Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2016

Kobá koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani

Kobá koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani

“Bózongisela . . . Nzambe biloko ya Nzambe.”MATAI 22:21.

NZEMBO: 33, 137

1. Ndenge nini tokoki kotosa Nzambe mpe baguvɛrnema ya bato?

BIBLIA eteyaka biso tótosa baguvɛrnema ya bato, kasi eteyaka mpe biso ete tosengeli ntango nyonso kotosa Nzambe. (Misala 5:29; Tito 3:1) Ndenge nini yango ekoki kosalema? Yesu alimbolaki etinda moko oyo esalisaka biso tóyeba nani tosengeli kotosa. Alobaki ete tosengeli kozongisela “Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Matai 22:21) Tozongiselaka “Kaisala biloko ya Kaisala” ntango totosaka mibeko ya Leta, tomemyaka bakonzi ya Leta, mpe tofutaka mpako. (Baroma 13:7) Kasi soki Leta esɛngi biso tósala likambo moko oyo Nzambe aboyaka ete tósala, toboyaka kosala yango, kasi tosalaka yango na limemya.

2. Ndenge nini tomonisaka ete tokɔtaka te na makambo ya politiki ya mokili?

2 Lolenge moko ya kozongisela “Nzambe biloko ya Nzambe” ezali koboya kozala na ngámbo moko na makambo ya politiki ya mokili oyo. Tokɔtaka na makambo wana te. (Yisaya 2:4) Lokola Yehova atiki nzela ete bakonzi ya mokili báyangela, totɛmɛlaka bango te. Tosanganaka mpe te na makambo oyo emonisaka  bolingo ya ekólo. (Baroma 13:1, 2) Tomekaka te kobongola baguvɛrnema ya mokili to koluka kopesa bato ya politiki makanisi, mpe toponaka moto moko te na ntango ya maponami mpe tokɔtaka na politiki te.

3. Mpo na nini tosengeli te kokɔta na makambo ya mokili?

3 Ezali na bantina mingi oyo Nzambe ayebisi biso tókɔtaka te na makambo ya mokili. Ntina ya liboso ezali ete tomekolaka Yesu, oyo azalaki “moto ya mokili te.” Akɔtaki soki moke te na makambo ya politiki to na bitumba. (Yoane 6:15; 17:16) Ntina mosusu ezali ete topesaka mabɔkɔ na Bokonzi ya Nzambe. Lokola topesaka mabɔkɔ te na baguvɛrnema ya mokili, tozalaka na lisosoli ya pɛto ntango tosakolaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato. Mangomba ya lokuta ekɔtaka na makambo ya politiki mpe ekabolaka bato. Lokola tokɔtaka te na makambo ya mokili, tozali na bomoko elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba.1 Petro 2:17.

4. (a) Ndenge nini toyebi ete ekokóma mpasi tóboya kokɔta na makambo ya mokili? (b) Mpo na nini tosengeli komibongisa sikoyo mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili?

4 Ekoki kozala ete tofandi na esika oyo bato bazelaka te ete tókɔta na ngámbo moko na makambo ya politiki. Kasi, lokola nsuka ya ebongiseli oyo ya Satana ekómi mpenza pene, ekoki kozala mpenza mpasi mpo na biso tóboya kokɔta na makambo ya mokili. Lelo oyo, bato mingi “balingaka kosala boyokani te” mpe bazali “bato ya motó makasi,” mpe bakokoba se kokabwana. (2 Timote 3:3, 4) Bandeko na biso mosusu bakutanaki na makambo ya ndenge wana ntango makambo ya politiki ya mboka na bango ebongwanaki na mbalakaka. Yango wana, tosengeli komibongisa sikoyo mpo tókɔta te na makambo ya mokili, ata na ntango ya mpasi. Tótalela makambo minei oyo tokoki kosala mpo na komibongisa.

