Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2016

Yehova abengaki ye “moninga na ngai”

Yehova abengaki ye “moninga na ngai”

“Yo, ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai, ee Yakobo, oyo naponá, momboto ya Abrahama moninga na ngai.”YISAYA 41:8.

NZEMBO: 91, 22

1, 2. (a) Ndenge nini toyebi ete bato bakoki kokóma baninga ya Nzambe? (b) Na lisolo oyo, tokolobela nini?

KOBANDA ntango tobotami tii ntango tokokufa, tozalaka na mposa ete bálinga biso. Bato bazalaka na mposa ya baninga ya motema oyo balingaka bango, kasi te kaka lolango to bolingo ya basi ná mibali. Kasi, tozalaka na mposa ya bolingo ya Yehova. Bato mingi bandimaka te ete bato bakoki kokóma baninga ya motema ya Nzambe mpo amonanaka te mpe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi, biso toyebi ete ezali bongo te!

2 Biblia eyebisi biso ete bato mosusu bakómaki baninga ya Nzambe. Tosengeli kozwa mateya na ndakisa na bango. Mpo na nini? Mpo kozala moninga ya Nzambe ezali mokano moko ya ntina mingi oyo tosengeli komityela na bomoi na biso. Tótalela sikoyo ndakisa ya Abrahama. (Tángá Yakobo 2:23.) Ndenge nini akómaki moninga ya Nzambe? Boninga ya Abrahama ná Nzambe eutaki na kondima oyo Abrahama  azalaki na yango, mpo ayebanaki lokola “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.” (Baroma 4:11) Ntango ozali kotalela ndakisa na ye, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komekola kondima ya Abrahama mpe kokómisa boninga na ngai ná Yehova makasi?’

NDENGE NINI ABRAHAMA AKÓMAKI MONINGA YA YEHOVA?

3, 4. (a) Likambo nini ezalaki komekama eleki monene mpo na kondima ya Abrahama? (b) Mpo na nini Abrahama andimaki kopesa Yisaka mbeka?

3 Meká komona na makanisi Abrahama, oyo azali na mbula soki 125, azali komata ngomba malɛmbɛmalɛmbɛ. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Nsima na ye, mwana na ye Yisaka, oyo azali na mbula soki 25. Yisaka amemi nkoni ya kopelisa mɔtɔ mpe Abrahama asimbi mbeli ná biloko mosusu oyo asengeli na yango mpo na kopelisa mɔtɔ. Mbala mosusu yango ezalaki mobembo oyo elekaki mpasi na bomoi ya Abrahama. Kasi, yango ezalaki te mpo akómaki mokóló. Azalaki naino na makasi mingi. Kutu, mobembo yango ezalaki mpasi mpo Yehova asɛngaki ye apesa mwana na ye mbeka!Ebandeli 22:1-8.

Abrahama atosaki Nzambe bitosela te, elingi koloba, kozanga ete akanisa

4 Na ntembe te, yango ezalaki komekama eleki monene mpo na kondima ya Abrahama. Bato mosusu balobaka ete Nzambe azali motema mabe ndenge asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye lokola mbeka. Mpe basusu balobaka ete Abrahama alingaki kosala bongo mpo azalaki kolinga mwana na ye te. Bato balobaka bongo mpo bazali na kondima te mpe bayebi te soki kondima ya solosolo ezali nini to ndenge oyo yango esalaka. (1 Bakorinti 2:14-16) Kasi Abrahama atosaki Nzambe bitosela te, elingi koloba, kozanga ete akanisa. Atosaki mpo azalaki na kondima ya solosolo. Ayebaki ete Yehova akokaki soki moke te kosɛnga ye asala likambo moko oyo ekopesa ye mpasi mpo na libela. Abrahama ayebaki ete soki atosi, Yehova akopambola ye mpe mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi. Abrahama asengelaki na nini mpo azala na kondima makasi ndenge wana? Asengelaki kozala na boyebi mpe kokutana na makambo ebele na bomoi.

