Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2016

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ezekiele mokapo 37 elobeli mwa biteni mibale ya nzete oyo ekómaki eteni ya nzete kaka moko. Yango elimboli nini?

Na nzela ya mosakoli na ye Ezekiele, Yehova asakolaki ete basaleli na ye bakozonga na Mokili ya Ndaka mpe bakosangana lisusu lokola ekólo moko. Esakweli yango emonisaki mpe ete baoyo bakosambela Nzambe na mikolo ya nsuka bakosangana lokola ekólo moko.

Yehova ayebisaki mosakoli na ye Ezekiele akoma na mwa biteni mibale ya nzete. Asengelaki kokoma na mwa eteni moko ya nzete ete: “Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Yisraele, baninga na ye,” mpe na mwa eteni mosusu ete: “Mpo na Yozefe, mwa eteni ya nzete ya Efraime, mpe ndako mobimba ya Yisraele, baninga na ye.” Mwa biteni yango mibale ya nzete esengelaki kokóma “eteni kaka moko ya nzete” na lobɔkɔ ya Ezekiele.Ezekiele 37:15-17.

Liloba “Efraime” elimboli nini? Libota ya Efraime ezalaki libota oyo eyebanaki mingi koleka na mabota zomi ya bokonzi ya  nɔrdi ya Yisraele. Kutu, Yeroboame, mokonzi ya liboso oyo ayangelaki bokonzi yango, autaki na libota ya Efraime. (Kolimbola Mibeko 33:13, 17; 1 Bakonzi 11:26) Libota yango ezalaki bakitani ya Efraime, oyo azalaki mwana ya Yozefe. (Mitángo 1:32, 33) Yozefe azwaki lipamboli moko monene epai ya tata na ye, Yakobo. Yango wana, ebongaki ete “mwa eteni ya nzete ya Efraime” ezala elilingi ya mabota zomi ya bokonzi ya nɔrdi. Na mobu 740 liboso ya Kristo, liboso Ezekiele asakola likambo yango, bato ya Asiri balongaki bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele mpe bamemaki bato yango na boombo. (2 Bakonzi 17:6) Bambula mingi na nsima, bato ya Babilone balongaki bato ya Asiri. Yango wana, ntango Ezekiele akomaki esakweli ya mwa biteni mibale ya nzete, Bayisraele yango mingi bapalanganaki epai na epai na ampire ya Babilone.

Na mobu 607 liboso ya Kristo, bato ya Babilone balongaki bokonzi ya sudi ya mabota mibale ya Yuda mpe bamemaki bato yango na boombo na Babilone. Mbala mosusu bazwaki mpe moto nyonso oyo atikalaki na bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele. Bakonzi ya bokonzi ya sudi bautaki na libota ya Yuda. Banganga-nzambe bazalaki mpe kofanda na Yuda mpo bazalaki kosala mosala na tempelo na Yerusaleme. (2 Ntango 11:13, 14; 34:30) Yango wana, ebongaki ete mwa eteni ya nzete oyo ezalaki “mpo na Yuda” ezala elilingi ya mabota mibale ya bokonzi ya sudi.

Ntango nini mwa biteni yango mibale ya nzete esanganaki esika moko? Yango esalemaki na mobu 537 liboso ya Kristo, ntango bamonisi ya bokonzi ya sudi mpe ya nɔrdi bautaki na boombo mpe bazongaki na Yerusaleme mpo na kotonga lisusu tempelo. Ekólo ya Yisraele ekabwanaki lisusu te. Na mbala oyo lisusu, Bayisraele bazalaki kosambela Yehova elongo. (Ezekiele 37:21, 22) Mosakoli Yisaya mpe Yirimia basakolaki mpe bomoko yango.Yisaya 11:12, 13; Yirimia 31:1, 6, 31.

Esakweli ya Ezekiele elobaki nini mpo na losambo ya solo? Esakolaki ete Yehova akosala ete baoyo nyonso basambelaka ye ‘bázala kaka moko.’ (Ezekiele 37:18, 19) Elaka yango ekokisamaki na mikolo euti koleka? Ɛɛ. Esakweli yango ebandaki kokokisama na 1919. Liboso ya ntango wana, Satana azalaki ntango nyonso koluka kokabola basaleli ya Nzambe. Kasi, na 1919, mokemoke babandaki kobongisama lisusu, mpe bakómaki lisusu na bomoko.

Na ntango wana, basaleli mingi ya Nzambe bazalaki na elikya ya kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu. (Emoniseli 20:6) Bazalaki lokola mwa eteni ya nzete mpo na Yuda. Kasi, bato oyo bazalaki na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele bazalaki moke. Nsima ya bambula, baoyo bazalaki na elikya yango bakómaki mingi. (Zekaria 8:23) Bazalaki lokola mwa eteni ya nzete mpo na Yozefe.

Lelo oyo, bituluku yango mibale ezali kosalela Yehova elongo. Bazali na Mokonzi kaka moko, Yesu Kristo. Esakweli ya Ezekiele ebengi ye “Davidi mosaleli na ngai.” (Ezekiele 37:24, 25) Yesu abondelaki Tata na ye mpo na bayekoli na ye ete: “Bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Yoane 17:20, 21) Yesu asakolaki mpe ete etonga moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo “ekokóma etonga kaka moko” na “mobateli kaka moko.” Bango nyonso bakolanda “mobateli kaka moko.” (Yoane 10:16) Kaka ndenge Yesu amonisaki yango, lelo oyo basaleli nyonso ya Nzambe bazali na bomoko, ezala bazali na elikya ya bomoi ya seko na likoló to awa na mabele!

^ par. 10 Ntango Yesu alobelaki elembo ya mikolo ya nsuka, apesaki bayekoli na ye bandakisa mingi. Tósimba ete liboso alobelaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba etuluku moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakokamba basaleli ya Nzambe. (Matai 24:45-47) Na nsima, apesaki bandakisa oyo elobelaki bakristo nyonso batyami mafuta na elimo. (Matai 25:1-30) Na nsuka, alobelaki baoyo bakosalisa bandeko ya Kristo mpe bakozwa bomoi ya seko awa na mabele. (Matai 25:31-46) Ndenge moko mpe, ntango esakweli ya Ezekiele ebandaki kokokisama na ntango na biso, ekokisamaki libosoliboso epai ya baoyo bazalaki na elikya ya kokende na likoló. Mpe atako mabota zomi ya Yisraele ezalaka ntango nyonso te elilingi ya bato oyo bakofanda libela awa na mabele, bomoko oyo esakweli yango elobeli ekundweli biso bomoko oyo ezali kati na bandeko yango mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo.