Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Yehova azali kokamba basaleli na ye na nzela ya bomoi

Yehova azali kokamba basaleli na ye na nzela ya bomoi

“Nzela yango oyo. Bótambola na yango.”YISAYA 30:21.

NZEMBO: 65, 48

1, 2. (a) Likebisi nini ebikisá bato ebele? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Litambwisi nini basaleli ya Nzambe bazali na yango oyo ekoki kobikisa bango?

“TƐLƐMÁ, TALÁ, YOKÁ.” Esali sikoyo mbula koleka 100, banda maloba wana etyamá na makomi minene na banzela oyo engbunduka (train) elekaka, na Amerika ya Nɔrdi. Mpo na nini? Mpo mituka oyo ezali koleka etutana te na engbunduka oyo ezali koya na lombangu. Kotya likebi na bilembo wana ya kokebisa ebikisá bato ebele.

2 Makambo oyo Yehova asalaka eleki mosika bilembo oyo bato batyá mpo na komibatela na likama. Yehova akambaka basaleli na ye mpo bázwa bomoi ya seko mpe bámibatela na makama. Azali lokola mobateli ya mpate ya bolingo oyo atambwisaka bampate na ye mpe akebisaka yango mpo ekende te na nzela ya makama.Tángá Yisaya 30:20, 21.

YEHOVA AKAMBAKA BASALELI NA YE NTANGO NYONSO

3. Ndenge nini libota ya bato ekɔtaki na nzela oyo ezali komema na liwa?

3 Bandá na ebandeli ya lisolo ya bato, Yehova apesaka basaleli na ye litambwisi to malako ya sikisiki. Na ndakisa, na elanga  ya Edene, Yehova apesaki malako ya polele oyo ekokaki kokamba libota ya bato na bomoi ya seko mpe ya esengo. (Ebandeli 2:15-17) Kasi, Adama ná Eva baboyaki litambwisi ya Tata na bango ya bolingo. Eva ayokaki toli oyo emonanaki lokola ete euti epai ya nyoka, na nsima Adama ayokelaki mwasi na ye. Makambo esukaki ndenge nini? Bango nyonso mibale banyokwamaki, mpe bakufaki kozanga elikya. Lisusu, lokola baboyaki kotosa, libota mobimba ya bato ekɔtaki na nzela oyo ezali komema na liwa.

4. (a) Mpo na nini esengelaki ete malako mosusu ebakisama nsima ya Mpela? (b) Ndenge nini makambo ya sika oyo ebimaki emonisi likanisi ya Nzambe?

4 Nzambe apesaki Noa malako mpo na kobikisa bato. Nsima ya Mpela, Yehova apekisaki bato kolya makila to komɛla yango. Mpo na nini? Mpo Yehova apesaki bato nzela ya kolya mosuni ya nyama. Lokola makambo ebongwanaki, basengelaki na malako oyo ya sika: “Kaka nde bosengeli kolya mosuni ná molimo na yango te, elingi koloba makila na yango.” (Ebandeli 9:1-4) Na nzela ya etinda wana, tomoni ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi, oyo ezali eloko na ye. Azali Mozalisi mpe apesá biso bomoi, yango wana, azali na lotomo ya kotya mibeko mpo na bomoi. Na ndakisa, apesaki mobeko ete moto aboma moninga na ye moto te. Nzambe atalelaka bomoi mpe makila ete ezali mosantu, mpe akopesa etumbu na moto nyonso oyo asalelaka yango na ndenge ya mabe.Ebandeli 9:5, 6.

5. Tokotalela nini sikoyo, mpe mpo na nini?

5 Nsima ya mikolo ya Noa, Nzambe akobaki kotambwisa basaleli na ye. Na lisolo oyo, tokotalela mwa bandakisa oyo ekomonisa ndenge oyo atambwisaki bango. Kotalela masolo yango ekosalisa biso tókómisa lisusu makasi ekateli na biso ya kolanda litambwisi ya Yehova tii na mokili ya sika.

