Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  No 3 2017

 LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EUTÁ MPENZA EPAI YA NZAMBE?

Biblia—Elobaka solo na makambo nyonso

Biblia—Elobaka solo na makambo nyonso

Elobaka solo na makambo ya siansi

ATAKO Biblia ezali buku ya siansi te, elobaka solo ntango elobelaka biloko oyo ezali na mokili. Tózwa ndakisa ya siansi oyo etalelaka makambo ya mbula mpe siansi oyo etalelaka baselile ya bikelamu ya bomoi.

MBULA EUTAKA WAPI?

NDENGE MBULA ESALEMAKA

Biblia elobi: “[Nzambe] abendaka matangá ya mai; ekɔngɔlamaka lokola mbula mpo na kosala londende na ye, bongo mapata ebimisaka matangá ya mai.”Yobo 36:27, 28.

Awa, Biblia elobeli makambo misato ya minene oyo esalemaka mpo mbula ebɛta. Nzambe, oyo asalá moi, “abendaka matangá ya mai” na ndenge (1) mai emataka lokola londende. Na nsima, (2) mai yango esanganaka mpo na kosala mapata, mpe na nsuka, ekitaka lisusu awa na mabele na lolenge ya (3) mbula. Tii lelo, bato oyo bayekolaka ndenge oyo mbula esalemaka bayebaka mpenza te makambo nyonso oyo elekaka mpo mbula ebɛta. Tokoki kokamwa te ntango Biblia etuni: “Nani akoki kokanga ntina ya maboke ya mapata?” (Yobo 36:29) Nzokande, Mozalisi ayebi malamu makambo nyonso oyo esalemaka mpo mbula ebɛta mpe amonaki malamu ete moto akoma makambo yango na Biblia, ndenge yango esalemaka mpenza. Lisusu, asalaki yango ntango molai liboso ete bato ya siansi báyeba kolimbola likambo ya mbula.

NDENGE OYO MWANA ASALAMAKA

KOSALEMA YA MWANA

Davidi, mokomi moko ya Biblia, alobaki na Nzambe: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo.” (Nzembo 139:16) Na maloba ya elilingi, Davidi alobaki ete kosalama ya mwana na libumu ya mama elandaka malako oyo ekomami na “mokanda” moko. Likambo ya kokamwa, maloba yango ekomamaki eleki sikoyo mbula soki 3 000!

Nzokande, kaka na katikati ya siɛklɛ ya 19 nde Gregor Mendel, moto moko ya mayele na Autriche, oyo ayekolaka makambo ya banzete, ayaki koyeba ndenge oyo baselile ya bikelamu ya bomoi esalemaka. Longola yango, kaka na sanza ya minei 2003 nde bato ya mayele bayebaki mpenza ndenge oyo biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya baselile ya nzoto mobimba etongami; baselile yango ezali na makambo nyonso oyo esengeli mpo na nzoto ya moto. Bato ya siansi balobaka ete ADN ezali lokola diksionɛrɛ moko oyo etondi na maloba oyo esalemi na balɛtrɛ ya alfabɛ. Maloba yango nde ezali na malako ya baselile ya nzoto. Na kolanda malako yango, biteni ya nzoto, na ndakisa bɔɔngɔ, motema, mimpululu (poumons), mabɔkɔ mpe makolo, ekolaka na ndenge oyo ebongi mpe na ntango oyo ebongi. Ebongi mpenza ete bato ya siansi bábenga biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya baselile ya nzoto “buku ya bomoi.” Ndenge nini Davidi, mokomi moko ya Biblia, akokaki koyeba likambo yango malamu? Na komikitisa nyonso, alobaki: “Elimo ya Yehova nde elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye ezalaki na lolemo na ngai.” *2 Samwele 23:2.

 Elobaka solo na makambo oyo ekosalema

EKOKI kosalema te, to ezali mpasi, koyeba liboso ntango oyo bokonzi to engumba moko ekokwea to ekozongisama, ndenge likambo yango ekosalema, mpe tii wapi ekosuka. Nzokande, Biblia esakolaki, ata na makambo ya mikemike, kobebisama ya baguvɛrnema mpe ya bingumba ya makasi. Tótalela bandakisa mibale.

