Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

Yekolá epai ya basaleli ya sembo ya Yehova

Yekolá epai ya basaleli ya sembo ya Yehova

“Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?”MIKA 6:8.

NZEMBO: 63, 43

1, 2. Ndenge nini Davidi amonisaki ete azali sembo epai ya Nzambe? (Talá elilingi ya ebandeli.)

SAULO ná basoda na ye 3 000 bazalaki koluka Davidi na esobe ya Yuda mpo na koboma ye. Kasi mokolo moko na butu, Davidi ná bato na ye bamonaki esika oyo Saulo ná basoda na ye batyaki kaa na bango. Bakutaki bango nyonso balali, yango wana Davidi ná Abishai bakatisaki basoda malɛmbɛ mpe bakómaki esika Saulo azalaki. Abishai ayebisaki Davidi na mongongo ya nse: “Tiká ngai nabaka ye na mabele kaka mbala moko na likɔnga, nakosala yango mbala mibale te.” Kasi Davidi alingaki te kotika ye aboma Saulo. Alobaki na Abishai: “Koboma ye te, mpo nani asembolá lobɔkɔ na ye likoló ya moto oyo Yehova atye mafuta kozanga ete azwa likambo?” Na nsima, Davidi alobaki: “Na kotalela likanisi ya Yehova, nakoki kokanisa ata moke te ete nasembolela moto oyo Yehova atye mafuta lobɔkɔ na ngai!”1 Samwele 26:8-12.

2 Davidi ayebaki oyo asengelaki kosala mpo na kozala sembo  epai ya Yehova. Ayebaki ete asengeli komemya Saulo, mpe akanisaki ata moke te kosala ye mabe. Mpo na nini? Mpamba te Nzambe aponaki Saulo mpo azala mokonzi ya Yisraele. Lelo oyo, kaka ndenge ezalaki na ntango ya kala, Yehova alingi ete basaleli na ye nyonso bázala sembo epai na ye mpe bátosa bato oyo ye apesi bokonzi.Tángá Mika 6:8.

3. Ndenge nini Abishai azalaki sembo epai ya Davidi?

3 Abishai azalaki komemya Davidi mpo ayebaki ete Nzambe aponaki Davidi azala mokonzi. Kasi nsima ya kokóma mokonzi, Davidi asalaki masumu minene. Asangisaki nzoto na mwasi ya Uriya, na nsima ayebisaki Yoabe abomisa Uriya na etumba. (2 Samwele 11:2-4, 14, 15; 1 Ntango 2:16) Yoabe azalaki ndeko ya Abishai, yango wana ekoki kozala ete Abishai ayokaki likambo oyo Davidi asalaki; atako bongo akobaki komemya ye. Longola yango, Abishai azalaki mokonzi ya basoda mpe akokaki kosalela bokonzi na ye mpo na komikómisa mokonzi; kasi asalaki yango te. Asalelaki nde Davidi mpe abatelaki ye mpo banguna básala ye mabe te.2 Samwele 10:10; 20:6; 21:15-17.

4. (a) Ndenge nini Davidi azali ndakisa na likambo etali kozala sembo epai ya Nzambe? (b) Bandakisa nini mosusu tokotalela?

4 Davidi azalaki sembo epai ya Yehova bomoi na ye mobimba. Ntango azalaki elenge, abomaki engambe Goliate oyo azalaki kofinga Yehova mpe Bayisraele. (1 Samwele 17:23, 26, 48-51) Ntango Davidi azalaki mokonzi, Natane, mosakoli ya Yehova, asengelaki kosembola ye mpo na masumu oyo asalaki. Na mbala moko andimaki ete asalaki lisumu mpe abongolaki motema. (2 Samwele 12:1-5, 13) Na nsima, ntango Davidi akómaki mobange, apesaki ebele ya biloko ya motuya oyo esalisaki mpo na kotonga tempelo ya Yehova. (1 Ntango 29:1-5) Ezali polele ete atako Davidi asalaki masumu minene na bomoi na ye, atikaki soki moke te kozala sembo epai ya Nzambe. (Nzembo 51:4, 10; 86:2) Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya Davidi mpe bato mosusu ya ntango wana, mpe tokomona ndenge oyo tokoki kozala sembo epai ya Yehova koleka epai ya bato mosusu nyonso. Tokolobela mpe bizaleli mosusu oyo ekosalisa biso tósala bongo.

OKOZALA SEMBO EPAI YA YEHOVA?

