Profesɛrɛ Gene Hwang abotamá na 1950 na engumba Tainan, na ekólo Taïwan mpe azwá pansiɔ esika azalaki kotángisa matematiki na iniversite ya Chung Cheng na Taïwan. Azalaká mpe profesɛrɛ na iniversite Cornell na États-Unis, epai azalaki kotángisa mpe kosala bolukiluki na matematiki babengi probabilités et statistiques. Na boumeli ya bambula azalaki na kati ya bato oyo babimisaki babuku mingi ya statistiques, mosala oyo asalaka tii lelo. Ntango azalaki elenge, azalaki kondima ete bomoi ebanda nde na evolisyo. Kasi, na nsima abongolaki makanisi. Lamuká! etunaki ye mituna etali mosala na ye mpe mateya ya Nzambe oyo andimaka.

Bateyaki yo mateya nini ntango ozalaki elenge?

Na eteyelo bateyaki biso liteya ya evolisyo, kasi moto moko te alimbolaki ndenge bomoi yango moko ebandá. Ntango baboti na ngai bakómaki bandimi ya lingomba ya Tao, nazalaki kolanda mateya ya bapastɛrɛ na bango mpe kotuna bango mituna ebele. Kasi kaka biyano moke oyo bapesaki nde esepelisaki ngai.

Mpo na nini okómaki moto ya matematiki?

Ntango nazalaki na eteyelo ya ebandeli, nakómaki kosepela na matematiki. Esengo yango ekobaki tii na iniversite, matematiki mpe probabilités nde ezalaki kosepelisa ngai mingi. Nasepelaka na bilembeteli oyo matematiki epesaka mpo ezalaka polele.

Ndenge nini okómaki kosepela na mateya ya Biblia?

Na 1978, mwasi na ngai Jinghuei akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe na bantango mosusu nazalaki kosangana na boyekoli yango. Na ntango wana, tozalaki kofanda na États-Unis. Jinghuei autaki kozwa diplome ya doktɛrɛ na fiziki mpe ngai nazalaki koyekola statistiques na iniversite ya Purdue, na Indiana.

Makanisi nini ozalaki na yango mpo na Biblia?

Lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Nzambe abongisaki mabele mpo na bato ekamwisaki ngai. Mikolo motoba ya bozalisi oyo mokanda ya Ebandeli elobeli na maloba ya mindɔndɔ te, eyokani na makambo oyo tomonaka na kokesana na masapo  ya kala. * Ata bongo, na boumeli ya bambula mingi nazalaki kaka kondima te ete Mozalisi azalaka.

Mpo na nini ezalaki mokakatano mpo na yo?

Kondima ete Mozalisi azalaka esɛngaki naboya lingomba na ngai ya bomwana

Mpo na ndenge nazalaki komiyoka, kondima ete Mozalisi azalaka esɛngaki naboya lingomba na ngai ya bomwana mpo ezalaki te koteya ete Nzambe to Mozalisi azalaka.

Kasi na nsima, mpo na nini obongolaki makanisi?

Ntango nakobaki kokanisa mpo na ndenge bomoi ebandá, nakómaki kondima mpenza ete ekelamu ya liboso ya bomoi esalemaki na ndenge ya kokamwa mpenza. Na ndakisa, esengelaki kozala na likoki ya kobota, oyo esɛngaka ete ba-gènes ezala na bansango mpe ezala na mwaye moko oyo ekolekisa bansango yango malamumalamu epai ya ekelamu oyo ebimisi. Longola yango, ata mwa selile ya mpamba ezalaka na mposa ya bamolekile oyo ezalaka lokola bamasini mpo na kobimisa biteni nyonso ya selile ya sika, ata mpe kozwa mpe kopesa selile yango nguya. Ndenge nini eloko oyo ezangi bomoi ekoki kosangana yango moko ndenge wana mpo na kobimisa ekelamu ya bomoi ya kokamwa bongo? Lokola nasalaka matematiki, nakoki kondima te ete eloko ya ndenge wana ekoki kobima kaka yango moko mpo esɛngi makambo mingi.

Nini etindaki yo otalela malamumalamu mateya ya Batatoli ya Yehova?

Batatoli ya Yehova bayekolaki na ngai Biblia mbala na mbala. Na nsima, na 1995, ntango nakendaki Taïwan, nabɛlaki mpe nazalaki na mposa ya lisalisi. Mwasi na ngai na États-Unis asololaki na Batatoli ya Yehova ya Taïwan. Bakutaki ngai libándá ya lopitalo nalɛmbi mpo mbeto ya kotya ngai ezalaki te. Motatoli moko ya Yehova amemaki ngai na otɛlɛ mpo napema. Akobaki kokɛngɛla ngai mpe na nsima amemaki ngai na lopitalo.

Ndenge bakipaki ngai esimbaki mpenza motema na ngai mpe nakanisaki ndenge mbala mingi Batatoli ya Yehova bamoniselaki libota na ngai boboto na mabaku mosusu. Kondima na bango ekesenisaka bango na bato mosusu. Yango wana nazongelaki lisusu koyekola Biblia elongo na bango. Nazwaki batisimo mbula oyo elandaki.

Mateya oyo ondimaka eyokani te na mosala na yo ya matematiki?

Te! Na bambula oyo euti koleka, na nzela ya matematiki nasalisaki bato ya siansi oyo bayekolaka ba-gènes. Koyekola ba-gènes esalisaka na koyeba ndenge bomoi ezalaka; likambo oyo esalaka ete namona ete bwanya ya Mozalisi ekamwisaka mpenza.

Okoki kopesa ndakisa?

Tózwa ndakisa ya kobota. Bikelamu mosusu, na ndakisa amibe, ezalaka mwasi to mobali te. Mikrobe yango oyo ezalaka kaka na selile moko, esalaka kopi ya bansango oyo ezali na ba-gènes na yango, na nsima ekabwanaka mpo na kobimisa ekelamu ya sika. Kasi mpo banyama mpe banzete mingi ebota, esɛngaka kosangana, elingi koloba, esangisaka bansango oyo ezalaka na ba-gènes ya mwasi ná mobali. Mpo na nini kobota na ndenge wana ekamwisaka?

Ndenge nini kobota oyo esɛngaka kaka ekelamu moko ekabwana mpo na kobimisa ekelamu mosusu mpe esalaka yango malamu mpenza kozanga ete moto ayeba ntango boni yango esalaka, ebongwana kobota oyo esɛngaka bikelamu mibale esangana mpo na kobimisa ekelamu moko? Kobota oyo esɛngaka kozwa ndambo ya bansango oyo ezali na ba-gènes ya mobali mpe ndambo ya mwasi mpe kosangisa yango, ekamwisaka mpenza mpe elekelaka bato ya bioloji oyo bandimaka evolisyo. Mpo na ngai, kobota oyo esɛngaka mwasi ná mobali básangana emonisaka polele ete Nzambe nde asalá bongo.

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu etali mikolo ya bozalisi, talá mwa buku La vie a-t-elle été créée ? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali na Internet na www.jw.org.