Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  No 5 2016

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Yesu azalaki moto ya solo?

Yesu azalaki moto ya solo?

AZALAKI mozwi te, moto monene mpe te. Azalaki kutu na ndako ya ye moko te. Kasi mateya na ye esalisá bamilio ya bato. Yesu Kristo azalaki moto ya solo? Bakomi ya kala mpe ya lelo balobi nini?

  • Michael Grant, moto moko ya istware oyo ayekolaka makambo etali bomoi ya bato ya kala alobaki boye: “Soki totaleli Testama ya Sika na kotatela mibeko oyo tolandaka mpo na makomi mosusu ya kala, moto moko te akoboya ete Yesu azalaki moto ya solo, ndenge kaka toboyaka te ete bapakano oyo balobelami na babuku mosusu bazalaki bato ya solo.”

  • Rudolf Bultmann, profesɛrɛ moko oyo ayekolaka makambo etali Testama ya Sika, alobaki boye: “Koboya kondima ete Yesu azalaki moto ya solo ezali na ntina te mpe ezangi motó ná makolo. Moto moko te ya makanisi malamu akoki kotya ntembe ete Yesu nde azali mobandisi ya lingomba oyo bamonisi na yango ya liboso ezalaki bakristo ya kala na Palestine.”

  • Will Durant, moto ya istware, mokomi mpe filozofe, akomaki boye: “Soki mpenza mwa bato moke [bakomi ya Baevanzile], oyo bazalaki bato mpamba babimisaki na makanisi na bango moko moto oyo azalaki na bomoto ya kokamwa, na bizaleli malamu, moto ya lokumu malamu mpe amonaka ete bato nyonso bazali mpenza bandeko, elingaki kozala likamwisi oyo eleki kutu makamwisi oyo Baevanzile elobelá.”

  • Albert Einstein, Moyuda oyo abotamaki na Allemagne mpe azalaki moto ya fiziki, alobaki boye: “Nazali Moyuda, kasi soki natali makambo moto wana ya Nazarete asalá, natikalaka monɔkɔ polele.” Ntango batunaki ye soki atalelaka Yesu lokola moto ya solo, ayanolaki: “Ntembe ezali te! Moto moko te akoki kotánga Baevanzile kozanga komona ete Yesu azali wana. Liloba nyonso ya Baevanzile emonisaka bomoto na ye. Lisapo ezalaka bongo te.”

    “Moto moko te akoki kotánga Baevanzile kozanga komona ete Yesu azali wana.”—Albert Einstein

 ISTWARE EMONISI NINI?

Na Biblia, Baevanzile nde elobeli likambo mokomoko etali bomoi mpe mosala ya Yesu; Baevanzile yango ebengami na bankombo ya bakomi na yango—Matai, Marko, Luka ná Yoane. Lisusu, mwa mikanda mosusu ya kala elobeli Yesu.

  • TACITE

    (Kobanda mobu 56 tii 120 ya ntango na biso) Batalelaka Tacite lokola moko ya bato minene ya istware ya Baroma. Makomi na ye elobeli ampire ya Roma kobanda mobu 14 tii 68 ya ntango na biso. (Yesu akufaki na mobu 33 ya ntango na biso) Tacite akomaki ete ntango mɔtɔ makasi ezikisaki Roma na mobu 64 ya ntango na biso, balobaki ete Amperɛrɛ Néron nde apelisaki yango. Kasi Tacite akomaki ete mpo “nungunungu yango esila,” Néron alobaki ezali bakristo. Na nsima Tacite alobaki: “Nkombo wana ya bakristo, eutá na Kristo, oyo guvɛrnɛrɛ Ponsi Pilate apesaki nzela báboma na ntango ya boyangeli ya Tibere.”Annales, XV, 44.

  • SUÉTONE

    (Kobanda mobu 69 tii 122 ya ntango na biso) Na buku na ye (The Lives of the Caesars), Moroma yango, moto ya istware akomaki makambo oyo esalemaki na boumeli ya boyangeli ya baamperɛrɛ 11 ya liboso ya Roma. Eteni oyo elobeli Claudius (Klode) emonisi yikiyiki oyo ekɔtaki epai ya Bayuda na Roma, oyo ekoki kozala ete ebimaki mpo na Yesu. (Misala 18:2) Suétone akomaki boye: “Lokola koswana ya Bayuda mpo na Kristo ezalaki kobimisa mobulu ntango nyonso, ye [Claudius] abenganaki bango na Roma.” (The Deified Claudius, XXV, 4) Atako alobaki ete mobulu ezalaki kobima mpo na Yesu, Suétone atyaki ntembe te ete Yesu azalaki moto ya solo.

  • PLINE LE JEUNE

    (Kobanda mobu 61 tii 113 ya ntango na biso) Mokomi yango Moroma mpe mokambi ya Bitinia (oyo lelo ekómá Turquie), akomelaki amperɛrɛ Trajan ya Roma mpo na ndenge ya kosalela bakristo ya etúká yango makambo. Pline alobaki ete amekaki kotinda bakristo na makasi ete báwangana kondima na bango mpe azalaki koboma mokristo nyonso oyo aboyi kosala bongo. Alobaki boye: “Baoyo . . . bazongelaki maloba na ngai ya losambo ya banzambe ya [bapakano] mpe bapesaki vinyo mpe mpaka ya malasi mpo na kosambela ekeko na yo . . . , mpe oyo balakelaki Kristo mabe . . . , Namonaki malamu natika bango bákende.”Pliny—Letters, Book X, XCVI.

