Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntango nini basaleli ya Nzambe bazalaki na boombo ya Babilone Monene?

Yango ebandaki nsima ya mobu 100 mpe esukaki na 1919. Mpo na nini mbongwana wana ezali na ntina na boyebi na biso?

Bilembeteli nyonso emonisi ete na 1919, bakristo oyo batyami mafuta na elimo balongwaki na boombo ya Babilone Monene mpe bayanganisamaki na lisangá oyo epɛtolami. Kanisá likambo oyo: Ntango kaka Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na 1914, mwa moke na nsima, basaleli ya Nzambe bamekamaki mpe mokemoke bapɛtolamaki na losambo ya lokuta. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Malaki 3:1-4) Na nsima, na 1919, Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo apesaka basaleli ya Nzambe oyo bapɛtolami ‘bilei na ntango oyo ebongi.’ (Matai 24:45-47) Kaka na mbula wana, na ndenge ya elilingi, basaleli ya Nzambe balongwaki na boombo ya Babilone Monene. (Emoniseli 18:4) Kasi ntango nini basaleli ya Nzambe bakómaki baombo?

Kala, tozalaki kolimbola ete basaleli ya Nzambe bakómaki baombo ya Babilone Monene na boumeli ya mwa ntango moke kobanda na mobu 1918. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/1992 elobaki ete kaka ndenge Bayisraele bamemamaki na boombo na Babilone, na 1918 basaleli ya Yehova bakómaki baombo ya Babilone Monene. Kasi bolukiluki ya bozindo oyo esalemi emonisi ete basaleli ya Nzambe bakómaki baombo liboso ya 1918.

Esakweli oyo ezali na Ezekiele 37:1-14 elobaki ete basaleli ya Nzambe bakokóma baombo mpe na nsima bakolongwa na boombo. Mosakoli Ezekiele amonaki emonaneli ya lobwaku moko oyo etondi na mikuwa. Yehova alobaki: “Mikuwa oyo, ezali ndako mobimba ya Yisraele.” (Vɛrsɛ 11) Yango etalelaki ekólo ya Yisraele mpe na nsima etalelaki “Yisraele ya Nzambe,” elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Bagalatia 6:16; Misala 3:21) Na emonaneli yango, mikuwa ekómaki na bomoi mpe ekómaki limpinga moko monene. Yango emonisaki ndenge oyo basaleli ya Nzambe balongwaki na boombo ya Babilone Monene na 1919. Kasi ndenge nini esakweli yango emonisi ete bazalaki baombo na boumeli ya ntango molai?

Ya liboso, Ezekiele amonaki ete mikuwa ya bato oyo bakufá “ekauká mpenza.” (Ezekiele 37:2, 11)  Yango elimboli ete bato yango bakufaki na boumeli ya ntango molai. Ya mibale, Ezekiele amonaki ete bakufi bazalaki kozonga na bomoi mokemoke, kasi na mbalakaka te. Ayokaki “makɛlɛlɛ moko ya biloko oyo ezali kotutana, mpe mikuwa ebandaki kopusana, mokuwa moko esangani na mokuwa na yango.” Ya misato, amonaki “mintulu mpe mosuni eyaki likoló na yango.” Ya minei, loposo ebandaki kozipa mosuni yango. Ya mitano, “mpema ekɔtaki kati na bango, mpe bakómaki na bomoi.” Na nsuka, ntango bato yango bazongisamaki na bomoi, Yehova apesaki bango mokili na bango mpo báfanda. Makambo wana nyonso esengelaki kozwa ntango.Ezekiele 37:7-10, 14.

Ndenge kaka esakweli yango elobaki, Bayisraele bazalaki na boombo na boumeli ya ntango molai. Boombo na bango ebandaki na mobu 740 liboso ya Kristo ntango babenganaki mabota zomi ya Yisraele, bokonzi ya nɔrdi, na mboka na bango. Na nsima, na mobu 607 liboso ya Kristo, bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme, mpe babenganaki mabota mosusu mibale ya Yuda, bokonzi ya sudi, na mboka na bango. Na nsima, na mobu 537 liboso ya Kristo, boombo esilaki ntango mwa ndambo ya Bayuda bazongaki mpo na kotonga lisusu tempelo mpe kosambela Yehova na Yerusaleme.

Na yango, makambo wana nyonso emonisi ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki kozala baombo ya Babilone Monene na boumeli ya ntango molai, kasi te kaka kobanda na 1918 tii na 1919. Yesu mpe alobelaki eleko wana molai ntango alobaki ete bakristo ya lokuta, to matiti mabe, ekokola elongo na blé, elingi koloba “bana ya Bokonzi.” (Matai 13:36-43) Na boumeli ya eleko wana, bakristo ya solo bazalaki kaka moke. Mingi na baoyo bazalaki koloba ete bazali bakristo bandimaki mateya ya lokuta mpe bakómaki bapɛngwi. Yango wana tokoki koloba ete lisangá ya bokristo ekangamaki na boombo ya Babilone Monene. Boombo yango ebandaki nsima ya mobu 100 mpe ekobaki tii ntango tempelo ya elimo epɛtolamaki na ntango ya nsuka.Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3, 6; 1 Yoane 2:18, 19.

