Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ mpo bomoko na biso bakristo ekóma makasi?

Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ mpo bomoko na biso bakristo ekóma makasi?

“Uta na ye nzoto mobimba, lokola esangani liboke moko na boyokani mpenza mpe ebongisami mpo na kosala elongo.”BAEFESE 4:16.

NZEMBO: 53, 107

1. Banda na ebandeli, nini emonanaka na misala ya Nzambe?

YEHOVA ná Yesu basalaka na bomoko banda ebandeli mpenza ya bozalisi. Yehova akelaki Yesu liboso ya kokela biloko mosusu nyonso. Na nsima, Yesu asalaki elongo na Yehova mpe ‘azalaki pembeni na ye lokola mosali ya mayele.’ (Masese 8:30) Basaleli ya Yehova mpe basalaki elongo na misala oyo basengelaki kosala. Na ndakisa, Noa ná libota na ye batongaki masuwa elongo. Na nsima, Bayisraele basalaki elongo mpo na kotonga tabernakle, kofungola yango, mpe komema yango na bisika mosusu. Na tempelo, bazalaki koyemba mpe kobɛta miziki elongo mpo na kosanzola Yehova na miziki ya kitoko. Basaleli ya Yehova bazalaki na likoki ya kosala makambo nyonso wana kaka mpo bazalaki kosala elongo na basusu.Ebandeli 6:14-16, 22; Mitángo 4:4-32; 1 Ntango 25:1-8.

2. (a) Nini ezalaki komonana polele na lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso? (b) Mituna nini tokotalela?

 2 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe kosala elongo. Ntoma Paulo alimbolaki ete atako bazalaki na makoki mpe mikumba ndenge moko te, bazalaki na bomoko. Bango nyonso bazalaki kolanda Mokambi na bango, Yesu Kristo. Ntoma Paulo akokanisaki bango na nzoto oyo ezali na binama ndenge na ndenge, oyo nyonso esalaka elongo. (Tángá 1 Bakorinti 12:4-6, 12.) Bongo biso lelo oyo? Ndenge nini tokoki kosala elongo na mosala ya kosakola, na lisangá, mpe na libota?

KOSALA ELONGO NA MOSALA YA KOSAKOLA

3. Emonaneli nini ntoma Yoane amonaki?

3 Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Yoane amonaki emonaneli moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki koyula bakelelo. Ntango anzelu ya mitano ayulaki kelelo na ye, Yoane amonaki “monzoto moko euti na likoló mpe ekwei na mabele.” “Monzoto” yango esalelaki fungola mpo na kofungola libulu moko ya mozindo mpe ya molili. Ya liboso, molinga makasi ebimaki na libulu yango, na nsima ebele ya mayoyo eutaki na milinga yango. Na esika ya kobebisa banzete to milona, mayoyo yango ebebisaki nde “bato oyo bazali na elembo ya Nzambe na bilongi na bango te.” (Emoniseli 9:1-4) Ntoma Yoane ayebaki ete ebele ya mayoyo ekoki kobebisa biloko mingi; esalemaki bongo na Ezipito na ntango ya Moize. (Kobima 10:12-15) Mayoyo oyo ntoma Yoane amonaki emonisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kosakola nsango moko ya nguya mpo na mangomba ya lokuta. Mpe bamilio mosusu ya bato oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele basangani na bango. Elongo, bazali na bomoko na mosala yango ya kosakola. Mosala yango esalisi bato mingi bálongwa na mangomba ya lokuta mpe básikwama na boombo ya Satana.

Tozali na likoki ya kosakola na mokili mobimba mpo tozali kosala na bomoko

4. Mosala nini basaleli ya Nzambe basengeli kosala, mpe wapi lolenge kaka moko bakoki kosala yango?

4 Tozali na mokumba ya kosakola “nsango malamu” epai ya bato na mokili mobimba liboso nsuka eya. Yango ezali mosala moko monene! (Matai 24:14; 28:19, 20) Tosengeli kobenga baoyo nyonso ‘bazali na mposa ya mai’ báya komɛla “mai ya bomoi,” elingi koloba, tosengeli koteya baoyo nyonso bazali na mposa ya koyeba solo ya Biblia. (Emoniseli 22:17) Kasi, tokoki kosala yango kaka soki ‘tosangani liboke moko na boyokani mpenza’ mpe tozali kosala na bomoko na kati ya lisangá.Baefese 4:16.

