Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2016

 LISOLO YA BOMOI

Kala bazalaki bamamelo, lelo bakómá Batatoli ya Yehova

Kala bazalaki bamamelo, lelo bakómá Batatoli ya Yehova

ELEKI bambula mingi, Araceli, leki na ngai ya mwasi asilikelaki ngai mpe agangelaki ngai: “Koloba na ngai te. Nalingi te koyoka makambo mosusu ya lingomba na yo. Ezali kopesa ngai mpasi na motema. Nazali kosepela na yo lisusu te!” Maloba na ye esalaki ngai mpasi mingi na motema. Sikoyo nazali na mbula 91, mpe nabosanaka maloba wana te. Kasi kaka ndenge Mosakoli 7:8 elobi: “Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango.”—Ndeko Felisa.

Felisa: Nakolaki na libota moko ya bozwi mpenza te na Espagne. Bato ya libota na biso bazalaki Bakatolike, mpe bazalaki kosambela mingi. Kutu, bato 13 ya libota na biso bazalaki basango to bazalaki kosala misala ya lingomba. Ndeko ya mama na ngai azalaki sango mpe molakisi na eteyelo moko ya Katolike. Nsima ya liwa na ye, Pápa Jean-Paul II apesaki ye lokumu mpe akómisaki ye mosantu. Tata na ngai azalaki mosali bibende, mpe mama na ngai azalaki mosali bilanga. Tozalaki bana 8, mpe ngai nazalaki mwana ya liboso.

Ntango nakómaki na mbula 12, etumba moko ya bana-mboka ebandaki na Espagne. Nsima ya etumba yango, batindaki tata na ngai na bolɔkɔ mpo guvɛrnema esepelaki te na makanisi na ye na makambo ya politiki. Ezalaki mpasi mpo mama na biso azwa bilei mpo na biso nyonso. Yango wana, atindaki baleki na ngai ya basi misato, Araceli, Lauri, ná Ramoni, mpo bákende kofanda epai ya bamamelo na kuva, na engumba Bilbao. Kuna, baleki na ngai wana bazalaki na biloko mingi ya kolya.

Araceli: Na ntango wana, nazalaki na mbula 14, Lauri mbula 12, mpe Ramoni mbula 10. Kokabwana na libota ezalaki mpasi mingi. Na kuva, mosala na biso ezalaki ya kotya bopɛto. Mbula mibale na nsima, bamamelo batindaki biso na kuva moko ya monene na Zaragoza, epai bazalaki kosalisa mibange. Tosengelaki kosala mosala makasi ya kotya bopɛto na kuku (cuisine), mpe yango ezalaki kolɛmbisa biso mingi.

Felisa: Ntango baleki na ngai ya basi bakendaki na kuva ya Zaragoza, mama na ngai ná noko na ngai oyo azalaki sango na esika tozalaki bazwaki ekateli ya kotinda ngai mpe na kuva. Basalaki bongo mpo nazala  mosika na mwana mobali moko oyo azalaki kolinga ngai. Nasepelaki kokende kolekisa mwa ntango na kuva mpo nazalaki kolinga Nzambe. Nazalaki kokende ndako-nzambe mikolo nyonso, kutu nazalaki na mposa ya kokóma misionɛrɛ ya lingomba ya Katolike lokola ndeko na ngai oyo azalaki misionɛrɛ na Afrika.

Lobɔkɔ ya mwasi: Kuva ya Zaragoza, na Espagne; lobɔkɔ ya mobali: Libongoli ya Nácar-Colunga

Kasi kuna na kuva, namonaki ete nazalaki te na likoki ya kosala makambo mingi oyo nazalaki kolinga kosala. Bamamelo balendisaki ngai te nakende kosalela Nzambe na ekólo mosusu ndenge nazalaki kokana yango. Mbula moko na nsima, nazongaki na ndako mpo na kosalisa noko na ngai oyo azalaki sango. Nazalaki kosalela ye misala ya ndako, mpe tozalaki kosalela sapɛlɛ mpo na kosambela mpokwa nyonso. Nazalaki mpe kosepela kobongisa bafololo na ndako-nzambe mpe kolata bililingi ya Maria mpe ya “basantu.”

