Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lamuká!  |  Sanza ya Décembre 2015

Babalɛnɛ ezali awa!

Babalɛnɛ ezali awa!

Mbula nyonso, kobanda na sanza ya nsambo, babalɛnɛ oyo babengi right whales (Eubalaena australis) ya basi eyaka na sudi ya bokula ya Santa Catarina na Brésil. Babalɛnɛ yango eutaka mosika mpenza na ebele ya bakilomɛtrɛ na sudi ya Antarctique mpo na kobota mpe komɛlisa bana na yango na esika mai ezali mozindo te. Na boumeli ya basanza mingi, bato oyo bafandaka kuna mpe baturiste oyo bayaka na mabongo to na mwa bangomba basepelaka kotala ndenge babalɛnɛ mpe bana na yango epemaka mpe esakanaka na mai! *

Ebakata ya ekelamu ya mai oyo epumbwaka na ndenge ya kokamwa

Balɛnɛ ya mwasi ekoki kozala na molai ya mɛtrɛ 16, lokola bisi moko ya molai mpe kilo na yango ekoki kozala tɔni 80! Ebakata ya nzoto na yango ezalaka mingimingi moindo, na bantango mosusu libumu na yango ezalaka na matɔnɔ ya langi ya mpɛmbɛ. Motó na yango ezalaka monene mpenza mpe ezwi eteni monene ya nzoto na yango (1/4). Monɔkɔ na yango ezalaka molai mpe egumbamá mwa moke. Balɛnɛ yango ezalaka na libɛ́lɛ (nageoire) te lokola babalɛnɛ mosusu. Mpo na kokende liboso, egumbaka mpe etombolaka lopɛlɛ na yango ya monene oyo ezali lokola lɛtrɛ v na esika esala lokola mbisi. Nageoire na yango nde esalisaka yango mpo na kokende na ngámbo mosusu. Yango ekokani na ndenge aviɔ etambolaka.

Likambo ya kokamwa, atako ezalaka monene ndenge wana, babalɛnɛ yango epumbwaka na pɛtɛɛ nyonso mpe na ndenge oyo ekamwisaka mpenza. Okoki komona yango na mai ezali kotambola lopɛlɛ libándá na boumeli ya ntango molai; kotombola lopɛlɛ mpe kobɛta yango makasi na mai; okoki komona na mosika ndenge mai  ezali kopanzana ntango ezali kopumbwa mpe komibwaka lisusu na mai.

Ndenge nzoto na yango ezalaka

Mposo oyo ezingi motó ya balɛnɛ yango ekangamákangamá mpe ezali makasi, ezipamá na ebele ya mwa banyama mikemike oyo babengaka yango basili ya balɛnɛ (cyamidae). Karina Groch, mokambi ya ebongiseli moko (Right Whale Project) na Brésil alobi ete “mposo yango nde ekesenisaka balɛnɛ yango mokomoko mpe esalisaka mpo na koyeba yango kaka ndenge bilembo ya misapi ya moto moko ekesenisaka ye na moto mosusu. Ntango babalɛnɛ yango eyaka na mabongo na biso, tokangaka mposo na yango fɔtɔ mpe totyaka bafɔtɔ yango na mwa buku.”

Bato ya bioloji balobi ete ezalaka mpasi koyebisa mbula ya babalɛnɛ yango soki ekufi mpo lolenge wana ya balɛnɛ ezalaka na mino te. Balobaka ete balɛnɛ yango ekoki koumela na bomoi bambula soki 65. *

Ndenge oyo elyaka ekamwisaka

Babalɛnɛ yango elyaka mwa banyama mikemike. Ngámbo na ngámbo ya mbanga na yango ya likoló ezali na mposo oyo egumbamá mikemike mpe ezali na bansuki ya mikemike oyo ekangaka biloko oyo ezali kokɔta na monɔkɔ na yango. Ntango ezali kotambola, efungolaka monɔkɔ na yango mpo mai ekɔta mpe nsuki wana ya mikemike ekanga mwa banyama mikemike oyo yango elyaka. Na ndenge yango, balɛnɛ mokomoko ekoki kolya tii tɔni mibale ya mwa banyama yango na mokolo.

Babalɛnɛ yango elekisaka eleko ya molunge (Sanza ya liboso mpe ya mibale) na Mbu Antarctique esika oyo elyaka mingi mpe nzoto na yango ekómaka mafutamafuta. Volimi ya mafuta yango oyo ekangamá ebatelaka yango ntango ezali na mai ya malili mpe esalisaka yango eyoka nzala te ntango ezali kokende na bisika mosusu.

Ezwaki nkombo yango ndenge nini?

Kobanda na siɛklɛ ya 18, bato oyo bazalaki koboma babalɛnɛ, bazalaki koboma yango mingi na mikili ya sudi. Bazalaki kotalela yango lokola babalɛnɛ oyo “ebongi” koboma (right whales). Mpo na nini? Lokola babalɛnɛ yango etambolaka malɛmbɛmalɛmbɛ na mai, ezalaki mpasi te bato bákanga yango, ata bato oyo bamasuwa na bango ezalaki makasi te mpe bazalaki kaka na makɔnga na mabɔkɔ. Longola yango, na kokesana na babalɛnɛ mosusu, lokola ezalaka na mafuta mingi, soki babomi yango etepaka na mai. Yango wana ezalaki mpasi te bábenda yango tii na libongo soki ekufi.

Lisusu, balɛnɛ mpe mafuta na yango ezalaki na valɛrɛ mingi na ntango wana, mpo bazalaki kotya mafuta na yango na miinda ya balabala mpe na bibende. Bazalaki mpe kosala biloko lokola bilamba, bashario oyo mpunda ebendaka mpe lingɛmbu. Kutu, mposo ya mbanga ya balɛnɛ moko mpamba ezalaki kozongisa mbongo oyo babimisaki mpo na kokende koboma babalɛnɛ yango!

Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, koboma babalɛnɛ koleka ndelo ekitisaki motángo na yango mpe nsukansuka mombongo yango esilaki valɛrɛ. Na Brésil, libongo ya nsuka ya babalɛnɛ ekangaki baporte na yango na 1973. Atako lolenge mosusu ya babalɛnɛ ezongi mwa moke, kasi mosusu ezali kaka na likama mpenza.

Balɛnɛ oyo touti kolobela ezali kaka moko ya ekelamu ya kokamwa na ebele ya bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi oyo ezali awa na mabele. Emonisaka ete Yehova Nzambe, Mokeli Monene oyo asalá yango, azali mpenza na bwanya mpe nguya ya kokamwa.​—Nzembo 148:7.

^ par. 2 Babalɛnɛ yango eyaka mpe na bamai mosusu oyo ezalaka pembenipembeni ya mabongo ya Argentine, Australie, Afrique du Sud, Uruguay, ata mpe na bisanga ya Auckland, na Nouvelle-Zélande.

^ par. 8 Bato ya siansi bakaboli babalɛnɛ yango na lolenge misato. Longola oyo touti kolobela, ezali mpe na balɛnɛ oyo babengi Eubalaena glacialis mpe Eubalaena japonica oyo ezalaka na mikili ya nɔrdi.