Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

Zalá sembo epai ya Yehova

Zalá sembo epai ya Yehova

“Yehova ye moko azala kati na ngai ná yo mpe kati na bana na ngai mpe bana na yo, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”1 SAMWELE 20:42.

NZEMBO: 125, 62

1, 2. Mpo na nini boninga ya Yonatane ná Davidi ezali ndakisa oyo ebongi mpenza na likambo etali bosembo?

NA NTEMBE te, Yonatane akamwaki mingi na mpiko oyo elenge Davidi amonisaki. Davidi abomaki engambe Goliate mpe amemaki “motó ya Mofilistia” yango epai ya Saulo, mokonzi ya Yisraele, tata ya Yonatane. (1 Samwele 17:57) Yonatane azalaki na ntembe te ete Nzambe azalaki elongo na Davidi, mpe kobanda wana, Yonatane ná Davidi bakómaki baninga ya motema. Yonatane alakaki ete akozala sembo epai ya Davidi, Davidi mpe asalaki kaka bongo. (1 Samwele 18:1-3) Kobanda wana, bomoi na ye mobimba, Yonatane azalaki sembo epai ya Davidi.

2 Yonatane atikalaki sembo epai ya Davidi atako Yehova aponaki Davidi, kasi Yonatane te, mpo azala mokonzi ya mibale ya Yisraele. Mpe ntango Saulo alingaki koboma Davidi, Yonatane amitungisaki mpo na moninga na ye. Ayebaki ete Davidi azalaki na esobe na Horeshe, yango wana Yonatane akendaki kuna kobɔndisa ye mpo akoba kotyela Yehova motema. Yonatane ayebisaki Davidi boye: “Kobanga te; mpo lobɔkɔ ya tata na ngai  Saulo ekozwa yo te, mpe yo, okokóma mokonzi ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo.”1 Samwele 23:16, 17.

3. Nini ezalaki na ntina mingi mpo na Yonatane koleka bosembo na ye epai ya Davidi, mpe ndenge nini toyebi yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Mbala mingi tosepelaka na bato oyo bazalaka sembo. Kasi tozali nde kosepela na Yonatane kaka mpo azalaki sembo epai ya Davidi? Te, kozala sembo epai ya Nzambe nde likambo elekaki ntina na bomoi ya Yonatane. Na ntembe te, yango nde esalaki ete azala sembo epai ya Davidi mpe ayokela ye zuwa te, atako Davidi asengelaki kokóma mokonzi na esika na ye. Kutu, Yonatane asalisaki nde Davidi atyela Yehova motema. Batikalaki sembo epai ya Yehova mpe bango mibale bamoniselanaki bosembo. Batosaki elaka oyo basalaki, ete: “Yehova ye moko azala kati na ngai ná yo mpe kati na bana na ngai mpe bana na yo, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”1 Samwele 20:42.

4. (a) Nini ekopesa biso mpenza esengo mpe ekosalisa biso tósepela na bomoi oyo tozali na yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Biso mpe tosengeli kozala sembo epai ya bato ya libota na biso, baninga na biso, mpe bandeko na biso ya lisangá. (1 Batesaloniki 2:10, 11) Kasi likambo eleki ntina, tosengeli kozala sembo epai ya Yehova. Ye nde apesá biso bomoi! (Emoniseli 4:11) Soki tozali sembo epai na ye, tokozala mpenza na esengo mpe tokosepela na bomoi oyo tozali na yango. Kasi toyebi ete tosengeli kozala sembo epai ya Yehova ata na ntango ya mikakatano. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo ndakisa ya Yonatane ekoki kosalisa biso tótikala sembo epai Yehova na makambo minei: (1) Ntango tomoni ete moto moko oyo azali na bokonzi abongi te tópesa ye limemya. (2) Ntango tosengeli kopona soki tokotikala sembo epai ya nani to, (3) Ntango ndeko moko oyo azali na mikumba akaniseli biso mabe to asaleli biso makambo ya kozanga bosembo, mpe (4) Ntango tomoni ete ezali mpasi tókokisa elaka moko oyo tosalaki.