Araceli: Ntango nazalaki na Zaragoza, nasalaki elako na ngai ya liboso mpo na kokóma mamelo. Na nsima, bamamelo bazwaki ekateli ya kokabola ngai ná bandeko na ngai. Yango wana, batindaki ngai na kuva moko na engumba Madrid mpe batindaki Lauri na kuva moko na engumba Valence. Ramoni atikalaki na Zaragoza. Na Madrid, nasalaki elako na ngai ya mibale mpo na kokóma mamelo. Bato mingi, na ndakisa bana-kelasi mpe mibange, bazalaki koya kofanda na kuva. Yango wana, misala ya kosala ezalaki mingi. Nazalaki kosala na lopitalo ya kuva.

Nazalaki kozela na mposa makasi nakóma mamelo. Nazalaki kokanisa ete tokobanda kolekisa ntango mingi na kotánga Biblia mpe koyekola makambo mingi ya Biblia. Kasi nalɛmbaki nzoto. Moto moko te azalaki kosalela Biblia to ata kolobela makambo ya Nzambe to ya Yesu. Nayekolaki mwa Latin, bomoi ya “basantu” mosusu ya Katolike, mpe nazalaki kosambela Maria. Kasi tozalaki kolekisa ntango mingi nde na mosala makasi.

Nakómaki komitungisa mingi. Nakanisaki ete nakozwa mbongo mpo na kosalisa libota na biso, na esika ya kosala mosala na kuva mpo na kokómisa basusu bazwi. Na yango, nasololaki na mamelo oyo azalaki mokonzi mpo na likambo yango mpe nayebisaki ye ete nalingi kolongwa. Kasi akangaki ngai na ndako moko. Akanisaki ete kosala bongo ekotinda ngai natikala.

Bamamelo mosusu babimisaki ngai na ndako yango, kasi ntango bayebaki ete nalingi kaka kobima na kuva, bakangaki ngai lisusu na ndako yango. Nsima ya kosala ngai bongo mbala misato, bayebisaki ngai ete nakoki kokende, soki nandimi kokoma maloba oyo na papye: “Nazali kokende mpo nasepeli kosalela Satana na esika ya kosalela Nzambe.” Esalaki ngai mpasi mingi. Nazalaki mpenza na mposa ya kokende, kasi nalingaki kokoma maloba wana te. Nsukansuka, nasɛngaki ete nasolola na sango, mpe nayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Asɛngaki ndingisa epai ya episkɔpɔ mpo bázongisa ngai na kuva ya Zaragoza. Nsima ya kosala mwa basanza kuna, bapesaki ngai nzela ya kobima na kuva. Mwa moke na nsima, Lauri ná Ramoni babimaki mpe na kuva.

 BUKU OYO EKABOLAKI BISO

Felisa

Felisa: Mwa moke na nsima, nabalaki mpe nakendaki kofanda na Cantabrie, etúká moko ya Espagne. Nazalaki kaka kokende na ndako-nzambe mbala na mbala. Mokolo moko ya lomingo na ndako-nzambe, sango alobaki boye na nkanda: “Bótala buku oyo!” Alakisaki biso buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Alobaki boye: “Soki moto moko apesi bino buku oyo, bóya kopesa ngai yango to bóbwaka yango!”

Nazalaki na buku yango te, kasi nakómaki na mposa na yango. Nsima ya mwa mikolo, basi mibale bayaki na ndako na ngai. Bazalaki Batatoli ya Yehova, mpe bapesaki ngai buku yango. Natángaki yango kaka na butu wana. Ntango basi yango bazongelaki ngai, batunaki ngai soki nakolinga koyekola Biblia, mpe nandimaki.

