Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2016

Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?

Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?

“Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?”LUKA 14:28.

NZEMBO: 120, 64

Lisolo oyo mpe oyo elandi ekomami mpo na bilenge oyo balingi kozwa batisimo

1, 2. (a) Nini epesaka basaleli ya Nzambe esengo lelo oyo? (b) Ndenge nini baboti bakristo mpe bankulutu basalisaka bilenge báyeba malamu ndimbola ya batisimo?

NKULUTU moko ayebisaki Christopher, elenge moko ya mbula 12 ete: “Nayebi yo banda ntango obotamaki, mpe nasepeli mingi koyoka ete olingi kozwa batisimo. Kasi, nalingi kotuna yo motuna moko: ‘Mpo na nini olingi kozwa batisimo?’” Nkulutu yango atunaki motuna wana mpamba te. Tosepelaka mingi komona bankotó ya bilenge oyo bazali kozwa batisimo mbula na mbula. (Mosakoli 12:1) Kasi baboti oyo bazali bakristo mpe bankulutu na masangá balingaka kondimisama ete bilenge yango bazwi ekateli yango bango moko mpe bayebi malamu ndimbola ya batisimo.

2 Na Biblia, toyekolaka ete komipesa mpe batisimo ezali ebandeli ya bomoi ya sika mpo na mokristo. Bomoi yango ya sika epesaka mapamboli mingi oyo euti epai ya Yehova,  kasi ememaka mpe botɛmɛli oyo eutaka epai ya Satana. (Masese 10:22; 1 Petro 5:8) Yango wana, baboti bakristo basengeli kozwa ntango ya koteya bana na bango soki kozala moyekoli ya Kristo elimboli nini. Mpo na bilenge oyo baboti na bango bazali bakristo te, bankulutu ya lisangá bakoki kosalisa bango na bolingo mpenza báyeba malamu ndimbola ya komipesa mpe batisimo. (Tángá Luka 14:27-30.) Kaka ndenge esɛngaka komibongisa mpo na kosilisa kotonga ndako, bilenge basengeli komibongisa liboso ya kozwa batisimo mpo básalela Yehova na bosembo “tii na nsuka.” (Matai 24:13) Nini ekosalisa bilenge bázwa ekateli ya kosalela Yehova mpo na libela? Tótalela yango.

3. (a) Maloba ya Yesu mpe ya ntoma Petro eteyi biso ete batisimo ezali na ntina nini? (Matai 28:19, 20; 1 Petro 3:21) (b) Mituna nini tokotalela, mpe mpo na nini?

3 Ozali elenge mpe olingi kozwa batisimo? Soki ezali bongo, ezali mpenza mokano ya malamu! Kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova ezali lokumu monene. Ezali likambo oyo mokristo asengeli kosala, mpe ezali litambe ya ntina mingi mpo na baoyo balingi kobika na bolɔzi monene. (Matai 28:19, 20; 1 Petro 3:21) Soki ozwi batisimo, okomonisa ete olaki kosalela Yehova mpo na libela. Ozali na mposa ya kokokisa elaka wana, na yango mituna oyo elandi ekosalisa yo oyeba soki omibongisi mpo na kozwa batisimo: (1) Nakɔmɛli mpenza mpo na kozwa ekateli yango? (2) Nazali mpenza na mposa ya kozwa batisimo? (3) Nayebi malamu soki komipesa epai ya Yehova elimboli nini? Tótalela mituna yango.

OKƆMƐLI MPENZA?

4, 5. (a) Mpo na nini batisimo ezali kaka te mpo na mikóló? (b) Kokɔmɛla elimboli nini mpo na mokristo?

4 Biblia elobi te ete kaka bato oyo bakómi mikóló to baoyo bakokisi mbula moko boye nde bakoki kozwa batisimo. Na Masese 20:11, totángi boye: “Ata na misala na ye mwana mobali asalaka ete bato báyeba ye, soki mosala na ye ezali pɛto mpe elongobani.” Na yango, ata mwana moke akoki kokanga ntina ya kosala makambo oyo ezali malamu mpe komipesa epai ya Mozalisi na ye. Na yango, batisimo ezali litambe ya ntina mingi mpe oyo ebongi mpo na elenge oyo amonisi ete akɔmɛli mpe amipesi epai ya Yehova.Masese 20:7.