NTANGO TOMONI ETE MOTO MOKO OYO AZALI NA BOKONZI ABONGI TE TÓPESA YE LIMEMYA

5. Mpo na nini ezalaki mpasi mpo bato ya Yisraele bázala sembo epai ya Nzambe ntango Saulo azalaki mokonzi?

5 Yonatane mpe bato ya Yisraele bakutanaki na mokakatano moko. Mokonzi Saulo, tata ya Yonatane, azangaki botosi mpe Yehova aboyaki ye. (1 Samwele 15:17-23) Atako bongo, Nzambe atikelaki Saulo nzela akoba koyangela bambula ebele. Na yango ezalaki mpasi bato bátikala sembo epai ya Nzambe ntango mokonzi oyo aponaki afanda na “kiti ya bokonzi ya Yehova” azalaki kosala makambo ya mabe.1 Ntango 29:23.

6. Nini emonisi ete Yonatane atikalaki sembo epai ya Yehova?

6 Yonatane atikalaki sembo epai ya Yehova. Kanisá likambo oyo Yonatane asalaki mwa moke na nsima ntango Saulo aboyaki kotosa Nzambe. (1 Samwele 13:13, 14) Na ntango wana, ebele ya basoda ya Bafilistia bayaki na makalo 30 000 mpo na kobundisa Yisraele. Saulo azalaki kaka na basoda 600, mpe kaka ye ná Yonatane nde bazalaki na bibundeli. Kasi Yonatane azalaki kobanga te. Abosanaki te maloba oyo ya mosakoli Samwele: “Mpo Yehova akotika bato na ye te, mpo na nkombo na ye monene.” (1 Samwele 12:22) Yonatane alobaki na soda mosusu boye: “Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.” Na yango ye ná soda yango babundisaki etuluku moko ya Bafilistia mpe babomaki mibali soki 20. Yonatane azalaki na kondima epai ya Yehova  mpe Yehova apambolaki ye. Yehova aningisaki mabele, mpe Bafilistia babangaki. Na nsima, babundaki mpe babomanaki bango na bango, mpe bato ya Yisraele balongaki etumba.1 Samwele 13:5, 15, 22; 14:1, 2, 6, 14, 15, 20.

7. Ndenge nini Yonatane azalaki kotalela tata na ye?

7 Atako Saulo aboyaki kotosa Yehova, Yonatane azalaki kaka kotosa tata na ye soki esengeli. Na ndakisa, ye ná tata na ye babundisaki banguna mpo na kobatela bato ya Yehova.1 Samwele 31:1, 2.

8, 9. Ndenge nini ntango tomemyaka baoyo bazali na bokonzi tomonisaka ete tozali sembo epai ya Nzambe?

8 Lokola Yonatane, tokoki kozala sembo epai ya Yehova soki tozali kotosa bakonzi ya Leta na ekólo oyo tozali kofanda, soki esengeli. Yehova atiki ete “bakonzi oyo bazali liboso” bázala mpo báyangela biso, mpe asɛngi biso tótosa bango. (Tángá Baroma 13:1, 2.) Yango wana, tosengeli kotosa bakonzi ya Leta, ata soki bazali sembo te mpe tomoni ete babongi te tópesa bango limemya. Kutu, tosengeli komemya bato nyonso oyo Yehova apesi bokonzi.1 Bakorinti 11:3; Baebre 13:17.

Lolenge moko ya kozala sembo epai ya Yehova ezali ya kosalela mobalani na biso makambo na limemya, ata soki asalelaka Yehova te (Talá paragrafe 9)

9 Olga, ndeko mwasi moko na Amerika ya Sudi, amonisaki bosembo epai ya Yehova na ndenge azalaki komemya mobali na ye atako azalaki konyokola ye. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na bantango mosusu, mobali na ye azalaki kolinga kolobisa ye te to kolobela ye mabe mpo ndeko Olga azalaki Motatoli ya Yehova. Kutu, alobaki na ye ete akosundola ye mpe akokende na bana. Kasi, ndeko Olga ‘azongisaki mabe  na mabe te.’ Asalaki nyonso oyo esengeli mpo azala mwasi malamu. Azalaki kolambela mobali na ye, kosukola bilamba na ye, mpe kokipe bato mosusu ya libota na ye. (Baroma 12:17) Lisusu, soki likoki ezali, azalaki kokende ná ye kotala libota ya mobali na ye mpe baninga na ye. Na ndakisa, ntango mobali na ye alingaki kokende na engumba mosusu epai tata na ye akufaki, ndeko Olga abongisaki biloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo na mobembo. Na nsima, na esika oyo ebembe ezalaki, azelaki mobali na ye libándá ya ndako-nzambe. Nsima ya bambula mingi, mobali ya ndeko Olga akómaki kosalela ye makambo ya malamu mpo ndeko Olga azalaki motema molai mpe azalaki komemya ye ntango nyonso. Lelo oyo, mobali yango alendisaka ye akendaka makita mpe akendaka kotika ye. Mbala mosusu ye mpe ayanganaka na makita elongo na ye.1 Petro 3:1.

