Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Elenge: Ndenge nini okoki komibongisa mpo na batisimo?

Elenge: Ndenge nini okoki komibongisa mpo na batisimo?

“Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.”NZEMBO 40:8.

NZEMBO: 51, 58

1, 2. (a) Limbolá mpo na nini batisimo ezali litambe ya kozwa na lisɛki te. (b) Makambo nini moto asengeli kondimisama na yango liboso ya kozwa batisimo, mpe mpo na nini?

OZALI elenge oyo alingi kozwa batisimo? Soki ezali bongo, yebá ete yango ezali lokumu eleki monene oyo okoki kozwa. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, batisimo ezali ekateli ya kozwa na lisɛki te. Emonisaka basusu ete omipesi na Yehova, elingi koloba, olaki ye ete okosalela ye mpo na libela mpe olaki ete kosala mokano na ye ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Lokola ezali elaka ya kozwa na lisɛki te oyo okosala na miso ya Nzambe, osengeli kozwa batisimo kaka soki okɔmɛli, okómi na mposa makasi ya kosala litambe yango, mpe oyebi malamu ndimbola ya komipesa na Nzambe.

2 Kasi, mbala mosusu ozali komiyoka ete omibongisi naino te mpo na batisimo. To mbala mosusu ozali komona ete omibongisi, kasi baboti na yo bakanisi ete osengeli kozela naino tii ntango okokóma mwa mokóló mpe okoyeba makambo mingi  ya bomoi. Soki ezali bongo, osengeli kosala nini? Kolɛmba nzoto te. Salelá nde ntango yango mpo na kokola na elimo, mpo oumela te kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Lokola oyebi bongo, okoki komityela mikano na makambo oyo misato: (1) makambo oyo ondimisami na yango, to bindimeli na yo, (2) makambo oyo osalaka, mpe (3) botɔndi oyo osengeli kozala na yango.

MAKAMBO OYO ONDIMISAMI NA YANGO

3, 4. Liteya nini bilenge bakoki kozwa na ndakisa ya Timote?

3 Kanisá biyano nini okopesa na mituna oyo: Mpo na nini nandimaka ete Nzambe azali? Mpo na nini nandimaka ete Biblia eutá epai ya Nzambe? Mpo na nini natosaka mibeko ya Nzambe na esika ya komekola bizaleli ya bato ya mokili oyo? Mituna wana ekoki kosalisa yo olanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baroma 12:2) Mpo na nini osengeli kosala yango?

Timote andimaki solo mpo asosolaki makambo oyo ayekolaki mpe andimaki yango

4 Ndakisa ya Timote ekoki kosalisa yo. Ayebaki Makomami malamu mpo mama na ye mpe nkɔkɔ na ye basalelaki Makomami mpo na koteya ye. Kasi, ntoma Paulo ayebisaki Timote ete: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima bosolo na yango.” (2 Timote 3:14, 15) Awa, liloba “basalisaki yo” elimboli “kondimisama na bosolo ya likambo moko.” Na yango, Timote andimisamaki ete solo esengelaki kouta na Makomami. Andimaki yango, kaka te mpo mama na ye ná nkɔkɔ na ye bayebisaki ye asala bongo, kasi mpo ye moko asosolaki makambo oyo ayekolaki mpe andimaki yango.Tángá Baroma 12:1.

5, 6. Mpo na nini ezali na ntina oyekola kosalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ ntango ozali naino elenge?

5 Bongo yo? Mbala mosusu oyebi solo banda bambula mingi. Soki ezali bongo, mityelá mokano ya kokanisa bantina oyo ondimaka mateya yango. Yango ekosalisa yo okóma na kondima makasi mpe ozwa te bikateli ya mabe mpo baninga bazali kotya yo mpanzi likoló, mpo na makanisi ya mokili, to mpo na makanisi na yo moko.

6 Soki oyekoli kosalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ ntango ozali naino elenge, okozala na likoki ya koyanola na mituna ya baninga, na ndakisa: ‘Ndenge nini oyebi mpenza ete Nzambe azali? Soki Nzambe alingaka biso, mpo na nini atikaka makambo ya mabe esalema? Ndenge nini ekoki kosalema ete Nzambe azala na ebandeli te?’ Soki omibongisi, mituna lokola wana ekobimisa ntembe te na makanisi na yo, kasi ekolendisa yo nde oyekola Biblia lisusu malamumalamu.

7-9. Monisá ndenge oyo masolo “Biblia eteyaka mpenza nini?” oyo ebimaka na jw.org ekoki kosalisa yo ondimisama mpenza.

7 Koyekola yo moko na mozindo ekoki kosalisa yo oyanola na mituna, ozala lisusu na ntembe te, mpe ondimisama mpenza na makambo. (Misala 17:11) Tozali na  mikanda mingi oyo ekoki kosalisa yo osala bongo. Bilenge mingi bamonaki malamu koyekola mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie mpe buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? Longola yango, bilenge mosusu basepelaki mpe bazwaki matomba na masolo “Biblia eteyaka mpenza nini?” oyo ebimaka mbala na mbala na jw.org. Okozwa yango na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA. Na esika yango, lokasa mokomoko mpo na koyekola ebongisami mpo na kosalisa yo ondimisama mpenza na lisolo moko ya Biblia.