EKÓLO YA SIKA, MALAKO YA SIKA

6. Mpo na nini ezalaki na ntina ete basaleli ya Nzambe bátosa Mibeko oyo epesamaki na nzela ya Moize, mpe ezaleli nini Bayisraele basengelaki kozala na yango?

6 Na mikolo ya Moize, Yehova apesaki basaleli na ye malako ya polele mpo na etamboli mpe losambo na bango. Mpo na nini? Na mbala oyo lisusu, mpo makambo ebongwanaki. Na boumeli ya mbula koleka 200, Bayisraele bazalaki na Ezipito epai bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki komipesa na losambo ya bakufi, losambo ya bikeko, mpe kosala makambo mosusu mingi oyo ezalaki kokumisa Nzambe te. Ntango basaleli ya Nzambe babimaki na boombo na Ezipito, basengelaki na malako ya sika. Balingaki kokóma ekoló oyo esengelaki kolanda kaka Mibeko ya Yehova. Mikanda mosusu elobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mibeko” elimboli “kotambwisa, kokamba, koteya.” Mibeko ezalaki kobatela Bayisraele mpo bálanda te etamboli ya mbindo mpe losambo ya lokuta ya bikoló oyo ezalaki zingazinga na bango. Ntango Bayisraele bazalaki koyoka Nzambe, azalaki kopambola bango. Ntango bazalaki kotosa ye te, bazalaki mpenza konyokwama mpo na mabe na bango.Tángá Kolimbola Mibeko 28:1, 2, 15.

7. (a) Limbolá ntina oyo Yehova apesaki basaleli na ye malako. (b) Ndenge nini Mibeko ezalaki lokola mobateli mpo na Yisraele?

7 Malako ya sika esengelaki kopesama mpo na ntina mosusu. Mibeko ezalaki kobongisa Bayisraele mpo na likambo moko ya ntina mingi na mokano ya Yehova: koya ya Masiya, Yesu Kristo. Mibeko  ezalaki kokundwela Bayisraele ete bazalaki bato ya kozanga kokoka. Esalisaki mpe bango bákanga ntina ete basengeli na lisiko, elingi koloba, mbeka ya kokoka oyo elingaki kolongola masumu na bango mpo na libela. (Bagalatia 3:19; Baebre 10:1-10) Longola yango, Mibeko ezalaki kobatela libota oyo esengelaki komema tii na Masiya, mpe kosalisa Bayisraele báyeba Masiya yango ntango akomonana. Ya solo, Mibeko ezalaki lokola motambwisi to “mobateli,” oyo azalaki komema epai ya Kristo.Bagalatia 3:23, 24.

8. Mpo na nini tosengeli kotambwisama na mitinda oyo euti na Mibeko ya Moize?

8 Lokola tozali bakristo, biso mpe tokoki kozwa litomba na malako oyo Yehova apesaki na nzela ya Mibeko. Na ndenge nini? Tokoki kotɛlɛma mpe kotala mitinda oyo euti na Mibeko yango. Atako tozali lisusu te na nse ya Mibeko wana, tokobaka kaka kotalela yango lokola motambwisi na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe na losambo ya Yehova. Akomisaki mibeko yango na Biblia mpo tózwela yango mateya, mitinda na yango etambwisa biso, mpe tómonisa botɔndi na ndenge Yesu ateyaki biso likambo ya monene koleka Mibeko. Yoká oyo Yesu alobaki: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” Tosengeli kosuka te kaka na koboya kosala ekobo, tosengeli mpe kobwaka makanisi mpe bamposa nyonso ya mbindo.Matai 5:27, 28.

9. Makambo nini ya sika esalaki ete Nzambe apesa lisusu malako ya sika?

9 Ntango Yesu akómaki Masiya, Yehova apesaki malako ya sika mpe amonisaki makambo mosusu oyo etali mokano na ye. Mpo na nini yango ezalaki na ntina? Na mobu 33, Yehova aboyaki ekoló ya Yisraele mpe aponaki lisangá ya bokristo mpo ezala ekólo na ye. Na yango, makambo ya basaleli ya Yehova ekómaki lisusu ya sika.