Buku Solo

Nazalaki ntango nyonso na mposa ya kosepelisa Nzambe. Na nsima, nayekolaki mateya ya solo oyo etali Yehova mpe nakómaki kolinga ye lisusu mingi. Nazalaki na mposa ya koyebisa moto nyonso makambo ya Yehova. Nazwaki batisimo na 1973. Mbala nyonso oyo nazalaki kozwa libaku, nazalaki kosala makasi nayebisa bandeko na ngai ya libota mateya ya solo. Kasi, bato ya libota na ngai, mingimingi leki na ngai Araceli, atingamaki ete makambo oyo nazalaki kondima ezali lokuta.

Araceli: Lokola na kuva bazalaki kosalela ngai makambo na ndenge ya malamu te, nakómaki na nkanda mpe nazalaki kosepela lisusu te na lingomba na ngai. Kasi mokolo ya lomingo nyonso nazalaki kokende na ndako-nzambe mpe nazalaki kosambela na sapɛlɛ mikolo nyonso. Nazalaki kaka na mposa ya koyeba Biblia mpe nasɛngaki Nzambe asalisa ngai. Na nsima, Felisa ayebisaki ngai makambo oyo ayekolaki. Azalaki kosepela mingi na makambo oyo azalaki kondima mpe nakanisaki ete motó na ye ezalaki kosala lisusu malamu te. Nazalaki kondima te makambo oyo azalaki koloba.

Araceli

Na nsima, nazongaki na Madrid mpo na mosala mpe nabalaki. Na boumela ya bambula, namonaki ete bato oyo bakendaka ndako-nzambe mbala na mbala basalelaka mpenza te mateya ya Yesu na bomoi na bango. Yango wana, natikaki kokende na ndako-nzambe. Nazalaki lisusu te kondimela “basantu” to kondima liteya ya lifelo ya mɔtɔ, mpe nazalaki lisusu te kondima ete sango akoki kolimbisa masumu. Kutu, nalongolaki bililingi nyonso ya losambo oyo nazalaki na yango. Nayebaki te soki makambo oyo nazalaki kosala ezalaki malamu. Nalɛmbaki nzoto, kasi nakobaki kobondela Nzambe boye: “Nalingi koyeba yo. Salisá ngai!” Nayebi  ete Batatoli ya Yehova babɛtaki na porte na ngai mbala na mbala, kasi nazalaki kofungola ata moke te. Nazalaki kondima ata lingomba moko te.

Ndeko na ngai Lauri azalaki kofanda na France, mpe Ramani na Espagne. Soki na 1980, babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nazalaki kokanisa ete, lokola Felisa, bazalaki koyeba te ete bazali koyekola makambo mingi ya lokuta. Na nsima, nayebanaki na Angelines, moninga moko ya kartye, mpe tokómaki baninga ya motema. Ye mpe azalaki Motatoli ya Yehova. Angelines ná mobali na ye batunaki ngai mbala na mbala soki nakolinga koyekola na bango Biblia. Bamonaki ete atako nalobaki ete nazalaki kosepela lisusu te na mangomba, nazalaki mpenza na mposa ya Biblia. Nsukansuka, nayebisaki bango ete: “Ezali malamu. Nakosepela koyekola na bino, kasi kaka soki nakoki kosalela Biblia na ngai moko!” Nazalaki na Biblia, libongoli ya Nácar-Colunga.

NSUKANSUKA BIBLIA ESANGISI BISO

Felisa: Ntango nazwaki batisimo na 1973, Batatoli ya Yehova bazalaki soki 70 na Santander, mboka-mokonzi ya etúká ya Cantabrie. Tosengelaki kosala mibembo mosika mpo na kosakwela bato nyonso na bankama ya bamboka ya etúká yango. Yango wana, tozalaki kosala mibembo na bisi mpe na mituka mosusu mpo na kokende mboka na mboka.

