ATAKO bato mingi bandimaka te likambo nyonso oyo etali misala ya bademo to bilimo mabe mpe bazwaka yango kaka lokola lisano to makambo bato oyo basalaka bafilme to bateatre babimisaka, kasi Biblia etalelaka yango bongo te. Epekisi polele misala ya bilimo mabe. Na ndakisa, Kolimbola Mibeko 18:10-13 elobi boye: “Epai na yo moto azwama te . . . moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi.” Mpo na nini? Biblia ebakisi: “Moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná . . . Osengeli kozala na mbeba te na miso ya Yehova Nzambe na yo.”

Mpo na nini Biblia epekisi mpenza misala nyonso ya bilimo mabe?

EUTAKA NA ESIKA YA MABE

Biblia elobi ete bambula ebele liboso Nzambe asala mabele, akelaki bamilio ya bikelamu ya elimo to baanzelu. (Yobo 38:4, 7; Emoniseli 5:11) Apesaki anzelu mokomoko bonsomi ya kopona, elingi koloba likoki ya kopona kosala malamu to mabe. Baanzelu mosusu baponaki kokóma banguna ya Nzambe mpe batikaki esika na bango na likoló mpo na kotya mobulu na mabele. Yango nde esalaki ete mabele ‘etonda na mobulu.’Ebandeli 6:2-5, 11; Yuda 6.

Biblia elobi ete baanzelu yango ya mabe batindaka bato básala mabe mpe bakosaka ebele  ya bato. (Emoniseli 12:9) Balukaka kutu kosalela mposa oyo bato bazalaka na yango ya koyeba makambo oyo ekoya.1 Samwele 28:5, 7; 1 Timote 4:1.

Toboyi te, emonanaka lokola misala mosusu ya bademo esalisaka bato. (2 Bakorinti 11:14) Kasi mpo na koloba solo, baanzelu ya mabe balukaka nde kozipa makanisi ya bato mpo báyeba te solo oyo etali Nzambe.2 Bakorinti 4:4.

Biblia emonisi ete kozala na boyokani na bilimo mabe ezali likama. Yango wana ntango bateyaki bato oyo balingaki kokóma bayekoli ya Yesu solo na likambo yango, “ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango,” atako ezalaki ya mbongo mingi.Misala 19:19.

“Soki bilenge mingi ya basi bakómi kondima makambo etali bandɔki ekoki kozala mpo televizyo, bafilme mpe babuku ekómi kolakisa basi ya kitoko oyo bazali bandɔki.”—Gallup Youth Survey, 2014

Lelo oyo mpe bato mingi bazwá ekateli ya koboya makambo mpe masano oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. Na ndakisa, ntango Maria * azalaki na mbula 12, akómaki kosakola makambo to makama mosusu oyo ekosalema. Akómaki kolimbolela baninga na ye ya kelasi makambo ekoya na nzela ya bakarte mpe lokola makambo yango ezalaki kokokisama, akómaki kosepela na misala ya molili.

Maria akanisaki ete Nzambe nde apesaki ye likabo yango mpo asalisa basusu. Alobi boye: “Likambo moko ezalaki kotungisa ngai, nazalaki kolimbolela bamosusu makambo oyo ezali na bakarte yango, kasi nazalaki kokoka te kolimbola yango mpo na ngai moko, atako nazalaki mpe na mposa ya koyeba avenire na ngai.”

Lokola azalaki kozwa biyano te na  mituna mingi oyo ezalaki kotungisa ye, Maria abondelaki Nzambe mpe nsima ya mikolo akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe bakómaki koyekola na ye Biblia. Maria ayekolaki na Biblia ete likoki oyo azalaki na yango ya kosakola makambo ekoya eutaki epai ya Nzambe te. Ayekolaki mpe ete bato oyo balingi kokóma baninga ya Nzambe basengeli kobwaka eloko nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. (1 Bakorinti 10:21) Nini esalemaki? Maria abwakaki biloko mpe babuku na ye oyo ezalaki na boyokani na misala ya bilimo mabe. Lelo oyo ayebisaka basusu mateya ya solo oyo ayekoli na Biblia.

Ntango Michael azalaki elenge, azalaki motángi monene ya masolo oyo elobelaka bilima to ba-vampire. Alobi boye: “Nazalaki kosepela kozala lokola bato oyo bakendaka na mokili oyo ezalaka te.” Mokemoke, Michael akómaki kotánga mingi babuku etali maji mpe milulu ya losambo ya Satana. Abakisi: “Koluka koyeba makambo etindaki ngai nakóma kotánga babuku mpe kotala bafilme oyo elobelaka misala yango.”

Kasi, koyekola Biblia etindaki Michael atalela malamu makambo oyo azalaki kotánga. Alobi boye: “Nasalaki liste ya makambo nyonso oyo ezalaki na boyokani na misala ya bilimo mabe mpe nabwakaki yango nyonso. Nazwaki liteya moko ya ntina mingi. Na 1 Bakorinti 10:31, Biblia elobi: ‘Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’ Sikoyo namitunaka boye, ‘eloko oyo nalingi kotánga ekosalisa ngai napesa Nzambe nkembo?’ Soki te, natángaka yango te.”

Ebongi mpenza Biblia ebengama mwinda. Kaka yango nde emonisaka polele mpenza misala ya bilimo mabe. (Nzembo 119:105) Kasi esuki kaka wana te. Ezali mpe na elaka kitoko etali mokili oyo bilimo mabe bakozala te. Bato bakosepela mpenza. Na ndakisa, Nzembo 37:10, 11 elobi boye: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”

^ par. 10 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.