Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2016

Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?

Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?

“Bakobaki komipesa . . . kosangana bango na bango.”MISALA 2:42.

NZEMBO: 20, 119

1-3. (a) Ndenge nini bakristo bamonisaki ete bazalaka na mposa ya koyangana na makita? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

NTANGO ndeko Corinna azalaki na mbula 17, bakangaki mama na ye mpe batindaki ye mosika, na kaa oyo bazalaki kosalisa bango misala ya makasi. Na nsima, bamemaki mpe ndeko Corinna mosika mpenza tii na Sibérie, na ntaka ya bankotó ya bakilomɛtrɛ. Kuna, azalaki kosala na ferme moko mpe bazalaki kosalela ye makambo lokola moombo. Na bantango mosusu, bazalaki kosalisa ye misala na makasi libándá na malili makasi kozanga bilamba ya malili. Atako bongo, ndeko Corinna ná ndeko mwasi mosusu bazwaki ekateli ya kosala nyonso oyo bakoki mpo na kolongwa na ferme mpe kokende na makita ya lisangá.

2 Ndeko Corinna alobi boye: “Tolongwaki na esika na biso ya mosala na mpokwa mpe totambolaki kilomɛtrɛ 25 mpo na kokóma esika bazwaka engbunduka. Engbunduka elongwaki na ngonga ya mibale ya ntɔngɔ, mpe tosalaki mobembo ya ngonga motoba liboso ya kokita mpe totambolaki lisusu kilomɛtrɛ 10 na makolo mpo na kokóma na esika ya makita.”  Ndeko Corinna asepelaki mingi kosala mobembo wana. Alobi boye: “Na makita, toyekolaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe toyembaki banzembo ya Bokonzi. Elendisaki biso mpe ekómisaki kondima na biso makasi.” Bandeko basi wana mibale bazongaki na ferme mikolo misato na nsima, kasi mokambi ya ferme ayebaki kutu te ete bakendaki esika mosusu.

3 Basaleli ya Yehova bazelaka na esengo ntango oyo bayanganaka na makita. Na ndakisa, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na mposa makasi ya koyangana mpo na kosambela Yehova mpe koyekola makambo na ye. (Misala 2:42) Na ntembe te, yo mpe ozelaka na esengo mpenza kokende na makita. Kasi lokola bandeko nyonso, yo mpe okoki kozala na mokakatano mpo na koyangana na makita mbala na mbala. Mbala mosusu, osengeli kosala mosala bangonga mingi, to ozali na makambo mingi ya kosala, to mpe omiyokaka ntango nyonso ete olɛmbi. Na yango, nini ekosalisa biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kozala na makita? [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndenge nini tokoki kolendisa bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu mpo báyanganaka ntango nyonso na makita na biso? Lisolo oyo ekolimbola ntina oyo koyangana na makita (1) ezali mpo na bolamu na biso, (2) esalisaka basusu, mpe (3) esepelisaka Yehova. [2]—Talá maloba na nse ya lokasa.

MAKITA EZALI MPO NA BOLAMU NA BISO

4. Ndenge nini koyangana na makita esalisaka biso tóyekola makambo ya Yehova?

4 Makita eteyaka biso. Makita nyonso esalisaka biso tóyekola makambo mosusu mingi ya Yehova. Na ndakisa, masangá mingi euti kosilisa koyekola buku Pusaná penepene na Yehova na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Ozalaki komiyoka ndenge nini ntango tozalaki kolobela bizaleli ya Yehova mpe ntango ozalaki koyoka ndenge bandeko bazalaki komiyoka mpo na ye? Na ntembe te, yango esalisaki yo olinga Yehova lisusu mingi. Na makita, toyekolaka mpe makambo mingi oyo euti na Biblia ntango toyokaka na likebi badiskur, bilakiseli, mpe botángi ya Biblia. (Nehemia 8:8) Lisusu, kanisá ebele ya makambo oyo toyekolaka pɔsɔ nyonso ntango tobongisaka botángi ya Biblia mpe na nsima toyokaka mateya oyo basusu bazwaki na botángi yango.

