Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2016

“Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”

“Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”

“Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.”YAKOBO 1:4.

NZEMBO: 135, 139

1, 2. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya koyika mpiko ya Gideone ná bato na ye 300? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Na kotalela Luka 21:19, mpo na nini ezaleli ya koyika mpiko ezali na ntina mingi?

MEKÁ komona na makanisi etumba makasi oyo ezalaki kati na basoda ya Yisraele, oyo batambwisamaki na Gideone, mpe banguna na bango. Gideone ná bato na ye balandaki Bamidiane mpe basungi na bango butu mobimba, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 32! Biblia eyebisi biso likambo oyo elekaki na nsima: “Gideone akómaki na Yordani, akatisaki yango, ye ná mibali nkama misato (300) oyo bazalaki na ye; balɛmbaki.” Kasi balongaki naino etumba te, mpe basengelaki kobunda na basoda 15 000. Banguna yango banyokolaki Bayisraele na boumeli ya bambula mingi, yango wana basengelaki kotika te. Na yango, Gideone ná bato na ye bakobaki kolanda banguna na bango, mpe nsukansuka balongaki bango!Basambisi 7:22; 8:4, 10, 28.

2 Biso mpe tozali kobunda etumba moko makasi. Banguna na biso ezali Satana, mokili na ye, mpe ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Basusu kati na biso bazali kobunda na banguna  wana banda bambula mingi. Na lisalisi ya Yehova, tolongaki bitumba mingi. Kasi, tolongi naino etumba ya nsuka te. Na bantango mosusu, tokoki kolɛmba na etumba yango. To tokoki kolɛmba kozela nsuka ya ebongiseli oyo mabe. Yesu akebisaki biso ete tokokutana na mikakatano makasi mpe minyoko makasi na mikolo ya nsuka. Kasi alobaki mpe ete soki toyiki mpiko, tokoki kolonga. (Tángá Luka 21:19.) Ezaleli ya koyika mpiko ezali nini? Nini ekosalisa biso tóyika mpiko? Liteya nini tokoki kozwa epai ya baoyo bayikaki mpiko? Mpe ndenge nini tokoki kotika “ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”?Yakobo 1:4.

EZALELI YA KOYIKA MPIKO EZALI NINI?

3. Ezaleli ya koyika mpiko ezali nini?

3 Na Biblia, ezaleli ya koyika mpiko esuki kaka te na kotika nzela to kondima likambo moko ya mpasi esalema. Etaleli mpe ndenge oyo tozali kokanisa mpe kotalela komekama na biso. Ezaleli ya koyika mpiko esalisaka biso tózala na mpiko, bosembo mpe motema molai. Buku moko elobi ete ezaleli ya koyika mpiko esalisaka biso tózala na elikya makasi mpe tólɛmba te ntango tokutani na mikakatano. Esalisaka biso tótikala ngwi mpe tótengatenga te ata ntango tomekami makasi. Esalisaka biso tókómisa komekama yango elonga mpe tótya makanisi na mokano na biso, kasi te na mpasi na biso.

4. Mpo na nini tokoki koloba ete ezaleli ya koyika mpiko esimbami na bolingo?

4 Bolingo esalisaka biso tóyika mpiko. (Tángá 1 Bakorinti 13:4, 7.) Na ndenge nini? Bolingo oyo tolingaka Yehova esalisaka biso tóyika mpiko na likambo nyonso oyo atiki nzela esalema. (Luka 22:41, 42) Bolingo oyo tolingaka bandeko na biso esalisaka biso tóyikela mabunga na bango mpiko. (1 Petro 4:8) Bolingo oyo tolingaka molongani na biso esalisaka biso tóyika mpiko na “bolɔzi” oyo, ata mabala ya esengo ekutanaka na yango, mpe esalisaka biso tózala na boyokani malamu na libala na biso.1 Bakorinti 7:28.

NINI EKOSALISA YO OYIKA MPIKO?

5. Mpo na nini Yehova nde abongi mpenza kosalisa biso mpo tóyika mpiko?

5 Sɛngá Yehova apesa yo makasi. Yehova azali “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi.” (Baroma 15:5) Kaka ye nde ayebi malamu makambo oyo ekómelaka biso, ndenge oyo tomiyokaka, mpe bomoi na biso ya kala. Yango wana, ayebi malamu oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. Biblia elobi: “Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye, mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.” (Nzembo 145:19) Kasi ndenge nini Nzambe akoyanola na mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye makasi ya koyika mpiko?