8 Lokola ozali moyekoli ya Biblia, mbala mosusu oyebi biyano na mituna mosusu oyo ezwami na nkasa mpo na koyekola. Kasi ondimisami mpenza na biyano oyo opesaka? Nkasa mpo na koyekola ekosalisa yo okanisa malamumalamu mpo na bavɛrsɛ ndenge na ndenge mpe na nsima ekolendisa yo okoma bantina oyo ondimaka liteya boye to boye. Yango ekosalisa yo oyeba kolimbolela basusu mateya oyo ondimaka. Soki ozali na likoki ya kokɔta na jw.org, na esika bakomi masolo “Biblia eteyaka mpenza nini?” okoki kosalela yango na boyekoli na yo moko mpo esalisa yo ondimisama mpenza na mateya oyo ondimaka.

9 Osengeli kondimisama yo moko ete makambo yango ezali solo. Yango ekosalisa yo omibongisa mpo na batisimo. Ndeko mwasi moko oyo azali elenge alobaki boye: “Liboso ete nazwa ekateli ya kozwa batisimo, nayekolaki Biblia mpe namonaki ete oyo ezali lingomba ya solo. Mpe, mokolo na mokolo, nandimisamaka makasi ete ezali bongo.”

MAKAMBO OYO OSALAKA

10. Mpo na nini ezali mabe te kozela ete mokristo oyo azwi batisimo asala misala oyo eyokani na kondima na ye?

10 Biblia elobi ete: “Kondima, soki ezali na misala te, ekufi.” (Yakobo 2:17) Soki ozali na kondima makasi, okomonisa yango na misala na yo. Okozala na oyo Biblia ebengi ‘etamboli ya bosantu mpe misala oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe.’Tángá 2 Petro 3:11.

11. Maloba “etamboli ya bosantu” elimboli nini?

 11 “Etamboli ya bosantu” ezali nini? Soki misala na yo ezali ya bosantu, elingi koloba ozali na bizaleli ya pɛto. Na ndakisa, kanisá makambo oyo osalaki na boumeli ya sanza 6 oyo euti koleka. Ntango omekamaki mpo na kosala likambo moko ya mabe, okanisaki malamumalamu likambo nini ezalaki malamu mpe likambo nini ezalaki mabe? (Baebre 5:14) Ozali komikundola na mabaku nini otikalaki sembo na komekama to okweaki te ntango baninga batyaki yo mpanzi likoló? Na kelasi, ozali ndakisa malamu mpo na basusu? Otikalaka sembo epai ya Yehova to olukaka nde kozala lokola baninga na yo ya kelasi, mpo básɛka yo te? (1 Petro 4:3, 4) Toboyi te, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Na bantango mosusu, ata baoyo basaleli Yehova bambula mingi bakoki kozala nsɔninsɔni mpe kozala na mokakatano ya kopesa litatoli. Kasi mpo na moto oyo amipesi na Nzambe, kozala Motatoli ya Yehova ezali lokumu monene, mpe amonisaka yango na etamboli na ye ya pɛto.

12. Tángá mwa ‘misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe,’ mpe ndenge nini otalelaka yango?

12 ‘Misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe’ ezali nini? Ezali misala oyo osalaka na lisangá, na ndakisa kokende na makita mpe mosala ya kosakola. Kasi ezali mpe misala oyo basusu bamonaka te, na ndakisa mabondeli oyo osalaka epai ya Yehova mpe boyekoli na yo moko. Moto oyo apesá bomoi na ye epai ya Yehova amonaka te ete misala wana ezali kilo. Amiyokaka nde lokola mokonzi Davidi, oyo alobaki: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.”Nzembo 40:8.

Mabondeli na yo ezalaka ya sikisiki, emonisaka nini mpo na bolingo oyo olingaka Yehova?

13, 14. Esaleli nini ekosalisa yo osala ‘misala oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe,’ mpe ndenge nini bilenge mosusu bazwaki matomba na esaleli yango?

13 Mpo na kosalisa yo okokisa mikano na yo, tozali na etanda ya mituna na nkasa 308 mpe 309 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, volimi 2. Na etanda yango ya mituna, okoki kokoma biyano na mituna lokola: “Mabondeli na yo ezalaka ya sikisiki, emonisaka nini mpo na bolingo oyo olingaka Yehova?” “Makambo nini oyekolaka na boyekoli na yo moko?” “Obimaka na mosala ya kosakola ata soki baboti na yo babimi te?” Etanda yango ezali mpe na esika oyo okoki kokoma mikano na yo mosusu oyo okosepela komityela mpo na mabondeli na yo, boyekoli na yo moko, mpe mosala ya kosakola.