LITAMBWISI MPO NA YISRAELE YA ELIMO

10. Mpo na nini lisangá ya bokristo ezwaki mibeko ya sika, mpe na ndenge nini mibeko yango ekesanaki na oyo Bayisraele bazwaki?

10 Yehova apesaki Bayisraele Mibeko ya Moize mpo na koteya bango ndenge basengeli komitambwisa mpe kosambela ye. Kobanda na siɛklɛ ya liboso, basaleli ya Nzambe bazalaki kaka na ekólo moko te, kasi na mabota mpe mimeseno ndenge na ndenge, mpe bakómaki kobengama Yisraele ya elimo. Basalaki lisangá ya bokristo mpe bazalaki na nse ya kondimana ya sika. Yehova apesaki bango malako ya sika mpo na ndenge ya komitambwisa mpe kosambela ye. Ya solo mpenza, “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Balandaki “mobeko ya Kristo,” oyo ezwi moboko na mitinda oyo ekomamaki likoló ya mabanga te, kasi na mitema na bango. Mibeko yango esengelaki kotambwisa bakristo mpe kopesa bango matomba ata soki bafandi wapi.Bagalatia 6:2.

11. Makambo nini mibale oyo etali bomoi na biso bakristo esimbami na “mobeko ya Kristo”?

11 Yisraele ya elimo ezwaki matomba mingi na litambwisi ya Yehova na nzela ya Yesu. Liboso ete Yesu abandisa kondimana ya sika, apesaki mibeko mibale ya ntina mingi. Moko ezalaki mpo na mosala ya kosakola. Mosusu ezalaki mpo na ndenge oyo bakristo basengeli kosalelana makambo. Malako yango ezalaki mpo na bakristo  nyonso, yango wana etaleli mpe biso nyonso lelo, ezala tozali na elikya ya bomoi ya seko na likoló to awa na mabele.

12. Nini ezalaki likambo ya sika mpo na mosala ya kosakola?

12 Na ntango ya kala, bato ya bikoló mosusu basengelaki koya na Yisraele mpo na kosalela Yehova. (1 Bakonzi 8:41-43) Kasi na nsima Yesu apesaki mobeko oyo ezali na Matai 28:19, 20. (Tángá.) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘bákende’ epai ya bato ya bikólo nyonso. Na Pantekote ya mobu 33, Yehova amonisaki ete alingaki ete nsango malamu esakolama na mokili mobimba. Na mokolo yango, bato soki 120 ya lisangá ya sika batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na Bayuda mpe baprozelite na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Misala 2:4-11) Na nsima, teritware ekómaki monene tii epai ya Basamaria. Mpe, na mobu 36, teritware ekómaki lisusu monene koleka tii epai ya bato ya bikólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te. Yango elimbolaki ete bakristo basengelaki kokende kosakwela moto nyonso na mokili!

13, 14. (a) “Mobeko ya sika” ya Yesu esɛngi makambo nini? (b) Liteya nini tozwi na ndakisa oyo Yesu atikelaki biso?

13 Yesu apesaki mpe “mobeko ya sika” mpo na ndenge ya kosalela bandeko makambo. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Tosengeli komonisa ete tolingaka bandeko mokolo na mokolo, kasi tosengeli mpe kondima kopesa bomoi na biso mpo na bango. Yango ezali likambo oyo esɛngisamaki te na Mibeko.Matai 22:39; 1 Yoane 3:16.

14 Yesu azali ndakisa eleki monene ya moto oyo amonisaki bolingo oyo elukaka te matomba na yango moko. Alingaki bayekoli na ye mingi, yango wana andimaki kokufa mpo na bango. Mpe alingi ete bayekoli na ye nyonso básala mpe bongo. Na yango, tosengeli kondima koyikela mikakatano mpiko mpe ata kokufa mpo na bandeko.1 Batesaloniki 2:8.

MALAKO MPO NA MIKOLO OYO MPE MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

15, 16. Makambo nini ya sika tozali na yango sikoyo, mpe ndenge nini Nzambe azali kotambwisa biso?