Yehova, oyo ayebi biso malamu, ayebi mpenza oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko

6. Ndenge Biblia elaki, ndenge nini Yehova akoki ‘kobongisela biso nzela ya kobima’ na mikakatano?

6 Ntango tosɛngi Yehova asalisa biso tóyika mpiko, alaki ete ‘akobongisela mpe biso nzela ya kobima.’ (Tángá 1 Bakorinti 10:13.) Ndenge nini asalaka yango? Na bantango mosusu, akoki kolongola komekama yango. Kasi mbala mingi, akopesa biso makasi mpo ‘tóyika mpenza mpiko mpe tózala na motema molai ná esengo.’  (Bakolose 1:11) Lisusu, lokola Yehova ayebi malamu esika makasi na biso esuki, ayebi makanisi na biso mpe ndenge oyo tomiyokaka, akotika soki moke te mokakatano moko ekóma makasi mingi mpo tókoka te kotikala sembo.

7. Pesá ndakisa oyo emonisi ete tosengeli na bilei ya elimo mpo tóyika mpiko.

7 Tiká ete bilei ya elimo ekómisa kondima na yo makasi. Mpo na nini bilei ya elimo ezali na ntina? Tópesa ndakisa oyo: Mpo moto amata ngomba moko ya molai, asengeli kolya mokolo moko bilei oyo moto asengeli kolya mikolo misato to minei. Ndenge moko mpe, tosengeli na bilei mingi ya elimo mpo tóyika mpiko mpe tókokisa mokano na biso. Tosengeli kozala na ekateli ya kolekisa ntango mingi na boyekoli na biso moko mpe na makita na biso. Makambo wana ekopesa biso oyo tosengeli na yango mpo tókómisa kondima na biso makasi.Yoane 6:27.

8, 9. (a) Na kotalela Yobo 2:4, 5, tosengeli komona nini ntango tokutani na komekama? (b) Ntango okutani na komekama, likambo nini okoki komona na makanisi?

8 Kanisá bosembo na yo epai ya Nzambe. Ntango tokutani na komekama, tosengeli kosuka kaka te na komona mpasi na biso. Bosembo na biso epai ya Nzambe emekamaka. Ndenge oyo tosalaka ntango tomekami emonisaka soki totalelaka Yehova lokola Moyangeli ya solo ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Na ndenge nini? Satana, monguna ya Nzambe oyo atɛmɛlaka boyangeli na ye, afingaki Yehova ntango alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na bango moko. Satana alobaki ete: “Eloko oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.” Na nsima abakisaki boye mpo na Yobo: “Mpo makambo ebongwana, nabondeli yo, sembolá lobɔkɔ na yo mpe simbá tii na mokuwa na ye mpe na mosuni na ye, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” (Yobo 2:4, 5) Satana abongwani banda alobaki maloba wana? Soki moke te! Bambula mingi nsima ya kobwakama longwa na likoló, Satana azalaki kaka kofunda basaleli ya sembo ya Nzambe ntango nyonso. (Emoniseli 12:10) Lelo oyo, Satana azali kaka koloba ete bato basambelaka Nzambe mpo na matomba na bango moko. Alingaka komona biso tóboya lotomo ya Nzambe ya koyangela mpe tótika kosalela ye.

9 Soki ozali konyokwama ntango omekami, meká komona na makanisi likambo oyo. Satana ná bademo bazali na ngámbo moko. Bazali kotala mpo na komona nini okosala, bazali koloba ete okotikala sembo te. Na ngámbo mosusu, ezali Yehova, Mokonzi na biso Yesu Kristo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo basili kosekwa, mpe bankotó ya baanzelu. Bango mpe bazali komona milende oyo ozali kosala, kasi bazali kobɛtɛla yo mabɔkɔ! Bazali na esengo komona ete ozali na likoki ya koyika mpiko mpe kotikala sembo epai ya Yehova. Na nsima, oyoki Yehova azali koyebisa yo ete: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”Masese 27:11.

Yesu atyaki makanisi na ye nyonso na mapamboli oyo alingaki kozwa soki ayiki mpiko

