Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

Mekolá baninga ya motema ya Yehova

Mekolá baninga ya motema ya Yehova

“Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.”NZEMBO 25:14.

NZEMBO: 106, 118

1-3. (a) Nini endimisi biso ete tokoki kokóma baninga ya Nzambe? (b) Tokolobela banani na lisolo oyo?

NA BIBLIA, Abrahama abengami moninga ya Nzambe mbala misato. (2 Ntango 20:7; Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Na Biblia, kaka ye nde abengami mbala moko moninga ya Nzambe na ndenge ya polele. Yango elingi koloba ete kaka Abrahama nde azalaki moninga ya Nzambe? Te. Biblia emonisi ete biso nyonso tokoki kozwa libaku yango.

2 Liloba ya Nzambe ezali na masolo mingi ya mibali mpe basi ya sembo oyo bazalaki kobanga Yehova, bandimelaki ye, mpe bakómaki baninga na ye. (Tángá Nzembo 25:14.) Bazali na kati ya ‘lipata monene ya batatoli’ oyo ntoma Paulo alobeli. Bato wana nyonso bazalaki baninga ya Nzambe.Baebre 12:1.

3 Tólobela sikoyo baninga misato ya Yehova oyo Biblia elobeli: (1) Ruta, elenge mwasi ya sembo ya Moabe oyo mobali na ye akufá, (2) Hizikiya, mokonzi moko ya sembo ya Yuda, mpe (3) Maria, mama ya Yesu oyo azalaki na komikitisa. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge oyo  mokomoko na bango akómaki moninga ya Nzambe?

AMONISAKI BOLINGO YA SEMBO

4, 5. Ekateli nini ya monene Ruta asengelaki kozwa, mpe mpo na nini ezalaki mpasi kozwa ekateli yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Naomi ná babokilo na ye, Ruta ná Orpa balongwe na Moabe mpe bazali kokende mosika, na Yisraele. Na nzela, Orpa azwi ekateli ya kozonga na Moabe, mboka na ye. Kasi Naomi azali na ekateli ya kozonga na mboka na ye Yisraele. Bongo Ruta, ekateli nini azwi? Asengeli kozwa ekateli moko ya monene. Asengeli nde kozonga na Moabe mboka na ye mpo afanda na libota na ye, to kotikala na Naomi, mama-bokilo na ye, mpe kokende na ye na Beteleme?Ruta 1:1-8, 14.

5 Libota ya Ruta ezalaki kofanda na Moabe. Akokaki kozonga epai na bango, mpe na ntembe te balingaki kosalisa ye. Ayebaki bato kuna, ayebaki monɔkɔ ya mboka, mpe bizaleli ya bato ya Moabe. Naomi akokaki te kolaka Ruta makambo wana nyonso na Beteleme. Mpe Naomi azalaki kobanga ete Ruta azwa te mobali ya kobala ye to ndako ya kofanda. Yango wana, Naomi asɛngaki ye azonga na Moabe. Ndenge tomoni yango, Orpa ‘azongaki epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye.’ (Ruta 1:9-15) Kasi Ruta azwaki ekateli ya koboya kozonga epai ya bato na ye mpe banzambe na bango ya lokuta.

6. (a) Ekateli nini ya malamu Ruta azwaki? (b) Mpo na nini Boaze alobaki ete Ruta alukaki esika ya komibomba na nse ya mapapu ya Yehova?

