Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

Kobá kosalela Yehova na esengo

Kobá kosalela Yehova na esengo

OZALI koyeba lisusu mokolo oyo oyokaki esengo mingi koleka na bomoi na yo? Ezalaki nde mokolo oyo obalaki, to mokolo oyo mwana na yo ya liboso abotamaki? To mokolo oyo ozwaki batisimo? Na ntembe te, yango ezalaki mokolo ya ntina mingi mpe ya esengo na bomoi na yo. Mokolo yango, bandeko basepelaki komona ndenge omonisaki ete olingaka Nzambe na motema na yo mobimba, na molimo na yo mibimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso!Marko 12:30.

Kozanga ntembe, oyokaka esengo mingi ndenge ozali kosalela Yehova banda ozwá batisimo. Nzokande, basakoli mingi bazali lisusu te na esengo oyo bazalaki na yango na ebandeli. Mpo na nini? Wapi bantina oyo esengeli kotinda biso tókoba kosalela Yehova na esengo?

MPO NA NINI BASUSU BABUNGISÁ ESENGO NA BANGO?

Nsango ya Bokonzi epesaka biso esengo mingi. Mpo na nini? Mpo Yehova alaki ete etikali moke Bokonzi na ye esukisa mokili oyo mabe mpe etya mokili ya sika ya Nzambe. Sefania 1:14 elobi: “Mokolo monene ya Yehova ekómi pene. Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza.” Kasi soki tozali komona lokola ete ezali koumela, tokoki kobungisa esengo oyo tozalaki na yango na ebandeli. Yango ekoki kotinda biso tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe.Masese 13:12.

Ntango tolekisaka ntango elongo na bandeko na biso, tolendisamaka mpo tókoba kosalela Yehova na esengo. Ekoki kozala ete etamboli malamu ya basaleli ya Yehova nde ebendaki biso na losambo ya solo mpe esalisaki biso tósalela Nzambe na esengo. (1 Petro 2:12) Kasi, nini ekoki kosalema soki ndeko na biso moko azwi etumbu mpo aboyaki kotosa mibeko ya Nzambe? Yango ekoki kolɛmbisa basusu na lisangá mpe kosala ete bábungisa esengo na bango.

Mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili ekoki mpe kobungisa esengo na biso. Na ndenge nini? Mokili ya Satana elukaka kondimisa biso tósomba biloko oyo tosengeli na yango mpenza te. Na yango, tosengeli kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Matai 6:24) Tokoki te kosalela Yehova na esengo mpe kaka na ntango yango koluka kozwa biloko nyonso oyo mokili ekoki kopesa biso.

ESENGO NA MOSALA YA YEHOVA

Kosalela Yehova ezali mokumba ya kilo te mpo na baoyo balingaka ye. (1 Yoane 5:3) Kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ  mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30) Kozala mokristo ya solo epemisaka mpe epesaka biso esengo. Ya solo, tozali na bantina mingi ya kozala na esengo na mosala ya Yehova. Tótalela bantina misato kati na yango.Habakuku 3:18.

Tosalelaka mopesi ya bomoi, oyo azali Nzambe ya esengo. (Misala 17:28; 1 Timote 1:11) Toyebi ete tosengeli kopesa bomoi na biso epai ya Mozalisi na biso. Na yango, tókoba kosalela ye na esengo, ata soki tosali bambula mingi banda tozwá batisimo.

Kokanisa elikya ya Bokonzi mpe kosala mingi na mosala ya Nzambe esalisaka ndeko Héctor abatela esengo na ye

Tózwa ndakisa ya ndeko Héctor, oyo asalelaki Yehova lokola mokɛngɛli-motamboli mbula 40. Ata “na ntango ya nsuki mpɛmbɛ,” azali kaka kosalela Yehova na esengo. (Nzembo 92:12-14) Maladi ya mwasi na ye esalaki ete asala lisusu mingi te na mosala ya Nzambe, kasi ndeko Héctor abatelaki kaka esengo na ye. Alobi boye: “Atako ezali mpasi komona ndenge maladi ezali kosilisa mwasi na ngai nzoto mokemoke mpe ezali pɛtɛɛ te mpo na kobatela ye, natikaka nzela te ete yango ebungisa esengo na ngai ntango nazali kosalela Nzambe ya solo. Koyeba ete napesá bomoi na ngai epai ya Yehova, oyo akelá moto mpo na mokano moko boye, ezali ntina monene ya kolinga ye makasi mpe kosalela ye na motema mobimba. Nasalaka makasi nasakolaka mingi, mpe nasalaka nyonso ete nabatela elikya ya Bokonzi na makanisi mpo nabungisa esengo na ngai te.”