TALELÁ BAGUVƐRNEMA YA BATO NDENGE YEHOVA ATALELAKA YANGO

5. Yehova akanisaka nini mpo na baguvɛrnema ya bato?

5 Lolenge moko ya komibongisa sikoyo mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili ezali ya kotalela baguvɛrnema ya bato ndenge Yehova atalelaka yango. Ntango Yehova akelaki bato, apesaki bango te lotomo ya koyangela bato mosusu. (Yirimia 10:23) Amonaka bato nyonso lokola libota moko. Kasi, baguvɛrnema ya bato ekaboli bato mpo basusu bakanisaka ete ekólo na bango eleki ya baninga. Ata baguvɛrnema oyo emonanaka malamu, ekoki te kosilisa mikakatano nyonso. Longola yango, bakómá banguna ya Bokonzi ya Nzambe oyo ebandaki koyangela na 1914. Etikali moke, Bokonzi yango elongola baguvɛrnema nyonso ya bato.Tángá Nzembo 2:2, 7-9.

Mibongisá sikoyo mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili

6. Ndenge nini tosengeli kotalela baoyo bazali na bokonzi na baguvɛrnema?

6 Nzambe atiki nzela ete baguvɛrnema ya bato ezala, mpo ekoki kotya mwa kimya mpe kosala ete makambo etambola na mobulu te. Yango esalisaka biso tósakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Baroma 13:3, 4) Kutu, Yehova asɛngi biso tóbondelaka mpo na baoyo bazali na bokonzi, mpo tókoka kosambela ye na kimya. (1 Timote 2:1, 2) Soki basaleli biso makambo na bosembo te, tokoki kosɛnga bakonzi  ya Leta básalisa biso. Yango nde ntoma Paulo asalaki. (Misala 25:11) Atako Biblia elobi ete Satana nde azali kotambwisa baguvɛrnema ya bato, elobi soki moke te ete atambwisaka moto mokomoko oyo azali na bokonzi. (Luka 4:5, 6) Yango wana, tosengeli soki moke te kokɔtisa na makanisi ya bato ete mokonzi moko boye ya Leta azali kotambwisama na Zabolo. Biblia elobi ete tosengeli te kofinga basusu.Tito 3:1, 2.

7. Makanisi nini tosengeli koboya?

7 Totosaka Nzambe na ndenge toboyaka kosalisa moto moko ya politiki to lisangá moko ya politiki, ata ntango makanisi na bango to maloba na bango ekoki kopesa biso bolamu. Na bantango mosusu, yango ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na biso. Na ndakisa, kanisá ete bana-mboka batombokeli guvɛrnema moko oyo ememelaki bato, ezala mpe Batatoli ya Yehova, mpasi mingi. Ya solo, osengeli te kosangana na baoyo bazali kotomboka; kasi osengeli nde kokanisa ete batomboki yango bazali na lotomo ya kosala bongo mpe kolikya ete bakolonga? (Baefese 2:2) Soki tolingi koboya kokɔta na makambo ya mokili, tosengeli koboya kokanisa ete kozala na ngámbo moko ezali malamu koleka kozala na ngámbo mosusu. Yango ekomonana na makambo oyo tolobaka mpe tosalaka.

ZALÁ “EKƐNGƐ” KASI NA “NGAMBO TE”

8. Soki ezali mpasi koboya kokɔta na makambo ya mokili, ndenge nini tokoki kozala “ekɛngɛ” kasi na “ngambo te”?

8 Lolenge ya mibale ya koboya kokɔta na makambo ya mokili ezali ya kozala ‘ekɛngɛ lokola banyoka kasi kozala na ngambo te lokola bibenga.’ (Tángá Matai 10:16, 17.) Tokomonisa ete tozali “ekɛngɛ” soki tozali kokanisa liboso komekama nini tokoki kokutana na yango. Tokomonisa ete tozali na “ngambo te” soki tozali kokɔta te na makambo ya mokili na ntango ya komekama. Tótalela mwa ndambo ya makambo yango mpe oyo tokoki kosala mpo tóboya kokɔta na makambo ya mokili.

