Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

Bilei mosusu esalaka yo mabe, to nzoto nde eboyaka yango?

Bilei mosusu esalaka yo mabe, to nzoto nde eboyaka yango?

Emily: “Nakitisaki kanya (fourchette) mpe nakómaki koyoka mabe. Nayokaki mokosa na monɔkɔ mpe lolemo ekómi kovimba. Kizunguzungu esali ngai mpe mpema ekómi mokuse. Bambuma ebimi ngai na mabɔkɔ mpe na nkingo. Esalaki ngai nsɔmɔ, mpe namonaki ete esengeli nakende mbangu na lopitalo!”

BATO mingi basepelaka na kolya. Kasi, bato mosusu batalelaka bilei mosusu lokola “banguna.” Ndenge moko na Emily oyo tolobeli na ebandeli, bilei mosusu esalaka nzoto na bango mabe. Ndenge oyo Emily ayokaka babengaka yango anaphylaxie, elingi koloba, bilei esali mabe na nzoto, mpe yango ezalaka mabe mpenza. Kasi, mabe oyo bilei mosusu esalaka na nzoto, ezalaka mpenza likama te.

Na bambula eleki, lapolo moko emonisaki ete motángo ya bato oyo bilei mosusu esalaki bango mabe mpe oyo nzoto na bango eboyaki bilei emati. Kasi, baankɛtɛ mosusu emonisi ete nsima ya baekzamɛ, bato oyo bakanisaki ete bilei esalaka bango mabe, mingi na bango ezalaki mpenza bongo te.

Soki bilei esali yo mabe

Na lapolo ya minganga oyo doktɛrɛ Jennifer J. Schneider Chafen atambwisaki, oyo babimisaki na zulunalo moko (The Journal of the American Medical Association) balobaki ete: “Bato na bato bazali na ndenge oyo balimbolaka bilei oyo esalaka mabe na nzoto.” Kasi, bato mingi ya mayele bandimaka ete mabe oyo bilei esalaka na nzoto eutaka libosoliboso na ndenge oyo nzoto ya moto ezali.

Na ntembe te, proteini oyo ezalaka na bilei mosusu nde esalaka nzoto mabe. Nzoto emonaka lokola nde proteini wana ezali mabe. Ntango proteini moko boye ekɔti na nzoto, nzoto mpe ebimisaka proteini moko oyo babengi immunoglobuline E, oyo ebundisaka mikrobe mpo elɛmbisa makasi ya proteini wana. Soki bilei ezali kokoba kosala moto mabe, proteini oyo ebundisaka mikrobe oyo eutaki kosalema ekoki kobimisa baproteini mosusu ata mpe histamine.

Soki moto azali kobɛla te, histamine esalaka mosala makasi na nzoto. Kasi, mpo na ntina oyo eyebani te, immunoglobuline E oyo ebundisaka mikrobe mpe histamine nde esalaka ete moto ayoka nzoto malamu te soki alei bilei oyo ezali na proteini oyo eyokanaka te na nzoto na ye.

Yango esalaka ete soki olei bilei moko boye mbala ya liboso esali yo mabe te, kasi ntango okolya yango mbala ya nsima oyoki mabe.

Soki nzoto eboyi bilei

Kaka ndenge bilei esalaka nzoto mabe, soki nzoto eboyi bilei esalaka mpe mabe. Kasi, na bokeseni na bilei oyo esalaka mabe (na kotalela ndenge oyo nzoto ya moto ezali), bilei oyo nzoto eboyaka esalaka mabe na kotalela  ndenge oyo bilei yango etamboli na nzoto, mpe yango ezali te likambo ya proteini oyo ebundisaka mikrobe. Mbala mosusu estoma ya moto ekoki kozala na mokakatano ya konika bilei mpo estoma ezali malamu te to biloko oyo ezali na kati ya bilei nde ezali malamu te. Na ndakisa, proteini ya miliki esalaka nzoto mabe ntango estoma ebimisi te proteini oyo esengeli mpo na kolimwisa sukali oyo ezalaka na kati ya miliki.