5. Mbala mosusu, na nzela ya nani Abrahama eyebaki makambo ya Yehova, mpe boyebi yango etindaki ye asala nini?

 5 Boyebi. Abrahama akolaki na engumba babengi Ure. Na engumba yango, bato bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, ezala mpe tata na ye. (Yosua 24:2) Kasi ndenge nini Abrahama ayebaki Yehova? Biblia emonisi ete Seme, mwana ya Noa, azalaki moko ya bankɔkɔ ya Abrahama. Seme azalaki na bomoi tii ntango Abrahama akómaki na mbula soki 150. Seme azalaki na kondima makasi; kozanga ntembe, ayebisaki bato ya libota na ye makambo ya Yehova. Toyebi mpenza te, kasi ekoki kozala ete Abrahama ayebaki Yehova na nzela na ye. Makambo oyo Abrahama ayekolaki etindaki ye alinga Yehova, mpe boyebi yango esalisaki ye akóma na kondima makasi.

6, 7. Ndenge nini makambo oyo Abrahama akutanaki na yango ekómisaki kondima na ye makasi?

6 Makambo oyo akutanaki na yango. Makambo nini Abrahama akutanaki na yango, oyo ekómisaki kondima na ye makasi? Balobaka ete makanisi etindaka moto abimisa mayoki mpe mayoki etindaka moto asala likambo. Makambo oyo Abrahama ayekolaki mpo na Nzambe esimbaki motema na ye, mpe etindaki ye azala na limemya makasi mpo na “Yehova Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Oyo abimisá likoló ná mabele.” (Ebandeli 14:22) Biblia ebengi limemya makasi ndenge wana ‘ezaleli ya kobanga Nzambe.’ (Baebre 5:7) Mpo na kozala moninga ya motema ya Nzambe, tosengeli kozala na ezaleli ya kobanga ye. (Nzembo 25:14) Ezaleli yango nde etindaki Abrahama atosa Yehova.

7 Nzambe ayebisaki Abrahama ná Sara ete bálongwa na Ure mpe bákende na mboka mopaya. Bazalaki lisusu bilenge te, kasi basengelaki kofanda na bahema bomoi na bango mobimba. Atako Abrahama ayebaki ete bakokutana na makama mingi, azalaki na ekateli ya kotosa Yehova. Lokola azalaki na botosi, Nzambe apambolaki ye mpe abatelaki ye. Na ndakisa, ntango balingaki kobɔtɔla ye Sara, mwasi na ye ya kitoko, mpe ntango balingaki koboma Abrahama, Yehova abatelaki bango nyonso mibale na ndenge ya likamwisi mbala mingi. (Ebandeli 12:10-20; 20:2-7, 10-12, 17, 18) Makambo wana ekómisaki kondima ya Abrahama makasi.

8. Ndenge nini tokoki kozwa boyebi mpe koyeba makambo mosusu oyo ekoki kokómisa boninga na biso na Yehova makasi?

8 Tokoki kozala baninga ya motema ya Yehova? Ɛɛ! Lokola Abrahama, tosengeli koyekola makambo ya Yehova. Biso mpe tokoki kokóma na boyebi mpe  komikundola makambo oyo Yehova asalelá biso na bomoi. Lelo oyo, tozali na boyebi mingi koleka Abrahama. (Danyele 12:4; Baroma 11:33) Biblia etondi na boyebi ya “Oyo abimisá likoló ná mabele.” Makambo oyo toyekolaka esalisaka biso tólinga Yehova mpe tómemya ye mingi. Bolingo mpe limemya yango mpo na Nzambe etindaka biso tótosa ye. Ntango tosalaka bongo, tomonaka ndenge abatelaka mpe apambolaka biso, mpe yango esalisaka biso tóyeba makambo mingi oyo ekómisaka kondima na biso makasi. Soki tozali kosalela Yehova na motema mobimba, tokosepela, tokozala na kimya mpe na esengo. (Nzembo 34:8; Masese 10:22) Soki tokómi na boyebi ya Yehova mingi mpe tozali komikundola makambo oyo asalelaka biso, boninga na biso na ye ekokóma makasi mpenza.

NDENGE OYO ABRAHAMA ABATELAKI BONINGA NA YE NA NZAMBE

9, 10. (a) Esɛngaka nini mpo boninga ekóma makasi? (b) Nini emonisi ete Abrahama azalaki kozwa na motuya mingi boninga na ye na Yehova mpe kobatela yango?

9 Boninga ya solosolo ezali lokola eloko moko ya motuya. (Tángá Masese 17:17.) Ezali te lokola mbɛki ya ntalo mingi, oyo batyaka na ndako kaka mpo ekómisa ndako kitoko. Ezali nde lokola fololo ya kitoko, oyo esɛngaka kosopelaka yango mai mpe kobatela yango mpo ekola malamu. Abrahama azalaki kozwa na motuya mingi boninga na ye na Yehova mpe kobatela yango. Ndenge nini azalaki kosala yango?