5 Kokɔmɛla elimboli nini? Kokɔmɛla etalelaka ntango nyonso te bambula ya moto to kokola na nzoto. Biblia elobi ete bato oyo bakɔmɛli bamesenisi ‘makoki na bango ya kososola’ mpo na kokesenisa mabe ná malamu. (Baebre 5:14) Moto oyo akɔmɛli ayebaka makambo oyo ezali malamu mpe na motema na ye azwaka ekateli ya kosala  yango. Yango wana, ekoki kozala pɛtɛɛ te kotinda ye asala makambo ya mabe. Mpe mbala mingi azalaka na mposa te ete moto mosusu ayebisa ye asala makambo ya malamu. Na yango, esengeli ete elenge oyo azwi batisimo asala makambo ya malamu ata ntango oyo baboti na ye to mikóló mosusu bazali na ye esika moko te.—Talá mpe Bafilipi 2:12.

6, 7. (a) Lobelá mikakatano oyo Danyele akutanaki na yango ntango azalaki na Babilone. (b) Ndenge nini Danyele amonisaki ete akɔmɛli?

6 Elenge akoki mpenza komonisa ete akɔmɛli ndenge wana? Tótalela ndakisa ya Danyele. Mbala mosusu, azalaki elenge ntango bazwaki ye epai ya baboti na ye mpe batindaki ye na Babilone. Na mbalakaka, Danyele akómaki kofanda elongo na bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe te. Kasi tótalela na mozindo makambo ya bomoi ya Danyele. Na Babilone, bazalaki kotalela ye lokola moto ya ntina mingi. Azalaki na kati ya mwa bilenge oyo baponamaki na likebi mpenza mpo na kosalela mokonzi. (Danyele 1:3-5, 13) Emonani ete Danyele azalaki na esika moko ya lokumu na Babilone koleka ndenge alingaki kozala na Yisraele.

7 Kasi elenge Danyele asalaki nini? Atikaki nzela ete bato ya Babilone bábongola ye to bálɛmbisa kondima na ye? Ata moke te! Biblia elobi ete ntango Danyele azalaki na Babilone, akanaki “na motema na ye ete amikómisa mbindo te,” azala mosika na biloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya lokuta. (Danyele 1:8) Yango emonisaki ete azalaki moto oyo akɔmɛli mpenza!

Elenge oyo akɔmɛli azalaka te moninga ya Nzambe na Ndako ya Bokonzi kasi moninga ya mokili na kelasi (Talá paragrafe 8)

8. Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Danyele?

 8 Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Danyele? Elenge oyo akɔmɛli akangamaka na bindimeli na ye, ata na ntango ya mikakatano. Azalaka te lokola mongingima (caméléon), oyo langi na yango ebongwanaka na kolanda esika ezali. Azalaka te moninga ya Nzambe ntango azali na Ndako ya Bokonzi mpe moninga ya mokili ntango azali na kelasi. Atikalaka sembo ata ntango amekami.Tángá Baefese 4:14, 15.

Elenge oyo akɔmɛli akangamaka na bindimeli na ye, ata na ntango ya mikakatano

9, 10. (a) Ndenge nini elenge akoki kozwa litomba soki akanisi ndenge oyo asalaki mbala ya nsuka oyo kondima na ye emekamaki? (b) Batisimo elimboli nini?

9 Ya solo, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Tózala bilenge to mikóló, na bantango mosusu tosalaka mabunga. (Mosakoli 7:20) Kasi soki olingi kozwa batisimo, ekozala likambo ya bwanya oluka koyeba soki ozali mpenza na ekateli ya kotosa mibeko ya Yehova. Omituna boye: ‘Nasili kotosa Yehova na boumeli ya mwa ntango?’ Kanisá ndenge osalaki mbala ya nsuka oyo kondima na yo emekamaki. Ozalaki na likoki ya kozwa ekateli ya kopona likambo ya malamu oyo osengelaki kosala? Lokola Danyele, moto moko alendisaki yo osalela makoki na yo na mokili ya Satana? Soki omekami na likambo ya ndenge wana, ozali na likoki ya koyeba soki mokano ya Yehova ezali nini?Baefese 5:17.