5, 6. Ndenge nini kosakola nsango malamu esalaka ete tózala na bomoko?

5 Mpo tópesa litatoli na bato ebele koleka, tosengeli kobongisama malamu na mosala na biso ya kosakola. Malako oyo tozwaka na lisangá esalisaka biso tósala yango. Nsima ya likita ya mosala ya kosakola, tobimaka mpo na kokende koyebisa bato nsango malamu ya  Bokonzi. Topesaka mpe bango mikanda oyo elimbolaka Biblia. Kutu, tokabolaka bamilio ya mikanda yango na mokili mobimba. Ntango mosusu basɛngaka biso tópesa mabɔkɔ na bakampanye ya mosala ya kosakola. Ntango ozali kosala mosala yango, ozali kosala elongo na bamilio ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali kosakola nsango kaka moko wana! Ozali mpe kosala elongo na baanzelu, oyo bazali kosalisa basaleli ya Nzambe básakola nsango malamu.Emoniseli 14:6.

6 Tosepelaka mingi ntango totángaka na Buku ya mobu matomba oyo mosala ya kosakola ezali kobimisa na mokili mobimba! Kanisá mpe ndenge oyo tozalaka na bomoko na mokili mobimba ntango tobengisaka bato na mayangani na biso. Kuna, biso nyonso toyokaka mateya kaka moko. Badiskur, badrame, mpe bilakiseli elendisaka biso tópesa Yehova oyo eleki malamu. Tosalaka mpe na bomoko elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba ntango toyanganaka na Ekaniseli mbula na mbula. (1 Bakorinti 11:23-26) Toyanganaka biso nyonso mokolo moko, 14 Nisana, nsima ya kolala ya moi, mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na oyo Yehova asalaki mpo na biso, mpe mpo na kotosa etinda ya Yesu. Mpe mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, tosalaka elongo mpo na kobengisa ebele ya bato báya koyangana elongo na biso na molulu wana ya ntina mingi.

7. Lokola tosalaka elongo, tozalaka na likoki ya kosala nini?

7 Liyoyo moko mpamba ekoki te kobebisa biloko mingi. Ndenge moko mpe, mosakoli moko mpamba akoki te kopesa litatoli na bato nyonso. Kasi lokola tosalaka elongo, tozali na likoki ya koyebisa bamilio ya bato makambo ya Yehova mpe kosalisa bango básanzola ye mpe bákumisa ye.

KOSALA NA BOMOKO NA KATI YA LISANGÁ

8, 9. (a) Ndakisa nini ntoma Paulo asalelaki mpo na koteya bakristo bázala na bomoko? (b) Ndenge nini tokoki kosala elongo na kati ya lisangá?

8 Ntoma Paulo alimbolelaki Baefese ndenge oyo lisangá ebongisami, mpe alobaki ete bato nyonso na lisangá basengeli ‘kokola na makambo nyonso.’ (Tángá Baefese 4:15, 16.) Asalelaki ndakisa ya nzoto mpo na kolimbola ete mokristo mokomoko akoki kosalisa lisangá ezala na bomoko mpe elanda Yesu, Mokambi ya lisangá. Alobaki ete binama nyonso ya nzoto esalaka elongo “na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli.” Na yango, tózala bilenge to mikóló, nzoto kolɔngɔnɔ to te, mokomoko na biso asengeli kosala nini?

Ndenge nini okoki kosalisa lisangá ezala na bomoko?

9 Yesu atye bankulutu mpo bákamba lisangá, mpe alingi ete tómemya bango mpe tólanda litambwisi oyo bapesaka biso. (Baebre 13:7, 17) Kosala bongo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso. Elimo santu na ye ekoki kosalisa biso tótosa malako nyonso oyo bankulutu bapesaka biso. Kanisá mpe ndenge oyo tokoki kosalisa lisangá na biso soki tozali na komikitisa mpe tozali kosala elongo na  bankulutu. Lisangá na biso ekozala na bomoko, mpe bolingo oyo tolingaka bandeko ekokóma lisusu makasi.

10. Ndenge nini basaleli na misala basalisaka mpo lisangá ezala na bomoko? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Basaleli na misala mpe basalisaka mpo lisangá ezala na bomoko. Basalaka makasi mpo na kosalisa bankulutu, mpe tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo basalaka. Na ndakisa, basaleli na misala balukaka koyeba soki tozali na mikanda mingi mpo na mosala ya kosakola, mpe bayambaka bapaya oyo bayei na makita na biso. Basalaka mpe mosala makasi mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi mpe babatelaka yango pɛto. Ntango tosalaka elongo na bandeko yango, tosalaka na bomoko mpe tosalelaka Yehova na ndenge oyo ebongisami.—Talá mpe Misala 6:3-6.

11. Bilenge bakoki kosala nini mpo na kosalisa lisangá ezala na bomoko?

11 Bankulutu mosusu basali mosala makasi na lisangá na boumeli ya bambula mingi. Kasi ekoki kozala ete bazali lisusu te na likoki ya kosala mingi lokola liboso mpo bakómi mikóló. Bandeko oyo bazali naino bilenge bakoki kosalisa bango. Soki bazwi formasyo, bakoki kokokisa malamu mikumba mingi na lisangá. Mpe soki basaleli na misala bazali kosala mosala makasi, bakoki kozala na likoki ya kokóma bankulutu na mikolo ezali koya. (1 Timote 3:1, 10) Bankulutu mosusu oyo bazali naino bilenge bakei mpenza liboso na ndenge bakómi bakɛngɛli ya zongazonga mpe bazali kosalisa bandeko na masangá mingi. Tozalaka na botɔndi komona ndenge bandeko oyo bazali naino bilenge basepelaka kosalela bandeko.Tángá Nzembo 110:3; Mosakoli 12:1.

KOSALA ELONGO NA KATI YA LIBOTA

12, 13. Nini ekoki kosalisa moto mokomoko na kati ya libota asala elongo na basusu?

12 Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya libota na biso mpo tósala elongo? Kosala Losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ ekoki kosalisa biso. Soki baboti ná bana bazali kolekisa ntango mingi elongo mpo na koyekola makambo ya Yehova, bakolingana lisusu mingi. Na ntango ya Losambo na kati ya libota, bakoki komekameka makambo oyo bakoloba na mosala ya kosakola, mpe yango ekosalisa bango nyonso bámibongisa malamu. Lisusu, ntango bazali koyoka makambo oyo bato mosusu ya libota bazali koloba mpo na solo mpe komona ete moto nyonso na libota alingaka Yehova mpe alingi kosepelisa ye, boyokani na bango ekómaka lisusu makasi.

Soki mwasi ná mobali balingaka Yehova mpe basalelaka ye elongo, bakozala na esengo mpe na bomoko na libala na bango

13 Ndenge nini mwasi ná mobali bakoki kosala elongo? (Matai 19:6) Soki bango mibale balingaka Yehova mpe basalelaka ye elongo, bakozala na esengo mpe na bomoko na libala na bango. Basengeli mpe komoniselana bolingo, ndenge Abrahama ná Sara, Yisaka ná Rebeka, mpe Elekana ná Ana basalaki. (Ebandeli 26:8; 1 Samwele 1:5, 8; 1 Petro 3:5, 6) Soki mwasi ná mobali basali bongo,  bakozala na bomoko mpe bakopusana penepene na Yehova.Tángá Mosakoli 4:12.