14 Bilenge mingi oyo balingi kozwa batisimo bamonaki ete etanda ya mituna yango ezali esaleli oyo ebongi. Tilda, ndeko mwasi moko oyo azali elenge alobaki boye: “Nasalelaki etanda ya mituna mpo na komityela mikano. Nazalaki kokokisa mikano yango moko nsima ya mosusu, mpe nsima ya mbula moko nakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo.” Patrick, ndeko mobali moko oyo azali elenge, asalaki mpe bongo. Alobi boye: “Nayebaki mikano nini namityelaki, kasi  kokoma yango esalisaki ngai nasala makasi mpo nakokisa yango.”

Okokoba kosalela Yehova ata soki baboti na yo basali yango te? (Talá paragrafe 15)

15. Limbolá mpo na nini komipesa esengeli kozala ekateli ya moto ye moko.

15 Moko ya mituna oyo ezali na etanda ya mituna yango elobi: “Okokoba kosalela Yehova ata soki baboti to baninga na yo batiki?” Ntango omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, yo moko osengeli kozala na boyokani malamu elongo na ye. Na yango, makambo oyo ozali kosala mpo na Yehova esengeli te kotalela baboti na yo to moto mosusu nyonso. Etamboli na yo ya bosantu mpe misala na yo oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe ekomonisa ete ondimisami ete ozali na kati ya solo mpe olingi kolanda mitinda ya Nzambe. Mosika te, okokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.

BOTƆNDI OYO OSENGELI KOZALA NA YANGO

16, 17. (a) Nini esengeli kotinda moto akóma mokristo? (b) Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na kolimbola botɔndi oyo tozali na yango mpo na lisiko?

16 Mokolo moko, moto moko oyo ayebaki Mibeko ya Moize malamumalamu atunaki Yesu boye: “Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Yesu ayanolaki  ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:35-37) Yesu alimbolaki ete bolingo oyo moto alingaka Yehova nde esengeli kotinda ye azwa batisimo mpe akóma mokristo. Lolenge moko ya malamu mpenza ya kolinga Yehova mingi ezali kokanisa malamumalamu na lisiko, likabo ya Nzambe oyo eleki monene. (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15; 1 Yoane 4:9, 19.) Soki osali bongo, okolinga komonisa botɔndi na yo mpo na likabo wana kitoko.

17 Mpo na kolimbola botɔndi na yo mpo na lisiko, tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete ozali kozinda na mai kasi moto moko abikisi yo. Okosuka kaka na kokende na ndako, kopangwisa mai na nzoto, mpe kobosana likambo oyo moto wana asalaki mpo na yo? Te! Okozala ntango nyonso na botɔndi epai ya moto wana oyo abikisaki yo! Ndenge moko mpe, tosengeli kozala na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe Yesu mpo na lisiko. Tozali na bomoi mpo na bango! Basikolaki biso na lisumu mpe na liwa. Mpo na bolingo oyo balingaka biso, tozali sikoyo na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele!

18, 19. (a) Mpo na nini osengeli te kobanga kozala moto ya Yehova? (b) Ndenge nini kosalela Yehova ezali kokómisa bomoi na yo malamu koleka?

18 Ozali na botɔndi mpo na oyo Yehova asaleli yo? Soki ezali bongo, ebongi omipesa mpe ozwa batisimo. Komipesa na yo ezali elaka oyo olaki Nzambe ete okosala mokano na ye mpo na libela. Osengeli nde kobanga kosala elaka ya ndenge wana? Te! Yehova alingi ete ozala na bomoi oyo eleki malamu, mpe akopesa baoyo basalaka mokano na ye mbano monene. (Baebre 11:6) Soki omipesi na Nzambe mpe ozwi batisimo, bomoi na yo ekokóma mabe te, kasi ekokóma nde malamu koleka! Ndeko mobali moko oyo azali na mbula 24 mpe azwaki batisimo liboso ete akokisa mbula 13 alobi boye: “Nalingaki kokanga ntina ya makambo mingi soki nazalaki mwa mokóló, kasi kozwa ekateli ya komipesa na Yehova ebatelaki ngai nalanda makambo ya mokili te.”

Satana azali moimi mpe akipaka bolamu na yo te

19 Yehova alingi ete ozala na bomoi oyo eleki malamu. Kasi, Satana azali moimi mpe akipaka bolamu na yo te. Akoki te kopesa yo eloko moko ya malamu soki olandi ye. Ndenge nini akoki kopesa yo eloko oyo ye moko azali na yango te? Azali na nsango malamu te, azali mpe na elikya ata moko te. Akoki kopesa yo kaka avenire ya mabe, mpo yango nde ezali kozela ye!Emoniseli 20:10.

20. Elenge akoki kosala nini mpo akola tii amipesa mpe azwa batisimo? (Talá mpe etanda “Mpo na kosalisa yo okola.”)

20 Kopesa bomoi na yo epai ya Yehova ezali ekateli eleki malamu oyo okoki kozwa. Omibongisi mpo na kosala yango? Soki omibongisi, kobanga te kosala elaka wana. Kasi soki omoni ete omibongisi naino te, salelá makambo oyo ezali na lisolo oyo mpo okoba kokola na elimo. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Filipi ete bákoba kokende liboso. (Bafilipi 3:16) Soki olandi toli wana, mosika te okokóma na mposa ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo.