Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  No 2 2016

 MITUNA-LISOLO | YAN-DER HSUUW

Monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalamaka na libumu alobeli kondima na ye

Monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalamaka na libumu alobeli kondima na ye

PROFESƐRƐ Yan-Der Hsuuw akambaka bolukiluki etali ndenge mwana asalamaka na libumu, na iniversite ya siansi mpe teknoloji na ekólo Taïwan. Liboso azalaki kondima liteya ya evolisyo, kasi ntango akómaki kosala bolukiluki na siansi, abongolaki makanisi na ye. Amonisaki bantina yango na Zulunalo Lamuká!

Yebisá biso naino mwa moke ndenge okolá.

Nabotamá na 1966 mpe nakolá na Taïwan. Baboti na ngai bazalaki bato ya lingomba ya Tao mpe Buda. Atako tozalaki kosambela bankɔkɔ mpe bililingi, tozalaki kokanisa te ete ezali na Nzambe moko oyo akelá biloko nyonso.

Mpo na nini oyekolaki bioloji?

Ntango nazalaki mwana, nazalaki kolinga kokipe banyama mpe nazalaki na mposa ya koyeba ndenge ya kosalisa banyama mpe bato oyo bazali na mpasi. Liboso, nakɔtaki kelasi ya monganga oyo etali kosalisa banyama mpe na nsima nayekolaki ndenge mwana asalamaka na libumu mpo nazalaki na elikya ete ekosalisa ngai nayeba ndenge bomoi ebandá.

Okoki koyebisa biso mpo na nini liboso ozalaki kondima liteya ya evolisyo?

Baprofesɛrɛ ya iniversite bazalaki koteya evolisyo, bazalaki koloba ete ezali na makambo oyo endimisi liteya yango. Nandimelaki bango.

Mpo na nini okómaki kotánga Biblia?

Ezalaki mpo na bantina mibale. Ya liboso, namonaki ete na ebele ya banzambe oyo bato basambelaka, moko asengeli koleka bamosusu nyonso. Kasi nani? Ya mibale, nayebaki ete Biblia ezali buku oyo bato bazwaka na valɛrɛ mingi mpenza. Yango wana nakɔtaki eteyelo ya Biblia.

Ntango nabandaki kotánga na iniversite Katolike na Louvain na 1992, nakendaki na eglize Katolike mpe nasɛngaki sango asalisa ngai nayeba Biblia, kasi aboyaki.

Kasi ndenge nini mposa na yo ya koyeba Nzambe ekokisamaki?

Mbula mibale na nsima, ntango nazalaki kaka kosala bolukiluki na ngai na makambo ya siansi na Belgique, nakutanaki na elenge mwasi moko ya mboka Pologne na nkombo Ruth, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Ayekolaki monɔkɔ ya Chinois mpo na kosalisa bayekoli na iniversite, oyo balingaki koyekola makambo ya Nzambe. Nabondelaki Nzambe mpo nazwa lisalisi ya ndenge wana, yango wana nasepelaki kokutana na ye.

Ruth amonisaki ngai ete atako Biblia ezali buku ya siansi te, kasi eyokani na siansi. Na ndakisa, Davidi, mokomi moko ya Biblia abondelaki Nzambe boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo: Mikolo oyo yango esalemaki mpe ntango oyo eteni na yango ata moko ezalaki naino te.” (Nzembo 139:16) Atako Davidi alobaki na elobeli ya bapowɛti, alobaki solo! Liboso kutu biteni ya nzoto ebanda kosalema, malako nyonso oyo etali ndenge yango ekokola ezalaka. Ndenge Biblia elobelaka makambo na bosikisiki endimisaki ngai ete ezali Liloba ya Nzambe. Nakómaki mpe koyeba ete ezali na Nzambe kaka moko ya solo, Yehova. 1

 Nini endimisaki yo ete Nzambe nde akelá bomoi?

Mokano ya bolukiluki ya siansi ezalaka ya koluka koyeba solo, kasi te ya kondima kaka makanisi oyo bato bazali na yango. Koyekola ndenge mwana asalamaka na libumu etindaki ngai nabongola makanisi na ngai, namona ete bomoi ebimá yango moko te. Na ndakisa, ingénieur asangisaka na molɔngɔ mpe na ndenge oyo ebongi biteni ya eloko oyo alingi kosala. Ndenge mwana asalamaka na libumu ya mama ezalaka mpe bongo, kasi yango esɛngaka makambo mingi lisusu.

Nyonso ebandaka ntango kaka mwa selile ya mama mpe ya tata esangani, boye te?

Ɛɛ. Na nsima, mwa selile yango ebandaka kokabwana. Nsima ya ngonga 12 tii 24 nyonso, motángo ya baselile yango ebakisamaka mbala mibale. Ntango selile yango ebandi mpenza kokabwana  2, baselile oyo ebotaka baselile mosusu ekoki kobimisa lolenge 200 to koleka ya baselile ndenge na ndenge mpo mwana asalema mpenza, na ndakisa baselile ya makila, ya mikuwa, ya bɔɔngo mpe baselile mosusu.

Koyekola ndenge mwana asalamaka na libumu etindaki ngai namona ete bomoi ebimá yango moko te

Baselile esalemaka na molɔngɔ mpe na esika oyo esengeli. Liboso, esanganaka mpo na kosala maboke ya baselile oyo na ngala na yango esanganaka mpo na kosala biteni ya nzoto mpe mabɔkɔ ná makolo. Moto ya mayele nani akoki kokanisa kokoma malako ya ndenge wana? Kasi, malako etali ndenge mwana asalamaka na libumu ya mama ekomamá malamu mpenza na ADN. Ntango natalaka makambo kitoko wana nyonso, endimisaka ngai ete Nzambe nde asalá bomoi.

Mpo na nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Na mokuse, ezali bolingo. Yesu Kristo alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bolingo yango eponaka bilongi te. Ekipaka ekólo ya moto te, mimeseno to loposo te. Ntango nakómaki koyangana elongo na Batatoli ya Yehova, namonaki bolingo ya ndenge wana.

^ 2. Mpo na kotosa lisosoli na ye ya mokristo, Profesɛrɛ Yan-Der Hsuuw asalelaka te baselile oyo ebotaka baselile mosusu ntango mwana abandi kosalama na libumu.