Losambo na kati ya libota ekoki kosalisa bilenge mpe mikóló bákóma lisusu na boyokani malamu (Talá paragrafe 12, 15)

14. Soki mobali na yo to mwasi na yo azali kosalela Yehova te, okoki kosala nini mpo libala na bino ezala kaka malamu?

14 Biblia elobi polele ete tosengeli te kobalana na moto oyo asalelaka Yehova te. (2 Bakorinti 6:14) Nzokande, ezali na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali na babalani oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Basusu kati na bango bayekolaki solo nsima ya kobalana, kasi babalani na bango bakómaki Batatoli te. Mpo na basusu, ekoki kozala ete babalanaki na mosaleli moko ya Yehova, kasi na nsima mobali na bango to mwasi na bango atikaki lisangá. Na makambo wana nyonso, bakristo basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kotosa batoli ya Biblia mpo libala na bango ekoba kozala malamu. Mbala mosusu, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na ndakisa, ndeko mwasi Mary ná mobali na ye David bazalaki kosalela Yehova elongo. Na nsima, ndeko David atikaki koyangana na makita. Kasi ndeko Mary akobaki kosala nyonso mpo na kozala mwasi malamu mpe komonisa bizaleli ya mokristo. Ateyaki mpe bana na bango motoba makambo ya Yehova mpe akobaki kokende na makita mpe na mayangani. Bambula mingi na nsima, ntango bana na bango bakolaki mpe bango nyonso batikaki ndako ya baboti, ndeko Mary akobaki kosalela Yehova, atako ezalaki mpasi mingi mpo na ye. Kasi na nsima, ndeko David abandaki kotánga bazulunalo oyo ndeko Mary azalaki kotikela ye. Na nsima, azongelaki koyangana na makita mosusu. Mbala mingi, nkɔkɔ na ye ya mobali oyo azalaki na mbula motoba azalaki kobombela ye esika ya kofanda, mpe soki ndeko David ayei te, mwana yango azalaki koloba: “Nkɔkɔ, nazelaki yo mingi na makita lelo.” Nsima ya mbula 25, ndeko David azongelaki Yehova, mpe ye ná mwasi na ye bazali na esengo ete sikoyo bazali lisusu kosalela Yehova elongo.

15. Ndenge nini baoyo baumeli na libala bakoki kosalisa baoyo babalani sika?

15 Lelo oyo, Satana azali kobundisa  mabota. Yango wana, mwasi ná mobali oyo bazali kosalela Yehova basengeli kosala elongo. Ezala osali bambula ebele na libala to outi kobala sika, kanisá nini okoki koloba to kosala mpo na kobongisa lisusu libala na bino. Soki bobalaná banda kala, bózala ndakisa malamu mpo na baoyo bauti kobalana sika. Ntango mosusu bokoki kobengisa babalani ya sika mpo báya kosangana elongo na bino na Losambo na kati na libota. Bakomona ete ata soki bato basali bambula ebele na libala, basengeli kokoba komoniselana bolingo mpe kozala na bomoko.Tito 2:3-7.

“TÓMATA NA NGOMBA YA YEHOVA”

16, 17. Basaleli ya Nzambe oyo bazali na bomoko bazali kozela nini?

16 Ntango Bayisraele bazalaki kokende na bafɛti na bango na Yerusaleme, bazalaki kosala elongo. Bazalaki kobongisa biloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo na mobembo. Na nsima, bazalaki kosala mobembo elongo mpe kosalisana. Na tempelo, bango nyonso bazalaki kosanzola Yehova mpe kosambela ye elongo. (Luka 2:41-44) Lelo oyo, lokola tozali komibongisa mpo na bomoi na mokili ya sika, tosengeli kozala na bomoko mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosala elongo. Okoki kokanisa ndenge oyo okoki kosala yango lisusu mingi koleka?

17 Na mokili, bato bayokanaka te mpe babundaka mpo na makambo mingi. Kasi biso tozali na botɔndi ndenge Yehova asalisi biso tózala na kimya mpe tóyeba solo! Basaleli na ye na mokili mobimba bazali kosambela ye na ndenge oyo alingi. Mpe mingimingi na mikolo oyo ya nsuka, basaleli ya Yehova bakómi lisusu na bomoko makasi koleka. Kaka ndenge mosakoli Yisaya mpe mosakoli Mika basakolaki, tozali komata na “ngomba ya Yehova” elongo. (Yisaya 2:2-4; Tángá Mika 4:2-4.) Kanisá esengo oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, ntango bato nyonso awa na mabele bakosangana “liboke moko na boyokani mpenza” mpe bakosala elongo mpo na kosambela Yehova!