  •  JOSÈPHE FLAVIUS

    (Kobanda mobu 37 tii 100 ya ntango na biso) Moyuda yango oyo azalaki nganga-nzambe mpe moto ya istware alobaki ete Anasi, nganga-nzambe monene oyo amikɔtisaki mpe na makambo ya politiki “abengaki bazuzi ya Sanedrina mpe amemaki liboso na bango mobali moko na nkombo Yakobo, ndeko ya Yesu oyo bazalaki kobenga Kristo.”Antiquités judaïques, XX, 200.

  • TALMUD

    Makomi ya Barabi oyo bazalaki Bayuda mpe bakomaki yango kobanda siɛklɛ ya misato tii ya motoba ya ntango na biso. Makomi yango emonisi ete ata banguna ya Yesu bandimaki ete azalaki moto ya solo. Esika moko na buku yango elobi ete na “mokolo ya pasika Yesu moto ya Nazarete akakisamaki na nzete,” mpe istware endimi likambo yango. (Talmud ya Babilone, Sanedrina 43a, Codex ya Munich; talá Yoane 19:14-16.) Esika mosusu elobi: “Tóbota te mwana to moyekoli oyo amisambwisaka na miso ya bato lokola Monazarete”—ndenge mbala mingi bazalaki kobenga Yesu.—Talmud ya Babilone, Berachoth 17b, maloba na nse ya lokasa, Codex ya Munich; talá Luka 18:37.

MAKAMBO OYO BIBLIA EMONISI

Baevanzile elobeli malamumalamu bomoi mpe mosala ya Yesu, ata mpe makambo mikemike etali bato, bisika mpe ntango—makambo nyonso oyo emonisaka istware ya solo. Ndakisa moko ezali na Luka 3:1, 2, oyo esalisaka tóyeba ntango mpenza oyo mobali moko na nkombo Yoane mobatisi, oyo abongiselaki Yesu nzela, abandaki mosala na ye.

“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”2 Timote 3:16

Luka akomaki: “Na mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibere Kaisala, ntango Ponse Pilate azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Erode azalaki moyangeli ya etúká ya Galile, kasi Filipe ndeko na ye azalaki moyangeli ya etúká ya mokili ya Iturea mpe ya Trakonitise, mpe Lisaniasi moyangeli ya etúká ya Abilene, na mikolo ya nganga-nzambe mokonzi Anasi mpe ya Kaifa, liloba ya Nzambe eyelaki Yoane mwana ya Zekaria na esobe.” Liste yango etángi makambo mikemike oyo esalisi biso tómona ete “liloba ya Nzambe eyelaki Yoane” na mobu 29 ya ntango na biso.

 Bato ya istware bayebi bato nsambo oyo Luka atángi. Kasi, na ntango moko boye, bato mosusu bazalaki kotya ntembe ete Ponse Pilate ná Lisaniasi bazali bato ya solo te. Bato yango bakangamaki monɔkɔ ntango bato ya mayele bamonaki makomi ya kala oyo ezalaki na bankombo ya bakonzi yango mibale, yango emonisaki ete Luka alobaki solo. *

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Yesu ateyaki bato na ntina etali Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya mokili mobimba

Koyeba soki Yesu azalaki moto ya solo ezali na ntina mpo mateya na ye ezali na ntina. Na ndakisa, Yesu ateyaki bato ndenge ya kozala na bomoi ya esengo mpenza. * Lisusu, Yesu alakaki ete bato bakofanda na kimya mpenza ntango guvɛrnema moko ya mokili mobimba ekoyangela bango, guvɛrnema oyo ebengami “bokonzi ya Nzambe.”Luka 4:43.

Ebengeli “Bokonzi ya Nzambe” ebongi mpenza mpo guvɛrnema yango ya mokili mobimba ekomonisa bokonzi ya Nzambe awa na mabele. (Emoniseli 11:15) Yesu amonisaki likambo yango polele ntango alobaki boye na libondeli ya ndakisa: “Tata na biso na likoló, . . . Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema . . . na mabele.” (Matai 6:9, 10) Bolamu nini Bokonzi yango ekomemela bato? Tótala makambo oyo elandi:

Bato mosusu bakoki kotalela bilaka yango lokola ndɔtɔ ya baba. Kasi kondimela milende ya bato ezali ndɔtɔ ya baba te? Tózwa ndakisa: Atako bato bakolisi mayele na makambo ya kelasi, siansi mpe tekinoloji, bamilio ya bato lelo bazali na kimya te mpe bazali komitungisa mpenza mpo na avenire. Mpe mokolo na mokolo tomonaka ndenge ekonomi, politiki mpe mangomba enyokolaka bato, bakisa mpe lokoso ná kanyaka. Mpo na koloba solo, boyangeli ya bato elongi te!Mosakoli 8:9.

Na mokuse, ebongi mpenza tóluka koyeba soki Yesu azalaki moto ya solo. * Ndenge 2 Bakorinti 1:19, 20 elobi: “Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, ekómi ‘Ɛɛ’ na nzela na ye [Kristo].”

^ par. 23 Bamonaki likomi oyo ezali na nkombo ya tétrarque to “moyangeli ya etúká” na nkombo Lisaniasi. (Luka 3:1) Ayangelaki etúká ya Abilene na ntango mpenza oyo Luka alobeli.

^ par. 25 Ndakisa moko ya mateya kitoko ya Yesu ezali na Matai mokapo 5 tii 7, mbala mingi ebengamaka lisolo likoló ya ngomba.

^ par. 32 Mpo na koyeba makambo mosusu etali Yesu mpe mateya na ye, kende na www.jw.org mpe talá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

Soki Biblia eutá na Nzambe, esengeli kokesana na buku mosusu nyonso oyo ekomamá.

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Lisekwa ya Yesu—Esalemaki mpenza?

Nini endimisi ete masolo ya baevanzile etali Yesu ezali ya solo?