BABILONE EKWEAKI MPE ETIKALÁ MPAMBA

Babilone ya kala ezalaki mboka-mokonzi ya ampire moko ya nguya oyo eyangelaki Azia ya wɛsti na boumeli ya basiɛklɛ mingi. Na eleko moko, ezalaki engumba oyo elekaki monene na mokili mobimba. Nzokande, mbula soki 200 liboso, Nzambe atindaki Yisaya, mokomi moko ya Biblia, asakola ete elombe moko ya bitumba na nkombo Siruse akokweisa Babilone mpe bato bakofanda lisusu na engumba yango te mpo na libela. (Yisaya 13:17-20; 44:27, 28; 45:1, 2) Esalemaki mpenza bongo?

ISTWARE

Na butu moko, na sanza ya zomi, na mobu 539 liboso ya ntango na biso, Siruse Monene akweisaki Babilone. Nsima ya bambula, baterase ya minene oyo ezalaki komema mai zingazinga ya engumba yango mpo mabele ebota mingi, ekangamaki mpo bazalaki kobongisa yango lisusu te. Banda mobu 200 ya ntango na biso, esika oyo Babilone ezalaki etikalá mpamba. Lelo oyo, soki okei na esika oyo Babilone ezalaki, okokuta eloko te. Kaka ndenge Biblia esakolaki, Babilone ekómá “esika oyo etikali mpamba.”Yirimia 50:13.

Ndenge nini mokomi wana ya Biblia ayebaki makambo wana liboso ete esalema? Biblia elobi ete yango ezalaki “liyebisi mpo na Babilone, oyo Yisaya mwana ya Amoze amonaki na emonaneli.”Yisaya 13:1.

NINIVE ‘EKOZANGA MAI LOKOLA ESOBE’

Ninive, mboka-mokonzi ya ampire ya Asiri, ezalaki engumba oyo etongamaki kitoko mpenza. Engumba yango ezalaki na babalabala ya minene, ba-jardin ya kitoko, batempelo, mpe bandako ya minene mpenza. Atako bongo, mosakoli Sefania asakolaki ete engumba wana kitoko ‘ekotikala mpamba, ekozanga mai lokola esobe.’Sefania 2:13-15.

Na siɛklɛ ya 7 liboso ya ntango na biso, basoda ya Babilone mpe ya Bamede babebisaki engumba Ninive. Buku moko elobi ete ntango engumba yango ekweaki, “ebebisamaki nyɛɛ na boumeli ya bambula 2 500.” Kutu, na eleko moko boye, bato bazalaki kondima te ete ezalaki na engumba moko na nkombo Ninive! Kaka na katikati ya siɛklɛ ya 19 nde bato ya arkeoloji bayaki komona mwa bilembo oyo emonisi esika oyo engumba Ninive ezalaki. Lelo oyo, esika yango ebebá mpenza mpe esundolamá, yango wana ebongiseli oyo ebatelaka bisika kitoko ya kala elobi boye: “Ata mwa bilembo oyo emonisi esika oyo Ninive ezalaki, ekoki kolimwa mpo na libela.”

Nani ayebisaki Sefania makambo wana nyonso liboso? Ye moko alobaki ete ‘liloba ya Yehova eyelaki ye.’Sefania 1:1.

 Biblia epesi biyano na mituna minene ya bomoi

BIBLIA epesi biyano oyo ebongi na mituna minene ya bomoi. Tótalela bandakisa oyo elandi.

MPO NA NINI MABE MPE BAMPASI ETONDI NA MOKILI?

Banda ebandeli tii nsuka, Biblia elobeli likambo etali mabe mpe bampasi. Elobi ete:

  1. “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”Mosakoli 8:9.

    Boyangeli ya bato, oyo ezali mabe mpe ezali kokoka kobongisa makambo te, ememeli bato mpasi.