5. Liteya nini tozwi na libunga ya Abishai?

5 Ntango Abishai alingaki koboma Saulo, azalaki koluka ete azala sembo epai ya Davidi. Kasi, lokola Davidi ayebaki ete ekozala malamu te kosala “moto oyo Yehova atye mafuta” mabe, atikaki te Abishai aboma mokonzi. (1 Samwele 26:8-11) Yango eteyi biso likambo moko ya ntina mingi: Soki esɛngi ete tópona soki tokozala sembo epai ya nani, tosengeli kokanisa mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na likambo yango.

Kozala sembo epai ya Yehova ezali na ntina mingi koleka kozala sembo epai ya moto mosusu nyonso

6. Atako ezali mabe te kozala sembo epai ya baninga na biso to bato ya libota na biso, mpo na nini tosengeli kokeba?

6 Ezali mabe te kozala sembo epai ya bato oyo tolingaka, na ndakisa baninga na biso to bato ya libota na biso. Kasi lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki komikosa. (Yirimia 17:9) Yango wana, soki  moto moko oyo tolingaka azali kosala likambo moko ya mabe mpe atiki solo, tosengeli kobosana te ete kozala sembo epai ya Yehova ezali na ntina mingi koleka kozala sembo epai ya moto mosusu nyonso.Tángá Matai 22:37.

7. Ndenge nini ndeko mwasi moko atikalaki sembo epai ya Nzambe ntango akutanaki na likambo ya mpasi?

7 Soki moto moko na libota na bino abimisamaki na lisangá, okoki komonisa ete ozali sembo epai ya Yehova. Na ndakisa, mokolo moko, mama ya ndeko Anne, oyo abimisamá na lisangá abengaki Anne na telefone mpo na koyebisa ye ete azali na mposa aya kotala ye. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Mama ya Anne alobaki ete azalaki na esengo ata moke te mpo bato ya libota na ye bazalaki lisusu kolobisa ye te. Koyoka bongo esalaki ndeko Anne mpasi na motema, mpe azongisaki ete akoyanola ye na nzela ya mokanda. Liboso ya kokoma mokanda yango, ndeko Anne amanyolaki na mitinda mosusu ya Biblia. (1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 9-11) Na nsima, na kati ya mokanda, alimbwelaki mama na ye na boboto ete ye moto akataki boyokani na libota ntango asalaki lisumu mpe aboyaki kobongola motema. Ndeko Anne ayebisaki mama na ye ete lolenge kaka moko oyo akoki kozongela esengo na ye ezali soki azongeli Yehova.Yakobo 4:8.

8. Bizaleli nini ekosalisa biso tózala sembo epai ya Nzambe?

8 Basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya Davidi bazalaki mpe na komikitisa, na boboto, mpe na mpiko. Tótalela ndenge oyo bizaleli wana ekoki kosalisa biso tózala sembo epai ya Yehova.

TOSENGELI KOZALA NA KOMIKITISA

9. Mpo na nini Abinere alukaki koboma Davidi?

9 Yonatane mwana ya Saulo, mpe Abinere mokonzi ya basoda ya Yisraele, bamonaki ntango Davidi ayaki na motó ya Goliate epai ya Saulo. Yonatane akómaki moninga ya Davidi mpe atikalaki sembo epai na ye. (1 Samwele 17:57–18:3) Kasi Abinere atikalaki sembo epai ya Davidi te. Kutu, na nsima asalisaki Saulo, oyo azalaki koluka koboma Davidi. (1 Samwele 26:1-5; Nzembo 54:3) Ezala Yonatane to Abinere bayebaki ete Nzambe alingaki ete Davidi azala mokonzi ya mibale ya Yisraele. Kasi nsima ya liwa ya Saulo, Abinere apesaki Davidi mabɔkɔ te. Alukaki nde kokómisa Ishi-boshete, mwana ya Saulo, mokonzi. Na nsima, ekoki kozala ete Abinere  alingaki ete ye moko akóma mokonzi, mpe mbala mosusu ezali mpo na yango nde asangisaki nzoto na moko ya basi ya Mokonzi Saulo. (2 Samwele 2:8-10; 3:6-11) Mpo na nini ndenge oyo Yonatane azalaki kotalela Davidi ekesanaki na ndenge oyo Abinere azalaki kotalela ye? Ezali mpo Yonatane azalaki sembo epai ya Yehova mpe azalaki na komikitisa, kasi Abinere te.

10. Mpo na nini Abisalome azalaki sembo epai ya Nzambe te?

10 Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi, azalaki sembo epai ya Nzambe te, mpo azalaki na komikitisa te. Azalaki na mposa ya kozala mokonzi, yango wana azwaki “likalo moko, ná bampunda mpe azwaki bato ntuku mitano (50) bápotaka mbangu liboso na ye.” (2 Samwele 15:1) Andimisaki mpe Bayisraele mingi mpo bázala sembo epai na ye. Alukaki kutu koboma tata na ye, atako ayebaki ete Yehova akómisaki Davidi mokonzi ya Yisraele.2 Samwele 15:13, 14; 17:1-4.