10. Ndenge nini okoki komekola Yesu na oyo etali kotya miso na matomba oyo ezaleli ya koyika mpiko ekobimisa?

10 Tyá miso na mapamboli oyo  okozwa. Kanisá ete ozali kosala mobembo. Na nzela, osengeli kokatisa nzela moko ya molai na nse ya mabele. Bisika nyonso ozali kotala, ezali molili. Kasi oyebi ete soki okobi mobembo tii na nsuka ya nzela yango, okomona lisusu pole. Bomoi ekoki kozala lokola mobembo wana. Mbala mosusu, osengeli kolekisa ntango moko ya mpasi mingi, mpe okoki komona lokola ete makambo elekeli yo motó. Ata Yesu akokaki koyoka ndenge wana. Ntango bazalaki koboma ye na nzete ya mpasi, asambwisamaki mpe anyokwamaki mingi. Yango esengelaki kozala ntango oyo elekaki mpasi na bomoi na ye! Nini esalisaki ye ayika mpiko? Biblia elobi ete amonaki “esengo oyo etyamaki liboso na ye.” (Baebre 12:2, 3) Yesu atyaki makanisi na ye nyonso na mapamboli oyo asengelaki kozwa soki ayiki mpiko, mpe oyo eleki ntina, alingaki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe mpe kopesa mabɔkɔ na lotomo na ye ya koyangela. Ayebaki ete komekama yango ezalaki mpo na mwa ntango mpe mbano oyo akozwa na likoló ekotikala mpo na libela. Lelo oyo, komekama oyo ozali kokutana na yango ekoki kolekela yo motó mpe kopesa yo mpasi mingi, kasi kobosana te ete ezali kaka mpo na mwa ntango.

“BATO OYO BAYIKI MPIKO”

11. Mpo na nini tosengeli kotalela masolo ya “bato oyo bayiki mpiko”?

11 Tosengeli te koyika mpiko biso moko. Mpo na kolendisa bakristo báyika mpiko na komekama ndenge na ndenge oyo Satana abimisaka, ntoma Petro akomaki boye: “Bótɛmɛla ye, bózala makasi na kondima, bóyeba ete bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na bino na mokili.” (1 Petro 5:9) Masolo ya “bato oyo bayiki mpiko” eteyi biso ndenge ya kotikala sembo, endimisi biso ete tokoki kolonga, mpe ekundweli biso ete tokozwa mbano mpo na bosembo na biso. (Yakobo 5:11) Tótalela mwa bandakisa. [1]—Talá maloba na nse ya lokasa.

12. Liteya nini tozwi na ndakisa ya bakeruba oyo batyamaki na Edene?

12 Bakeruba bazali baanzelu ya lokumu mingi. Ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, Yehova apesaki bakeruba mosusu mokumba ya sika awa na mabele. Mokumba yango ekesanaki mosika na mokumba oyo bazalaki na yango na likoló. Ndakisa na bango ekoki koteya biso ndenge ya koyika mpiko ntango bapesi biso mokumba moko ya mpasi. Biblia elobi ete Yehova “atyaki bakeruba na ɛsti ya elanga ya Edene mpe mopanga, oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango, ezalaki kaka kobalukabaluka mpo na kokɛngɛla nzela ya nzete ya bomoi.” [2] (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Ebandeli 3:24) Biblia elobi te ete bakeruba yango bamilelaki to bamonaki ete mokumba wana ya sika ebongi na bango te mpo bazali baanzelu ya lokumu mingi.  Balɛmbaki mokumba yango te mpe batikaki yango te. Kutu, bakobaki na mokumba yango tii ntango mosala na bango esukaki, mbala mosusu na Mpela, mbula koleka 1 600 na nsima!

13. Nini esalisaki Yobo ayikela komekama mpiko?

13 Yobo, moto ya sembo. Na bantango mosusu, okoki koyoka mpasi na motema mpo moninga to ndeko moko ya libota alobi na yo likambo moko ya kolɛmbisa nzoto. To mbala mosusu, ozali kobɛla makasi to konyokwama mpo moto moko oyo olingaka mingi akufi. Ata soki tokutani na mokakatano nini, ndakisa ya Yobo ekoki kobɔndisa biso. (Yobo 1:18, 19; 2:7, 9; 19:1-3) Yobo ayebaki te mpo na nini akutanaki na bampasi ndenge na ndenge na mbalakaka, kasi alɛmbaki soki moke te. Nini esalisaki ye ayika mpiko? Ya liboso, azalaki kolinga Yehova mpe aboyaki koyokisa ye mawa. (Yobo 1:1) Yobo azalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe ezala na ntango malamu to na ntango ya mpasi. Longola yango, Yehova asalisaki Yobo amona nguya na ye ntango alobelaki biloko mosusu ya kokamwa oyo akelá. Yango endimisaki Yobo ete Yehova akosilisa mpasi na ye na ntango oyo ebongi. (Yobo 42:1, 2) Mpe esalemaki kaka bongo. “Yehova ye moko alongolaki Yobo na kati ya mpasi oyo azalaki na yango, mpe Yehova abandaki kobakisela lisusu Yobo biloko nyonso oyo azalaki na yango mbala mibale.” Yobo ‘anunaki mpe atondaki na mikolo.’Yobo 42:10, 17.

