Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

 LISOLO YA BOMOI

Yehova asalisi ngai na mosala na ye

Yehova asalisi ngai na mosala na ye

Nayebisaki mokonzi ya basoda ete nakɔtaki bolɔkɔ liboso mpo naboyaki kokende na etumba. Natunaki ye: “Bolingi lisusu kokɔtisa ngai na bolɔkɔ?” Wana ezalaki mbala ya mibale balingaki kotinda ngai na mosala ya soda na États-Unis.

NABOTAMAKI na 1926, na engumba Crooksville, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Tozalaki bana mwambe. Tata ná mama bazalaki kosambela te, kasi bazalaki kotinda biso bana nyonso tókendaka losambo. Nakómaki kosambela na Lingomba ya Metodiste. Ntango nazalaki na mbula 14, pastɛrɛ apesaki ngai libonza mpo na mbula mobimba nazangisaki losambo ata mokolo moko te ya lomingo.

Margaret Walker (ndeko mwasi ya mibale kobanda na lobɔkɔ ya mwasi) asalisaki ngai nayeba solo

Kaka na ntango wana, Margaret Walker, mama moko Motatoli ya Yehova oyo azalaki kofanda pene na biso, abandaki koya kotala mama na ngai mpe kosolola na ye masolo ya Biblia. Mokolo moko, nasepelaki kolanda masolo na bango. Kasi lokola mama akanisaki ete nakotungisa ye ntango azali koyekola, ayebisaki ngai nabima libándá. Nabimaki, kasi, na mosika, nazalaki kaka kolanda masolo na bango. Mama Margaret akobaki kaka koya, mpe mokolo moko atunaki ngai boye: “Oyebi nkombo ya Nzambe?” Nayanolaki: “Moto nyonso ayebi yango—nkombo na ye Nzambe.” Alobaki: “Zwá Biblia na yo mpe fungolá na Nzembo 83:18.” Ntango nafungolaki, namonaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Nakimaki mbangu epai ya baninga na ngai mpe nayebisaki bango: “Ntango bokozonga ndako na mpokwa, bótánga Nzembo 83:18 na Biblia mpe bokoyeba soki nkombo ya Nzambe ezali nani.” Ndenge bomoni, nabandaki kopesa litatoli mbala moko.

Nayekolaki Biblia mpe nazwaki batisimo na 1941. Eumelaki te, bapesaki ngai mokumba ya kotambwisa boyekoli ya mokanda na lisangá. Nalendisaki mama ná bandeko na ngai báyaka, mpe bango nyonso bazalaki koya na boyekoli ya mokanda oyo nazalaki kotambwisa. Kasi tata azalaki kosepela te.

BOTƐMƐLI NA NDAKO

Bapesaki ngai mikumba mosusu na lisangá, mpe nakómaki na babuku ebele ya Batatoli ya Yehova. Mokolo moko tata alakisaki babuku na ngai mpe alobaki: “Omoni mikanda wana nyonso? Nalingi komona yango lisusu na ndako oyo te; yo mpe nalingi komona yo lisusu awa te.” Nalongwaki na ndako mpe nakendaki kofanda na Zanesville, engumba moko ya pembeni, kaka na etúká ya Ohio, kasi nazalaki koya kotala libota mpo na kolendisa bango.

Tata azalaki kopekisa mama kokende makita. Mikolo mosusu, soki mama abimi mpo na kokende makita, azalaki kolanda ye mbangu, kokanga ye, mpe kozongisa  ye na ndako. Kasi mama azalaki kobima na porte mosusu mpe kokende makita. Nayebisaki mama ete: “Kobanga te. Akolɛmba kokima mbangu mpo na kolanda yo.” Nsukansuka, tata alɛmbaki, mpe mama akómaki koyangana na makita nyonso.

Ntango Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebandaki na 1943, nabandaki kosala masolo na lisangá na biso. Toli oyo nazalaki kozwa nsima ya masolo na ngai na eteyelo yango esalisaki ngai nakóma molobi malamu.