6 Emonani ete Ruta ayekolaki makambo ya Yehova epai ya mobali na ye to epai ya Naomi. Ayekolaki ete Yehova azali te lokola banzambe ya Moabe. Azalaki kolinga Yehova mpe ayebaki ete asengeli kolinga Yehova mpe kosambela ye. Na yango, Ruta azwaki ekateli ya malamu. Ayebisaki Naomi: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:16) Kokanisa na bolingo oyo Ruta azalaki kolinga Naomi esimbaka mitema na biso. Kasi likambo oyo ekamwisaka koleka ezali bolingo oyo Ruta azalaki kolinga Yehova. Yango ekamwisaki mpe Boaze, oyo na nsima, akumisaki Ruta ndenge ‘ayaki koluka esika ya komibomba na nse ya mapapu ya Yehova.’ (Tángá Ruta 2:12.) Maloba wana ya Boaze ekoki kokundwela biso ndenge mwana ya ndɛkɛ alukaka komibomba na nse ya mapapu ya moboti na ye. (Nzembo 36:7; 91:1-4) Ndenge moko mpe, Yehova abatelaki Ruta mpe apesaki ye mbano mpo na kondima na ye. Ruta azalaki ata na ntina moko te ya koyoka mawa mpo na ekateli na ye.

7. Nini ekoki kosalisa bato oyo bakakatanaka mpo na komipesa na Yehova?

7 Bato mingi bayekolaka makambo ya Yehova kasi balingaka te koluka komibomba epai na ye. Bakakatanaka mpo na komipesa na ye mpe kozwa batisimo. Soki omiyokaka ndenge wana, mituná mpo na nini ozali kokakatana. Moto nyonso azali na nzambe oyo ye asambelaka. (Yosua 24:15) Ekateli ya bwanya ezali ya kosalela Nzambe ya solo. Ntango omipesi na Yehova, omonisi ete ozali na kondima ete akozala esika ya komibomba mpo na yo. Mpe akosalisa yo okoba kosalela ye ata soki okutani na mikakatano nini. Yango nde Nzambe asalaki mpo na Ruta.

 “AKANGAMAKI SE NA YEHOVA”

8. Lobelá bomoi ya Hizikiya.

8 Bomoi ya Hizikiya ekesanaki mosika na oyo ya Ruta. Hizikiya azalaki moto ya ekólo oyo emipesaki na Nzambe. Kasi Bayisraele nyonso te nde batikalaki sembo. Mokonzi Ahaze, tata ya Hizikiya, azalaki moto mabe. Azangaki limemya mpo na tempelo ya Nzambe mpe atindaki bato básambela banzambe mosusu. Kutu, Ahaze atumbaki bandeko mosusu ya Hizikiya na mɔtɔ mpo na kopesa bango mbeka epai ya banzambe ya lokuta. Bomwana ya Hizikiya ezalaki mpasi!2 Bakonzi 16:2-4, 10-17; 2 Ntango 28:1-3.

9, 10. (a) Mpo na nini ekokaki kozala mpasi te mpo Hizikiya asilikela Yehova? (b) Mpo na nini tosengeli te kosilikela Nzambe? (c) Mpo na nini tosengeli te kokanisa ete libota oyo touti nde esalaka ete tókóma na bomoto boye to boye?

9 Ndakisa mabe ya Ahaze ekokaki kotinda mwana na ye Hizikiya asilikela Yehova. Lelo oyo, bato mosusu oyo bayikaki mpiko na mikakatano oyo ekokani ata te na oyo ya Hizikiya bakanisaka ete basengeli “kosilikela Yehova” to kosilikela ebongiseli na ye. (Masese 19:3) Basusu bakanisaka ete lokola bakolá na libota oyo makambo ezalaki malamu te, bakoki kozala na bizaleli mabe to kozongela mabunga ya baboti na bango. (Ezekiele 18:2, 3) Kasi makanisi wana ezali solo?

10 Bomoi ya Hizikiya emonisi ete eyano na motuna wana ezali “te”! Tosengeli ata moke te kosilikela Yehova. Ye te moto abimiselaka bato makambo ya mabe. (Yobo 34:10) Ezali solo ete baboti bakoki koteya bana na bango kosala malamu to mabe. (Masese 22:6; Bakolose 3:21) Kasi yango elimboli te ete libota oyo touti nde ekosala ete tókóma na bomoto boye to boye. Mpo na nini? Mpo Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, elingi koloba, likoki ya kopona kosala malamu to mabe. (Kolimbola Mibeko 30:19) Ndenge nini Hizikiya asalelaki likabo wana kitoko?