10 Mpo na nini ezali na ntina koyeba biyano na mituna wana oyo etaleli yo? Mpo ekosalisa yo omona ete batisimo ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Batisimo emonisaka basusu ete olaki Yehova likambo moko ya ntina mingi. Olaki ete okolinga ye mpe okosalela ye na motema na yo mobimba mpo na libela. (Marko 12:30) Moto nyonso oyo azwi batisimo asengeli kozala na ekateli ya kotosa elaka oyo asaleli Yehova.Tángá Mosakoli 5:4, 5.

MPOSA YANGO EUTI EPAI NA YO MOKO?

11, 12. (a) Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kondimisama na likambo nini? (b) Nini ekoki kosalisa otalela batisimo ndenge Yehova atalelaka yango?

11 Biblia elobi ete basaleli nyonso ya Yehova, ata mpe bilenge, bakosalela ye “na bolingo na bango moko.” (Nzembo 110:3) Na yango, moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kondimisama ete mposa yango euti epai na ye moko. Yango ekoki kosɛnga ete otalela mposa na yo malamumalamu, mingimingi soki obɔkwamá na libota ya bakristo.

12 Ntango ozali kokola, mbala mosusu ozali komona ebele ya bato bazali kozwa batisimo, ezala baninga na yo mosusu to bandeko na yo. Kasi kebá ete okóma te na mposa ya kozwa batisimo kaka mpo okokisi mbula moko boye to mpo bato mosusu nyonso bazali kozwa batisimo. Ndenge nini okoki kondimisama ete ozali kotalela batisimo ndenge Yehova atalelaka yango? Zwá ntango ya kokanisa mpo na koyeba mpo na nini batisimo ezali na ntina mingi. Na lisolo  oyo mpe oyo elandi, okoyeba bantina mingi oyo ebongi.

13. Ndenge nini okoki koyeba soki ekateli na yo ya kozwa batisimo euti mpenza na motema na yo?

13 Lolenge moko oyo okoki komonisa soki ekateli na yo ya kozwa batisimo euti mpenza na motema na yo ezali ya kotalela malamu mabondeli na yo. Mbala boni obondelaka Yehova mokolo na mokolo? Na mabondeli na yo, olobaka makambo ya sikisiki? Biyano oyo okopesa na mituna wana ekoki komonisa lolenge ya boyokani oyo ozali na yango na Yehova. (Nzembo 25:4) Mbala mingi, Yehova ayanolaka mabondeli na biso na nzela ya Biblia. Na yango, lolenge mosusu okoki komonisa ete olingi kopusana penepene na Yehova mpe kosalela ye na motema na yo mobimba ezali ya kotalela programɛ na yo ya boyekoli. (Yosua 1:8) Omituna boye: ‘Mbala boni nayekolaka Biblia ngai moko? Napesaka biyano na losambo na kati ya libota?’ Biyano na motuna wana ekosalisa yo omona soki ekateli na yo ya kozwa batisimo euti mpenza epai na yo moko.

KOMIPESA ELIMBOLI NINI?

14. Bokeseni nini ezali kati na komipesa mpe batisimo?

14 Bilenge mosusu bayebaka mpenza te bokeseni oyo ezali kati na komipesa mpe batisimo. Basusu balobaka ete basilá komipesa epai na Yehova kasi bakoki naino te mpo na kozwa batisimo. Kasi ekoki mpenza kosalema bongo? Komipesa elimboli kosala libondeli mpo na koyebisa Yehova ete olaki kosalela ye mpo na libela. Ntango ozwi batisimo, omonisi epai ya basusu ete osilaki komipesa epai ya Yehova. Yango wana, liboso ete ozwa batisimo, osengeli naino koyeba soki komipesa na Nzambe elimboli nini.