Na boumeli ya bankama ya bambula yango, bakambi ya mangomba mpe bakonzi ya politiki balingaki ete bato bázala na nse ya litambwisi na bango. Na ndakisa, bazalaki te kolinga ete bato bázala na Biblia to bátánga yango na minɔkɔ oyo bayebi. Kutu, bato mosusu oyo bazalaki kotánga Biblia, bazalaki kokakisa bango na nzete mpe kotumba bango. Mpe baoyo bazalaki koloba mabe mpo na makambo oyo bakambi ya mangomba bazalaki koteya, bazalaki kopesa bango bitumbu ya makasi. Ezalaki mpasi mpo moto ayekola solo to ateya yango bato mosusu.

Toyekoli mpe na emonaneli ya Ezekiele ete basaleli ya Nzambe bazongaki na bomoi mpe basikolamaki  mokemoke na losambo ya lokuta. Na yango, ntango nini likambo yango ebandaki kosalema, mpe ndenge nini? Emonaneli yango elobeli “makɛlɛlɛ moko ya biloko oyo ezali kotutana.” Yango ebandaki kosalema na nsuka ya mwa bankama ya bambula liboso ntango ya nsuka ebanda. Na boumeli ya bambula yango, ezalaki kaka na mwa bato ya sembo oyo balingaki koyeba solo mpe kosalela Nzambe atako mateya ya lokuta ezalaki mingi. Bayekolaki Biblia mpe basalaki nyonso oyo bakoki mpo na koyebisa bato makambo oyo bazalaki koyekola. Basusu basalaki makasi mpo na kobongola Biblia na minɔkɔ mingi oyo bato bayebaki.

Na nsima, pene na nsuka ya bambula 1800, ezalaki lokola nde mosuni mpe loposo ezalaki kozipa mikuwa yango. Ndeko Charles Taze Russell ná baninga na ye basalaki mosala makasi mpo na koyeba solo oyo ezali na Biblia mpe kosalela Yehova. Basalisaki mpe basusu báyeba solo yango na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe mikanda mosusu. Na nsima, “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” na 1914 mpe buku Le mystère accompli na 1917 esalisaki basaleli ya Yehova bákómisa kondima na bango makasi. Nsukansuka, na 1919, ezalaki lokola nde basaleli na ye bazongisamaki na bomoi mpe bapesaki bango mokili ya sika. Kobanda wana, baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele basanganaki na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bango nyonso bazali kosambela Yehova, mpe bakómi “limpinga moko monene.”Ezekiele 37:10; Zekaria 8:20-23. *—Talá maloba na nse ya lokasa.

Na yango, emonani polele ete basaleli ya Nzambe bakómaki baombo ya Babilone Monene nsima ya mobu 100. Ezali na eleko wana nde ebele ya bato bakómaki bapɛngwi na ndenge bandimaki mateya ya lokuta ya mangomba mpe baboyaki mateya ya solo. Na boumeli ya bambula mingi, ezalaki mpenza mpasi mpo na kosalela Yehova, kaka ndenge ezalaki mpo na Bayisraele ntango bazalaki na boombo. Kasi lelo oyo, solo ezali kosakolama epai ya moto nyonso. Tozali mpenza na esengo ndenge tozali kobika na eleko oyo ‘baoyo bazali na mayele ya kososola bazali kongɛnga . . . kongɛnga ya etando’! Bato mingi sikoyo bakoki ‘komipɛtola,’ ‘kopɛtolama’ mpe kondima losambo ya solo!Danyele 12:3, 10.

Ntango Satana amekaki Yesu, amemaki ye mpenza na tempelo, to alakisaki ye tempelo na emonaneli moko?

Toyebi mpenza te na bosikisiki ndenge oyo Satana alakisaki Yesu tempelo.

Matai mpe Luka, bakomi ya Biblia, bakomaki ndenge makambo elekaki. Matai alobaki ete “Zabolo amemaki” Yesu na Yerusaleme mpe “atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo.” (Matai 4:5) Luka alobaki ete Zabolo “amemaki ye na Yerusaleme mpe atɛlɛmisaki ye likoló, na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo.”Luka 4:9.

Kala, mikanda na biso ezalaki koloba ete mbala mosusu Satana amemaki mpenza Yesu te na tempelo na ndenge ya solo ntango alingaki komeka ye. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1961 ekokanisaki likambo yango na ntango oyo Satana amekaki Yesu na ndenge alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili likoló ya ngomba moko molai. Elobaki ete ezali na ngomba moko te oyo ezali molai mpenza mpo moto amona makonzi nyonso ya mokili soki amati kuna. Na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango elobaki ete ndenge moko mpe mbala mosusu Satana amemaki mpenza Yesu te na tempelo ya solosolo. Kasi, mwa moke na nsima, masolo mosusu ya  Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete soki Yesu amibwakaki na tempelo, alingaki mbala mosusu kokufa.

