ndenge ndeko José ná Rose bazalaki kosakola mbala na mbala. Ndeko Tony azalaki kosepela na molende na bango, mpe abosaná yango te. Lokola ndeko José ná Rose balekisaki bomoi na bango mobimba na mosala ya Yehova, ndeko Tony ná Wendy bapesaki bango ndako wana. Na mbula 15 oyo euti koleka, basalisaki ndeko José ná Rose, oyo bazali sikoyo na mbula soki 85. Ndeko José ná mwasi na ye Rose bamonaka ete ndeko Tony ná mwasi na ye Wendy bazali likabo oyo euti epai ya Yehova.

Yehova alaki yo ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo mpenza.’ Azali kotandela yo ‘lobɔkɔ na ye ya mobali ya boyengebene.’ Okopesa ye lobɔkɔ na yo?

^ par. 11 Bankombo mosusu ezali ya bango te.