  2. “Ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”Mosakoli 9:11.

    Makambo oyo ekanami te, na ndakisa maladi ya makasi, aksida, makama oyo eutaka na mipɛpɛ makasi, koningana ya mabele, to mpela, ekoki kokómela moto nyonso, ezala na esika nini, to na ntango nini.

  3. “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu.”Baroma 5:12.

    Ntango Nzambe asalaki mobali mpe mwasi ya liboso, kozanga kokoka mpe liwa ezalaki te. Lisumu “ekɔtaki na mokili” ntango baboyaki kotosa Mozalisi na bango.

Biblia esuki kaka te na koyebisa ntina oyo bato bazali konyokwama. Elaki mpe ete Nzambe akolongola mabe mpe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”Emoniseli 21:3, 4.

SOKI MOTO AKUFI AKENDAKA WAPI?

Biblia emonisi ete soki moto akufi ayebaka lisusu eloko moko te mpe akoki kosala eloko te. Mosakoli 9:5 elobi: “Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” Soki moto akufi, “makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:4) Na yango, ntango moto akufi, bɔɔngɔ na ye mpe binama na ye nyonso ya nzoto, etikaka kosala. Yango wana, moto oyo akufi akoki kosala eloko te, koyoka te, to kokanisa te.

Nzokande, Biblia esuki kaka te na koyebisa biso ndenge moto akómaka soki akufi. Epesi mpe elikya ya malamu mpenza ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi na nzela ya lisekwa.Hosea 13:14; Yoane 11:11-14.

MPO NA NINI TOZALI NA BOMOI?

Biblia elobi ete Yehova Nzambe asalaki mobali ná mwasi. (Ebandeli 1:27) Adama, mobali ya liboso, abengami “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Moto akelamaki mpo azala na boyokani malamu ná Nzambe, Tata na ye ya likoló,  azala na bomoi ya esengo mpe ya malamu libela na libela awa na mabele. Yango wana, bato nyonso babotamaka na mposa makasi ya kosambela mpe koyeba makambo ya Nzambe. Na yango, Biblia elobi: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”Matai 5:3.

Lisusu, Biblia elobi: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:28) Biblia eteyaka biso makambo ya Nzambe, esalisaka biso tózala na bomoi ya esengo lelo oyo mpe epesi biso elikya mpo na mikolo ezali ekoya.

Okoki koyeba nkolo Biblia

NSIMA ya kotalela bosolo ya makambo, bamilio ya bato na mokili mobimba bamonaki ete Biblia ezali kaka te buku moko oyo elobeli masolo ya kala. Bandimisami ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye, oyo na nzela na yango Nzambe ayebisi nsango na ye epai ya bato, ezala mpe yo! Na nzela na yango, Nzambe azali kobenga yo oyeba ye mpe okóma moninga na ye. Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”Yakobo 4:8.

Koyekola Biblia na mozindo esalisaka biso tóyeba ebele ya makambo ya malamu. Makambo yango nini? Kaka ndenge kotánga buku moko ekoki kosalisa yo oyeba makanisi ya moto oyo akomaki yango, kotánga Biblia esalisaka biso tóyeba makanisi mpe mayoki ya Nzambe, oyo akomisaki Biblia. Yango elimboli nini mpo na yo? Okoki koyeba makanisi mpe mayoki ya Mozalisi na yo! Longola yango, Biblia emonisi:

Olingi koyeba makambo mosusu mingi? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Bakoki koyekola na yo Biblia ofele. Yango ekosalisa yo opusana lisusu pene na Yehova, Nzambe oyo akomisaki Biblia.

Lisolo oyo elobeli mwa makambo oyo emonisi ete Biblia ezali buku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 2 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na www.jw.org

Okoki mpe kotala video Biblia ezali mokanda ya nani? oyo ezali na www.jw.org

Talá esika bakomi MIKANDA > BAVIDEO

^ par. 10 Biblia ebengaka Nzambe na nkombo na ye, Yehova.Nzembo 83:18.