5. Ndenge nini makita esalisaki yo osalela makambo oyo oyekolaki na Biblia mpe obongisa lolenge na yo ya kosakola?

5 Makita eteyaka biso tósalela makambo oyo toyekoli na Biblia na bomoi na biso. (1 Batesaloniki 4:9, 10) Na ndakisa, osilá kolanda boyekoli moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esalisaki yo olinga kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova, to obongisa lisusu mabondeli na yo, to olimbisa ndeko moko? Makita oyo tosalaka na kati ya pɔsɔ ekoki koteya biso ndenge ya kosakola nsango malamu mpe ndenge ya kosalisa basusu bákanga ntina ya solo ya Biblia.Matai 28:19, 20.

6. Ndenge nini makita na biso elendisaka biso mpe esalisaka biso tókóma makasi?

6 Makita elendisaka biso. Mokili ya Satana elukaka kolɛmbisa kondima na  biso mpe ekoki kosala ete tómitungisa mingi mpe tólɛmba nzoto. Kasi makita na biso elendisaka biso mpe epesaka biso makasi ya kokoba kosalela Yehova. (Tángá Misala 15:30-32.) Mbala mingi, tolobelaka ndenge oyo bisakweli ya Biblia ekokisamaka. Yango ekoki kosalisa biso tóndimisama ete makambo oyo Yehova alaki biso mpo na mikolo ezali koya ekokokisama. Bandeko na biso balendisaka biso ntango basalaka masolo, ntango bapesaka biyano, mpe ntango basanzolaka Yehova na ndenge bayembaka na motema mobimba. (1 Bakorinti 14:26) Mpe ntango tosololaka na bango liboso mpe nsima ya makita, tozwaka makasi mpo tozali na baninga mingi oyo batyelaka biso mpenza likebi.1 Bakorinti 16:17, 18.

Makita na biso elendisaka biso mpe epesaka biso makasi ya kokoba kosalela Yehova

7. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyanganaka na makita na biso?

7 Na makita, tozwaka lisalisi ya elimo santu ya Nzambe. Yesu asalelaka elimo santu mpo na kotambwisa masangá. Kutu, ayebisi biso ete tosengeli ‘koyoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’ (Emoniseli 2:7) Elimo santu ekoki kosalisa biso tótɛmɛla masɛnginya mpe tósakola na molende. Ekoki mpe kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Yango wana, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyanganaka na makita na biso mpe kozwa lisalisi ya elimo santu ya Nzambe.

TOSALISAKA BASUSU NA MAKITA

8. Ntango bandeko bamonaka biso na makita mpe bayokaka biyano na biso mpe ndenge toyembaka, ndenge nini yango esalisaka bango? (Talá mpe etanda “ Mbala mingi amiyokaka malamu nsima ya makita.”)

8 Na makita, tozalaka na mabaku ya komonisa bandeko ete tolingaka bango. Bandeko mingi na masangá na biso bazali koyika mpiko na mikakatano ya makasi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tótyelanaka likebi.” (Baebre 10:24, 25) Tokoki komonisa ete totyelaka bandeko likebi ntango tozali koyangana mpo na kolendisana. Ntango tokendaka na makita, tomonisaka bandeko ete tolingaka kozala elongo na bango, kosolola na bango, mpe ete totyaka likebi na ndenge oyo bazali komiyoka. Tolendisaka mpe bango ntango bayokaka biso tozali kopesa biyano mpe koyemba na motema mobimba.Bakolose 3:16.

9, 10. (a) Limbolá ndenge oyo maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 10:16 esalisaka biso tóyeba mpo na nini ezali na ntina tóyanganaka na bandeko. (b) Soki tozali koyangana na makita mbala na mbala, ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo libota esundolá bango?

 9 Ntango tokendaka na makita, tosalaka ete lisangá ezala na bomoko. (Tángá Yoane 10:16.) Yesu amikokanisaki na mobateli ya mpate mpe bayekoli na ye na etonga ya bampate. Kanisá naino: Soki bampate mibale ezali na ngomba, mibale mosusu ezali na lobwaku, mpe moko ezali esika mosusu, tokoki nde koloba ete bampate wana mitano ezali na etonga? Te, mpo etonga ya bampate ezalaka esika moko mpe elandaka mobateli ya mpate. Ndenge moko mpe, tosengeli te kozangisaka makita, mpo tózala mosika te na bandeko. Tosengeli koyanganaka mpo tókóma “etonga kaka moko” mpe tólanda “mobateli kaka moko.”