11. Mateya nini tokoki kozwa na lisolo ya Abinere, ya Abisalome, mpe ya Baruke?

11 Soki moto azali na komikitisa te mpe alingi ete akóma na bokonzi mingi, ezali mpasi atikala sembo epai ya Nzambe. Ezali solo ete tolingaka Yehova, mpe tolingi te koluka matomba na biso moko mpe kozala mitema mabe lokola Abinere ná Abisalome. Kasi tosengeli kokeba ete tókóma te kolinga mbongo mingi to kolinga kaka mosala moko ya lokumu mingi. Yango ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Na ntango moko boye, Baruke, sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia, akómaki na mposa ya biloko oyo azalaki na yango te mpe azalaki lisusu te na esengo ya kosalela Nzambe. Na nsima, Yehova alobaki na Baruke: “Talá! Oyo natongá nazali kobuka yango, mpe oyo naloná nazali kopikola yango, ɛɛ, mokili mobimba. Kasi yo ozali kokoba koluka makambo minene mpo na yo. Kokoba koluka yango te.” (Yirimia 45:4, 5) Baruke ayokelaki Yehova. Biso mpe tolingi koyokela Yehova, mpo etikali moke aboma mokili oyo mabe.

Soki osɛngi ndeko akende koluka lisalisi epai ya bankulutu, okomonisela ye boboto mpe okozala sembo epai ya Yehova

12. Monisá ndenge oyo tokoki te kozala sembo epai ya Nzambe soki tozali koluka matomba na biso moko.

12 Daniel, ndeko moko ya Mexique, asengelaki kopona epai ya nani akozala sembo. Alingaki kobala mwana mwasi moko oyo azalaki kosambela Yehova te. Ndeko Daniel alobi: “Nakobaki kokomela ye mikanda ata nsima ya kokɔta na eteyelo ya babongisi-nzela.” Kasi na nsima, asosolaki  ete azalaki kaka koluka matomba na ye moko. Azalaki sembo epai ya Yehova te, mpe esengelaki azala na komikitisa. Na yango, ayebisaki nkulutu moko ya makoki likambo ya mwana mwasi yango. Ndeko Daniel alimboli: “Nkulutu yango asalisaki ngai namona ete soki nazali sembo epai ya Nzambe, nasengeli kotika kokomela mwana mwasi yango mikanda. Nsima ya kobondela mingi mpe na mai ya miso, nasalaki yango. Eumelaki te, esengo na ngai na mosala ya kosakola ebakisamaki.” Sikoyo, ndeko Daniel azali na mwasi oyo alingaka Yehova, mpe ye moko azali mokɛngɛli ya zongazonga.

KOZALA SEMBO EPAI YA NZAMBE ESALISAKA BISO TÓZALA NA BOBOTO

Soki oyebi ete moninga na yo asali lisumu moko monene, okosolola na ye mpe okosala nyonso mpo azwá lisalisi epai ya bankulutu? (Talá paragrafe 14)

13. Ntango Davidi asalaki lisumu, ndenge nini Natane atikalaki sembo epai ya Nzambe mpe epai ya Davidi?

13 Soki tozali sembo epai ya Yehova, tokoki mpe kozala sembo epai ya basusu mpe kosalisa bango na lolenge oyo eleki malamu. Mosakoli Natane atikalaki sembo epai ya Yehova, azalaki mpe sembo epai ya Davidi. Ntango Davidi azwaki mwasi ya bato mpe abomisaki mobali na ye, Yehova atindaki Natane mpo apesa Davidi toli. Natane azalaki na mpiko mpe atosaki Yehova. Kasi, azalaki mpe na bwanya mpe alobaki na Davidi na boboto. Azalaki na mposa ya kosalisa Davidi amona ete masumu na ye ezalaki minene. Yango wana, abɛtelaki ye lisolo ya mozwi moko oyo ayibaki mwana mpate kaka moko ya mobola moko. Ntango Davidi ayokaki yango, asilikaki makasi mpo na likambo oyo mozwi wana asalaki. Na nsima, Natane alobaki na ye: “Moto yango nde yo!” Davidi asosolaki ete asaleli Yehova lisumu.2 Samwele 12:1-7, 13.