Yehova apesá mbeka ya lisiko; yango epesi biso likoki ya kozala na bomoi ya esengo. Ya solo, “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Ya solo, masumu na biso ekoki kolimbisama mpe tokoki kozala na bomoi ya seko soki tomonisi kondima na mbeka ya lisiko oyo Nzambe apesá. Yango ezali ntina monene oyo tosengeli kozala na botɔndi! Mpe botɔndi na biso mpo na lisolo ekotinda biso tósalela Yehova na esengo.

Ndeko Jesús akómisá bomoi na ye pɛpɛlɛ mpe asalelaki Yehova na esengo na boumeli ya bambula ebele

Ndeko moko na nkombo Jesús, oyo afandaki na Mexique, alobaki ete: “Nazalaki moombo ya mosala na ngai; ntango mosusu nazalaki kosala mosala mbala mitano, ata soki ezali ngala na ngai te. Nazalaki kosala bongo kaka mpo na kozwa mbongo mingi. Na nsima, nayekolaki makambo ya Yehova mpe ndenge oyo apesaki Mwana na ye ya bolingo mpo na bato. Nakómaki na mposa makasi ya kosalela ye. Yango wana, namipesaki epai ya Yehova, mpe nsima ya kosala na kompanyi moko mbula 28, nazwaki ekateli ya kotika mosala mpe nabandaki mosala ya ntango nyonso.” Wana nde ndenge oyo ndeko Jesús abandaki kosalela Yehova na esengo.

Tozali pɛto na bizaleli, mpe yango epesaka biso esengo. Ozali koyeba lisusu ndenge bomoi na yo ezalaki liboso oyeba Yehova? Ntoma Paulo akundwelaki bakristo ya Roma ete ‘bazalaki baombo ya lisumu’ kasi bakómaki “baombo ya boyengebene.” Lokola bazalaki na bomoi ya pɛto, bakokaki kozala  na elikya ya bomoi ya seko. (Baroma 6:17-22) Biso mpe tolandaka mitinda ya Yehova, yango wana tosikolami na mpasi oyo eutaka na etamboli ya mbindo to bomoi ya mobulu. Yango epesaka biso esengo.

“Bambula oyo nazali na esengo mingi na bomoi na ngai ezali bambula oyo nalekisi na kosalela Yehova.”—Ndeko Jaime

Tózwa ndakisa ya ndeko Jaime, oyo azalaki kondima te ete Nzambe azalaka, azalaki kondima liteya ya evolisyo, mpe azalaki kosala lisano ya makɔfi (boxe). Ndeko Jaime abandaki koyangana na makita ya lisangá mpe akamwaki mingi na bolingo oyo akutaki na lisangá. Mpo na kotika bomoi na ye ya kala, ndeko Jaime asengelaki kosɛnga Yehova asalisa ye andimela ye. Alobi boye: “Mokemoke, nayebaki ete ezali na Tata moko ya bolingo mpe Nzambe oyo alimbisaka. Kotosa mitinda ya sembo ya Yehova ebatelaki ngai. Soki nabongwanaki te, ntango mosusu mbɛlɛ babomá ngai, lokola baninga na ngai mosusu ya kala oyo nazalaki kosala na bango lisano ya makɔfi. Bambula oyo nazali na esengo mingi na bomoi na ngai ezali bambula oyo nalekisi na kosalela Yehova.”

KOTIKA TE!

Tosengeli komiyoka ndenge nini lokola tozali kozela nsuka ya mokili oyo mabe? Tóbosana te ete tozali kosala mokano ya Nzambe mpe tozali kozela bomoi ya seko. “Yango wana, tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.” (Bagalatia 6:8, 9) Na lisalisi ya Yehova, tóyika mpiko, tósala makasi mpo na kokolisa bizaleli oyo tosengeli na yango mpo tóbika na ‘bolɔzi monene,’ mpe tókoba kosalela Yehova na esengo.Emoniseli 7:9, 13, 14; Yakobo 1:2-4.

Tokoki kozala na elikya ete Yehova akopesa biso mbano ndenge tozali koyika mpiko mpo ayebi mosala oyo tozali kosala mpe bolingo oyo tomoniseli ye mpe nkombo na ye. Soki tokobi kosalela ye na esengo, tokozala lokola Davidi mokomi ya nzembo, oyo alobaki: “Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso. Lokola ye azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te. Na yango, motema na ngai ezali kosepela, mpe nkembo na ngai elingi kozala na esengo. Lisusu, nzoto na ngai ekofanda na kimya.”Nzembo 16:8, 9.