NABOYI KOKƆTA NA ETUMBA

Na 1944, na ntango ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba, balingaki kotinda ngai na mosala ya soda. Babengisaki ngai na Fort Hayes, esika basoda bazwaka formasyo, na Columbus, na etúká ya Ohio, mpe kuna basalaki ngai baekzamɛ mpo na koyeba soki nazali nzoto makasi mpe natondisaki baformilɛrɛ. Ntango nayebisaki bakonzi ya basoda ete nakokóma soda te, bayebisaki ngai nazonga ndako. Kasi nsima ya mwa mikolo, soda moko ayaki koluka ngai na ndako, mpe alobaki na ngai: “Corwin Robison, batindi ngai nakanga yo.”

Na nsima ya pɔsɔ mibale, nakendaki na tribinale mpe kuna zuzi alobaki na ngai boye: “Soki ezalaki kaka mpo na ngai, nalingaki kokatela yo etumbu ya bomoi mobimba. Ozali na likambo ya koloba?” Nayanolaki: “Mokonzi, nasengeli kotyama na molɔngɔ ya bateyi ya Liloba ya Nzambe. Nateyaka na porte ya moto nyonso, mpe nasakolaka nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato ebele.” Zuzi mokonzi ayebisaki bazuzi mosusu boye: “Bozali awa te mpo na kokata soki mwana mobali oyo azali moteyi ya Liloba ya Nzambe to te. Bozali awa nde mpo na kokata soki asengeli kokende mosala ya soda to te.” Ekokaki ata miniti ntuku misato te, bazuzi nyonso bakweisaki ngai na likambo. Bakatelaki ngai etumbu ya mbula mitano ya bolɔkɔ na Ashland, na etúká ya Kentucky.

YEHOVA ABATELI NGAI NA BOLƆKƆ

Nalekisaki bapɔsɔ mibale ya liboso na bolɔkɔ ya Columbus, na etúká ya Ohio. Mokolo ya liboso, nazalaki kaka na kati ya mwa shambre oyo batyaki ngai. Nabondelaki Yehova boye: “Nakokoka te kosala mbula mitano na mwa shambre oyo. Nayebi te nasala nini.”

Mokolo oyo elandaki, bakɛngɛli ya bolɔkɔ batikaki ngai nabima libándá. Napusanaki pene na moto moko ya bolɔkɔ, engambe mobali moko ya mapeka milai, mpe totɛlɛmaki mpo na kotala na fɛnɛtrɛ. Mobali yango atunaki ngai: “Moto ya mokuse, ozali awa mpo na nini?” Nayanolaki: “Nazali Motatoli ya Yehova.” Atunaki lisusu: “Ozali nani? Bongo mpo na nini ozali awa?” Nayanolaki: “Batatoli ya Yehova bakendaka na bitumba te mpe babomaka bato te.” Abakisaki: “Batye yo na bolɔkɔ mpo oboyi koboma bato. Batye bato mosusu na bolɔkɔ mpo bazali koboma bato. Likambo ya boye ezalaka?” Nalobaki: “Ezalaka te.”

Na nsima alobaki: “Nalekisi mbula 15 na bolɔkɔ mosusu, mpe kuna natángaki mikanda na bino.” Ntango nayokaki bongo, nabondelaki: “Yehova, salisá ngai mpo moto oyo akóma na ngámbo na ngai.” Kaka na ntango wana, mobali yango, oyo nkombo na ye ezalaki Paul, alobaki: “Soki moto moko asimbi yo, yebisá ngai. Ngai moko nakolandela ye.” Na yango, ntango  nyonso oyo nazalaki kuna, nazwaki likambo te na bato ya bolɔkɔ 50 oyo bazalaki na eteni wana.