Bilenge mingi bandimaka solo ata soki bauti na libota ya ndenge nini (Talá paragrafe 9, 10)

11. Nini esalaki ete Hizikiya azala moko ya bakonzi malamu mpenza ya Yuda?

11 Atako tata na ye azalaki moko ya bakonzi mabe ya Yuda, Hizikiya akómaki moko ya bakonzi malamu mpenza. (Tángá 2 Bakonzi 18:5, 6.) Alandaki ndakisa mabe ya tata na ye te. Aponaki nde koyoka na likebi basakoli ya Yehova, na ndakisa Yisaya, Mika, mpe Hosea. Atyaki likebi mingi na toli na bango mpe  andimaki básembola ye. Yango esalisaki ye abongisa makambo mingi oyo tata na ye abebisaki. Apɛtolaki tempelo, asɛngaki Nzambe alimbisa masumu ya bato ya ekólo na ye, mpe alongolaki bikeko na ekólo mobimba. (2 Ntango 29:1-11, 18-24; 31:1) Na nsima, ntango Senakeribe, mokonzi ya Asiri alukaki kobundisa Yerusaleme, Hizikiya amonisaki mpiko mpe kondima makasi. Atyaki motema ete Yehova akobatela ye mpe alendisaki bato ya ekólo na ye. (2 Ntango 32:7, 8) Na eleko moko boye, Hizikiya akómaki na lolendo, kasi ntango Yehova asembolaki ye, amikitisaki. (2 Ntango 32:24-26) Tomoni polele ete Hizikiya azali ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda. Atikaki te ete makambo ya libota na ye ebebisa bomoi na ye. Amonisaki nde ete azalaki moninga ya Yehova.

12. Lokola Hizikiya, ndenge nini bato mingi lelo oyo bamonisi ete bazali baninga ya Yehova?

12 Mokili ya lelo etondi na bato ya nko mpe oyo balinganaka te, mpe bana mingi bazali kokola kozanga baboti oyo balingaka bango mpe bakipaka bango. (2 Timote 3:1-5) Atako bakristo mingi lelo oyo bautá na mabota oyo makambo ezalaki malamu te, baponaki kokóma baninga ya Yehova. Lokola Hizikiya, bamonisi ete ezali makambo ya libota te nde esalaka ete moto akóma moto malamu to moto mabe na mikolo ezali koya. Nzambe apesá biso bonsomi ya kopona, mpe tokoki kopona kosalela ye mpe kokumisa ye, lokola Hizikiya.

“TALÁ! NAZALI MOOMBO YA YEHOVA!”

13, 14. Mpo na nini mokumba oyo Maria azwaki ekokaki komonana mpasi mingi, kasi eyano nini apesaki anzelu Gabriele?

13 Bambula mingi nsima ya eleko ya Hizikiya, elenge mwasi moko ya komitikisa na nkombo Maria akómaki moninga ya Yehova na ndenge oyo ekeseni na bato mosusu, mpe azwaki mokumba oyo moto mosusu azwaki te. Asengelaki kozwa zemi, kobota, mpe kobɔkɔla Mwana ya Nzambe! Yehova asengelaki kolinga Maria mpe kotyela ye motema mpo apesa ye lokumu monene ndenge wana. Kasi Maria asalaki nini ntango ayebaki mokumba na ye mpo na mbala ya liboso?

“Talá! Nazali moombo ya Yehova!” (Talá paragrafe 13, 14)

14 Mbala mingi, tolobelaka lokumu monene oyo Maria azwaki. Kasi, makambo nini ekokaki mbala mosusu kobangisa ye? Na ndakisa, anzelu Gabriele alobaki ete akozwa zemi kozanga ete asangisa nzoto na mobali. Kasi anzelu yango ayebisaki te bato ya libota ya Maria mpe baoyo bazalaki kofanda zingazinga na ye ndenge akozwa zemi yango. Balingaki kokanisa nini? Ndenge nini akokaki kondimisa Yozefe ete azali sembo epai na ye? Longola yango, azalaki na mokumba monene ya kobɔkɔla Mwana ya Nzambe lokola moto! Toyebi mpenza te makambo nyonso oyo etungisaki  Maria, kasi toyebi oyo asalaki ntango anzelu Gabriele asololaki na ye. Alobaki boye: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.”Luka 1:26-38.