Boninga ezali lokola fololo ya kitoko, oyo esɛngaka kosopelaka yango mai mpe kobatela yango mpo ekola malamu

10 Abrahama akobaki kokolisa ezaleli na ye ya kobanga Nzambe mpe botosi na ye. Na ndakisa, nzelanzela, ntango ye ná libota na ye mpe basaleli na ye bazalaki kokende na Kanana, atikaki ete Yehova akoba kotambwisa ye na bikateli oyo azalaki kozwa, ezala ya minene to ya mike. Mbula moko liboso ete Yisaka abotama, ntango Abrahama azalaki na mbula 99, Yehova ayebisaki ye akata mibali nyonso ya ndako na ye ngenga. Abrahama atyelaki nde Yehova ntembe to alukaki nde koboya kosala likambo oyo Yehova asɛngaki ye? Te, atyelaki Yehova motema mpe atosaki “kaka na mokolo yango.”Ebandeli 17:10-14, 23.

11. Mpo na nini Abrahama azalaki komitungisa mpo na Sodoma ná Gomora, mpe ndenge nini Yehova asalisaki ye?

11 Lokola Abrahama azalaki kotosa Yehova ntango nyonso, ata na makambo ya mikemike, boninga na bango ekómaki lisusu makasi. Amonaki ete akokaki koyebisa Yehova likambo nyonso, ata mpe kosɛnga ete asalisa ye ntango azalaki kobundana na makambo ya mpasi. Na ndakisa, ntango Yehova alobaki ete alingi kobebisa Sodoma ná Gomora, Abrahama atungisamaki. Mpo na nini? Azalaki kobanga ete bato malamu bákufa nzela moko na bato mabe. Mbala mosusu azalaki kobanga mpo na Lota, mwana ya ndeko na ye, ná libota na ye, oyo bazalaki kofanda na Sodoma. Abrahama azalaki kotyela Yehova, “Mosambisi ya mabele mobimba” motema, yango wana na komikitisa nyonso ayebisaki Yehova makambo  oyo ezalaki kotungisa ye. Yehova amoniselaki moninga na ye Abrahama motema molai mpe amonisaki ete alimbisaka. Yehova alimbolaki ete ata ntango azali kopesa etumbu, alukaka bato malamu mpe abikisaka bango.Ebandeli 18:22-33.

12, 13. (a) Ndenge nini boyebi ya Abrahama mpe makambo oyo akutanaki na yango esalisaki ye na nsima? (b) Nini emonisi ete Abrahama azalaki kotyela Yehova motema?

12 Emonani polele ete boyebi nyonso oyo Abrahama azalaki na yango mpe makambo oyo akutanaki na yango esalisaki ye akómisa boninga na ye na Yehova makasi. Yango wana, na nsima, ntango Yehova asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye mbeka, ayebaki ete Yehova azalaka ntango nyonso na motema molai, alimbisaka, abongi kotyelama motema, mpe abatelaka. Abrahama azalaki na kondima ete Yehova akoki te kobongwana na mbalakaka mpo na kokóma makambo makasimakasi! Mpo na nini tolobi bongo?

13 Liboso ya kotika basaleli na ye, Abrahama alobaki boye: “Bino bótikala awa ná mpunda, kasi ngai ná mwana tozali kokende kuna kosambela mpe tokozongela bino.” (Ebandeli 22:5) Abrahama alingaki koloba nini? Azalaki nde kokosa ntango alobaki ete akozonga ná Yisaka, nzokande ayebaki ete akopesa ye mbeka? Te. Biblia elobi ete Abrahama ayebaki ete Yehova azalaki na likoki ya kosekwisa Yisaka uta na bakufi. (Tángá Baebre 11:19.) Abrahama ayebaki ete Yehova apesaki ye ná mwasi na ye Sara makoki ya kobota mwana, atako bakómaki mikóló mingi. (Baebre 11:11, 12, 18) Na yango, ayebaki ete ezali na eloko moko te oyo Yehova akoki kosala te. Abrahama ayebaki mpenza te nini esengelaki kosalema mokolo wana. Kasi azalaki na kondima ete, soki esengeli, Yehova akokaki kosekwisa mwana na ye mpo ete bilaka nyonso ya Nzambe ekokisama. Yango wana, Abrahama abengami “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.”