14. Na kotalela 2 Bakorinti 1:6, ndenge nini ezaleli ya koyika mpiko ya ntoma Paulo esalisaki basusu?

14 Ntoma Paulo. Ozali kokutana na botɛmɛli to ata minyoko? Ozali nkulutu na lisangá to mokɛngɛli ya zongazonga mpe omoni ete makambo elekeli yo motó mpo ozali na mikumba mingi? Soki ezali bongo, ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kosalisa yo. Ntoma Paulo akutanaki na minyoko makasi, mpe azalaki ntango nyonso komitungisa mpo na bandeko ya masangá. (2 Bakorinti 11:23-29) Kasi ntoma Paulo alɛmbaki soki moke te, mpe ndakisa na ye  elendisaki basusu. (Tángá 2 Bakorinti 1:6.) Ndenge moko mpe, ezaleli na yo ya koyika mpiko ekoki kolendisa basusu báyika mpiko.

EZALELI YA KOYIKA MPIKO ‘EKOSALA MOSALA NA YANGO MOBIMBA’ EPAI NA YO?

15, 16. (a) “Mosala” nini ezaleli ya koyika mpiko esalaka na mobimba? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kotika “ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba.”

15 Na litambwisi ya elimo santu, moyekoli Yakobo akomaki boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.” (Yakobo 1:4) Ndenge nini ezaleli ya koyika mpiko ekoki ‘kosala mosala’ na yango mobimba epai na biso? Ntango tokutani na komekama, tokoki komona ete tosengeli komonisa lisusu motema molai, botɔndi, to bolingo. Ntango tozali koyikela komekama mpiko, tokoyekola komonisa bizaleli yango lisusu mingi, mpe na ndenge yango, tokobongisa lisusu bomoto na biso ya bokristo.

Ntango tozali koyika mpiko na komekama, bomoto na biso ya bokristo ekokóma lisusu malamu koleka (Talá paragrafe 15, 16)

16 Lokola ezaleli ya koyika mpiko ekoki kosalisa biso tókóma bakristo ya malamu koleka, tokolinga te kobuka mibeko ya Yehova kaka mpo tótya nsuka na komekama na biso. Na ndakisa, soki ozali kobunda na makanisi ya mbindo, komitika te ete okwea na komekama! Sɛngá Yehova asalisa yo obengana makanisi wana ya mabe. Ezali na moto moko ya libota na yo oyo azali kotɛmɛla yo? Soki ezali bongo, kolɛmba te! Zalá na ekateli ya kokoba kosalela Yehova. Soki osali bongo, okotyela Yehova motema lisusu mingi koleka. Kobosana likambo oyo te: Mpo Nzambe andima biso, tosengeli koyika mpiko.Baroma 5:3-5; Yakobo 1:12.

17, 18. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya koyika mpiko tii na nsuka. (b) Lokola nsuka ezali se kokóma pene, elikya nini tokoki kozala na yango?

17 Tosengeli koyika mpiko, kaka mpo na mwa ntango te, kasi tii na nsuka. Kanisá ete masuwa moko ezali kozinda na mai. Mpo na kobika, bato oyo bazalaki na kati basengeli kobɛta mai tii bakokóma na libongo to na bokula. Moto oyo alɛmbi kobɛta mai na ebandeli akozinda. Ndenge moko mpe, moto oyo alɛmbi kobɛta mai mwa moke liboso ete akóma na libongo to na bokula, ye mpe akozinda. Soki tolingi kokɔta na mokili ya sika, tosengeli kokoba koyika mpiko. Tózala na makanisi lokola oyo ntoma Paulo azalaki na yango; alobaki ete: “Tozali kotika te.”2 Bakorinti 4:1, 16.

18 Lokola ntoma Paulo, tondimi mpenza ete Yehova akosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka. Akomaki boye: “Tozali mpenza kolonga na lisalisi ya moto oyo alingaki biso. Mpo nandimi mpenza ete ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya sikoyo, to makambo oyo ekoya, to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.” (Baroma 8:37-39) Ya solo, ntango mosusu tokoki kolɛmba. Kasi tómekola Gideone mpe bato na ye. Balɛmbaki, kasi batikaki te. “Bazalaki se kolanda banguna”!Basambisi 8:4.

^ [1] (paragrafe 11) Okoki mpe kolendisama soki otángi masolo ya basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso oyo bayikaki mpiko. Na ndakisa, Buku ya mobu ya 1992, ya 1999, mpe ya 2008 ezali na masolo ya kolendisa ya bandeko na biso ya Éthiopie, ya Malawi, mpe ya Russie.

^ [2] (paragrafe 12) Biblia eyebisi biso te motángo ya bakeruba oyo bazwaki mokumba wana.