Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  No 3 2016

 TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Ignaz Semmelweis

Ignaz Semmelweis

IGNAZ SEMMELWEIS ayebaná mpenza te, kasi mosala oyo asalá, esalisaka mabota mingi na mikolo na biso. Abotamá na Buda (lelo oyo Budapest) na Hongrie mpe azwaki diplome ya monganga na Iniversite ya Vienne na mobu 1844. Na mobu 1846 akómaki kosunga profesɛrɛ moko na lopitalo monene ya Vienne, epai basi babotaka. Semmelweis akutanaki na mokakatano moko—basi ebele, koleka 13 %, oyo babotaki kuna bakufaki na maladi babengi infection puerpérale nsima ya kobota.

Makanisi ndenge na ndenge epesamaki, kasi bayebaki ntina ya maladi yango kaka te. Mayele nyonso wana ya koluka kokitisa motángo ya basi oyo bazalaki kokufa esimbaki kaka te. Lokola Semmelweis amitungisaki ndenge basi bazalaki kokufa, azwaki ekateli ya koluka esika maladi yango euti mpe koluka nkisi na yango.

Lopitalo oyo Semmelweis azalaki kosala ezalaki na bisika mibale ya kobotisa basi; kasi likambo ya kokamwa, basi bazalaki kokufa mingi nde na esika ya liboso. Bokeseni ezalaki mwa moke: na esika ya liboso bana-kelasi nde bazalaki kobotisa mpe na oyo ya mibale ezalaki basi oyo bamesaná kobotisa. Mpo na nini basi bazalaki kokufa mingi na esika ya liboso? Semmelweis alukaki malamumalamu ayeba eloko nini mpenza ezalaki kobimisa maladi yango, kasi ayebaki kaka te.

Na ebandeli ya mobu 1847, Semmelweis akutanaki na likambo moko ya mpasi mpenza. Moninga na ye ya mosala mpe ya motema, Jakob Kolletschka akufaki mpo ntango azalaki kokanga mpota ya mwasi moko oyo autaki kobota, lokola makila ya mwasi yango ezalaki na maladi, maladi yango ezwaki ye. Ntango atángaki lapolo ya ekzamɛ oyo basalaki ebembe ya Kolletschka, Semmelweis amonaki ete makambo mosusu oyo emonani na lapolo wana ekokani na oyo ya basi oyo bakufaka na infection puerpérale. Semmelweis akanisaki ete ntango mosusu, ezali na eloko moko oyo ye abengaki yango “pwazɔ” eutaka na bibembe  nde ezwaka basi ya zemi, mpe epesaka bango infection puerpérale. Minganga ná bana-kelasi, oyo mbala na mbala basalaka bibembe ekzamɛ liboso bákende na esika oyo basi babotaka, kozanga koyeba, bamemelaka bamama maladi ntango basalaka bango baekzamɛ to babotisaka bango! Basi bazalaki kokufa mingi te na esika ya mibale mpo bana-kelasi oyo babandaki koyekola epai ya basi oyo babotisaka bazalaki kosala bibembe ekzamɛ te.

Mbala moko Semmelweis alobaki ete liboso ya kosala mwasi ya zemi ekzamɛ esengeli kosukola mabɔkɔ malamu mpe kopakola nkisi ya koboma mikrobe na mabɔkɔ. Makambo oyo emonanaki ekamwisaki: tii na sanza ya minei, basi mingi (18,27 %) bakufaki, mpe tii na nsuka ya mbula kaka basi moke, motángo yango ekitaki makasi mpenza (0,19 %).

“Mokumba na ngai ezali ya kolongola bosɔtɔ nyonso na lopitalo oyo basi babotaka, kobatela mwasi mpo na mobali na ye mpe mama mpo na mwana na ye.”—Ignaz Semmelweis

Kasi, moto nyonso te nde asepelaki na bolongi ya Semmelweis. Makanisi na ye ekesanaki na oyo ya mokonzi na ye mpo na infection puerpérale, mpe mokonzi na ye akómaki komona lokola ete Semmelweis azali kotya ye mpanzi likoló. Nsukansuka, balongolaki Semmelweis na mosala na Vienne mpe azongaki na Hongrie. Kuna azwaki mokumba ya kolandelaka basi ya zemi na lopitalo ya St. Rochus na Pest (Budapest) mpe mayele na ye esalaki ete motángo ya basi oyo bazalaki kokufa na infection puerpérale ekita mpenza (na nse ya 1 %).

Na mobu 1861, Semmelweis abimisaki buku moko (The Cause, Concept, and Prophylaxis of Childbed Fever) oyo elobelaki mosala na ye. Likambo ya mawa, mosala nyonso oyo asalaki endimamaki kaka te tii bambula mingi elekaki. Na ntango wana basi mingi bazalaki kaka kokufa atako likoki ya kobikisa bango ezalaki.

Semmelweis azali kolendisa bato bátya bopɛto na lopitalo oyo ye azali kokamba.—Liyemi ya Robert Thom

Semmelweis ayebani lelo lokola moko ya bato oyo basalá nkisi ya koboma mikrobe. Mosala na ye esalisá mpo na koyeba ete mikrobe ya mike ekoki mpe kobɛlisa. Atángamaka na molɔngɔ ya baoyo balukaki koyeba bamaladi oyo ebomaka, babengaka yango “lisalisi ya ntina mingi koleka mpo na siansi mpe mosala ya minganga.” Likambo ya kokamwa, mbula soki 3 000 liboso, mibeko ya Moize oyo ezali na Biblia, epesaki malako ya ntina mpo na ndenge ya kosala soki moto asimbi ebembe.