Nazalaki kati ya Batatoli oyo bakɔtaki bolɔkɔ na Ashland, Kentucky, mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili

Ntango bakonzi batindaki ngai na bolɔkɔ ya Ashland, kuna, nakutaki bandeko mosusu oyo bakɔmeli na elimo. Basalisaki ngai ná bandeko mosusu tótikala penepene na Yehova. Bazalaki kokabolela biso mikapo ya kotánga na Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, mpe tozalaki kobongisa mituna mpe biyano mpo na makita oyo tozalaki kobenga Banzoi ya Biblia. Tozalaki na shambre moko ya monene, oyo ezalaki na bambeto pene na bifelo. Ndeko moko azalaki na mokumba ya kokabolela biso teritware. Azalaki koyebisa ngai: “Robison, teritware na yo ezali kobanda mbeto oyo tii mbeto oyo kuna. Moto nyonso oyo azali na mbeto wana azali na teritware na yo. Salá nyonso opesa ye litatoli liboso abima na bolɔkɔ.” Kosala bongo ezalaki kosalisa biso tósakola na molɔngɔ.

MAKAMBO OYO NAKUTAKI NTANGO NABIMAKI NA BOLƆKƆ

Etumba ya mibale ya mokili mobimba esilaki na 1945, kasi ngai natikalaki na bolɔkɔ mwa moke na nsima. Nazalaki komitungisa mpo na libota na ngai mpamba te tata ayebisaki ngai: “Soki nalongi kosukisa yo, ekozala mpasi te mpo na basusu.” Ntango nabimaki na bolɔkɔ, likambo moko ya malamu ezalaki kozela ngai. Bato 7 ya libota na ngai bazalaki koyangana na makita mpe ndeko na ngai moko ya mwasi azwaki batisimo, atako tata azalaki kotɛmɛla bango.

Na mosala ya kosakola elongo na ndeko Demetrius Papageorge, moko ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo abandaki kosalela Yehova na 1913

Ntango Etumba ya Corée ebandaki na 1950, bayebisaki ngai nakɔta mosala ya soda mpo na mbala ya mibale. Babengaki ngai lisusu na Fort Hayes. Nsima ya komeka makoki na ngai, mokonzi moko ya basoda ayebisaki ngai: “Ozali makasi koleka bato mingi awa.” Nalobaki: “Ezali malamu, kasi nakokende mosala ya soda te.” Nazongelaki maloba ya 2 Timote 2:3 mpe nalobaki: “Nasilá kokóma soda ya Kristo.” Afandaki nyɛɛ mwa ntango, na nsima alobaki: “Okoki kokende.”

Mwa moke na nsima, nakɔtaki likita mpo na bato oyo balingi kosala na Betele, na liyangani ya Cincinnati, na etúká ya Ohio. Ndeko Milton Henschel ayebisaki biso ete na Betele basengeli na bandeko mibali oyo balingi kosala mingi na mosala ya Bokonzi. Natondisaki formilɛrɛ mpo na kosala na Betele, mpe bandimaki ngai. Nabandaki kosala na Betele ya Brooklyn na sanza ya mwambe 1954, mpe kobanda wana nazali kaka na Betele.

Nazalaka kaka na makambo ebele ya kosala na Betele. Na boumeli ya bambula mingi, nasalaki na masini ya kokómisa mai mɔtɔ oyo ezalaki na imprimeri mpe oyo ezalaki na esika oyo babiro ezalaki, nazalaki kobongisa bamasini mpe bafungola. Nazalaki mpe kosala na Ndako ya mayangani na engumba New York.

Liboso ya masini ya kokómisa mai mɔtɔ esika babiro ezalaki, na Betele ya Brooklyn

Nasepelaka mingi na bibongiseli ya Betele, na ndakisa kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota ya Betele, mpe mosala ya kosakola na lisangá. Soki okanisi malamu, okomona ete wana nyonso ezali makambo oyo mabota nyonso ya Batatoli ya Yehova esengeli kosalaka mbala na mbala. Soki baboti ná bana na bango bazali kotalela mokapo ya mokolo elongo, kosala Losambo  na kati ya libota mbala na mbala, kopesa biyano na makita ya lisangá, mpe kosakola nsango malamu na molende, na ntembe te, bato nyonso na libota bakotikala penepene na Yehova.

Nazwá baninga mingi na Betele mpe na lisangá. Basusu bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bakendá likoló. Basusu bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo te. Kasi basaleli ya Yehova nyonso, ezala bandeko ya libota ya Betele, bazali bato ya kozanga kokoka. Soki nazali na mwa matata na ndeko moko, mbala mingi, nasalaka makasi nazongisa kimya. Nakanisaka Matai 5:23, 24 mpe ndenge oyo tosengeli kosilisa matata na biso. Ezalaka pɛtɛɛ te koloba “Limbisá ngai!” kasi matata mingi esilaka soki tolobi bongo.