10 Makita na biso esalisaka biso tózala na bomoko lokola libota oyo bato na yango balinganaka. (Nzembo 133:1) Na lisangá, ezali na bandeko mosusu oyo bato ya libota na bango, na ndakisa baboti na bango to bandeko na bango, basundolá bango. Kasi Yesu alakaki ete akopesa bango libota oyo ekolinga bango mpe ekosalisa bango. (Marko 10:29, 30) Soki oyanganaka na makita mbala na mbala, okoki kozala lokola tata, mama, ndeko mobali to ndeko mwasi ya ndeko moko na lisangá. Soki tokanisi makambo wana, tokosala nyonso oyo tokoki mpo na koyangana na makita nyonso.

TOKOSEPELISA YEHOVA

11. Ndenge nini koyangana na makita esalisaka biso tópesa Yehova oyo abongi na yango?

11 Na makita, topesaka Yehova oyo abongi na yango. Lokola azali Mozalisi  na biso, tosengeli kopesaka ye matɔndi, lokumu mpe nkembo. (Tángá Emoniseli 7:12.) Tokoki kosala yango na makita ntango tobondelaka Yehova, toyembelaka ye, mpe tolobaka mpo na ye. Tozali mpenza na libaku malamu ya kosambela Yehova pɔsɔ nyonso!

Yehova amonaka ete tozali mpenza na mposa ya koyangana na makita mpe azwaka na motuya mingi milende oyo tosalaka mpo na kozala kuna

12. Yehova ayokaka ndenge nini ntango totosaka etinda na ye ya koyangana na makita?

12 Yehova akelá biso, mpe tosengeli kotosa ye. Asɛngi biso tótika te koyanganaka, mingimingi lokola nsuka ekómi pene. Na yango, ntango totosaka etinda wana, Yehova asepelaka. (1 Yoane 3:22) Amonaka ete tozali mpenza na mposa ya koyangana na makita mpe azwaka na motuya mingi milende oyo tosalaka mpo na kozala kuna.Baebre 6:10.

13, 14. Ndenge nini topusanaka penepene na Yehova mpe na Yesu na makita?

13 Ntango tokendaka na makita, tomonisaka Yehova ete tolingi kopusana penepene na ye mpe ya Mwana na ye. Na makita, toyekolaka Biblia mpe Yehova ateyaka biso oyo tosengeli kosala mpe ndenge oyo bomoi na biso esengeli kozala. (Yisaya 30:20, 21) Ata ntango bato mosusu oyo basalelaka Yehova te bayaka na makita, bamonaka ete Yehova azali kotambwisa biso. (1 Bakorinti 14:23-25) Yehova atambwisaka makita na biso na nzela ya elimo santu na ye, mpe makambo oyo toyekolaka kuna eutaka epai na ye. Na yango, ntango tokendaka na makita, toyokaka makambo oyo Yehova alobaka, tomonaka ndenge alingaka biso mingi mpe topusanaka penepene na ye.

14 Yesu, Mokonzi ya lisangá, alobaki ete: “Epai bato mibale to misato bayangani na nkombo na ngai, nakozala wana na katikati na bango.” (Matai 18:20) Biblia elobi mpe ete Yesu “azali kotambola na katikati ya” masangá. (Emoniseli 1:20–2:1) Ya solo, Yehova ná Yesu bazali elongo na biso mpe balendisaka biso na makita. Okanisi ete Yehova ayokaka ndenge nini ntango amonaka ete ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kopusana penepene na ye mpe Mwana na ye?