9. Makambo nini tosengeli kokeba na yango ntango tozali kosolola na basusu?

9 Masolo oyo tobɛtaka. Tosengeli mpenza kokeba ntango bato babandi kolobela makambo ya politiki. Na ndakisa, ntango tozali kosolola na moto makambo etali Bokonzi ya Nzambe, tosengeli te koloba ete tondimi to toboyi makanisi ya lisangá moko ya politiki to ya moto moko ya politiki. Na esika ya kolobela makambo oyo bato bakani kosala mpo na kosilisa mikakatano ya bato, monisá ye na Biblia ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano yango mpo na libela. Soki bato balingi kolobela likambo moko, na ndakisa mabala ya basi na basi to mibali na mibali, to kosopa zemi, yebisá bango oyo Liloba ya Nzambe elobi mpe ndenge osalaka makasi otosa mitinda yango na bomoi na yo. Soki moto moko alobi ete esengeli bábongola mibeko mosusu to bálongola yango, tosengeli te kozala na ngámbo na ye, tosengeli mpe te kotingama ete moto yango abongola makanisi na ye.

Kokanisáká ntango nyonso makambo oyo oyoki na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” oyo ezali na Biblia

10. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali kokɔta te na makambo ya mokili ntango tozali kotánga bazulunalo, kolanda radio, kotala televizyo, to kosalela Internet?

10 Bansango oyo epesamaka na radio, televizyo, bazulunalo, mpe Internet. Ntango mosusu, bapanzi-nsango bapesaka nsango na ndenge oyo ezali komonisa polele ete bazali kopesa mabɔkɔ na ngámbo moko na likambo moko boye. Yango emonanaka mingimingi na bamboka oyo guvɛrnema elandelaka bansango nyonso oyo ezali kopesama. Soki shɛni moko ya radio to ya televizyo to mpe bapanzi-nsango bazali na ngámbo moko, tosengeli kokeba mpo tókóma te kokanisa lokola bango. Na  ndakisa, omituna boye: ‘Nasepelaka koyoka mopanzi-nsango moko mpo nandimaka makambo oyo alobaka mpo na politiki?’ Mpo na kosalisa yo okɔta te na makambo ya mokili, boyá kolanda to kotánga bansango mingi oyo ekɔtelaka ngámbo moko na makambo ya politiki. Luká nde kolanda bansango oyo ekɔtelaka ata ngámbo moko te. Mpe kokanisáká ntango nyonso makambo oyo oyoki na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” oyo ezali na Biblia.2 Timote 1:13.

11. Ndenge nini ekoki kozala mpasi koboya kokɔta na makambo ya mokili soki biloko oyo tozali na yango ezali na ntina mingi mpo na biso?

11 Mposa ya konduka biloko ya mokili. Soki tomonaka ete mbongo to biloko oyo tozali na yango ezali na ntina mingi, ekoki kozala mpasi te tókɔta na makambo ya mokili. Nsima ya 1970, Batatoli ya Yehova mingi na Malawi basundolaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango mpo baboyaki kokɔta na lisangá moko ya politiki. Likambo ya mawa, bandeko mosusu baboyaki kotika bomoi ya malamu oyo bazalaki na yango. Ndeko mwasi moko nkombo na ye Ruth alobi boye: “Tokimaki elongo na bandeko mosusu, kasi na nsima, bakɔtaki na lisangá ya politiki mpe bazongaki na mboka na bango mpo bakokaki te bomoi ya mpasi na kaa ya bato bakimá mboka.” Kasi basaleli mingi ya Nzambe bazali ndenge wana te. Baboyaka kokɔta na makambo ya mokili, ata soki yango esɛngi ete bázala na mbongo mingi te to bábungisa biloko nyonso oyo bazalaki na yango.Baebre 10:34.

12, 13. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka bato? (b) Nini ekoki komonisa ete tobandi kokóma na lolendo mingi mpo na ekólo na biso?

