Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  No 3 2017

 MITUNA-LISOLO | FAN YU

Moto moko oyo asalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ alobeli kondima na ye

Moto moko oyo asalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ alobeli kondima na ye

FAN YU abandaki mosala ya kosala bolukiluki na matematiki na Institut de l’Énergie atomique ya Chine, pene na engumba Beijing (Pékin). Na ntango wana, azalaki kondima te ete Nzambe azali, mpe azalaki kondima liteya ya evolisyo. Kasi lelo oyo, Fan Yu akómá kondima ete Nzambe nde asalá bomoi. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna mpo na kondima na ye.

Yebisá biso ndenge okolá.

Nabotamá na 1959, na engumba Fuzhou, na etúká ya Jiangxi, na Chine. Ntango nazalaki na mbula 8, ekólo Chine ekɔtaki na eleko moko ya mbongwana, oyo eyebani lelo na nkombo ya Révolution culturelle. Bapesaki tata na ngai, oyo azalaki ingénieur civil, mosala ya kotonga nzela ya engbunduka (train) na esobe moko oyo ezalaki mosika mpenza. Asalaki kuna bambula mingi, mpe azalaki koya kotala biso kaka mbala moko na mbula. Na ntango wana, nazalaki kofanda ná mama, oyo azalaki molakisi na eteyelo moko. Kutu, tozalaki kofanda na ndako moko na eteyelo oyo azalaki kotángisa. Na 1970, tokendaki kofanda na Liufang, oyo na ntango wana ezalaki mboka moko ya bobola na etúká ya Linchuan, epai biloko ya kolya ezalaki mingi te.

Libota na bino ezalaki kosambela na lingomba nini?

Tata azalaki te kokipe makambo ya losambo mpe ya politiki. Mama azalaki kosambela na lingomba ya Buda. Na kelasi, bateyaki ngai ete bomoi ebimá kaka yango moko, mpe nazalaki kondima makambo oyo balakisi bateyaki ngai.

Mpo na nini okómaki kosepela na matematiki?

Nakómaki kosepela na matematiki mpo siansi yango esɛngaka kosalela makanisi oyo ebongi mpo na koyeba solo. Na 1976, mwa moke nsima ya liwa ya Mao Tse-tung, mokambi ya politiki oyo abandisaki mbongwana na Chine, nakɔtaki na iniversite. Kuna, naponaki koyekola matematiki. Nsima ya kozwa diplome ya iniversite, mosala na ngai ya liboso ezalaki ya kosala bolukiluki ya matematiki mpo na koyeba ndenge ya kosala bamasini ya nikleere.

Ntango nini obandaki kosepela na Biblia?

Na 1987, nayaki na États-Unis mpo na kotánga lisusu mpo nazwa diplome oyo eleki monene, na iniversite ya Texas. Nakamwaki komona ete na États-Unis, bato mingi bazalaki kondimela Nzambe mpe kotánga Biblia. Nayokaki  mpe ete Biblia etondi na batoli ya bwanya, yango wana namonaki malamu nabanda kotánga yango.

Namonaki ete Biblia ezalaki na mateya oyo ebongi. Kasi lokola nazalaki kokanga ntina te na bisika mosusu, eumelaki te natikaki kotánga yango.

Nini elamwisaki lisusu mposa na yo ya kotánga Biblia?

Koyoka ete Mozalisi azali ezalaki likambo ya sika mpo na ngai, yango wana nazwaki ekateli ya kosala bolukiluki na likambo yango

Na 1990, mwasi moko Motatoli ya Yehova ayaki na ndako na ngai mpe alakisaki ngai oyo Biblia elobi mpo na avenire ya malamu oyo ezali kozela bato. Azwaki bibongiseli mpo mobali moko ná mwasi na ye básalisa ngai nayeba Biblia malamu. Na nsima, mwasi na ngai Liping, oyo azalaki koteya mateya ya physique na eteyelo moko na Chine mpe azalaki kondima te ete Nzambe azali, abandaki mpe koyekola Biblia. Toyekolaki oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo bomoi ebandaki. Koyoka ete Mozalisi azali ezalaki likambo ya sika mpo na ngai, yango wana nazwaki ekateli ya kosala bolukiluki na likambo yango.

Osalaki yango ndenge nini?

Lokola nayebi matematiki, nayekolá ndenge ya koluka koyeba bosolo ya makambo. Nayekolaki mpe ete mpo bomoi ebima kaka yango moko, esɛngi liboso proteini ezala. Yango wana, nabandaki kosala bolukiluki mpo na koyeba soki proteini ekoki kosalema yango moko. Proteini ezali molekile moko ya kokamwa, mpe baselile oyo ezali na bomoi ekoki kozala na baproteini ndenge na ndenge oyo ezali kosala na molɔngɔ mpenza. Nsukansuka, nayaki komona, ndenge moko na bato mosusu, ete proteini ekoki kosalema yango moko te. Natángá naino te mokanda moko ya liteya ya evolisyo oyo endimisaki ngai ete baselile wana ekoki kosalema yango moko mpe soki batye yango libándá ya nzoto ekokoba kozala na bomoi. Makambo oyo namonaki endimisaki ngai ete Mozalisi azali.

Nini endimisaki yo ete Biblia eutá epai ya Nzambe?

Batatoli ya Yehova bakobaki koyekola na ngai Biblia mpe basalisaki ngai namona ete Biblia ezali na bisakweli mingi oyo ekokisamaki. Nakómaki mpe komona bolamu ya kosalela batoli ya Biblia na bomoi na ngai. Nazalaki komituna boye: ‘Ndenge nini bato oyo bakomaki Biblia, oyo bazalaki na bomoi eleki ebele ya bambula, bakokaki kokoma maloba ya bwanya oyo ezali na ntina tii lelo?’ Mokemoke, nakómaki kondima ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.

Nini endimisaka yo ete Mozalisi azali?

Ntango natalaka biloko mingi oyo ezali na mokili, yango endimisaka ngai ete Mozalisi azali. Lelo oyo, nasalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ, mpe mbala mingi, nakamwaka komona ndenge oyo bɔɔngɔ na biso eleki mosika baprogramɛ yango. Na ndakisa, likoki oyo bɔɔngɔ na biso ezalaka na yango ya koyeba mongongo ya moto ekamwisaka mpenza. Mpo na mingi na biso, ezalaka mpasi te tóyeba mongongo ya moto, ata soki moto yango azali kokatakata maloba, azali kosɛka, azali kokosola, azali na likukuma, azali na elobeli ya ndenge mosusu, mongongo na ye ezali koyokana mbala mibale, makɛlɛlɛ mosusu ezali, to telefone ebongoli mongongo na ye. Okoki kokanisa ete ezali likambo ya kokamwa te. Kasi bato oyo basalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ bayebi ete ezali likambo ya kokamwa. Ata programɛ ya ordinatɛrɛ oyo eleki malamu mpo na koyeba mongongo ya moto, ekoki soki moke te kokokana na bɔɔngɔ ya moto.

Na kokesana na baordinatɛrɛ mingi oyo esalaka makambo ebele, bɔɔngɔ na biso ekoki koyeba mongongo ya mawa, ya esengo to ya nkanda, koyeba elobeli ya moto, mpe koyeba mongongo ya moto oyo azali koloba. Bato oyo basalaka baprogramɛ ya ordinatɛrɛ bazali koluka ndenge ya kosala baordinatɛrɛ oyo ekoki komekola makoki oyo bɔɔngɔ ya moto ezali na yango ya koyeba mongongo ya moto. Yango endimisi ngai ete bazali koyekola nde mosala ya mabɔkɔ ya Nzambe.