Abrahama azalaki na kondima ete, soki esengeli, Yehova akokaki kosekwisa mwana na ye mpo ete bilaka nyonso ya Nzambe ekokisama

14. Mikakatano nini ozali kokutana na yango ntango ozali kosalela Yehova, mpe ndenge nini ndakisa ya Abrahama ekoki kosalisa yo?

14 Kasi lelo oyo, Yehova asɛngaka biso te tópesa bana na biso mbeka, kasi asɛngaka biso tótosa mibeko na ye. Ntango mosusu tokoki te kokanga ntina ya mibeko yango to ekoki kozala mpasi tótosa yango. Esilá kokómela yo? Mpo na basusu, mosala ya kosakola ezali mpasi. Mbala mosusu bazali bato ya nsɔninsɔni mpe bakokaka te kosolola na bato oyo bayebi bango te. Basusu babangaka komonana ete bakeseni na bato mosusu na mosala to na eteyelo. (Kobima 23:2; 1 Batesaloniki 2:2) Soki basɛngi yo osala likambo moko oyo ezali makasi, kanisá ndakisa monene ya kondima mpe ya mpiko ya Abrahama. Soki tozali komanyola na ndakisa ya mibali mpe basi ya sembo, yango ekoki kotinda biso tómekola bango mpe tópusana lisusu penepene na Moninga na biso, Yehova.Baebre 12:1, 2.

 BONINGA OYO EMEMAKA MAPAMBOLI

15. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Abrahama ayokaki mawa soki moke te mpo na botosi mpe bosembo na ye epai ya Yehova?

15 Abrahama ayokaki nde mawa ndenge atosaki mitinda ya Yehova? Biblia elobi ete Abrahama “akufaki nsima ya kozala na bomoi moko ya malamu mpe ya molai, anuni, atondi na mikolo.” (Ebandeli 25:8) Ntango akómaki na mbula 175, mbala mosusu Abrahama akanisaki bomoi na ye ya molai mpe asepelaki ndenge atondaki na mikolo. Mpo na nini? Mpo boninga na ye na Yehova ezalaki ntango nyonso eloko oyo elekaki ntina mpo na ye. Kasi, ntango totángaka ete Abrahama ‘anunaki, atondaki na mikolo,’ yango elimboli te ete azalaki lisusu te na mposa ya bomoi na mikolo ezali koya.

16. Makambo nini ekosepelisa Abrahama na Paradiso?

16 Biblia elobi ete Abrahama “azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.” (Baebre 11:10) Abrahama azalaki kondima ete mokolo mosusu akomona engumba yango, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, ezali koyangela mabele. Mpe akomona yango! Kanisá esengo oyo Abrahama akozala na yango ya kozala na bomoi na paradiso awa na mabele mpe kokoba kokómisa makasi boninga na ye ná Nzambe. Akozala na esengo ya koyeba ete ndakisa ya kondima na ye esalisaki basaleli ya Nzambe na boumeli ya bankóto ya bambula! Na paradiso, akoyeba ete mbeka na ye na Ngomba Moria ezalaki elilingi ya likambo moko ya monene koleka. (Baebre 11:19) Akoyeba mpe ndenge mpasi oyo ayokaki ntango azalaki komibongisa mpo na kopesa mwana na ye Yisaka mbeka esalisaki bamilio ya bato ya sembo báyeba mpasi oyo Yehova ayokaki ntango apesaki Mwana na ye, Yesu Kristo, lokola lisiko mpo na bato. (Yoane 3:16) Ndakisa ya Abrahama esalisi biso nyonso tókóma lisusu na botɔndi mingi mpo na lisiko, likambo eleki monene oyo emonisi bolingo ya Yehova!

17. Ekateli nini ozwi, mpe tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

17 Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya komekola kondima ya Abrahama. Lokola ye, tosengeli na boyebi mpe na mateya oyo tozwaka na makambo oyo tokutanaka na yango. Soki tokobi koyekola makambo ya Yehova mpe kotosa ye, tokomona ndenge akopambola biso mpe akobatela biso. (Tángá Baebre 6:10-12.) Tiká ete Yehova azala moninga na biso libela na libela! Na lisolo oyo elandi, tokotalela bandakisa mosusu misato ya bato ya sembo oyo bakómaki baninga ya motema ya Nzambe.

^ [1] (paragrafe 3) Na ebandeli, Abrahama ná Sara bazalaki kobengama Abrama ná Sarai. Kasi na lisolo oyo, tokosalela bankombo oyo Yehova apesaki bango na nsima.