15. Komipesa elimboli nini?

15 Ntango omipesi epai ya Yehova, oyebisi ye ete sikoyo okómi moto na ye. Olaki ete kosalela ye ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. (Tángá Matai 16:24.) Kosala elaka ya ndenge wana epai ya Nzambe ezali likambo ya kozwa na lisɛki te! (Matai 5:33) Na yango, ndenge nini omonisaka ete oyebi ete ozali lisusu te na bomoi mpo na yo moko, kasi okómi nde moto ya Yehova?Baroma 14:8.

16, 17. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ndimbola ya komiboya. (b) Moto oyo amipesi ayebisaka Nzambe nini?

16 Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete moninga moko akabeli yo vuatire. Apesi yo mikanda ya vuatire yango mpe alobi: “Vuatire oyo ezali ya yo.” Na nsima, alobi: “Kasi ngai moto nakobomba fungola na yango, mpe nakobanda kotambwisa vuatire yango, kasi yo te.” Okokanisa nini mpo na likabo yango? Okokanisa nini mpo na moninga na yo oyo akabeli yo vuatire yango?

17 Ntango moto amipesi epai ya Yehova, ayebisaka Nzambe ete: “Napesi yo bomoi na ngai. Nakómi moto na yo.” Yehova azali na lotomo ya kozela ete moto yango akokisa elaka na ye. Kasi ekozala boni soki moto yango abandi koboya kotosa Yehova mpe akómi kolingana na ndenge ya kobombana ná moto moko oyo asalelaka Nzambe te? To ekozala boni soki moto yango andimi mosala oyo ekosala ete azala na ntango mingi te mpo na mosala ya kosakola  to azangisaka makita ya lisangá mbala na mbala? Soki asali bongo, moto yango azali te kokokisa elaka oyo asalaki epai ya Yehova. Ekozala lokola kobomba fungola ya vuatire. Ntango tomipesaka epai ya Yehova, toyebisaka ye ete: “Bomoi na ngai ekómi ya yo, kasi ya ngai lisusu te.” Na yango, tokosala ntango nyonso oyo Yehova alingi, ata soki ezali te oyo biso moko tolingi kosala. Tómekola Yesu, oyo alobaki ete: “Nautaki na likoló nakiti mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.”Yoane 6:38.

Batisimo ezali ekateli ya kozwa na lisɛki te mpe ezali libaku monene

18, 19. (a) Ndenge nini maloba ya Rose mpe Christopher emonisi ete kozwa batisimo ezali libaku malamu oyo epesaka mapamboli? (b) Ozali kokanisa nini mpo na libaku ya kozwa batisimo?

18 Tomoni polele ete batisimo ezali ekateli ya kozwa na lisɛki te. Komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ezali libaku monene. Bilenge oyo balingaka Yehova mpe bayebaka ndimbola ya komipesa bakakatanaka te mpo na komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Bayokaka mawa te mpo na ekateli na bango. Rose, elenge moko oyo azwá batisimo alobi boye: “Nalingaka Yehova, mpe eloko moko te ekokaki kopesa ngai esengo longola kaka kosalela ye. Na bikateli nyonso oyo nazwá na bomoi na ngai, kozwa batisimo ezali ekateli oyo nazwaki kozanga kokakatana ata moke.”

19 Bongo Christopher, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo? Akanisaka nini mpo na ekateli oyo azwaki ya kozwa batisimo ntango azalaki na mbula 12? Alobi ete asepelaka mingi mpo na ekateli oyo azwaki. Abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza ntango akómaki na mbula 17, mpe akómaki mosaleli na misala na mbula 18. Lelo oyo, azali kosala na Betele. Alobi boye: “Batisimo ezalaki ekateli oyo ebongi. Nazali kolekisa bomoi na ngai na mosala oyo ezali kosepelisa Yehova mpe ebongiseli na ye.” Soki olingi kozwa batisimo, ndenge nini okoki komibongisa mpo na yango? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna wana.