MATOMBA OYO MOSALA NA NGAI EBIMISI

Lelo oyo, ezali mpasi nakende kosakola ndako na ndako mpo nzoto elɛmbi; kasi natikaka te. Nayekolá monɔkɔ ya Chinois Mandarin mwa moke mpe nasepelaka mingi kopesa ba Chinois litatoli na balabala. Mikolo mosusu na ntɔngɔ, nakabolaka bazulunalo 30 to 40 epai ya bato oyo basepeli.

Nazali kopesa ba Chinois litatoli na Brooklyn, New York

Nasalaki kutu bozongeli ya sika na moto moko na Chine. Mokolo moko, elenge mwasi moko oyo azalaki kokabola bapapye ya piblisite ya bambuma oyo batɛkaka asɛkisaki ngai mwa moke. Ngai mpe nasɛkisaki ye mwa moke mpe nalakisaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na Chinois. Azwaki yango, mpe ayebisaki ngai ete nkombo na ye Katie. Kobanda wana, mbala nyonso oyo Katie azalaki komona ngai, azalaki koya kosolola na ngai. Nalakisaki ye nkombo ya bambuma mpe ndunda na Lingelesi; soki nalakisi ye nkombo moko, azalaki kozongela yango. Nalimbolelaki ye mpe bavɛrsɛ ya Biblia, mpe andimaki kozwa buku Biblia eteyaka. Kasi nsima ya mwa bapɔsɔ, azalaki komonana lisusu te.

Basanza mingi na nsima, nalakisaki bazulunalo na elenge mwasi mosusu oyo azalaki kokabola bapapye ya piblisite ya bambuma oyo batɛkaka, mpe andimaki kozwa yango. Na pɔsɔ oyo elandaki, apesaki ngai telefone na ye mpe alobaki: “Sololá na moto moko na Chine.” Nalobaki: “Nayebani na moto moko te na Chine.” Kasi atingamaki, yango wana nazwaki telefone mpe nalobaki: “Alô, ngai Robison.” Mongongo ya moto moko eyanolaki: “Robby, ezali ngai Katie. Nazongá na Chine.” Natunaki: “Na Chine?” Katie ayanolaki: “Ɛɛ. Robby, oyebi mwana mwasi oyo apesi yo telefone? Azali ndeko na ngai. Oteyaki ngai makambo mingi ya malamu. Nasɛngi yo oteya ye ndenge oteyaki ngai.” Nalobaki: “Katie, nakosala nyonso oyo nakoki. Matɔndi ndenge osalisi ngai nayeba esika ozali.” Mwa moke na nsima, namonanaki lisusu te na ndeko ya Katie mpo tósolola. Ezala esika nini bana basi wana mibale bazali sikoyo, nazali na elikya ete bazali koyekola makambo mosusu mpo na Yehova.

Nasaleli Yehova na boumeli ya mbula 73, mpe nazali na esengo ndenge asalisi ngai nakɔta na makambo ya mokili te mpe natikala sembo na bolɔkɔ. Longola yango, bandeko na ngai bayebisaka ngai ete balendisamaki ndenge nalongaki botɛmɛli ya tata kozanga ete nalɛmba. Nsukansuka, mama ná bandeko na ngai mibali mpe basi 6 bazwaki batisimo. Ata tata abongolaki makanisi mwa moke, mpe akómaki koyangana na makita mosusu liboso ete akufa.

Soki ezali mokano ya Nzambe, bandeko na ngai ya libota mpe baninga na ngai oyo bakufá bakozonga na bomoi na mokili ya sika. Kanisá esengo oyo tokozala na yango ya kosambela Yehova libela na libela elongo na bato oyo tolingaka! *—Talá maloba na nse ya lokasa.

^ par. 32 Ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo, ndeko Corwin Robison akufaki; azalaki sembo epai ya Yehova.