12 Lolendo. Bato mingi bamikumisaka mpo na loposo, libota, mimeseno, engumba to ekólo na bango. Kasi Yehova amonaka te ete moto moko aleki basusu to etuluku moko ya bato ezali malamu koleka mosusu. Na miso na ye, biso nyonso tozali ndenge moko. Ya solo, Yehova asalá biso nyonso ndenge moko te, mpe tosengeli kosepela na bokeseni wana. Alingi mpe te ete tótika mimeseno na biso. Kasi, alingi te tókanisa ete toleki basusu.Baroma 10:12.

13 Tosengeli soki moke te kozala na lolendo mpo na ekólo to mboka na biso mpe kokanisa ete eleki mosusu. Soki tokanisaka ndenge wana, ekoki kozala mpasi mingi tóboya kokɔta na makambo ya mokili. Likambo yango esalemaki na siɛklɛ ya liboso. Bandeko mosusu Baebre basalelaki bandeko basi Bagrɛki oyo mibali na bango bakufá makambo na bosembo te. (Misala 6:1) Ndenge nini tokoki koyeba soki tobandi kokolisa lolendo ya ndenge wana? Soki ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo autá mboka mosusu apesi yo toli, okanisaka mbala moko ete: ‘Ndenge oyo biso tosalaka awa ezali malamu,’ na nsima oboyaka likanisi na ye? Soki osalaka bongo, kanisá toli oyo ya ntina mingi: “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”Bafilipi 2:3.

YEHOVA AKOSALISA YO

14. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso, mpe ndakisa nini ya Biblia endimisi likambo yango?

14 Lolenge ya misato ya koboya kokɔta na makambo ya mokili ezali ya kotyela Yehova  motema. Bondelá Yehova apesa yo elimo santu, oyo ekoki kosala ete okóma na motema molai mpe komipekisa. Bizaleli wana ekosalisa yo soki guvɛrnema esali likambo oyo ebongi te to oyo ezali sembo te. Sɛngá Yehova apesa yo bwanya mpo oyeba makambo nini ekoki kosala ete ozala na mokakatano ya koboya kokɔta na makambo ya mokili. Sɛngá ye asalisa yo osala likambo oyo ezali malamu na ntango yango. (Yakobo 1:5) Bakoki kotya yo na bolɔkɔ to kopesa yo etumbu mosusu mpo otikali sembo epai ya Yehova. Soki ezali bongo, bondelá Yehova apesa yo mpiko mpo olimbwela basusu na ndenge ya polele ntina oyo oboyi kokɔta na makambo ya mokili. Okoki kozala na kondima ete Yehova akosalisa yo oyika mpiko.Tángá Misala 4:27-31.

Luká koyeba bavɛrsɛ oyo ekosalisa yo oboya kokɔta na makambo ya mokili mpe bavɛrsɛ oyo elobeli mokili ya sika

15. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tóboya kokɔta na makambo ya mokili? (Talá mpe etanda “ Liloba ya Nzambe ekómisaki ekateli na bango makasi.”)

15 Yehova apesá biso Biblia mpo elendisaka biso. Manyoláká na bavɛrsɛ oyo ekosalisa yo oboya kokɔta na makambo ya mokili. Salá makasi okanga bavɛrsɛ yango na motó mpe obosana yango te, mpo ekosalisa yo soki mokolo mosusu ekómi ete ozala na Biblia te. Biblia ekoki mpe kokómisa makasi elikya na yo mpo na makambo oyo Nzambe alaki mpo na mikolo ezali koya. Tosengeli na elikya yango mpo na koyikela minyoko mpiko. (Baroma 8:25) Poná bavɛrsɛ oyo emonisi mingimingi makambo oyo okosepela komona na mokili ya sika, mpe mimoná ete ozali kuna.

ZWÁ LITEYA EPAI YA BASALELI YA SEMBO YA YEHOVA

16, 17. Liteya nini tokoki kozwa epai ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili? (Talá elilingi ya ebandeli.)