Bato mosusu balobaka ete lokola Yesu azalaki Molevi te, apesamaki nzela te ya kotɛlɛma na nsɔngɛ ya esika mosantu na tempelo. Yango wana, balobaka ete Satana asengelaki komeka Yesu na nzela ya emonaneli. Bankama ya bambula liboso, mosakoli Ezekiele mpe amemamaki na tempelo na nzela ya emonaneli.Ezekiele 8:3, 7-10; 11:1, 24; 37:1, 2.

Kasi soki Yesu amemamaki na tempelo na emonaneli, basusu bakoki komituna boye:

  • Yesu alingaki nde komona ete amekami mpo na komibwaka uta na tempelo?

  • Na mabaku mosusu oyo Satana amekaki Yesu, asɛngaki ye akómisa mabanga ya solo mampa ya solo, alingaki mpe ete Yesu asalela ye likambo moko ya losambo mpenza. Na yango, ekoki kozala ete Satana alingaki ete Yesu amibwaka mpenza uta na tempelo?

Kasi soki Satana asalelaki emonaneli te mpe amemaki Yesu na tempelo ya solosolo, basusu bakoki mpe komituna boye:

  • Yesu abukaki nde Mibeko ndenge atɛlɛmaki na nsɔngɛ ya esika mosantu na tempelo?

  • Ndenge nini Yesu alongwaki na esobe mpo na kokóma na tempelo ya Yerusaleme?

Tótalela makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tóyanola na mituna mibale oyo ya nsuka.

Profesɛrɛ Carson akomaki ete liloba ya Grɛki oyo babongoli na “tempelo” na mokanda ya Matai mpe Luka, mbala mosusu ezalaki kosalelama mpo na kolobela tempelo mobimba, kasi kaka te esika mosantu, oyo kaka Balevi bapesamaki nzela ya kokɔta. Litumu ya sudi-ɛsti ya tempelo ezalaki na nsamba ya patatalu oyo ezalaki esika eleki molai na tempelo. Ekoki kozala ete Yesu atɛlɛmaki nde na nsamba wana. Kolongwa wana tii na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone ezalaki ntaka ya mɛtrɛ 140. Josèphe, moto moko ya mayele na istware, alobaki ete esika yango ezalaki molai mpenza, oyo soki moto atɛlɛmi wana mpe atali na nse, “akoyoka kizunguzungu.” Atako Yesu azalaki Molevi te, akokaki kotɛlɛma kuna mpe moto moko te alingaki kopekisa ye.

Kasi ndenge nini Yesu akokaki kolongwa na esobe mpo na kokóma na tempelo ya Yerusaleme? Toyebi mpenza te na bosikisiki. Biblia elobi kaka ete Yesu amemamaki na Yerusaleme. Kasi elobi te ntaka boni Yesu asalaki mpo na kokóma na Yerusaleme to soki Satana amekaki ye na boumeli ya ntango boni. Na yango, ekoki kozala ete Yesu atambolaki mpo na kokende na Yerusaleme, atako ezwaki mbala mosusu ntango molai.

Ntango Satana alakisaki Yesu “makonzi nyonso ya mokili,” mbala mosusu asalelaki emonaneli, mpamba te ekoki kosalema te ete moto amona makonzi nyonso ya mokili uta na likoló ata ya ngomba nini awa na mabele. Likambo yango ekoki kozala ndenge moko na ndenge oyo tokoki kosalela televizyo to aparɛyi mosusu mpo na kolakisa moto video to bafoto ya bisika mosusu na mokili. Mbala mosusu Satana asalelaki emonaneli, kasi alingaki mpenza ete Yesu afukamela ye mpe asambela ye. (Matai 4:8, 9) Na yango, ntango Satana amemaki Yesu na tempelo, ekoki kozala ete alingaki mpenza ete Yesu atya bomoi na ye na likama ndenge asɛngaki ye amibwaka uta likoló ya tempelo. Kasi Yesu aboyaki. Ndenge nini likambo yango elingaki kozala komekama soki Yesu amekamaki na nzela ya emonaneli?

Yango wana, ekoki kozala ete Yesu akendaki mpenza na Yerusaleme mpe atɛlɛmaki mpenza na esika eleki molai na tempelo. Ya solo, ndenge tolobaki yango na ebandeli ya lisolo oyo, toyebi mpenza te na bosikisiki ndenge oyo Satana alakisaki Yesu tempelo. Kasi tondimisami mpenza ete Satana amekaki kotinda Yesu asala likambo moko ya mabe mpe na mbala nyonso wana, Yesu atɛmɛlaki mpenza Satana.

^ par. 2 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 10-12, paragrafe 5-8, 12.

^ par. 1 Ezekiele 37:1-14 mpe Emoniseli 11:7-12 elobelaka likambo moko oyo esalemaki na 1919. Esakweli ya Ezekiele 37:1-14 elobeli basaleli nyonso ya Nzambe oyo bazongaki na losambo ya solo na 1919 nsima ya kozala na boombo na boumeli ya ntango molai. Kasi Emoniseli 11:7-12 elobeli kozongisama lisusu na bomoi ya etuluku moke ya bandeko oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kokamba basaleli ya Nzambe, oyo esalemaki na 1919. Batikelaki bandeko yango nzela te básala mosala na boumeli ya mwa ntango.