15. Mpo na nini kondima ya Maria ezali kokamwisa?

15 Kondima ya Maria ezali mpenza kokamwisa! Andimaki kosala nyonso oyo basɛngaki ye, lokola kaka elenge mwasi moombo. Atyelaki Yehova motema ete akosalisa ye mpe akobatela ye. Nini esalaki ete Maria azala na kondima makasi ndenge wana? Tobotamaka na kondima te. Kasi tokoki kokóma na kondima soki tokolisi yango mpe tosɛngi Nzambe apambola milende na biso. (Bagalatia 5:22; Baefese 2:8) Maria asalaki makasi mpo na kokómisa kondima na ye makasi. Ndenge nini toyebi yango? Tótalela ndenge oyo azalaki koyoka mpe makambo oyo alobaki.

16. Nini emonisi ete Maria azalaki moyoki malamu?

16 Ndenge oyo Maria azalaki koyoka. Biblia elobi ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Maria azalaki moyoki malamu. Biblia emonisi ete azalaki koyoka na likebi makambo oyo bazalaki koyebisa ye, mingimingi makambo oyo ayekolaki mpo na Yehova. Azalaki kozwa ntango ya komanyola na makambo wana ya ntina. Na ndakisa, ntango Yesu abotamaki, bakɛngɛli ya mpate bayebisaki Maria nsango oyo anzelu apesaki bango. Na nsima, ntango Yesu akómaki na mbula 12, alobaki likambo moko oyo ekamwisaki Maria. Na mbala nyonso wana mibale, Maria azalaki koyoka, komikundola, mpe kokanisa malamumalamu makambo oyo ayokaki.—Tángá Luka 2:16-19, 49, 51.

17. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Maria alobaki?

17 Makambo oyo Maria alobaki. Na Biblia, maloba ya Maria ezali na bisika mingi te. Esika oyo alobi mwa mingi ezali kaka na Luka 1:46-55. Maloba yango emonisi ete Maria ayebaki Makomami ya Ebre malamu mpenza. Na ndenge nini? Maloba ya Maria ezalaki lokola maloba ya libondeli ya Hana, mama ya Samwele. (1 Samwele 2:1-10) Emonani lokola ete Maria azongelaki maloba ya mokapo yango mbala soki 20. Tomoni polele ete Maria azalaki kosepela kolobela mateya ya solo oyo ayekolaki epai ya Yehova, moninga oyo aleki baninga nyonso.

18. Na makambo nini tokoki komekola kondima ya Maria?

18 Lokola Maria, ntango mosusu, Yehova akoki kopesa biso mikumba oyo tokanisi ete ezali mpasi mpo tókokisa yango. Na yango, tómekola ndakisa ya Maria, na komikitisa nyonso tóndima mokumba yango, mpe tótyela Yehova motema ete akosalisa biso. Tokoki mpe komekola kondima ya Maria soki tozali koyoka Yehova na likebi mpe komanyola na makambo oyo toyekoli mpo na ye mpe mikano na ye. Na nsima, na esengo nyonso, tokoki koyebisa basusu makambo oyo toyekoli.Nzembo 77:11, 12; Luka 8:18; Baroma 10:15.

19. Soki tomekoli bandakisa ya kondima makasi oyo Biblia elobeli, tokoki kondimisama na nini?

19 Emonani polele ete Ruta, Hizikiya, mpe Maria bazalaki baninga ya Yehova, kaka lokola Abrahama. Bazalaki mpe na kati ya ‘lipata monene ya batatoli’ oyo bazwá mpe libaku ya kokóma baninga ya Nzambe. Tiká ete tókoba komekola bandakisa wana ya kondima makasi. (Baebre 6:11, 12) Soki tosali bongo, tokoki kozela mbano ya kozala baninga ya Yehova libela na libela!