15 Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo apesaka bayekoli na ye ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Matai 24:45-47) Na bilei yango, ezali mpe na malako ya ntina mpo na basaleli ya Nzambe ntango makambo ezali kobongwana. Na ndenge nini makambo na biso ezali kobongwana?

16 Tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” mpe mosika te tokomona bolɔzi moko oyo esalemá naino te. (2 Timote 3:1; Marko 13:19) Lisusu, Satana na bademo na ye babwakamaki na mabele uta na likoló, bazali kobimisela bato ebele ya bampasi. (Emoniseli 12:9, 12) Longola yango, tozali kotosa etinda ya Yesu ya kosakwela bato mosusu na mokili mobimba mpe na minɔkɔ mingi koleka!

17, 18. Ndenge nini tosengeli kotalela malako oyo tozali kozwa sikoyo?

17 Ebongiseli ya Nzambe ezali kopesa biso bisaleli mingi mpo na kosalisa biso na mosala ya kosakola. Osalelaka bisaleli yango? Na makita na biso, tozwaka malako mpo na ndenge ya kosalela bisaleli yango na ndenge ya malamu. Omonaka ete malako yango ezali litambwisi oyo euti epai ya Nzambe?

18 Mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe, tosengeli kotya likebi na malako nyonso oyo azali kopesa biso na nzela ya lisangá ya bokristo. Soki tozali kotosa sikoyo, ekozala mpasi te tólanda malako  oyo tokozwa na ntango ya “bolɔzi monene,” ntango mokili mabe ya Satana ekobebisama. (Matai 24:21) Nsima na yango, tokozala na mposa ya malako ya sika mpo na bomoi na mokili ya sika ya boyengebene oyo ekosikolama mobimba na makambo mabe ya Satana.

Na mokili ya sika, tokozwa barulo ya sika oyo ekozala na malako ya sika mpo na bomoi na Paradiso (Talá paragrafe 19, 20)

19, 20. Barulo nini ekofungwama, mpe ekobimisa matomba nini?

19 Na mikolo ya Moize, ekólo ya Yisraele esengelaki na malako ya sika, yango wana Nzambe apesaki bango Mibeko. Na nsima, lisangá ya bokristo esengelaki kolanda “mobeko ya Kristo.” Ndenge moko mpe, Biblia eyebisi biso ete na mokili ya sika, tokozwa barulo oyo ekozala na malako ya sika. (Tángá Emoniseli 20:12.) Na ntembe te, barulo yango ekolimbola makambo oyo Yehova akosɛnga bato na ntango wana. Ntango bato nyonso, ezala baoyo bakosekwa, bakoyekola barulo yango, bakozala na likoki ya koyeba makambo oyo Nzambe alingi mpo na bango. Barulo yango ekosalisa biso tóyeba lisusu malamu lolenge oyo Yehova atalelaka makambo. Tokoyeba mpe Biblia malamu koleka, mpo na Paradiso tokosalela basusu makambo na bolingo, limemya mpe lokumu. (Yisaya 26:9) Kanisá ebele ya makambo oyo tokoyekola mpe tokoteya basusu na nse ya litambwisi ya Mokonzi, Yesu Kristo!

20 Soki tolandi malako oyo “ekomamá na barulo yango” mpe totikali sembo epai ya Yehova na komekama ya nsuka, akokoma bankombo na biso mpo na libela na “rulo ya bomoi.” Wana nde tokozwa bomoi ya seko! Yango wana, tosengeli KOTƐLƐMA mpo na kotánga oyo Biblia elobi, KOTALA mpo na koyeba soki makambo yango etali biso na nini, mpe KOYOKA ntango tozali kotosa malako oyo Nzambe azali kopesa biso sikoyo. Soki tosali makambo wana, tokoki kobika na bolɔzi monene mpe kosepela koyekola mpo na libela makambo etali Yehova, Nzambe na biso ya bwanya mpe ya bolingo.Mosakoli 3:11; Baroma 11:33.