Ezali te likambo ya proteini oyo ebundisaka mikrobe, nzoto ekoki koboya bilei ntango kaka moto alei yango. Kolekisa ndelo ekoki mpe kozala mabe—bilei mosusu soki olei yango moke ekoki kosala mabe te, kasi mabe ekómaka ntango moto alei yango mingi. Kasi, yango ekeseni na bilei mosusu oyo esalaka mabe, oyo ata soki olei yango moke ekoki kosala kaka mabe.

Esalaka ndenge nini na nzoto?

Soki bilei esalaka moto mabe na nzoto akoki koyoka mokosa; kobima bambuma; mongongo, miso, to lolemo ekoki kovimba; mposa ya kosanza; kosanza; to pulupulu Mpe likambo ya mabe koleka, tension ekoki kokita, kizunguzungu, koyoka nzoto mabe ata mpe motema ekoki kotika kobɛta. Makambo yango ekoki kosalema nokinoki mpe ekoki ata koboma moto.

Na ntembe te bilei nyonso ekoki kosala moto mabe. Kasi, bilei oyo ekoki kosala moto mabe koleka ezali kaka moke: na ndakisa, miliki, maki, mbisi, mangato, sanya to kosakosa, nguba, madesu ndenge na ndenge to soya, ndika ya nzete mosusu, mpe blé. Bilei ekoki kosala moto mabe ata soki azali na mbula nini. Makambo bato ya mayele bayekoli emonisi mosala oyo ba-gènes esalaka na nzoto; bilei ekoki kosala mwana mabe soki esalaka mpe moboti to baboti nyonso mibale mabe. Bana mingi soki bakoli, bilei mosusu esalaka bango mabe lisusu te.

Soki nzoto eboyi bilei etungisaka mingi te koleka mabe oyo bilei esalaka na nzoto. Ntango nzoto eboyi bilei, yango ekoki kosala estoma mpasi, kovimbisa libumu, kotinda ye abimisa gaze, nzoto mpasimpasi, motó mpasi, mokosa, kolɛmba to makambo mosusu ya ndenge wana. Nzoto ekoki koboya soki moto asangisi bilei mingi na ndakisa, biloko oyo basali yango na miliki, masangu, masanga mpe biloko batyá levire.

Koyeba maladi mpe kosalisa yango

Soki okanisi ete bilei ekosala yo mabe to nzoto ekoboya yango, ekozala malamu okende epai ya monganga. Yo moko soki ozwi ekateli ya koboya kolya bilei mosusu, ekoki mpe kosala yo mabe na nsima mpo nzoto ekozwa mpenza te baproteini oyo esengeli na yango.

Koboya kolya bilei mosusu oyo esalaka mabe na nzoto yango nde nkisi oyo ebongi mpo na kosilisa mpasi oyo bilei mosusu esalaka na nzoto. * Epai mosusu, soki bilei esali yo mabe to nzoto eboyi yango, ekozala malamu olyaka yango mingi te to kaka moke. Kasi, bato oyo bilei mosusu esalaka bango mabe, basengeli koboya kolya yango, to kolya yango na ntango mosusu, na kotalela ndenge oyo esalaka na nzoto.

Soki bilei mosusu esalaka yo mabe to nzoto eboyaka yango, yebá ete bato mingi oyo bilei mosusu esalaka bango mabe bayekolá ndenge ya kobatela nzoto na bango mpe bazalaka na esengo ya kolya bilei ndenge na ndenge ya kitoko mpe ya vitamini.

^ par. 19 Mbala mingi esɛngaka ete moto oyo bilei mosusu esalaka ye mabe mpenza, azalaka na nkisi oyo ezali na adrénaline (épinéphrine) oyo akoki komɛla na ntango oyo ayoki nzoto malamu te. Minganga mosusu balobi ete mwana oyo bilei esalaka ye mabe asengeli kozalaka na elembo moko to kolata elembo yango mpo esalisa molakisi na ye to bato mosusu báyeba ndenge nzoto na ye ezali.