Na boumeli ya bambula, nayekolaki Biblia na bato mingi, mpe bato 11 bazwaki batisimo. Bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia bazalaki bandimi ya Katolike. Nasengelaki komonisela bango motema molai. Lokola ngai, bango mpe basengelaki na ntango mpo báyeba ete makambo oyo bazalaki kondima ezalaki lokuta. Nayebaki ete kaka Biblia mpe elimo santu ya Yehova nde ekoki kosalisa moto abongola makanisi na ye mpe akanga ntina ya mateya ya solo. (Baebre 4:12) Mobali na ngai, Bienvenido, oyo azalaki polisi, azwaki batisimo na 1979, mpe mama na ngai abandaki koyekola Biblia mwa moke liboso akufa.

Araceli: Ntango nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nakanisaki ete nakoki kotyela bango motema te. Kasi ntango mikolo ezalaki koleka, nazalaki kokanisa lisusu bongo te. Batatoli ya Yehova basukaka kaka te na koteya Biblia, batosaka mpe mateya na yango. Nakómaki kondimela Yehova mpe kotyela Biblia motema, mpe nakómaki na esengo mingi. Baninga na ngai mosusu ya kartye bamonaki ndenge nabongwanaki mpe balobaki na ngai ete: “Araceli, kobá kaka na nzela oyo oponi!”

Nazali kokanisa lisusu ndenge nabondelaki: “Matɔndi Yehova, ndenge osundoli ngai te mpe opesi ngai mabaku ya kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia, eloko oyo nazalaki koluka.” Nasɛngaki mpe ndeko na ngai Felisa alimbisa ngai mpo na maloba mabe oyo nalobelaki ye. Banda ntango wana, na esika ya kotyelana ntembe, tokómá nde kosepela kolobela makambo ya Biblia. Nazwaki batisimo na 1989, ntango nazalaki na mbula 61.

Felisa: Sikoyo nazali na mbula 91. Mobali na ngai akufá, mpe nakoki lisusu te kosala mingi ndenge nazalaki kosala liboso. Kasi natángaka Biblia mokolo na mokolo, nakendaka makita mpe nabimaka na mosala ya kosakola soki likoki ezali.

Araceli: Nasepelaka koloba makambo ya Yehova epai ya basango mpe bamamelo nyonso oyo nakutanaka na bango, mbala mosusu mpo nazalaki mamelo. Nasololaki masolo ya malamu na basusu na bango, mpe mingi na bango bazwaki babuku mpe bazulunalo. Nazali kokanisa lisusu sango moko. Nsima ya kosolola na ye mwa moke, andimaki makambo oyo nayebisaki ye. Na nsima, ayebisaki ngai boye: “Kasi nakokende wapi na mbula oyo nakómi na yango? Bandimi na ngai mpe bandeko na ngai ya libota bakoloba nini?” Nayebisaki ye ete: “Bongo Nzambe akoloba nini?” Amonaki ete makambo oyo nalobaki ezalaki solo mpe namonaki ete akómaki mawamawa. Kasi emonani ete azalaki na mpiko te mpo na kobongwana.

Nakobosana ata moke te mokolo oyo mobali na ngai ayebisaki ngai ete alingi kokende na makita elongo na ngai. Azalaki na mbula koleka 80 ntango ayaki na makita mbala ya liboso, mpe kobanda wana azangisaki lisusu makita ata mokolo moko te. Ayekolaki Biblia mpe akómaki mosakoli. Nakanisaka lisusu makambo mingi ya kitoko ntango tozalaki kosakola elongo. Akufaki sanza mibale liboso ete azwa batisimo.

Felisa: Ntango nabandaki kosalela Yehova, baleki na ngai ya basi misato batɛmɛlaki ngai. Kasi na nsima, bango mpe bayambaki solo. Yango ezalaki moko ya makambo kitoko koleka oyo ekómelá ngai na bomoi. Kobanda wana, tokokaki kolekisa ntango elongo mpo na kolobela makambo ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, mpe Liloba na ye! Nsukansuka, biso nyonso tokómaki kosambela Yehova. *

^ par. 29 Araceli azali na mbula 87, Felisa mbula 91, mpe Ramoni mbula 83. Bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo. Lauri akufaki na 1990, azalaki sembo epai ya Yehova.