NTANGO TOSENGELI KOPONA SOKI TOKOTIKALA SEMBO EPAI YA NANI

10. Ndenge nini Yonatane ayebaki epai ya nani asengeli kozala sembo?

10 Ntango Saulo alobaki ete akoboma Davidi, Yonatane asengelaki kozwa ekateli moko ya mpasi. Alingaki kozala sembo epai ya tata na ye, kasi alingaki mpe kozala sembo epai ya Davidi. Yonatane ayebaki ete Nzambe azalaki elongo na Davidi kasi na Saulo te, yango wana aponaki kozala sembo epai ya Davidi. Ayebisaki Davidi amibomba, na nsima ayebisaki Saulo ntina oyo asengeli koboma Davidi te.Tángá 1 Samwele 19:1-6.

11, 12. Ndenge nini bolingo oyo tolingaka Nzambe esalisaka biso tózwa ekateli ya kozala sembo epai na ye?

11 Alice, ndeko mwasi moko ya Australie, asengelaki kozwa ekateli soki akozala sembo epai ya nani. Ntango azalaki koyekola Biblia, azalaki koyebisa libota na ye makambo oyo azalaki koyekola. Ayebisaki mpe bango ete akosala fɛti ya Noele te mpe amonisaki bango ntina oyo akosala yango te. Na ebandeli, bato ya libota na ye balɛmbaki nzoto, kasi na nsima basilikelaki ye makasi. Bakanisaki ete ndeko Alice azalaki kokipe bango lisusu te. Na nsima mama ya Alice alobaki ete alingi lisusu komona ye te. Ndeko Alice alobi ete: “Natungisamaki mpe nayokaki mpasi mingi na motema mpo nazalaki kolinga libota na ngai mingi. Atako bongo, nazwaki ekateli ete Yehova ná Mwana na ye basengeli kozala na esika ya liboso na motema na ngai; mpe nazwaki batisimo na liyangani oyo elandaki.”Matai 10:37.

12 Tosengeli te kotika ete makambo lokola ekipi ya bale, kelasi, to ekólo ekóma na ntina mingi koleka bosembo na biso epai ya Yehova. Na ndakisa, Ndeko Henry, azalaki kosepela mingi na lisano moko ya ekipi ya eteyelo na bango, mpe mposa na ye ezalaki ete azwa mbano na momekano mpo na eteyelo na bango. Kasi lokola azalaki kobɛta lisano yango na nsuka ya pɔsɔ nyonso, azalaki lisusu na ntango mingi te mpo na mosala ya kosakola mpe makita. Ndeko Henry alobi ete akómaki komona ete kelasi ezalaki na ntina mingi koleka kozala sembo epai ya Nzambe. Yango wana, azwaki ekateli ya kotika kobɛta lisano yango na eteyelo.Matai 6:33.

13. Ndenge nini bosembo epai ya Nzambe esalisaka biso tólonga mikakatano ya libota?

13 Ntango mosusu, ekoki kozala mpasi kozala sembo epai ya bato nyonso ya libota na biso na mbala moko. Na ndakisa, ndeko Ken alobi: “Nazalaki na mposa ya kokende kotala mama na ngai oyo akómi mobange mbala na mbala, mpe ya kobengisa ye aya kolekisa mwa mikolo epai na biso na bantango mosusu. Kasi, mama na ngai ná mwasi na ngai bazalaki koyokana  malamu te.” Abakisi boye: “Nakokaki te kosepelisa moko na bango mpe koboya kosepelisa mosusu.” Ndeko Ken akanisaki oyo Biblia elobi mpe amonaki ete na likambo oyo, asengelaki kosepelisa mwasi na ye mpe kozala sembo epai na ye. Na yango mayele oyo asalelaki mpo na kosilisa likambo yango esepelisaki mwasi na ye. Na nsima, amonisaki mwasi na ye ntina oyo mwasi na ye asengelaki kozala na boboto epai ya mama na ye. Amonisaki mpe mama na ye ntina oyo asengelaki komemya mwasi na ye.Tángá Ebandeli 2:24; 1 Bakorinti 13:4, 5.