15. Na ndenge nini koyangana na makita emonisaka Nzambe ete tolingaka kotosa ye?

15 Ntango tokendaka na makita, tomonisaka Yehova ete tolingi kotosa ye. Yehova asɛngaka biso na makasi te tósala oyo alobi. (Yisaya 43:23) Yango wana, ntango totosaka etinda na ye ya koyangana na makita, tomonisaka ete tolingaka ye mpe tondimaka ete azali na lotomo ya koyebisa biso oyo tosengeli kosala. (Baroma 6:17) Na ndakisa, tokosala nini soki patrɔ na biso alingi ete tósalaka mosala bangonga mingi koleka mpe yango ekómi kosala ete tózangisaka makita mbala na mbala? To mbala mosusu, na mboka oyo tofandi, Leta ekoki koloba ete moto nyonso oyo akoyangana na makita mpo na kosambela Yehova, akofuta lomande, akokɔta na bolɔkɔ to akozwa etumbu moko ya makasi mpenza. To na bantango mosusu tokoki kosepela kosala likambo mosusu na esika ya kokende na makita. Na makambo wana nyonso,  tosengeli kopona oyo tokosala. (Misala 5:29) Kasi mbala nyonso oyo totosaka Yehova, tosepelisaka ye.Masese 27:11.

KOBÁ KOYANGANA ELONGO NA BANDEKO

16, 17. (a) Ndenge nini toyebi ete makita ezalaki na ntina mingi mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso? (b) Ndenge nini ndeko George Gangas azalaki kotalela makita ya bokristo?

16 Nsima ya koyangana na Pantekote ya mobu 33, bakristo bakobaki koyangana mbala na mbala mpo na kosambela Yehova. “Bakobaki komipesa na mateya ya bantoma mpe kosangana bango na bango.” (Misala 2:42) Mpe batikaki te koyangana esika moko ata ntango guvɛrnema ya Baroma mpe bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki konyokola bango. Atako ezalaki pɛtɛɛ te, basalaki nyonso oyo bakoki mpo na kokoba koyangana esika moko.

17 Lelo oyo mpe, basaleli ya Yehova bazalaka na botɔndi mingi mpo na makita mpe basepelaka kozala kuna. Ndeko George Gangas, oyo asalaki mbula koleka 22 na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobaki boye: “Mpo na ngai, koyangana elongo na bandeko ezali moko ya makambo oyo epesaka ngai esengo na bomoi mpe elendisaka ngai. Nalingaka kozala kati ya bato ya liboso oyo bakómaka na Ndako ya Bokonzi, mpe kati ya bato ya nsuka oyo balongwaka na Ndako ya Bokonzi, soki likoki ezali. Nayokaka esengo mingi ntango nazali kosolola na basaleli ya Nzambe. Soki nazali elongo na bandeko, namiyokaka lokola nazali na ndako elongo na libota na ngai, na paradiso ya elimo.” Abakisaki ete: “Makanisi ya motema na ngai mpe mposa na ngai ezalaka ya koyangana na makita.”

18. Omiyokaka ndenge nini mpo na makita, mpe ozali na ekateli ya kosala nini?

18 Yo mpe omiyokaka ndenge wana mpo na losambo oyo topesaka Yehova? Soki ezali bongo, kobá kosala nyonso oyo okoki mpo na kozala elongo na bandeko na makita, ata soki ezali mpasi. Monisá Yehova ete omiyokaka lokola Mokonzi Davidi, oyo alobaki ete: “Yehova, nalingi esika ndako na yo efandi.”Nzembo 26:8.

^ [1] (paragrafe 3) Bandeko mosusu bakoki te koyangana na makita ntango nyonso mpo bakutani na mikakatano oyo likoki ya kokima yango ezali te. Na ndakisa, mbala mosusu bakoki kobɛla maladi makasi. Soki ezali bongo, basengeli kozala na kondima ete Yehova ayebi malamu mokakatano na bango mpe asepelaka mingi na likambo nyonso oyo basalaka mpo na kosambela ye. Bankulutu bakoki kosalisa bandeko ya ndenge wana mpo bálanda makita, mbala mosusu kosalisa bango na nzela ya telefone to kokɔtisa makita na CD to aparɛyi moko.

^ [2] (paragrafe 3) Talá etanda “ Bantina oyo toyanganaka na makita.”