Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Luká koyeba lisalisi oyo ebongi, libɔndisi, to bilendiseli oyo euti na Biblia, oyo bandeko basengeli na yango

Okoki kopesa mabɔkɔ na lisangá na bino?

Okoki kopesa mabɔkɔ na lisangá na bino?

LIBOSO ya kozonga na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Ndenge nini bakokaki kosakola na mabele mobimba?

Martin Goodman, oyo azali molakisi na Iniversite ya Oxford, alobi ete “mokumba oyo bakristo bazalaki na yango ekesenisaki bango na mangomba mosusu, ata mpe na Bayuda, na ebandeli ya ampire ya Roma.” Yesu azalaki kokende bipai nyonso mpo na kosakola. Bakristo ya solo basengelaki kolanda ndakisa na ye mpe kosakola “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe” bisika nyonso. Basengelaki koluka bato oyo bazalaki na mposa ya koyeba solo. (Luka 4:43) Yango wana, na siɛklɛ ya liboso, ezalaki na “bantoma,” liloba oyo elimboli baoyo batindami mpo na kosala likambo moko. (Marko 3:14) Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”Matai 28:18-20.

Bantoma 12 ya Yesu bazali lisusu awa na mabele te, kasi basaleli mingi ya Yehova balandaka ndakisa na bango na mosala ya kosakola. Soki basɛngi bango bákende kosakola esika mposa ezali monene, balobaka ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yisaya 6:8) Basusu, na ndakisa bankóto ya bandeko oyo bazwaki diplome na Eteyelo ya Gileade, bakendaki na mikili ya mosika. Basusu bakendaki kofanda na bisika mosusu na ekólo na bango. Mingi bayekolaki monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa lisangá to etuluku moko. Ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi bandeko wana nyonso bandimaki komipimela makambo  mingi mpo na komonisa ete balingaka Yehova mpe balingaka bato. Yango wana, bamibongisaki malamumalamu mpe basalelaki ntango na bango, makasi na bango, mpe mbongo na bango mpo na kokende kosakola esika mposa ezali monene. (Luka 14:28-30) Mosala oyo bandeko wana bazali kosala ezali mpenza na motuya mingi.

Biso nyonso te tokoki kokende kofanda esika mposa ezali monene to koyekola monɔkɔ mosusu. Kasi biso nyonso tokoki kosala lokola bamisionɛrɛ na lisangá na biso moko.

SALÁ MOSALA YA MISIONƐRƐ NA LISANGÁ NA BINO MOKO

Mpo na kosalisa basusu

Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki kosakola na molende atako mingi na bango bazalaki kofanda kaka na bamboka na bango mpe bazalaki bamisionɛrɛ te. Ntoma Paulo ayebisaki Timote ete: “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo malamumalamu.” (2 Timote 4:5) Maloba wana etalelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso, kasi etaleli mpe biso lelo oyo. Bakristo nyonso basengeli kotosa etinda ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Ata na lisangá na biso moko, ezali na makambo mingi oyo tokoki kosala mpo na kozala lokola bamisionɛrɛ.

Na ndakisa, ntango bamisionɛrɛ batindamaka na ekólo mosusu, kuna bakutaka makambo ndenge mosusu, kasi basengeli kosala nyonso mpo na komesana na bomoi wana ya sika. Ata soki tokoki te kokende kofanda esika mposa ezali monene, mpo na nini te koluka mitindo ya sika ya kopesa litatoli? Na ndakisa, na 1940, bandeko balendisamaki liboso ete bápesaka litatoli na balabala mokolo moko na pɔsɔ. Osilá komeka kopesa litatoli na balabala? Osilá kosalela shario to mesa ya kotanda mikanda? Likanisi ya ntina yango oyo: Olingaka komeka lolenge ya sika ya kosakola nsango malamu?

Lendisáká bango ‘básala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu’

Soki ozali na makanisi malamu, okozala na molende mpe na esengo na mosala ya kosakola. Mbala mingi, bandeko oyo bakendaka kofanda esika mposa ezali monene to baoyo bayekolaka monɔkɔ mosusu bazalaka basakoli oyo bayebi koteya malamu mpe bakoki kosalisa mpenza lisangá. Na ndakisa, bazalaka bato ya liboso oyo basakolaka mingi. Mbala mingi, bamisionɛrɛ batambwisaka makambo na lisangá tii ntango bandeko ya lisangá yango bakómaka na makoki ya kosala lokola bango. Soki  ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, ozali “koluka kosala mosala,” elingi koloba, ozali na mposa ya kokóma mosaleli na misala to nkulutu mpo na kosalela bandeko ya lisangá?1 Timote 3:1.

ZALÁ ‘LISALISI OYO EZALI KOPESA MAKASI’

Pesáká bango lisalisi oyo ebongi

Tokoki mpe kopesa mabɔkɔ na lisangá na ndenge mosusu. Biso nyonso, tózala mikóló to bilenge, mibali to basi, tokoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ epai ya bandeko oyo bazali na mposa ya lisalisi.Bakolose 4:11.

Soki tolingi kosalisa bandeko, tosengeli koyeba bango malamu. Biblia elendisi biso “tótyelanaka likebi,” to tókanisaka bamposa ya bandeko, ntango toyangani esika moko. (Baebre 10:24) Yango elingi koloba te ete tosengeli koluka koyeba makambo ya mikemike oyo etali bomoi ya basusu. Elimboli nde ete tosengeli koluka komitya na esika ya bandeko mpe koluka koyeba oyo basengeli na yango. Bakoki kozala na mposa ya lisalisi oyo ebongi, libɔndisi, to bilendiseli oyo euti na Biblia. Ezali solo ete na bantango mosusu kaka bankulutu to basaleli na misala nde bakoki kosalisa bango. (Bagalatia 6:1) Kasi biso nyonso tokoki kosalisa bandeko oyo bakómi mibange, to mabota oyo ezali na mikakatano.

Bɔndisáká baoyo bazali kobundana na mikakatano ya bomoi

Ndeko Salvatore azwaki lisalisi ya ndenge wana. Akutanaki na mikakatano makasi ya mbongo, oyo etindaki ye atɛka mwa kompanyi na ye, ndako na ye, mpe biloko mingi oyo libota na ye ezalaki na yango. Azalaki komitungisa mingi mpo na libota na ye. Libota mosusu na lisangá na bango emonaki ete basengelaki na lisalisi. Bapesaki ndeko Salvatore mwa mbongo mpe basalisaki ye ná mwasi na ye bázwa misala. Libota yango elekisaki mpe bampokwa mingi elongo na libota ya ndeko Salvatore mpo na koyoka bango mpe kolendisa bango. Bakómaki mpenza baninga ya motema. Sikoyo, mabota yango mibale ekanisaka bantango ya esengo oyo balekisaki elongo na eleko wana ya mikakatano makasi.

Bakristo ya solo bakakatanaka te mpo na koyebisa basusu makambo oyo bandimaka. Tosengeli komekola Yesu mpe kosalisa moto nyonso ayeba bilaka kitoko oyo Nzambe apesá. Ezala tozali na likoki ya kokende kofanda esika mosusu to te, biso nyonso tokoki kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa basusu na lisangá na biso moko. (Bagalatia 6:10) Soki tozali kopesa basusu, tokozala na esengo mpe tokokoba “kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu.”Bakolose 1:10; Misala 20:35.