NTANGO NDEKO MOKO AKANISELI BISO MABE TO ASALELI BISO MAKAMBO KOZANGA BOSEMBO

14. Ndenge nini Saulo asalelaki Yonatane makambo na bosembo te?

14 Tokoki mpe kozala sembo epai ya Yehova soki ndeko moko oyo azali na mokumba asaleli biso makambo kozanga bosembo. Nzambe nde moto atyaki Saulo mokonzi, atako bongo, asalelaki mwana na ye moko makambo mabe. Ayebaki te mpo na nini Yonatane azalaki kolinga Davidi. Na yango, ntango Yonatane alukaki kosalisa Davidi, Saulo ayokaki nkanda makasi mpe ayokisaki mwana na ye nsɔni na miso ya bato mingi. Kasi, Yonatane akobaki komonisela tata na ye limemya. Kaka na ntango wana, atikalaki sembo epai ya Yehova mpe epai ya Davidi, oyo aponamaki na Nzambe mpo na kozala mokonzi ya mibale ya Yisraele.1 Samwele 20:30-41.

15. Soki ndeko moko asaleli biso makambo na bosembo te, tosengeli kosala nini?

15 Lelo oyo na masangá na biso, bandeko oyo bazali na mikumba basalaka makasi básalela bandeko makambo na bosembo.  Kasi, bandeko yango bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, ekoki kosalema ete báyeba te mpo na nini tosali likambo boye to boye. (1 Samwele 1:13-17) Soki ntango nyonso bazali kokatela biso makambo na bosembo te to komitya na esika na biso te, tótikala kaka sembo epai ya Yehova.

SOKI EZALI MPENZA MPASI TÓKOKISA ELAKA NA BISO

16. Na makambo nini tosengeli kozala sembo epai ya Nzambe mpe koluka matomba na biso moko te?

16 Saulo alingaki ete Yonatane akóma mokonzi ya mibale na Yisraele na esika ya Davidi. (1 Samwele 20:31) Kasi Yonatane azalaki kolinga Yehova mpe azalaki sembo epai na ye. Na esika ete aluka matomba na ye moko, Yonatane akómaki moninga ya Davidi mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye. Kutu, moto nyonso oyo alingaka Yehova mpe azali sembo epai na ye, “ata soki alapi ndai mpo na likambo oyo ekoki kobimisela ye mikakatano, akobongola maloba na ye te.” (Nzembo 15:4) Lokola tozali sembo epai ya Yehova, tokokisaka bilaka na biso. Na ndakisa, soki tosali kɔntra ya mosala to ya mombongo, tokokokisa makambo oyo toyokanaki, ata soki ekómi mpasi mpo na kokokisa yango. Mpe soki tozali na mikakatano na libala na biso, tokomonisa ete tolingaka Yehova soki totikali sembo epai ya mobalani na biso.Tángá Malaki 2:13-16.

Soki tosali kɔntra mpo na mosala to mombongo, tokosala ndenge toyokanaki mpo tozali sembo epai ya Nzambe (Talá paragrafe 16)

17. Ndenge nini boyekoli oyo esalisi yo?

17 Lokola Yonatana, tolingi kozala sembo epai ya Nzambe ata na ntango ya mikakatano. Na yango, tótikala sembo epai ya bandeko na biso ntango bayokisi biso mpasi. Tótikala sembo epai ya Yehova, ata na ntango ya mikakatano. Soki tosali bongo, tokosepelisa motema ya Yehova, mpe yango nde ekopesa biso esengo mingi. (Masese 27:11) Tokoki kondimisama ete akosalela biso ntango nyonso oyo eleki malamu mpe akotyela biso likebi. Na lisolo oyo elandi, tokomona mateya oyo tokoki kozwa epai ya bato mosusu ya mikolo ya Davidi, oyo bazalaki sembo mpe basusu oyo bazalaki sembo te.

^ [1] (paragrafe 9) Bankombo mosusu ezali ya bango te.