16 Lolenge ya minei ya koboya kokɔta na makambo ya mokili ezali kokanisa bandakisa ya basaleli ya sembo ya Yehova. Basaleli mingi ya Yehova ya ntango ya kala bazalaki na mpiko, mpe bazwaki bikateli ya bwanya oyo esalisaki bango bákɔta te na makambo ya mokili. Tózwa ndakisa ya Shadrake, Meshake, mpe Abedenego, oyo baboyaki kosambela ekeko oyo ezalaki komonisa bokonzi ya Babilone. (Tángá Danyele 3:16-18.) Lisolo wana ya Biblia esalisaka ebele ya Batatoli ya Yehova lelo oyo mpo bázala na mpiko mpe báboya kosambela bendele ya  mboka na bango. Yesu akɔtaki te na makambo ya politiki to makambo mosusu oyo ezalaki kokabola bato. Ayebaki ete ndakisa na ye ya malamu ekosalisa bayekoli na ye. Alobaki ete: “Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”Yoane 16:33.

17 Batatoli ya Yehova mingi na mikolo na biso bakɔtaki te na makambo ya mokili. Basusu kati na bango babɛtamaki, batyamaki na bolɔkɔ, mpe basusu kutu babomamaki mpo batikalaki sembo epai ya Yehova. Bandakisa na bango ekoki kosalisa biso tózala na mpiko. Ndeko moko na mboka Turquie alobaki ete: “Ndeko Franz Reiter azalaki elenge mobali moko oyo babomaki mpo aboyaki kokóma soda ya Hitler. Mokanda oyo akomelaki mama na ye liboso báboma ye emonisi ete azalaki na kondima makasi mpe atyelaki Yehova motema, mpe ngai nalingi kolanda ndakisa na ye soki nakutani na komekama ya ndenge wana.” [2]—Talá maloba na nse ya lokasa.

18, 19. (a) Ndenge nini bandeko ya lisangá na bino bakoki kosalisa yo oboya kokɔta na makambo ya mokili? (b) Ozali na ekateli ya kosala nini?

18 Bandeko ya lisangá na bino bakoki kosalisa yo oboya kokɔta na makambo ya mokili. Soki mokakatano moko ezali kotungisa yo, yebisá bankulutu. Bakoki kopesa yo toli ya malamu oyo euti na Biblia. Lisusu, soki bandeko ya lisangá bayebi likambo na yo, bakoki kolendisa yo. Sɛngá bango bábondela mpo na yo. Kasi tosengeli mpe kosalisa bandeko na biso mpe kobondela mpo na bango. (Matai 7:12) Mpo na komona bankombo ya bandeko oyo bazali na bolɔkɔ, talá lisolo ya jw.org oyo ezali na motó ya likambo Témoins de Jéhovah emprisonnés en raison de leur foi (par pays),” mpo na kokóma kuna, kende na esika bakomi SALLE DE PRESSE > ACTUALITÉS JURIDIQUES. Poná mwa bankombo, mpe sɛngá Yehova asalisa bandeko mibali mpe basi yango bázala na mpiko mpe bátikala sembo epai na ye.Baefese 6:19, 20.

19 Lokola nsuka ekómi pene, tokoki kozela ete baguvɛrnema etya biso mbamba lisusu koleka mpo tókóma na ngámbo na bango. Yango wana ezali na ntina mingi tómibongisa banda sikoyo mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani!

^ [1] (paragrafe 1) Ntango Yesu alobelaka Kaisala, azalaki nde kolobela bakonzi ya Leta. Na ntango wana, Kaisala azalaki mokonzi mpe azalaki na bokonzi koleka bakonzi nyonso na mokili.

^ [2] (paragrafe 17) Talá buku Les Témoins de Jéhovah—Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 662, mpe buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! na mokapo 14 na etanda “Akufá mpo na nkembo ya Nzambe.”