14. Ndenge nini okoki kozala sembo epai ya Yehova mpe epai ya baninga to bandeko ya libota?

14 Yo mpe okoki kozala sembo libosoliboso epai ya Yehova na nsima epai ya bato mosusu soki ozali na boboto. Na ndakisa, okoki kozala na bilembeteli ete ndeko moko asali lisumu ya monene. Okoki kozala na mposa ete otikala sembo epai na ye, mingimingi soki azali moninga na yo ya motema to moto ya libota na yo. Kasi, oyebi mpe ete kozala sembo epai ya Yehova ezali na ntina mingi koleka. Na yango, lokola Natane, tosá Yehova kasi zalá na boboto epai ya ndeko na yo. Yebisá ye ete asengeli kosɛnga bankulutu básalisa ye mpe asengeli kosala yango na lombangu. Soki asali yango te, yo osengeli koyebisa bankulutu likambo yango. Soki osali bongo, okotikala sembo epai ya Yehova. Okomonisa mpe ete ozala na boboto epai ya ndeko na yo mpo bankulutu bakoki kosalisa ye azala lisusu na boyokani malamu elongo na Yehova. Bakosembola ye na kimya mpe na boboto.Tángá Balevi 5:1; Bagalatia 6:1.

TOSENGELI NA MPIKO MPO TÓZALA SEMBO EPAI YA NZAMBE

15, 16. Mpo na nini Hushai asengelaki na mpiko mpo na kozala sembo epai ya Nzambe?

15 Hushai azalaki moko ya baninga ya sembo ya Mokonzi Davidi. Ntango bato balingaki  kokómisa Abisalome mokonzi, Hushai asengelaki na mpiko mpo na kotikala sembo epai ya Davidi mpe epai ya Nzambe. Ayebaki ete Abisalome ayaki na Yerusaleme na basoda na ye mpe ete Davidi akimaki. (2 Samwele 15:13; 16:15) Kasi Hushai asalaki nini? Asundolaki nde Davidi mpe apesaki Abisalome mabɔkɔ? Te. Atako Davidi akómaki mobange mpe bato mingi balingaki koboma ye, Hushai atikalaki sembo epai na ye mpo Yehova atyaki Davidi mokonzi. Yango wana, Hushai akendaki na Ngomba ya Olive mpo na kokutana na Davidi.2 Samwele 15:30, 32.

16 Davidi asɛngaki Hushai azonga na Yerusaleme mpe amimonisa lokola moninga ya Abisalome mpo andimisa Abisalome ayoka toli na ye na esika ya koyoka toli ya Ahitofele. Hushai azalaki na mpiko mpe atyaki bomoi na ye na likama mpo na kotosa Davidi mpe kotikala sembo epai ya Yehova. Davidi abondelaki Yehova asalisa Hushai mpe esalemaki bongo. Abisalome ayokelaki Hushai na esika ya koyokela Ahitofele.2 Samwele 15:31; 17:14.

17. Mpo na nini tosengeli na mpiko mpo na kozala sembo?

17 Tosengeli na mpiko mpo na kotikala sembo epai ya Yehova mpe kotosa ye na esika ya kosala oyo bato ya libota na biso, baninga na biso ya mosala, to bakonzi ya Leta balingi tósala. Na ndakisa, ndeko Taro oyo afandaka na Japon, banda ntango azalaki mwana moke, asalaki nyonso oyo ekoki mpo na kosepelisa baboti na ye. Azalaki kotosa bango mpe azalaki sembo epai na bango, kaka te mpo asengelaki kosala yango, kasi mpo azalaki kolinga bango. Kasi ntango abandaki koyekola elongo na Batatoli ya Yehova, baboti na ye balingaki kopekisa ye. Yango epesaki ye mawa, mpe ezalaki mpasi mingi mpo ayebisa bango ete azwi ekateli ya koyangana na makita. Ndeko Taro alobi boye: “Bazalaki na nkanda makasi, yango wana esalaki bambula mingi, bazalaki kolinga te naya kotala bango na ndako. Nabondelaki mpo nazala na mpiko ya kokangama na ekateli na ngai. Lelo oyo bakitisá mitema, mpe nakoki kokende kotala bango mbala na mbala.”Tángá Masese 29:25.

18. Boyekoli oyo esalisi yo na nini?

18 Lokola Davidi, Yonatane, Natane, mpe Hushai, tokoki kozala na esengo ya koyeba ete tozali sembo epai ya Yehova. Tolingi soki moke te kozala lokola Abinere mpe Abisalome, oyo bazalaki sembo te. Ezali solo ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Kasi, tiká tómonisa Yehova ete kozala sembo epai na ye ezali likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso.

^ [1] (paragrafe 7) Bankombo mosusu ezali ya bango te.